MOKAPO 1
“Bókende mpe bókómisa bato bayekoli”
Mokanda ya Misala ya bantoma mpe litomba na yango mpo na biso
1-6. Lobelá likambo moko oyo emonisi ete Batatoli basakolaka na bisika mpe na mitindo ndenge na ndenge.
REBECCA, elenge moko Motatoli ya Yehova na ekólo Ghana, azalaki kotalela eteyelo na bango lokola teritware na ye mpo na kosakola. Na sakosi na ye, azalaki kozanga te mwa mikanda oyo elimbolaka Biblia. Na ntango ya bopemi, azalaki koluka mabaku ya kopesa baninga na ye ya kelasi litatoli. Rebecca abandaki koyekola Biblia na baninga na ye mingi ya kelasi.
2 Na Madagascar, esanga oyo ezali na ɛsti ya Afrika, mbala na mbala babongisi-nzela mibale bazalaki kotambola kilomɛtrɛ 25 na makolo, na moi makasi, mpo na kokende na mboka moko. Kuna, bayekolaki Biblia na bato mingi.
3 Batatoli ya ekólo Paraguay ná bandeko mosusu oyo bautaki na bikólo 15 batongaki mwa masuwa moko mpo esalisaka bango bákende kosakola epai ya bato oyo bafandaka na bamboka oyo ezali pembenipembeni ya Ebale Paraguay mpe Ebale Paraná. Masuwa yango oyo ekoki komema bato 12, esalisaki basakoli ya molende bámema nsango malamu na bisika oyo banzela ezali te mpo na kokóma kuna.
4 Na Alaska, Batatoli basalelaki libaku moko malamu mpo na kosakola nsango malamu epai ya bato oyo bayaka kotala mboka na bango na eleko ya molunge. Na eleko yango, bamasuwa eyaka na ebele ya bato ya bikólo ndenge na ndenge, mpe na ntango yango, Batatoli ya mboka yango batɛlɛmaka pembeni ya libongo mpe balakisaka mikanda oyo ezali na minɔkɔ ndenge na ndenge. Kaka na etúká yango, Batatoli basalelaka mpɛpɔ mpo na kokende na bamboka oyo ezali mosika, mpe na ndenge yango, basakolaka nsango malamu epai ya bato oyo balobaka monɔkɔ ya Aléoute, Athabascan, Tsimishian, mpe Tlingit.
5 Na etúká ya Texas, na États-Unis, Larry azalaki na teritware na ye moko: ndako ya mibange epai afandaka. Atako atambolaka na kiti ya bibɔsɔnɔ mpo asalaki aksida, Larry azalaki na mosala mingi. Ayebisaki bato mosusu nsango ya Bokonzi mpe elikya na ye oyo euti na Biblia ete ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela mokili, akotambola lisusu.—Yis. 35:5, 6.
6 Etuluku moko ya Batatoli basalaki mobembo ya mikolo misato na masuwa longwa na engumba Mandalay mpo na kokende na liyangani moko na nɔrdi ya ekólo Birmanie. Lokola bazalaka na mposa makasi ya koyebisa bato nsango malamu, bamemaki mikanda oyo elimbolaka Biblia mpe bazalaki kokabola yango epai ya bato oyo bazalaki kosala na bango mobembo. Mbala nyonso oyo masuwa etɛlɛmi na engumba to na mboka moko, basakoli yango bazalaki kokita nokinoki mpe kokɔta na mboka yango mpo na kokabola mikanda. Na bisika yango, bato mosusu oyo bazalaki komata na masuwa bazalaki lokola “teritware ya sika” mpo na basakoli wana.
7. Ndenge nini basaleli ya Yehova bapesaka litatoli mpo na Bokonzi ya Nzambe, mpe mokano na bango ezalaka nini?
7 Ndenge moko na bandeko basi mpe mibali oyo tolobeli, na mokili mobimba, basaleli ya molende ya Yehova bazali ‘kopesa litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe.’ (Mis. 28:23) Basakolaka ndako na ndako, na babalabala, bakomaka mikanda mpe basakolaka na nzela ya telefone. Ezala bazali na motuka, to bazali kotambola na parke, to mpe na ntango ya bopemi na mosala, basalelaka mabaku nyonso mpo na kopesa litatoli mpo na Bokonzi ya Nzambe. Bakoki kosalela mayele ndenge na ndenge, kasi bazalaka kaka na mokano moko: koyebisa bato nsango malamu ya Bokonzi na bisika nyonso oyo bakoki kokutana na bango.—Mat. 10:11.
