Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 16

“Leká na masedonia”

“Leká na masedonia”

Kondima mokumba mpe koyikela minyoko mpiko na esengo ememaka mapamboli

Euti na Misala 16:6-40

1-3. (a) Ndenge nini elimo santu etambwisaki Paulo ná baninga na ye? (b) Makambo nini tokotalela?

 ETULUKU moko ya basi babimi na engumba Filipi, na etúká ya Masedonia. Mosika te, bakómi na mwa ebale moke babengi Gangitès. Lokola momeseno, bafandi pembeni ya ebale mpo na kobondela Nzambe ya Yisraele. Yehova azali komona bango.​—2 Nt. 16:9; Nz. 65:2.

2 Na ntango yango, na esika oyo ekabwani na Filipi na ntaka ya kilomɛtrɛ koleka 800, na ngámbo ya ɛsti, etuluku moko ya mibali balongwe na engumba Listra, na sudi ya etúká ya Galatia. Nsima ya mwa mikolo, bakómi na nzela monene mpe ya malamu oyo Baroma batongá, oyo ezali komema na ngámbo ya wɛsti mpo na kokóma na eteni ya etúká ya Azia oyo ezali na bato mingi. Mibali yango: Paulo, Silasi, mpe Timote, bazali na mposa ya kosala mobembo na nzela yango mpo na kokóma na Efese mpe bingumba mosusu epai bankóto ya bato basengeli koyoka nsango ya Kristo. Kasi, liboso kutu bábanda mobembo yango, elimo santu epekisi bango na lolenge moko oyo eyebisami te. Bapekisi bango kokende kosakola na Azia. Mpo na nini? Na lisalisi ya elimo ya Nzambe, Yesu alingi kotambwisa Paulo ná baninga na ye báleka Azia Moke, bákatisa Mbu ya Égée, mpe bákende tii na mwa ebale wana oyo ebengami Gangitès.

3 Ndenge oyo Yesu atambwisaki Paulo ná baninga na ye na mobembo wana na Masedonia ezali na mateya mingi mpo na biso lelo oyo. Yango wana, tótalela mwa makambo oyo elekaki na mobembo ya mibale ya Paulo na mosala ya misionɛrɛ, oyo ebandaki na mobu soki 49 T.B.

“Nzambe abengi biso” (Misala 16:6-15)

4, 5. (a) Nini ekómelaki Paulo ná baninga na ye pene na Bitinia? (b) Bayekoli yango bazwaki ekateli nini, mpe nsuka na yango ezalaki nini?

4 Lokola elimo ya Nzambe epekisaki bango básakola na etúká ya Azia, Paulo ná baninga na ye bakendaki na ngámbo ya nɔrdi mpo na kosakola na bingumba ya Bitinia. Mpo na kokóma kuna, mbala mosusu batambolaki makolo na boumeli ya mikolo mpe na banzela ya mabe ya Frigia mpe ya Galatia, bitúká oyo bingumba na yango ekabwani na bantaka milai. Kasi, ntango bakómaki pembeni ya Bitinia, Yesu asalelaki lisusu elimo santu mpo na kokanga bango nzela. (Mis. 16:6, 7) Na ntango wana, na ntembe te mibali yango babulunganaki mpenza. Bayebaki nsango oyo basengeli kosakola mpe ndenge ya kosala yango, kasi bayebaki te epai wapi basengeli kosakola. Na maloba ya elilingi, ezali lokola nde babɛtaki na porte ya Azia, kasi baboyaki kofungolela bango. Babɛtaki mpe na porte ya Bitinia, kasi kuna mpe baboyaki kofungolela bango. Atako bongo, Paulo azalaki na ekateli ya kokoba kobɛta tii ntango akomona porte oyo ekofungwama. Na nsima, mibali yango bazwaki ekateli oyo emonanaki lokola nde ezali ya mayele te. Babalukaki lisusu na ngámbo ya wɛsti mpe batambolaki kilomɛtrɛ 550, balekaki na bingumba ndenge na ndenge tii bakómaki na Troase, engumba moko oyo ezali na libongo ya masuwa oyo ezali nzela ya kokɔta na etúká ya Masedonia. (Mis. 16:8) Kuna, mpo na mbala ya misato, Paulo abɛtaki porte, mpe bafungolelaki ye yango polele.

