MOKAPO 18
“Báluka Nzambe, . . . mpe bázwa ye mpenza”
Paulo alobeli makambo oyo ekobimisa ntembe te mpe abongoli ndenge ya koteya
Euti na Misala 17:16-34
1-3. (a) Mpo na nini ntoma Paulo atungisamaki mingi na Atene? (b) Liteya nini tokoki kozwa soki totaleli ndakisa ya Paulo?
PAULO azali na engumba Atene, na ekólo Grɛsi, mboka oyo ezali na bakelasi epai Socrate, Platon, mpe Aristote bateyaki. Bato ya Atene balingá kosambela mingi. Bipai nyonso, Paulo azali komona ebele ya bikeko: na batempelo, na bisika ya bato nyonso, mpe na babalabala, mpo bato ya Atene basambelaka banzambe ebele. Paulo atungisami makasi mpenza. Ayebi ndenge oyo Yehova, Nzambe ya solo, atalelaka losambo ya bikeko. (Kob. 20:4, 5) Lokola Yehova, ntoma yango ya sembo ayinaka bikeko!
2 Paulo ayoki mpenza mpasi na motema mpo na makambo oyo amoni ntango azali kokɔta na agora, to zando. Amoni ebele ya bikeko ya nzambe Hermesi, oyo ezali na motindo ya enama ya mobali, etandami na ngámbo ya nɔrdi-wɛsti, pembeni ya ekɔtelo monene. Zando yango etondi na mwa bisika ya losambo. Ndenge nini ntoma yango ya molende akosakola epai bato yango oyo bamipesi na losambo ya bikeko? Akoyeba kokanga motema mpe koluka makambo oyo ekobimisa ntembe te kati na ye ná bayoki na ye? Akolonga kosalisa bamosusu mpo báluka Nzambe ya solo mpe bámona Ye mpenza?
3 Diskur ya Paulo epai ya bato ya Atene oyo batángá mingi, oyo ekomami na Misala 17:22-31, emonisi ndenge ya koloba malamu, na mayele, mpe na bososoli. Soki totaleli ndakisa ya Paulo, tokoki koyekola ndenge ya kokima makambo oyo ekoki kobimisa ntembe mpe kosalisa bayoki na biso bákanisa malamu.
Ateyi “na zando” (Misala 17:16-21)
4, 5. Na Atene, Paulo asakolaki na esika nini, mpe akutanaki na bato ya ndenge nini?
4 Paulo akómaki na Atene na mobu soki 50 T.B., ntango azalaki na mobembo na ye ya mibale na mosala ya misionɛrɛ. a Ntango azalaki kozela Silasi ná Timote báuta na Beroya, lokola momeseno na ye, “na sinagoga, [Paulo] abandaki kokanisa elongo na Bayuda.” Akendaki mpe na esika oyo akoki kosolola na bafandi ya Atene oyo bazalaki Bayuda te—“na zando,” to agora. (Mis. 17:17) Zando ya Atene ezalaki na nɔrdi-wɛsti ya Acropole, mpe ezalaki na bonene ya hectare soki 5. Zando yango ezalaki kaka te esika ya kotɛka mpe kosomba biloko; ezalaki mpe esika oyo ebele ya bato bazalaki kokutana. Buku moko elobi ete zando yango ezalaki “esika monene ya makambo ya nkita, ya politiki, mpe ya makambo mosusu ya bomoi.” Bato ya mayele ya Atene bazalaki kosepela kokutana kuna mpo na kosolola mpe komonisa mayele na bango.