8, 9. (a) Mpo na nini bokoli ya mosala ya kosakola ezali mpenza likamwisi? (b) Motuna nini tosengeli komituna, mpe tosengeli kosala nini mpo na kozwa eyano?
8 Yo mpe ozali na kati ya ebele ya basakoli ya Bokonzi oyo bazali kosala mosala yango na mikili koleka 235? Soki ezali bongo, yebá ete ozali kopesa mabɔkɔ na mosala oyo ezali se kokola! Mosala oyo esalemi na mokili mobimba ezali mpenza likamwisi. Ata na kati ya mikakatano ndenge na ndenge, na ndakisa Leta azali kopekisa mosala na bango to mpe azali konyokola bango, Batatoli ya Yehova bazali kopesa litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe epai ya bato ya bikólo nyonso.
9 Motuna oyo tosengeli komituna yango oyo: Mpo na nini mikakatano ya ndenge nyonso, ata mpe botɛmɛli makasi, elongi te kosukisa mosala ya kosakola? Mpo na kozwa eyano na motuna yango, tosengeli kotalela makambo oyo esalemaki na siɛklɛ ya liboso T.B. Kutu, biso Batatoli ya Yehova ya ntango oyo, tozali nde kokoba mosala oyo ebandaki na ntango wana.
Mokumba moko monene
10. Yesu amipesaki na mosala nini, mpe ayebaki nini mpo na mosala yango?
10 Yesu Kristo, Mobandisi ya lisangá ya bokristo, amipesaki na mosala ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi; ezalaki mosala ya bomoi na ye mobimba. Mokolo moko alobaki boye: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43) Yesu ayebaki ete abandisaki mosala oyo akokaki te kosilisa yango ye moko. Mwa mikolo liboso akufa, alobaki ete nsango malamu ya Bokonzi ekosakolama “na bikólo nyonso.” (Mrk. 13:10) Kasi, ndenge nini mosala yango elingaki kosalema, mpe nani alingaki kosala yango?
11. Mosala nini ya ntina mingi Yesu apesaki bayekoli na ye, mpe nini esengelaki kosalisa bango mpo bákokisa yango?
11 Nsima ya lisekwa na ye, Yesu abimelaki bayekoli na ye mpe apesaki bango mokumba moko monene; alobaki na bango boye: “Na yango, bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, bóbatisa bango na nkombo ya Tata mpe ya Mwana mpe ya elimo santu, bóteya bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino mitindo. Mpe talá! nazali elongo na bino mikolo nyonso tii na eleko ya nsuka ya mokili.” (Mat. 28:19, 20) Maloba “nazali elongo na bino” emonisi ete asengelaki kosalisa bayekoli na ye na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. Bayekoli bazalaki na mposa ya lisalisi wana mpamba te Yesu alobaki ete “bikólo nyonso ekoyina” bango. (Mat. 24:9) Bayekoli bazalaki na eloko mosusu oyo ekokaki kosalisa bango. Liboso Yesu amata na likoló, ayebisaki bango ete bakozwa nguya na nzela ya elimo santu mpo bázala batatoli na ye “na esika eleki mpenza mosika na mabele.”—Mis. 1:8.
12. Mituna nini ya ntina mingi ezali kotunama, mpe mpo na nini tosengeli koyeba biyano na mituna yango?
12 Mituna ya ntina mingi yango oyo: Bantoma mpe bayekoli mosusu ya siɛklɛ ya liboso bakokisaki mpenza mosala yango? Mwa etuluku wana ya bakristo bapesaki litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe, ata ntango bakutanaki na minyoko makasi? Bazwaki mpenza lisalisi ya elimo santu ya Nzambe na mosala ya kokómisa bato bayekoli? Mokanda ya Misala epesi biyano na mituna yango mpe na mituna mosusu oyo eyokani na yango. Ezali na ntina mingi tóyeba biyano yango. Mpo na nini? Mpamba te Yesu alakaki ete mosala oyo apesaki bayekoli na ye ekokoba “tii na eleko ya nsuka ya mokili.” Yango emonisi ete etinda yango etaleli bakristo nyonso ya solo, ata mpe biso oyo tozali na bomoi na ntango ya nsuka. Yango wana, tosengeli kotya likebi na makambo oyo ezali na mokanda ya Misala.