5 Luka, mokomi ya evanzile, oyo alandaki mpe Paulo ná baninga na ye banda na Troase, alobi likambo oyo esalemaki: “Na butu, Paulo amonaki emonaneli moko: moto moko ya Masedonia atɛlɛmaki mpe azalaki kobondela ye mpe koloba: ‘Leká na Masedonia kosalisa biso.’ Ntango kaka amonaki emonaneli wana, tolukaki nzela ya kokende na Masedonia, toyaki komona mpenza ete Nzambe abengi biso mpo na kosakwela bango nsango malamu.” a (Mis. 16:9, 10) Nsukansuka, Paulo ayebaki epai oyo basengeli kosakola. Na ntembe te Paulo asepelaki mingi lokola alɛmbaki nzoto te na nzela! Mbala moko, mibali yango minei bazwaki masuwa mpo na kokende na Masedonia.

“Na yango, uta na Troase tozwaki nzela ya mbu.”​—Misala 16:11

6, 7. (a) Liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo esalemaki na mobembo ya Paulo? (b) Makambo oyo Paulo akutanaki na yango ekoki kopesa biso elikya nini?

6 Liteya nini tokoki kozwa na lisolo yango? Tósimba likambo oyo: Ezali kaka nsima ya kobanda mobembo mpo na kokende na etúká ya Azia nde elimo ya Nzambe elakisaki Paulo nzela; ezali kaka nsima ya kokóma pene ya Bitinia nde Yesu alakisaki Paulo nzela; mpe ezali kaka nsima ya kokóma na Troase nde Yesu alakisaki ye ete asengeli kokende na Masedonia. Yesu, Mokonzi ya lisangá, akoki mpe kosala bongo epai na biso lelo oyo. (Kol. 1:18) Na ndakisa, ekoki kozala ete banda mwa ntango, tozali kokanisa kosala mosala ya mobongisi-nzela to kokende epai oyo basakoli ya Bokonzi bazali mingi te. Nzokande, ekoki kozala ete nsima ya kosala makambo ya ntina oyo tosengeli kosala mpo na kokokisa mokano na biso nde Yesu, na nzela ya elimo ya Nzambe, akolakisa biso nzela. Mpo na nini? Tótalela ndakisa oyo: Sofɛlɛ ya motuka abalolaka motuka na lobɔkɔ ya mwasi to ya mobali kaka soki motuka ezali kotambola. Ndenge moko mpe, Yesu akotambwisa biso soki tolingi komipesa mingi na mosala ya kosakola, kasi akosala yango kaka soki tozali kotambola, elingi koloba tozali kosala milende ya solosolo mpo na kokokisa mokano na biso.

7 Kasi, ezali boni soki milende na biso ezali kobota mbuma te? Tosengeli nde kolɛmba nzoto mpe kokanisa ete elimo ya Nzambe ezali kotambwisa biso te? Te. Tóbosana te ete Paulo mpe akutanaki na mikakatano. Kasi, akobaki koluka tii ntango amonaki porte oyo efungwamaki. Tokoki kozala na elikya ete biso mpe tokozwa mbano soki tozali koyika mpiko mpo na koluka ‘libaku monene oyo epesameli biso na mosala.’​—1 Ko. 16:9.

8. (a) Engumba Filipi ezalaki ndenge nini? (b) Likambo nini ya esengo esalemaki ntango Paulo asakolaki na “esika ya mabondeli”?

