Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 15

“Azalaki kolendisa masangá”

“Azalaki kolendisa masangá”

Bakɛngɛli ya zongazonga bazali kosalisa bandeko na masangá bázala na kondima makasi

Euti na Misala 15:36–16:5

1-3. (a) Moninga ya sika oyo Paulo azali kosala na ye mobembo ezali nani, mpe azali ndenge nini? (b) Makambo nini tokoyekola na mokapo oyo?

 NTANGO bazali kotambola na banzela ya mabele longwa na engumba moko tii na engumba mosusu, ntoma Paulo azali kokanisa makambo mingi mpo na elenge oyo azali kotambola elongo na ye. Elenge yango nkombo na ye Timote. Timote azali naino na makasi nyonso ya bolenge; mbala mosusu azali na mbula pene na 20 to koleka mwa moke. Mokemoke, mobembo na bango ezali komema ye mosika na mboka na bango. Bazali kotika Listra, Ikoniumu, mpe bingumba mosusu oyo ezali pembeni na yango. Makambo nini bakokutana na yango? Paulo ayebi mwa moke makambo oyo ekoki kokómela bango mpo oyo ezali mobembo na ye ya mibale na mosala ya misionɛrɛ. Ayebi ete bakokutana na makama mpe mikakatano ebele. Elenge oyo azali na ye akoyikela makambo yango mpiko?

2 Paulo azali kotyela Timote motema, mbala mosusu koleka kutu ndenge oyo elenge yango ya komikitisa azali komitalela ye moko. Makambo oyo eutaki koleka endimisi lisusu Paulo makasi ete asengeli kozala na moninga malamu mpo na kosala na ye mibembo. Paulo ayebi ete mosala oyo bakosala lokola bakɛngɛli ya zongazonga, elingi koloba kotala masangá mpo na kolendisa yango, ekosɛnga bázala na mpiko mpe na bomoko na makanisi. Mpo na nini Paulo akoki kokanisa bongo? Moko na bantina ekoki kozala matata oyo ebimaki kati na ye ná Barnabasi, matata oyo esalaki ete bákabwana nzela.

3 Na mokapo oyo, tokoyeba lolenge malamu ya kosilisa matata. Lisusu, tokoyeba ntina oyo Paulo aponaki Timote mpo na kosala na ye mibembo; tokoyeba mpe mokumba monene oyo bakɛngɛli ya zongazonga bakokisaka lelo oyo.

“Sikoyo tózonga kotala bandeko” (Misala 15:36)

4. Paulo asalaki mobembo na ye ya mibale na mosala ya misionɛrɛ mpo na ntina nini?

4 Na mokapo oyo eleki, tomonaki ndenge bandeko oyo minei: Paulo, Barnabasi, Yudasi, mpe Silasi, balendisaki lisangá ya Antiokia ntango bayebisaki bango ekateli ya lisangani ya mikóló-bakambi na likambo ya kokatama ngenga. Na nsima Paulo asalaki nini? Ayebisaki Barnabasi likanisi ya kosala mobembo mosusu, alobaki boye: “Sikoyo tózonga kotala bandeko na engumba mokomoko epai tosakolaki liloba ya Yehova mpo na komona soki bazali ndenge nini.” (Mis. 15:36) Paulo azalaki kaka te na likanisi ya kokende komonana lisusu na bandeko wana ya sika. Mokanda ya Misala emonisi ntina mpenza oyo Paulo asalaki mobembo ya mibale na mosala ya misionɛrɛ. Ya liboso, asengelaki kokoba koyebisa ekateli oyo lisangani ya mikóló-bakambi ezwaki. (Mis. 16:4) Ya mibale, lokola azalaki mokɛngɛli ya zongazonga, Paulo azalaki na ekateli ya kolendisa bandeko mpe kosalisa bango bákóma na kondima makasi. (Rom. 1:11, 12) Ndenge nini lisangá ya Batatoli ya Yehova na mikolo na biso elandaka ndakisa oyo bantoma batikaki?

5. Ndenge nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi etambwisaka mpe elendisaka masangá?

5 Lelo oyo, Kristo asalelaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova mpo na kotambwisa lisangá na ye. Na nzela ya mikanda, ezala na papye to na Internet, makita, mpe mayele mosusu, bakristo yango ya sembo oyo batyami mafuta na elimo bapesaka masangá ya mokili mobimba litambwisi mpe bilendiseli. Lisangani ya Mikóló-Bakambi elukaka mpe koyeba ndenge lisangá mokomoko ezali kotambola. Mpo na yango, batindaka bakɛngɛli ya zongazonga. Lisangani ya Mikóló-Bakambi etye na mokili mobimba bankóto ya bankulutu oyo bakɔmɛli na elimo mpo bázala bakɛngɛli ya zongazonga.