Mokanda ya Misala
13, 14. (a) Nani akomaki mokanda ya Misala, mpe ndenge nini ayebaki makambo oyo akomaki? (b) Mokanda ya Misala elobeli makambo nini?
13 Nani akomaki mokanda ya Misala? Mokanda yango eyebisi nkombo ya moto yango te; kasi, maloba na yango ya ebandeli emonisi polele ete moto oyo akomaki yango, ye mpe moto akomaki Evanzile ya Luka. (Luka 1:1-4; Mis. 1:1, 2) Na yango, eyebani banda kala ete Luka, monganga mpe mokomi ya makambo ya kala, nde akomaki mokanda ya Misala. (Kol. 4:14) Mokanda yango elobeli makambo oyo esalemaki na boumeli ya mbula soki 28, banda ntango Yesu amataki na likoló na mobu 33 T.B. tii ntango ntoma Paulo akɔtaki bolɔkɔ na Roma, na mobu soki 61 T.B. Lokola Luka abandaki kosalela liloba “bango” mpe na nsima akómaki kosalela liloba “biso,” yango emonisi ete azalaki wana ntango makambo mosusu oyo akomaki ezalaki kosalema. (Mis. 16:8-10; 20:5; 27:1) Lokola Luka alukaki koyeba makambo na bosikisiki, na ntembe te atunaki Paulo, Barnabasi, Filipe, mpe bato mosusu oyo alobeli na mokanda na ye.
14 Mokanda ya Misala elobeli makambo nini? Na Evanzile na ye, Luka akomaki makambo oyo Yesu alobaki mpe asalaki. Nzokande, na mokanda ya Misala, Luka akomaki makambo oyo bayekoli ya Yesu balobaki mpe basalaki. Na yango, mokanda ya Misala elobeli bato oyo basalaki mosala moko monene, atako mingi kati na bango bazalaki kotalelama lokola “bato batángá kelasi te mpe bato mpamba.” (Mis. 4:13) Na mokuse, lisolo yango eyebisi biso ndenge lisangá ya bokristo esalemaki mpe ndenge ebandaki kokola. Mokanda ya Misala emonisi ndenge bakristo ya siɛklɛ ya liboso bazalaki kosakola, mayele oyo bazalaki kosalela mpe ndenge bazalaki kotalela mosala yango. (Mis. 4:31; 5:42) Mokanda yango ezali mpe komonisa ndenge oyo elimo santu esalisaki bakristo bápalanganisa nsango malamu. (Mis. 8:29, 39, 40; 13:1-3; 16:6; 18:24, 25) Mokanda ya Misala emonisi motó ya likambo ya Biblia, oyo etaleli mpe kosantisama ya nkombo ya Nzambe na nzela ya Bokonzi na ye oyo Kristo akotambwisa, mpe emonisi ndenge oyo nsango ya Bokonzi epalanganaki atako botɛmɛli ezalaki makasi.—Mis. 8:12; 19:8; 28:30, 31.
15. Boyekoli ya mokanda ya Misala ekosalisa biso na makambo nini?
15 Na ntembe te, koyekola mokanda ya Misala ekosepelisa biso mpe ekolendisa kondima na biso! Soki tomanyoli ndakisa ya mpiko mpe ya molende ya bayekoli ya Kristo ya siɛklɛ ya liboso, yango ekosimba mitema na biso. Ekotinda biso tómekola kondima ya bandeko wana ya siɛklɛ ya liboso. Na ndenge yango, tokozala na nyonso oyo esengeli mpo na kokokisa mokumba na biso ya ‘kokende mpe kokómisa bato bayekoli.’ Buku oyo ebongisami mpo na kosalisa yo oyekola malamumalamu mokanda ya Misala.