5 Na zando yango, Paulo akutanaki na bato ya matata. Bayoki na ye mosusu bazalaki bato ya filozofi oyo babengami Baepikire mpe bamosusu Basetoa; bituluku yango mibale ezalaki na mateya ekeseni. b Baepikire bazalaki koteya ete bomoi ebandaki na mbalakaka. Ndenge oyo bazalaki kotalela bomoi emonisami na maloba oyo: “Ntina ya kobanga Nzambe ezali te; moto oyo akufi anyokwamaka te; moto akoki kozwa bolamu ya solosolo; moto akoki koyika mpiko na mabe.” Basetoa bazalaki koteya ete moto asengeli kosalela makoki ya kokanisa mpe bazalaki kondima te ete Nzambe azali Moto. Na bokeseni na bayekoli ya Kristo, Baepikire ná Basetoa bazalaki kondima lisekwa te. Tomoni mpenza ete mateya ya bituluku yango mibale ekesanaki mpenza na mateya ya solo ya bokristo, oyo Paulo azalaki koteya.
6, 7. Ndenge nini Bagrɛki mosusu oyo bazalaki bato ya mayele bayambaki mateya ya Paulo, mpe likambo nini ya ndenge wana tozali kokutana na yango lelo oyo?
6 Ndenge nini Bagrɛki wana oyo bazalaki bato ya mayele bayambaki mateya ya Paulo? Bamosusu babengaki ye na nkombo oyo elimboli “moto ya bilobaloba,” to “mododi mbuma.” (Talá nɔti ya boyekoli na Mis. 17:18, nwtsty-F) Moto moko ya mayele alobaki boye: “Na ebandeli, liloba yango [ya Grɛki] ezalaki kosalelama mpo na mwa bandɛkɛ oyo bazalaki kododa bambuma, mpe na nsima, bakómaki kosalela yango mpo na bato oyo bazalaki kolɔkɔta mwa bilei oyo ekweaka na nse mpe biloko mosusu ya mpambampamba na zando. Kasi, na nsima mpe, liloba yango ekómaki kosalelama na ndenge ya elilingi mpo na kolobela moto oyo ayokaki makambo ndambondambo, mingimingi moto oyo akoki te kosangisa makambo oyo ayokaki mpe kolobela yango na molɔngɔ.” Na yango, bato wana ya mayele balingaki nde koloba ete Paulo azali mayele te, azali kaka kozongela maloba oyo ayokaki epai ya bato mosusu. Kasi, ndenge tokomona yango, Paulo abangaki te mpo babengaki ye na nkombo wana.
7 Makambo ezali ndenge moko tii lelo oyo. Mbala mingi, bato mosusu babambaka biso Batatoli ya Yehova bankombo mpo na bindimeli na biso oyo euti na Biblia. Na ndakisa, balakisi mosusu bateyaka ete moto autá na nyama mpe balobaka ete soki moto azali mayele, asengeli kondima yango. Na bongo, bamonisaka ete moto oyo aboyi kondima liteya yango azali mayele te. Bato yango oyo batángá mingi batindaka bato bákanisa ete ntango tozali kolakisa oyo Biblia elobi mpe tozali komonisa bilembeteli ete biloko nyonso ezalisamaki, tolobaka kaka makambo oyo toyokaki epai ya bato mosusu. Kasi, yango ebangisaka biso te. Kutu, tolobaka na mpiko ntango tozali komonisa ntina oyo tondimaka ete Mozalisi moko ya mayele, elingi koloba Yehova Nzambe, nde azalisaki bikelamu nyonso oyo ezali awa na mabele.—Em. 4:11.
8. (a) Bato mosusu oyo bayokaki mateya ya Paulo basalaki nini? (b) Areopaje, epai bamemaki Paulo, ekoki kolimbola nini? (Talá maloba oyo ezali na nse ya lokasa 142.)
8 Bato mosusu oyo bayokaki mateya ya Paulo na zando bayambaki yango ndenge mosusu. Balobaki: “Emonani lokola ete azali mosakoli ya banzambe ya bapaya.” (Mis. 17:18) Paulo azalaki mpenza koteya banzambe ya bapaya epai ya bato ya Atene? Ezalaki efundeli moko monene; ezalaki lokola bifundeli oyo, bankama ya bambula liboso, esalaki ete básambisa Socrate mpe bákatela ye etumbu ya liwa. Yango wana, bamemaki Paulo na Areopaje mpe basɛngaki ye alimbola mateya oyo bato ya Atene bamonaki ete ezali mateya ya sika. c Ndenge nini Paulo alimbolaki nsango oyo azalaki koteya epai ya bato oyo bayebaki Makomami te?