6, 7. Wapi mwa mikumba ya bakɛngɛli ya zongazonga?

6 Na masangá nyonso oyo batalaka, bakɛngɛli ya zongazonga batyelaka ndeko mokomoko likebi mpe balendisaka ye. Na ndenge nini? Na ndenge balandaka ndakisa ya bakristo ya siɛklɛ ya liboso lokola Paulo. Alendisaki moninga na ye mokɛngɛli ete: “Sakolá liloba, salá yango na molende na bantango ya malamu mpe na bantango ya mpasi; pamelá, sembolá, lendisá, na motema molai mpenza mpe na mayele ya koteya. . . . Salá mosala ya mopalanganisi ya nsango malamu.”​—2 Tim. 4:2, 5.

7 Na boyokani na elendiseli yango, mokɛngɛli ya zongazonga, ata mpe mwasi na ye, abimaka na basakoli na mitindo ndenge na ndenge ya mosala ya kosakola. Bakɛngɛli yango bazalaka molende na mosala ya kosakola mpe bateyaka malamu​—bizaleli oyo esalisaka mpenza etonga. (Rom. 12:11; 2 Tim. 2:15) Bandeko basepelaka mingi na bakɛngɛli ya zongazonga mpo na elimo na bango ya komipimela. Bakɛngɛli yango bandimaka mpenza komipesa, basalaka mibembo ata na nse ya mbula to ya moi makasi, mbala mosusu na bisika ya makama. (Flp. 2:3, 4) Longola yango, bakɛngɛli ya zongazonga balendisaka, bateyaka, mpe bapesaka makebisi epai ya bandeko nyonso ya lisangá na nzela ya badiskur oyo basalaka. Bandeko nyonso na lisangá bazwaka litomba na kotala malamumalamu etamboli ya bakɛngɛli ya zongazonga yango mpe na komekola kondima na bango.​—Ebr. 13:7.

“Baswanaki makasi” (Misala 15:37-41)

8. Ndenge nini Barnabasi atalelaki likanisi ya Paulo?

8 Barnabasi asepelaki na likanisi ya Paulo ete bákende “kotala bandeko.” (Mis. 15:36) Bango mibale basalaki liboso mibembo elongo mpe bayebaki bamboka mpe bato oyo basengelaki kokende kotala. (Mis. 13:2–14:28) Na yango, ekoki kozala ete likanisi ya kokende elongo mpo na kokokisa mokumba wana emonanaki malamu mpenza. Kasi, mokakatano moko ebimaki. Misala 15:37 elobi boye: “Barnabasi azalaki na mokano ya komema Yoane, oyo bazalaki kobenga Marko.” Barnabasi apesaki kaka likanisi mpamba te. “Azalaki na mokano” ete bámema ndeko na ye Marko na mobembo wana.

9. Mpo na nini Paulo asepelaki na likanisi ya Barnabasi te?

9 Paulo asepelaki te. Mpo na nini? Lisolo elobi boye: “Kasi Paulo asepelaki te komema [Marko] elongo na bango, mpo atikaki bango na Pamfilia mpe akendaki te elongo na bango na mosala.” (Mis. 15:38) Marko azalaki mpe na mobembo ya liboso ya mosala ya misionɛrɛ oyo Paulo ná Barnabasi basalaki, kasi akómaki tii na nsuka te. (Mis. 12:25; 13:13) Kaka na ebandeli ya mobembo, ntango bazalaki naino na Pamfilia, Marko asundolaki bango mpe azongaki na Yerusaleme. Biblia eyebisi te mpo na nini Marko azongaki, kasi emonani ete ntoma Paulo asepelaki na likambo yango te. Ekoki kozala ete Paulo azalaki kokakatana mpo na kotyela lisusu Marko motema.

10. Matata kati na Paulo ná Barnabasi ebimisaki nini, mpe basukaki ndenge nini?

10 Atako bongo, Barnabasi atingamaki kaka ete bámema Marko. Kasi, Paulo mpe atingamaki ete akende te. Misala 15:39 elobi: “Na yango, baswanaki makasi, mpe bakabwanaki, moto na moto akendaki na nzela na ye.” Barnabasi amemaki Marko, bazwaki masuwa mpe bakendaki na esanga ya Shipre, mboka na ye. Paulo akendaki na bisika oyo amonaki malamu kokende. Lisolo elobi: “Paulo aponaki Silasi, mpe bandeko babondelaki ete Yehova amonisela ye boboto monene na ye, na nsima akendaki.” (Mis. 15:40) Bango mibale ‘bakatisaki Siri mpe Silisia, bazalaki kolendisa masangá.’​—Mis. 15:41.