Buku oyo ekosalisa biso
16. Buku oyo ezali na mokano nini?
16 Mokano ya buku oyo ezali nini? Buku oyo ezali na mokano ya (1) kolendisa kondima na biso ete Yehova, na nzela ya elimo santu na ye, azali kotambwisa mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli, (2) kobakisa molende na biso na mosala ya kosakola ntango tozali kotalela ndakisa ya bayekoli ya Kristo ya siɛklɛ ya liboso, mpe (3) kosalisa biso tózala na limemya makasi mpo na ebongiseli ya Yehova mpe mpo na baoyo bazali kokamba mosala ya kosakola mpe bakɛngɛli na masangá.
17, 18. Mokanda oyo ebongisami ndenge nini, mpe makambo nini ekosalisa moto oyo azali koyekola yango?
17 Buku oyo ebongisami ndenge nini? Okomona ete buku oyo ekabolami na biteni mwambe oyo mokomoko na yango elobeli mwa mikapo ya mokanda ya Misala. Mokano ya mikapo yango ezali te ya koyekola vɛrsɛ mokomoko ya mokanda ya Misala, kasi ya kozwa mateya na makambo oyo ezali na mokanda yango mpe kosalisa biso tóyeba ndenge oyo tokoki kosalela makambo oyo toyekoli. Na ebandeli ya mokapo mokomoko, ezali na mwa maloba oyo emonisi makanisi ya ntina ya mokapo yango mpe eteni ya mokanda ya Misala oyo mokapo yango elobeli.
18 Ezali mpe na makambo mosusu oyo ekosalisa yo mingi ntango ozali koyekola buku oyo. Bililingi kitoko ya makambo oyo elobelami na mokanda ya Misala ekosalisa yo omona na makanisi ndenge oyo makambo yango esalemaki. Mikapo mingi ezali mpe na bitanda oyo elobeli makambo mosusu oyo ekoki kosalisa yo. Bitanda mosusu eyebisi biso makambo ya bato oyo Biblia elobeli, oyo tokoki komekola kondima na bango. Bitanda mosusu elobeli bisika, makambo, mimeseno, mpe bato mosusu oyo mokanda ya Misala elobeli.
19. Mituna nini tosengeli komitunaka?
19 Buku oyo ekoki kosalisa yo omitalela na bosembo mpenza. Ata soki ozali mosakoli ya Bokonzi banda bambula mingi to te, ezali malamu ozwaka mbala na mbala ntango ya kofanda mpe kokanisa mpo na koyeba makambo nini ozali kotya na esika ya liboso na bomoi na yo mpe ndenge oyo ozali kotalela mosala ya kosakola. (2 Ko. 13:5) Osengeli komituna mituna oyo: ‘Nazali kosala mosala oyo na likanisi ete mikolo etikali ya kotánga? (1 Ko. 7:29-31) Nazali kosakola nsango malamu na molende mpe na mpiko? (1 Tes. 1:5, 6) Nazali mpenza komipesa na mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli?’—Kol. 3:23.
20, 21. Mpo na nini tosengeli kokokisa mokumba na biso na lombangu, mpe tosengeli kozala na ekateli nini?
20 Tóbosanaka te ete tozali na mokumba ya kokokisa mosala moko ya ntina mingi: kosakola mpe kokómisa bato bayekoli. Mokolo nyonso oyo ezali koleka esengeli kozongisa na makanisi na biso ete mikolo etikali mpenza ya kotánga. Nsuka ya makambo ya ntango oyo ekómi pene. Bomoi ya bato mingi ezali mpenza na likama. Toyebi te bato boni lisusu ya mitema sembo bakondima nsango oyo tozali kosakola. (Mis. 13:48) Kasi, mokumba na biso ezali ya kosalisa bango liboso nsuka eya.—1 Tim. 4:16.
21 Yango wana, ezali na ntina mingi tólanda ndakisa ya basakoli ya molende ya siɛklɛ ya liboso. Tozali na elikya ete boyekoli ya buku oyo ekobakisa molende mpe mpiko na yo na mosala ya kosakola. Tozali mpe na elikya ete boyekoli yango ekolendisa ekateli na yo ya kokoba ‘kopesa litatoli malamumalamu mpo na Bokonzi ya Nzambe.’—Mis. 28:23.