“Mibali ya Atene, namoni ete” (Misala 17:22, 23)
9-11. (a) Paulo asalaki nini mpo na kobimisa ntembe te ná bayoki na ye? (b) Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo na mosala ya kosakola?
9 Tóbosana te ete Paulo atungisamaki mingi mpo na bikeko oyo amonaki. Kasi, na esika abanda mbala moko koloba maloba ya kokweisa losambo ya bikeko, akangaki motema. Mpo azokisa bayoki na ye te mpe báyoka ye, asalelaki mayele na ndenge alobelaki likambo oyo ekobimisa ntembe te. Abandaki boye: “Mibali ya Atene, namoni ete na makambo nyonso bomonani ete bomipesá na kobanga banzambe koleka bato mosusu.” (Mis. 17:22) Na maloba mosusu, Paulo alobaki boye: ‘Namoni ete bomipesá mingi na losambo.’ Paulo amonisaki bwanya na ndenge apesaki bayoki na ye longonya mpo bazalaki kolinga kosambela. Ayebaki ete bamosusu oyo bakosamaki na mateya ya lokuta bakoki kondima nsango malamu. Kutu, Paulo ayebaki ete liboso, ye mpe ‘azalaki kosala yango kozanga boyebi mpe azangaki kondima.’—1 Tim. 1:13.
10 Nsima ya kolobela likambo oyo ekobimisa ntembe te, Paulo alobaki ete amonaki elembeteli oyo endimisi mpenza ete bato ya Atene balingaki kosambela: amonaki etumbelo moko mpo na “Nzambe oyo ayebani te.” Buku moko elobi ete “Bagrɛki mpe bato mosusu bazalaki kosala bitumbelo mpo na ‘banzambe oyo bayebani te,’ mpo ete mbala mosusu babosanaki nzambe moko oyo ntango mosusu akoki kosilika.” Lokola bato ya Atene batongaki etumbelo wana, bamonisaki ete bazalaki kondima ete ezali na Nzambe moko oyo bango bayebi te. Paulo alobelaki etumbelo yango mpo na nsima ayebisa bango nsango malamu. Alobaki boye: “Ye oyo bino bozali kosambela kozanga koyeba, ye nde nazali kosakwela bino.” (Mis. 17:23) Paulo aboyaki kozokisa bango, kasi maloba na ye esimbaki mitema na bango. Azalaki kosakola nzambe ya bapaya te, ndenge bato mosusu balobaki. Amonisaki bango Nzambe oyo bango bayebaki te, elingi koloba Nzambe ya solo.
11 Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo na mosala ya kosakola? Soki tozali kosalela miso, tokomona makambo oyo ekosalisa biso tóyeba soki moto asambelaka; tokoki komona biloko ya losambo oyo alati to oyo ezali na ndako to na lopango na ye. Tokoki koloba ete: ‘Namoni ete osambelaka. Nasepelaka kosolola na moto oyo alingaka makambo ya Nzambe.’ Soki toyebisi moto ete tosepeli na ye lokola asambelaka, yango ekoki kosala ete andima koyoka biso. Tóbosana te ete mokano na biso ezali te ya kosambisa bato mpo na bindimeli na bango. Bandeko na biso mosusu kati na lisangá, kala bazalaki kondima na bosembo nyonso mateya ya lokuta.