11. Bizaleli nini ezali na ntina mingi mpo na kopekisa biso tókabwana libela na ndeko moko oyo azokisi biso?

11 Lisolo yango ekoki kosalisa biso tóyeba ete tozali bato ya kozanga kokoka. Paulo ná Barnabasi bazalaki bato oyo lisangani ya mikóló-bakambi etindaki. Kutu, emonani ete Paulo akómaki mosangani na yango. Atako bongo, na libaku wana, Paulo ná Barnabasi basalaki makambo oyo emonisi ete bazalaki kaka bato ya kozanga kokoka. Kasi, batikaki ete likambo yango ekabola bango mpo na libela? Atako bazalaki bato ya kozanga kokoka, Paulo ná Barnabasi bazalaki na komikitisa, bazalaki na likanisi ya Kristo. Na ntembe te, na nsima bamonisaki elimo ya bondeko mpe ya kolimbisana. (Ef. 4:1-3) Nsukansuka, Paulo ná Marko basalaki elongo mpo na kokokisa mikumba mosusu oyo bazwaki. a​—Kol. 4:10.

12. Na ndakisa ya Paulo ná Barnabasi, bakɛngɛli basengeli komonisaka bizaleli nini?

12 Atako Barnabasi ná Paulo baswanaki makasi, yango ezalaki momeseno na bango te. Barnabasi ayebanaki lokola moto ya bolingo mpe oyo akabaka; kutu mpo na bizaleli na ye wana, bantoma batikaki kobenga ye na nkombo na ye mpenza ya Yozefe, mpe bapesaki ye nkombo Barnabasi, oyo elimboli “Mwana ya Libɔndisi.” (Mis. 4:36) Paulo mpe ayebanaki lokola moto ya boboto mpe ya bizaleli malamu. (1 Tes. 2:7, 8) Na ndakisa ya Paulo ná Barnabasi, bakɛngɛli nyonso lelo oyo, ata mpe bakɛngɛli ya zongazonga, basengeli kosala makasi bázalaka ntango nyonso na komikitisa mpe bázalaka na boboto epai ya baninga na bango bankulutu mpe epai ya etonga mobimba.​—1 Pe. 5:2, 3.

“Bazalaki koloba malamu mpo na ye” (Misala 16:1-3)

13, 14. (a) Timote azalaki nani, mpe ekoki kozala ete Paulo akutanaki na ye ndenge nini? (b) Nini etindaki Paulo atyela Timote likebi mingi? (c) Mokumba nini Timote azwaki?

13 Mobembo ya mibale ya Paulo na mosala ya misionɛrɛ ebandaki na etúká ya Galatia, epai mwa masangá esalemaki. Nsukansuka, Paulo “akómaki na Derbe mpe lisusu na Listra.” Lisolo elobi boye: “Moyekoli moko azalaki kuna nkombo na ye Timote, mwana ya mwasi moko Moyuda oyo azalaki mondimi kasi tata na ye Mogrɛki.”​—Mis. 16:1. b

14 Emonani ete Paulo akutanaki na Timote ná mama mpe nkɔkɔ na ye ntango asalaki mobembo ya liboso na bamboka yango na mobu 47 T.B. Bongo, na mobembo na ye ya mibale, mbula mibale to misato na nsima, Paulo atyelaki elenge Timote likebi mingi. Mpo na nini? Mpamba te bandeko “bazalaki koloba malamu mpo na” Timote. Bizaleli na ye ya malamu ezalaki kosepelisa kaka bandeko ya lisangá na ye te, kasi mpe bandeko oyo bazalaki na bingumba mosusu. Lisolo elobi ete bandeko ya Listra mpe ya Ikoniumu, mboka oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 30, bazalaki koloba malamu mpo na ye. (Mis. 16:2) Na litambwisi ya elimo santu, bankulutu bapesaki elenge Timote mokumba monene ya kozala mokɛngɛli ya zongazonga elongo na Paulo mpe Silasi.​—Mis. 16:3.

15, 16. Makambo nini esalaki ete bandeko básepela mingi na Timote?