8 Ntango Paulo ná baninga na ye bakómaki na etúká ya Masedonia, bakendaki na Filipi, engumba oyo bafandi na yango bazalaki komikumisa ete bazali bana-mboka Roma. Mpo na basoda ya Roma oyo bazwá pansiɔ, oyo bazalaki kofanda na Filipi, engumba yango ezalaki lokola mwa Itali, elingi koloba mwa Roma moke na kati ya etúká ya Masedonia. Na libándá ya engumba yango, pembeni ya mwa ebale moko, bamisionɛrɛ yango bamonaki esika moko oyo bakanisaki ete ezali “esika ya mabondeli.” b Mokolo ya Sabata, bakendaki na esika yango mpe bakutaki etuluku ya basi oyo bayanganaki mpo na kosambela Nzambe. Bayekoli bafandaki mpe basololaki na bango. Mwasi moko nkombo na ye Lidia, “azalaki koyoka. Mpe Yehova afungolaki motema na ye.” Lidia asepelaki na makambo oyo bamisionɛrɛ bateyaki, mpe ye ná libota na ye bazwaki batisimo. Na nsima, asɛngaki Paulo ná baninga na ye ete báfanda na ndako na ye. c​—Mis. 16:13-15.

9. Ndenge nini bandeko mingi balandi ndakisa ya Paulo mpe yango ememeli bango mapamboli nini?

9 Kanisá esengo oyo ezalaki ntango Lidia azwaki batisimo! Na ntembe te, Paulo asepelaki mingi lokola andimaki ‘koleka na Masedonia’ mpe Yehova amonaki malamu kosalela ye ná baninga na ye mpo na kopesa eyano na mabondeli ya basi yango oyo bazalaki kobanga Nzambe! Lelo oyo, ebele ya bandeko: mibali mpe basi, bilenge mpe mikóló, minzemba mpe babalani, bazali kokende na bisika oyo basakoli bazali mingi te. Ya solo, bakutanaka na mikakatano, kasi yango ezali eloko te soki bakokanisi yango na esengo oyo bayokaka ntango bakutani na bato oyo bazali lokola Lidia, bato oyo bazali kondima solo ya Biblia. Yo mpe okoki kobongola makambo ya bomoi na yo mpo ozwa libaku ya ‘koleka’ na teritware oyo basakoli bazali mingi te? Okozwa mapamboli mingi soki osali yango. Tótalela ndakisa ya Aaron, ndeko mobali moko oyo azali na mbula koleka 20, oyo akendaki na ekólo moko ya Amerika ya Ntei. Amonisaki esengo oyo bato mingi bayokaka ntango alobaki boye: “Kosala na mboka mopaya esalisi ngai nakola na elimo mpe napusana penepene na Yehova. Lisusu, elanga ezali monene; nazali koyekola Biblia na bato mwambe!”

Ndenge nini tokoki ‘koleka na Masedonia’ lelo oyo?

“Ebele . . . ya bato batombokelaki bango” (Misala 16:16-24)

10. Na ndenge nini bademo bapusaki bato básalela Paulo ná baninga na ye makambo oyo ekómelaki bango?

10 Na ntembe te, Satana azalaki koyoka nkanda makasi mpo nsango malamu ekɔtaki na etúká oyo bato mingi batambwisamaki na Satana ná bademo na ye. Yango wana, tokoki kokamwa te ete bademo bapusaki bato básalela Paulo ná baninga na ye makambo oyo ekómelaki bango! Mbala na mbala, ntango bazalaki kokende na esika ya mabondeli, mwana mwasi moko ya mosala oyo azalaki na demo, oyo azalaki kokɔtisela bankolo na ye mbongo mingi na ndenge azalaki kosakola makambo ekoya, azalaki ntango nyonso kolanda Paulo ná baninga na ye mpe koganga ete: “Bato oyo bazali baombo ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló, mpe bazali kosakwela bino nzela ya lobiko.” Ekoki kozala ete demo yango azalaki kotinda elenge mwasi yango alobaka ndenge wana mpo bato bákanisa ete makambo oyo azalaki kosakola mpe nsango oyo Paulo azalaki koteya ezalaki kouta esika moko. Yango ekokaki kolongola likebi ya bato epai ya bayekoli ya solo ya Kristo. Kasi, Paulo abenganaki demo yango mpe elenge mwasi yango atikaki koloba.​—Mis. 16:16-18.