Nzambe “azali mosika te na mokomoko na biso” (Misala 17:24-28)
12. Ndenge nini Paulo abongolaki ndenge na ye ya koteya epai ya bato oyo bazalaki koyoka ye?
12 Paulo alongaki kobenda likebi ya bayoki na ye, kasi alingaki kolonga kopesa bango litatoli kozanga ete alobela likambo oyo ekobimisa ntembe? Lokola ayebaki ete bayoki na ye bayekolaki filozofi ya Bagrɛki mpe bayebaki Makomami te, abongolaki ndenge na ye ya koteya nsango malamu. Ya liboso, ateyaki makambo oyo Biblia elobi kozanga amonisa polele ete euti na Makomami. Ya mibale, amityaki na ngámbo ya bayoki na ye na ndenge azalaki mbala mosusu kosalela liloba “biso.” Ya misato, azongelaki maloba oyo ezali na mikanda ya Bagrɛki mpo na komonisa ete makambo mosusu oyo azalaki koteya, mikanda na bango moko elobelaki yango. Sikoyo, tótalela diskur ya kosimba motema oyo Paulo asalaki. Mateya nini ya solo alobelaki na ntina na Nzambe oyo bato ya Atene bayebaki ye te?
13. Paulo alobaki nini mpo na kozalisama ya molɔ́ngɔ́, mpe maloba na ye elimbolaki nini?
13 Nzambe azalisaki molɔ́ngɔ́ mobimba. Paulo alobaki boye: “Nzambe oyo asalá mokili mpe biloko nyonso oyo ezali na kati na yango, Ye azali Nkolo ya likoló mpe ya mabele, afandaka te na batempelo oyo esalemi na mabɔkɔ.” d (Mis. 17:24) Molɔ́ngɔ́ ebimaki yango moko te. Nzambe ya solo nde Mozalisi ya biloko nyonso. (Nz. 146:6) Na bokeseni na nzambe Athéna to banzambe mosusu oyo nkembo na bango etalelaki batempelo, bisika ya losambo, mpe bitumbelo, Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na likoló mpe na mabele akoki kofanda na batempelo oyo etongami na mabɔkɔ ya bato te. (1 Bak. 8:27) Bayoki ya Paulo bakangaki ntina ya maloba na ye: Nzambe ya solo azali na nkembo koleka bikeko oyo esalemi na mabɔkɔ ya bato, oyo ezalaki na batempelo oyo esalemi na mabɔkɔ ya bato.—Yis. 40:18-26.
14. Ndenge nini Paulo amonisaki ete Nzambe azalaka na mposa te ete bato básalisa ye?
14 Nzambe azalaka na mposa ya lisalisi ya bato te. Bato oyo bazalaki kosambela bikeko bazalaki kolatisa bikeko yango bilamba ya ntalo, kopesa yango makabo ya motuya mingi, to mpe komemela yango bilei mpe masanga mpo bazalaki kokanisa ete bikeko yango ezalaki na mposa ya biloko wana! Nzokande, ekoki kozala ete bafilozofe mosusu ya Bagrɛki oyo bazalaki koyoka Paulo bazalaki na makanisi ete nzambe azalaka na mposa te ete moto apesa ye eloko. Soki ezali bongo, na ntembe te bandimaki maloba ya Paulo ete Nzambe “azali na mposa ya mabɔkɔ ya bato te ete esalela ye mpo azangi eloko te.” Kutu, ezali na eloko moko te awa na mokili oyo bato bakoki kopesa epai ya Mozalisi! Ye nde apesaka bato biloko nyonso oyo bazali na yango mposa—“mpema, bomoi mpe biloko nyonso,” ata mpe moi, mbula, mpe mabele oyo ebotaka mbuma. (Mis. 17:25; Eba. 2:7) Na yango, Nzambe oyo apesaka biso biloko nyonso, azalaka na mposa te ete bato, oyo ye apesaka biloko, básalisa ye.
15. Ndenge nini Paulo asembolaki likanisi ya bato ya Atene oyo bazalaki komona ete baleki bato oyo bazali Bagrɛki te, mpe liteya nini ya ntina mingi tokoki kozwa na ndakisa yango?