15 Nini esalaki ete bandeko básepela mingi na Timote atako azalaki naino elenge? Ezalaki mpo na mayele na ye, ndenge oyo azali komonana na libándá, to makambo mosusu oyo ayebaki kosala? Mbala mingi, bato batalaka nde makambo yango. Na libaku moko, ata mosakoli Samwele atalelaki kaka ndenge moto azali komonana na libándá. Nzokande, Yehova ayebisaki ye ete: “Ndenge oyo moto atalaka ekeseni na ndenge oyo Nzambe atalaka. Moto atalaka oyo emonanaka na miso, kasi Yehova atalaka oyo ezali na kati ya motema.” (1 Sam. 16:7) Bandeko bazalaki kosepela mingi na Timote mpo na bizaleli malamu oyo azalaki na yango, kasi te mpo na makambo oyo ezalaki komonana na miso.

16 Mbula mingi na nsima, ntoma Paulo alobelaki mwa ndambo ya bizaleli malamu ya Timote. Paulo alobaki ete Timote azalaki na makanisi malamu, na bolingo ya komipesa mpo na basusu, mpe azalaki kokokisa mikumba na ye na molende. (Flp. 2:20-22) Timote ayebanaki mpe lokola moto oyo azalaki na kondima “oyo ezangi bokosi.”​—2 Tim. 1:5.

17. Lelo oyo, ndenge nini bilenge bakoki kolanda ndakisa ya Timote?

17 Lelo oyo, bilenge mingi bazali kolanda ndakisa ya Timote na ndenge bazali komonisa bizaleli malamu. Na ndenge yango, bazali komisalela nkombo malamu epai ya Yehova mpe epai ya basaleli na ye, ata ntango bazali naino bana mike. (Mas. 22:1; 1 Tim. 4:15) Bazalaka na kondima oyo ezangi bokosi, baboyaka etamboli ya liso na nse ya lokasa. (Nz. 26:4) Yango wana, lokola Timote, bilenge mingi bakoki kokokisa mikumba ya ntina mingi na lisangá. Bilenge balendisaka mpenza bato nyonso oyo balingaka Yehova ntango bazali kokokisa masɛngami mpo na kokóma basakoli ya nsango malamu mpe na nsima, komipesa epai ya Yehova mpe kozwa batisimo!

“Masangá ekobaki mpenza kokóma makasi na kondima” (Misala 16:4, 5)

18. (a) Mikumba nini Paulo ná Timote bakokisaki na mosala na bango ya bakɛngɛli ya zongazonga? (b) Ndenge nini masangá epambolamaki?

18 Paulo asalaki elongo na Timote na boumeli ya bambula mingi. Na mosala na bango ya bakɛngɛli ya zongazonga, bakokisaki mikumba mingi oyo lisangani ya mikóló-bakambi epesaki bango. Biblia elobi boye: “Wana bazalaki koleka na bingumba, bazalaki kopesa baoyo bazalaki kuna mitindo oyo bantoma ná bankulutu oyo bazalaki na Yerusaleme bazwaki mpo bátosa yango.” (Mis. 16:4) Emonani mpenza ete masangá etosaki malako ya bantoma mpe bankulutu oyo bazalaki na Yerusaleme. Mpo na yango, “masangá ekobaki mpenza kokóma makasi na kondima mpe bato bazalaki kobakisama mokolo na mokolo.”​—Mis. 16:5.

19, 20. Mpo na nini bakristo basengeli kotosa “baoyo bazali kokamba” bango?

19 Lelo oyo mpe, Batatoli ya Yehova bazwaka mapamboli na ndenge batosaka malako oyo eutaka epai ya “baoyo bazali kokamba” bango. (Ebr. 13:17) Lokola makambo ya mokili oyo ezali se kobongwana, ezali na ntina mingi tólyaka bilei ya elimo oyo tozwaka na nzela ya “moombo ya sembo mpe ya mayele.” (Mat. 24:45; 1 Ko. 7:29-31) Na ndenge yango, tokomibatela na makama ya elimo mpe yango ekosalisa biso tózwa litɔnɔ ya mokili te.​—Yak. 1:27.

20 Ya solo, bakristo oyo bazali bakɛngɛli lelo oyo, ata mpe baoyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi, bazali bato ya kozanga kokoka, lokola Paulo, Barnabasi, Marko, mpe bankulutu mosusu ya siɛklɛ ya liboso oyo batyamaki mafuta na elimo. (Rom. 5:12; Yak. 3:2) Kasi, lokola bandeko oyo bazali na Lisangani ya Mikóló-Bakambi balandaka mpenza Liloba ya Nzambe mpe ndakisa ya bantoma, tokoki kotyela bango motema. (2 Tim. 1:13, 14) Yango wana, masangá ezali kokóma makasi mpe kolendisama na kondima.

a Talá etanda “ Marko azwaki mikumba mingi,” na lokasa 118.