11. Ntango Paulo abenganaki demo epai ya elenge mwasi moko, nini ekómelaki ye ná Silasi?

11 Ntango bankolo ya moombo mwasi wana bamonaki ete babungisi eloko oyo ezalaki kokɔtisela bango mbongo, basilikaki makasi. Bamemaki Paulo ná Silasi na zando, epai bakambi-mboka, basali ya Leta oyo bazalaki bamonisi ya bokonzi ya Roma, bazalaki kosambisa makambo. Lokola bankolo moombo wana balingaki ete basambisi bákanisela Paulo ná Silasi mabe mpe bámonisa bolingo ya ekólo, balobaki boye: ‘Bato oyo bazali kokɔtisa mobulu makasi na ndenge bazali kosakola mimeseno oyo biso Baroma tokoki kondima te.’ Mayele na bango elongaki. “Ebele wana ya bato [na zando] batombokelaki bango [Paulo ná Silasi],” mpe bakambi-mboka bapesaki mitindo ete ‘bábɛta bango na mangenda.’ Na nsima, batyaki Paulo ná Silasi na bolɔkɔ. Mokɛngɛli ya bolɔkɔ atyaki mibali yango oyo bazokaki bampota na bolɔkɔ ya kati mpenza mpe akangaki makolo na bango na bikanga-makolo. (Mis. 16:19-24) Ntango mokɛngɛli ya bolɔkɔ akangaki porte, bolɔkɔ yango ekómaki molili makasi na boye ete, mbala mosusu moto akokaki ata komona moninga te. Atako bongo, Yehova azalaki komona bango.​—Nz. 139:12.

12. (a) Ndenge nini bayekoli ya Kristo bazalaki kotalela minyoko, mpe mpo na nini? (b) Tii lelo oyo Satana ná bato na ye bazali kosalela mayele nini mpo na kotɛmɛla biso?

12 Bambula mingi liboso, Yesu ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bakonyokola mpe bino.” (Yoa. 15:20) Yango wana, ntango Paulo ná baninga na ye bakendaki na Masedonia, bayebaki malamu ete bakoki kokutana na botɛmɛli. Ntango minyoko eyaki, bamonaki te ete Yehova atiki bango, kasi basosolaki ete ezali Satana nde azali kolakisa nkanda na ye. Lelo oyo, bato oyo bazali na ngámbo ya Satana bazali kosalela mayele lokola oyo bato ya Filipi basalelaki. Na eteyelo to na esika ya mosala, banguna oyo batondi na lokuta bazali kokosela biso makambo mpo bato bátɛmɛla biso. Na mikili mosusu, bato ya mangomba oyo balingaka biso te bazali kofunda biso na batribinale ete: ‘Batatoli oyo bazali kokɔtisa mobulu na ndenge bazali koteya mimeseno oyo “bato ya mangomba na biso” bakoki kondima te.’ Na bisika mosusu, bandeko na biso bazali kobɛtama mpe kotyama na bolɔkɔ. Kasi, Yehova azali komona.​—1 Pe. 3:12.

“Babatisamaki kozanga koumela” (Misala 16:25-34)