15 Nzambe asalaki moto. Bato ya Atene bazalaki kokanisa ete baleki bato oyo bazali Bagrɛki te. Nzokande, Biblia emonisi ete moto asengeli kozala na lolendo te mpo na ekólo to mposo na ye. (Mib. 10:17) Paulo alobelaki likambo yango na mayele mpenza. Ntango Paulo alobaki ete, “na nzela ya moto moko [Nzambe] abimisi bikólo nyonso ya bato,” na ntembe te maloba na ye etindaki bayoki na ye bákanisa. (Mis. 17:26) Azalaki kolobela lisolo oyo ezali na mokanda ya Ebandeli, oyo elobeli Adama, nkɔkɔ ya bato nyonso. (Eba. 1:26-28) Lokola bato nyonso bauti na nkɔkɔ moko, mposo to ekólo moko te eleki mosusu. Na ntembe te, bayoki ya Paulo bakangaki ntina ya liteya yango! Ndakisa yango epesi biso liteya moko ya ntina mingi. Atako tosengeli kosalela mayele mpe kozala makambo makasimakasi te ntango tozali kopesa litatoli, tosengeli mpe te kolɛmbisa mateya ya solo ya Biblia mpo bato básepela na yango.
16. Mokano ya Mozalisi mpo na bato ezali nini?
16 Nzambe alingaki ete bato bázala penepene na ye. Atako bafilozofe oyo bazalaki koyoka Paulo bazalaki banda kala kobimisa makanisi ndenge na ndenge mpo na kolimbola ntina ya bomoi, bazalaki kokoka te kopesa eyano ya malamu na likambo yango. Nzokande, Paulo, amonisaki polele mokano ya Mozalisi mpo na bato, yango ezali ete “báluka Nzambe, soki esengeli báluka ye na komekameka epai na epai mpe bázwa ye mpenza, atako, ya solo, azali mosika te na mokomoko na biso.” (Mis. 17:27) Paulo amonisaki ete Nzambe oyo bato ya Atene bayebaki te akoki koyebana. Kutu, azali mosika te na baoyo balingi mpenza komona ye mpe koyeba ye. (Nz. 145:18) Tósimba ete Paulo asalelaki liloba “biso”; yango emonisi ete amityaki na ngámbo ya bato oyo basengelaki ‘koluka’ Nzambe mpe ‘koluka [ye] na komekameka.’
17, 18. Mpo na nini tosengeli koluka Nzambe, mpe liteya nini tokoki kozwa na ndenge oyo Paulo asimbaki mitema ya bayoki na ye?
17 Bato basengeli koluka Nzambe. Paulo alobaki ete mpo na Nzambe, “tozali na bomoi mpe totambolaka mpe tozali.” Bato mosusu ya mayele balobaka ete Paulo azalaki kokanisa maloba ya Epimenides, powɛti moko ya Krɛti oyo azalaki na bomoi na siɛklɛ ya 6 L.T.B. mpe oyo azalaki “moto moko ya lokumu na bonkɔkɔ ya lingomba ya bato ya Atene.” Paulo apesaki ntina mosusu oyo bato basengeli koluka Nzambe: “Bamosusu kati na bapowɛti na bino balobá: ‘Mpo tozali mpe bana na ye.’” (Mis. 17:28) Bato basengeli koyoka ete bazali bana ya Nzambe; azalisaki moto oyo azali nkɔkɔ ya bato nyonso. Mpo na kosimba mitema ya bayoki na ye, Paulo azongelaki maloba ya bakomi ya Bagrɛki oyo, na ntembe te, bayoki na ye bazalaki kopesa limemya. e Na ndakisa ya Paulo, tokoki ntango mosusu kozongela mwa moke maloba ya bato ya mayele ya kala to mikanda mosusu. Na ndakisa, kozongela maloba ya moto moko oyo ayebani mpe oyo bato bamemyaka ekoki kosalisa mpo na kondimisa moto oyo azali Motatoli te ntango tozali kolimbolela ye soki mimeseno mpe milulu mosusu ya mangomba ya lokuta eutá wapi.
18 Tii na esika wana na lisolo na ye, Paulo amonisaki mateya ya ntina mingi mpo na Nzambe, mpe aponaki malamu maloba na ye mpo bayoki na ye bákanga ntina na yango. Paulo alingaki ete bato ya Atene oyo azalaki kosolola na bango básala nini nsima ya koyoka makambo ya ntina mingi oyo ayebisaki bango? Aumelaki te koyebisa bango oyo basengeli kosala ntango azalaki kokoba diskur na ye.
‘Bato na bisika nyonso basengeli kobongola motema’ (Misala 17:29-31)
19, 20. (a) Mayele nini Paulo asalelaki mpo na komonisa ete bato oyo basambelaka bikeko bakanisaka malamu te? (b) Likambo nini bayoki ya Paulo basengelaki kosala?
19 Paulo alendisaki bayoki na ye ete bákanga mabɔkɔ te. Azongelaki lisusu maloba oyo ezali na mikanda ya Bagrɛki, mpe alobaki boye: “Na yango, lokola tozali bana ya Nzambe, tosengeli kokanisa te ete Nzambe azali lokola wolo to palata to libanga, to eloko moko oyo esalemi na mayele mpe na makanisi ya bato.” (Mis. 17:29) Ya solo, soki bato bazali bikelamu ya Nzambe, ekobanda boni Nzambe azala na motindo ya ekeko, eloko oyo moto asali? Makanisi ya Paulo emonisaki na mayele ete bato oyo basambelaka bikeko oyo esalemi na mabɔkɔ ya bato bakanisaka malamu te. (Nz. 115:4-8; Yis. 44:9-20) Na ntembe te, lokola Paulo alobaki “tosengeli kokanisa te ete,” alɛmbisaki maloba na ye mpo ezokisa bayoki te.
20 Ntoma yango amonisaki polele ete basengelaki kosala likambo moko: “Nzambe akangaki miso mpo na bantango wana ya kozanga boyebi [ntango oyo bazalaki kokanisa ete Nzambe akoki kosepela na bato oyo basambelaka bikeko], nzokande sikoyo azali koyebisa bato nyonso na bisika nyonso ete basengeli kobongola motema.” (Mis. 17:30) Ekoki kozala ete bato mosusu bayokaki mabe ntango Paulo alobaki na bango ete basengeli kobongola motema. Kasi, lisolo na ye emonisaki polele ete soki bazali na bomoi, Nzambe nde apesaki bango yango; na yango, basengelaki kozongisa monɔkɔ epai na Ye. Basengelaki koluka Nzambe, koyekola solo na ntina na ye, mpe kosalela yango na bomoi na bango. Mpo na bato ya Atene, yango elimbolaki kondima ete kosambela bikeko ezali lisumu mpe basengeli kotika yango.
21, 22. Paulo asukisaki diskur na ye na maloba nini oyo ezali kosimba motema, mpe maloba yango ezali na ndimbola nini mpo na biso lelo oyo?
21 Paulo asukisaki diskur na ye na maloba oyo ezali kosimba motema; alobaki boye: “[Nzambe] atye mokolo moko oyo akosambisa na bosembo mabele oyo bato bafandi na nzela ya moto moko oyo ye aponi, mpe apesi bato nyonso ndanga ndenge asekwisi ye uta na bakufi.” (Mis. 17:31) Mokolo ya Kosambisa ekoya—likambo yango esengelaki mpenza kotinda bato báluka Nzambe! Paulo atángaki te nkombo ya Mosambisi oyo Nzambe aponi. Kasi, alobaki likambo moko ya kokamwa mpo na Mosambisi yango: Azalaki na bomoi lokola moto, akufaki, mpe Nzambe asekwisaki ye!
22 Maloba ya nsuka ya diskur ya Paulo ezali na ndimbola monene mpo na biso lelo oyo. Toyebi ete Mosambisi oyo Nzambe aponi ezali Yesu Kristo oyo asekwaki. (Yoa. 5:22) Toyebi mpe ete Mokolo ya Kosambisa ekoumela mbula nkóto mpe ete mokolo yango ekómi pene. (Em. 20:4, 6) Tobangaka Mokolo ya Kosambisa te, mpo toyebi ete ekomemela bato ya sembo ebele ya mapamboli. Tozali na ndanga ete elikya na biso ya bomoi ya malamu na mikolo ekoya ekokokisama, ndanga yango ezali lisekwa ya Yesu Kristo!