13. Nini etindaki mokɛngɛli ya bolɔkɔ atuna ete: “Nasala nini mpo nabika?”

13 Na ntembe te, esɛngaki mwa ntango mpo Paulo ná Silasi bázongela makanisi na bango nsima ya makambo oyo bakutanaki na yango mokolo wana. Nzokande, na midi ya butu, babosanaki mpasi ya kobɛtama mpe “bazalaki kobondela mpe kosanzola Nzambe na nzembo.” Na mbala moko, koningana ya mabele eningisaki bolɔkɔ! Mokɛngɛli ya bolɔkɔ alamukaki, mpe ntango amonaki ete baporte ezali polele, akanisaki ete bakangami bakimi. Lokola ayebaki ete soki bato ya bolɔkɔ bakimi akozwa etumbu, “abendaki mopanga na ye mpe alingaki amiboma.” Kasi, Paulo agangaki ete: “Komisala mabe te, mpo biso nyonso tozali awa!” Mokɛngɛli ya bolɔkɔ atunaki: “Batata, nasala nini mpo nabika?” Paulo ná Silasi bakokaki kobikisa ye te; kaka Yesu nde akokaki kobikisa ye. Yango wana bapesaki ye eyano ete: “Ndimelá Nkolo Yesu mpe okobika.”​—Mis. 16:25-31.

14. (a) Ndenge nini Paulo ná Silasi basalisaki mokɛngɛli ya bolɔkɔ? (b) Paulo ná Silasi bazwaki mapamboli nini lokola bandimaki minyoko na esengo?

14 Mokɛngɛli ya bolɔkɔ atunaki mpenza motuna wana na bosembo? Paulo amonaki ete mobali yango azalaki motema sembo. Mokɛngɛli ya bolɔkɔ azalaki Moyuda te mpe ayebaki Makomami te. Mpo akóma mokristo, asengelaki naino koyekola mpe kondima mateya ya Biblia. Yango wana, Paulo ná Silasi bazwaki ntango ya koyebisa ye “liloba ya Yehova.” Mbala mosusu, ntango mibali yango bamipesaki na koteya Makomami, babosanaki mpasi ya mangenda oyo babɛtaki bango. Kasi, mokɛngɛli ya bolɔkɔ amonaki bampota minene na mikɔngɔ na bango mpe asukolaki yango. Na nsima, ye ná libota na ye “babatisamaki kozanga koumela.” Lokola Paulo ná Silasi bandimaki minyoko na esengo, bazwaki mpenza mapamboli!​—Mis. 16:32-34.

15. (a) Lelo oyo, ndenge nini Batatoli mingi balandaka ndakisa ya Paulo ná Silasi? (b) Mpo na nini tosengeli kosakola mbala na mbala epai ya bato ya teritware na biso?

15 Lokola Paulo ná Silasi, Batatoli mingi lelo oyo basakolaki nsango malamu ntango bakangamaki mpo na kondima na bango, mpe bazwelaki yango matomba. Na ndakisa, na ekólo moko oyo mosala na biso epekisamaki, na eleko moko boye Batatoli mingi (40 %) bayekolaki solo ntango bazalaki na bolɔkɔ! (Yis. 54:17) Tóbosana mpe te ete mokɛngɛli ya bolɔkɔ asɛngaki lisalisi nsima ya koningana ya mabele. Lelo oyo mpe, bato mosusu oyo bazalaki koboya nsango ya Bokonzi, bakoki kondima yango soki likambo moko ya mpasi ekómeli bango na bomoi na bango. Soki tozali mbala na mbala kokende kosakola epai ya bato ya teritware na biso, tokomonisa ete tozali mpenza na mposa ya kosalisa bango.

“Sikoyo bazali kobimisa biso na kobombana?” (Misala 16:35-40)

16. Nsima ya kobɛta Paulo ná Silasi fimbo, ndenge nini makambo ebongwanaki na mokolo oyo elandaki?

16 Na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki, bakambi-mboka bapesaki mitindo ete bábimisa Paulo ná Silasi na bolɔkɔ. Kasi, Paulo alobaki: “Babɛti biso fimbo na miso ya bato nyonso kozanga ete tókweisama na likambo, biso Baroma, mpe babwaki biso na bolɔkɔ. Sikoyo bazali kobimisa biso na kobombana? Te, ekosalema bongo te! Bango moko báya kobimisa biso.” Ntango bakambi-mboka bayokaki ete mibali yango mibale bazalaki Baroma, “babangaki makasi,” mpo batosaki ntomo na bango te. d Makambo ebongwanaki. Bakambi-mboka babɛtisaki bayekoli na miso ya bato nyonso; sikoyo, bango nde basengelaki kosɛnga bolimbisi na miso ya bato nyonso. Babondelaki Paulo ná Silasi ete bálongwa na Filipi. Bandeko yango mibale bandimaki, kasi bazwaki naino ntango ya kolendisa etuluku ya bayekoli ya sika oyo bazalaki kokóma mingi. Na nsima, balongwaki na engumba wana.