“Bato mosusu . . . bakómaki bandimi” (Misala 17:32-34)
23. Ndenge nini bato bayambaki diskur ya Paulo?
23 Bato oyo bayokaki diskur ya Paulo bayambaki yango ndenge moko te. “Bamosusu babandaki kotyola” ntango bayokaki likambo ya lisekwa. Bamosusu batyolaki ye te, kasi bakómaki bandimi te; balobaki ete: “Tokoyoka yo na likambo wana mbala nsima.” (Mis. 17:32) Kasi, mwa ndambo bandimaki: “Bato mosusu basanganaki elongo na ye mpe bakómaki bandimi. Na kati na bango ezalaki Dionisiusi, oyo azalaki mosambisi moko ya tribinale ya Areopaje, ná mwasi moko nkombo na ye Damarise, mpe bato mosusu.” (Mis. 17:34) Lelo oyo mpe makambo esalemaka bongo na mosala ya kosakola. Bato mosusu batyolaka biso; bamosusu bazalaka na bonkonde, kasi basepelaka koyoka te. Nzokande, tozalaka na esengo ntango bato mosusu bayoki nsango ya Bokonzi mpe bakómi bandimi.
24. Diskur oyo Paulo asalaki na Areopaje ekoki koteya biso makambo nini?
24 Soki totaleli na mozindo diskur ya Paulo, tokoyekola ndenge ya kobimisa makanisi na molɔngɔ, kosalela makanisi oyo ezali kondimisa, mpe kobongola ndenge ya koteya na kotalela bayoki na biso. Longola yango, tokoyekola ntina ya kozala na motema molai mpe koboya kozokisa bato oyo bakosami na mateya ya lokuta. Tokozwa mpe liteya oyo ya ntina mingi: Tosengeli soki moke te kolɛmbisa solo ya Biblia kaka mpo na kosepelisa bayoki na biso. Kasi, soki tolandi ndakisa ya ntoma Paulo, tokoki kokóma bateyi ya malamu na mosala ya kosakola. Longola yango, ndakisa yango ekoki kosalisa bakɛngɛli bákóma bateyi malamu na lisangá. Na ndenge yango, tokozala na nyonso oyo esengeli mpo na kosalisa bato “báluka Nzambe . . . mpe bázwa ye mpenza.”—Mis. 17:27.
a Talá etanda “ Atene—Engumba-mokonzi ya mimeseno ya kala,” na lokasa 142.
b Talá etanda “ Baepikire ná Basetoa,” na lokasa 144.
c Areopaje ezalaki na nɔrdi-wɛsti ya Acropole mpe ezalaki esika ya makita ya bakambi-mboka ya Atene. Nkombo “Areopaje” ekoki kolimbola lisangani yango to ngomba wana. Yango wana, bato mosusu oyo balimbolaka maloba ya Biblia balobaka ete Paulo amemamaki pene na ngomba yango; kasi bamosusu balobaka ete bamemaki ye nde na likita ya bakambi-mboka, mbala mosusu na kati ya agora.
d Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “mokili” ezali kosmos, oyo Bagrɛki bazalaki kosalela mpo na kolobela molɔ́ngɔ́. Ekoki mpenza kozala ete Paulo asalelaki liloba yango na ndimbola wana mpo na koboya kobimisa ntembe na bayoki na ye oyo bazalaki Bagrɛki.
e Paulo azongelaki maloba oyo ezali na buku moko molai ya maloba ya ntɔki oyo ebengami Phaenomena, ya Aratus, powɛti moko oyo azalaki Mosetoa. Maloba ya ndenge yango ezali mpe na mikanda mosusu ya Bagrɛki, na ndakisa Hymne à Zeus, ya Cléanthe, mokomi moko oyo azalaki mpe Mosetoa.