17. Liteya nini bayekoli ya sika bazwaki na komona ndenge oyo Paulo ná Silasi bayikaki mpiko?

17 Paulo ná Silasi balingaki mbala mosusu kobɛtama fimbo te soki ntomo na bango ya bana-mboka Roma etosamaki na ebandeli. (Mis. 22:25, 26) Nzokande, yango elingaki kopesa bayekoli ya Filipi likanisi ete mibali yango basalelaki ntomo na bango mpo bányokwama mpo na Kristo te. Ndenge nini bayekoli oyo bazalaki bana-mboka Roma te balingaki kotalela yango? Mibeko epekisaki te ete bábɛtama fimbo. Na yango, na ndenge bandimaki etumbu, Paulo ná moninga na ye bamonisaki bandimi ya sika ete bayekoli ya Kristo bakoki koyika mpiko na minyoko. Longola yango, lokola Paulo ná Silasi basɛngaki bakambi-mboka bándima ete batosaki ntomo na bango te, bamonisaki na miso ya bato ete bakonzi yango babukaki mibeko. Yango ekokaki kopekisa bango bányokola bandimi mosusu na nsima mpe kotinda bango bábatela bandimi yango soki bato balingi kosala bango mabe.

18. (a) Ndenge nini bakɛngɛli balandaka ndakisa ya Paulo lelo oyo? (b) Lelo oyo, ndenge nini ‘tokɔtelaka nsango malamu mpe tofandisaka yango na nzela ya mibeko’?

18 Lelo oyo, bakɛngɛli basengeli mpe kozala ndakisa malamu mpo na lisangá. Bakɛngɛli basalaka makambo nyonso oyo bayebisaka baninga na bango bakristo básala. Lokola Paulo, totalelaka malamu ndenge nini mpe ntango nini tosengeli kosalela ntomo na biso mpo bakonzi bábatela biso. Soki esengeli, tomemaka makambo na batribinale ya mboka, ya ekólo, to batribinale minene ya mokili mobimba mpo ebatela ntomo na biso ya kosambela. Mokano na biso ezalaka te ya kotinda bakonzi bábongola makambo na mboka, kasi tolukaka nde “kokɔtela nsango malamu mpe kofandisa yango na nzela ya mibeko,” ndenge Paulo akomelaki lisangá ya Filipi, mbula soki zomi nsima ya kokɔta bolɔkɔ kuna. (Flp. 1:7) Kasi, ata soki batribinale ezwi ekateli nini, lokola Paulo ná baninga na ye, tozali na mokano ya kokoba ‘kosakola nsango malamu’ epai nyonso oyo elimo ya Nzambe ekomema biso.​—Mis. 16:10.

a Talá etanda “ Luka​—Mokomi ya mokanda ya Misala,” na lokasa 128.

b Ekoki kozala ete bapekisaki Bayuda bátonga sinagoga na Filipi, mpo engumba yango ezalaki lokola mboka ya basoda. To mpe mibali ya engumba yango oyo bazalaki Bayuda bazalaki ata bato zomi te, motángo oyo esɛngamaki mpo na kotonga sinagoga.

c Talá etanda “ Lidia​—Motɛkisi ya bilamba ya motane-bulé,” na lokasa 132.

d Mibeko ya Roma elobaki ete mwana-mboka Roma asengelaki kosambisama na bosembo mpe basengelaki te kopesa ye etumbu na miso ya bato nyonso soki tribinale ekateli ye naino etumbu te.