MOKAPO 11
“Batondaki na esengo mpe na elimo santu”
Makambo oyo Paulo asalaki ntango bato baboyaki koyoka nsango malamu mpe bazalaki kotɛmɛla ye
Euti na Misala 13:1-52
1, 2. Na ndenge nini mobembo ya Barnabasi ná Saulo ekesanaki na oyo basakoli mosusu basalaki, mpe ndenge nini mosala na bango esengelaki kosalisa mingi mpo Misala 1:8 ekokisama?
EZALAKI mokolo ya esengo mpo na bandeko ya lisangá ya Antiokia. Na kati ya basakoli mpe bateyi nyonso oyo bazalaki na lisangá yango, elimo santu eponaki Barnabasi ná Saulo mpo bákende kosakola nsango malamu na bamboka ya mosika. a (Mis. 13:1, 2) Ezali solo ete liboso, mibali mosusu ya makoki batindamaki na bamboka mosusu. Kasi, mibali wana bakendaki na bamboka oyo mateya ya bokristo esilaki kokɔta. (Mis. 8:14; 11:22) Nzokande, na mbala oyo, Barnabasi ná Saulo—elongo na Yoane Marko, oyo azalaki mosaleli na bango—basengelaki kokende na bamboka oyo bato mingi bayokaki naino nsango malamu te.
2 Mbula soki 14 liboso, Yesu alobaki na bayekoli na ye boye: “Bokozala batatoli na ngai na Yerusaleme mpe na Yudea mobimba, na Samaria mpe tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.” (Mis. 1:8) Koponama ya Barnabasi ná Saulo lokola bamisionɛrɛ esengelaki kosalisa mingi mpo maloba wana ya Yesu ekokisama! b
Batyami pembeni “mpo na mosala” (Mis. 13:1-12)
3. Mpo na nini kosala mobembo molai ezalaki mpasi na siɛklɛ ya liboso?
3 Lelo oyo, lokola tozali na mituka mpe bampɛpɔ, moto akoki kosala mobembo molai na ngonga moko to mibale. Kasi, ezalaki bongo te na siɛklɛ ya liboso T.B. Na ntango wana, mpo na kosala mobembo na nzela ya mabele, mbala mingi esengelaki kotambola na makolo, mpe banzela ezalaki malamu te. Soki moto atamboli mokolo mobimba, akokaki kosala kilomɛtrɛ 30 mpe azalaki kolɛmba mingi! c Na ntembe te, atako Barnabasi ná Saulo bazalaki na mposa ya kobanda mosala na bango, bayebaki mpe ete yango ekosɛnga kosala milende mpe komipimela.—Mat. 16:24.
4. (a) Nini etambwisaki koponama ya Barnabasi ná Saulo, mpe ndenge nini bandeko batalelaki koponama na bango? (b) Ndenge nini tokoki kosepela elongo na bandeko oyo bazwi mikumba na kati ya lisangá?
4 Mpo na nini elimo santu eponaki kaka Barnabasi ná Saulo ete bátyama pembeni “mpo na mosala”? (Mis. 13:2) Biblia elobeli yango te. Toyebi ete bato yango baponamaki na litambwisi ya elimo santu. Biblia elobi te ete basakoli mpe bateyi oyo bazalaki na Antiokia baboyaki ekateli wana. Bango nyonso bandimaki koponama ya Barnabasi ná Saulo. Kanisá ndenge Barnabasi ná Saulo basepelaki ntango bandeko, na kozanga zuwa, bakilaki bilei mpe babondelaki mpe “batyelaki bango mabɔkɔ mpe batikaki bango bákende.” (Mis. 13:3) Biso mpe tosengeli kosepela elongo na bandeko oyo bazwi mikumba na kati ya lisangá, ata mpe baoyo baponami lokola bakɛngɛli. Na esika ya koyokela bandeko oyo bazwi mikumba zuwa, tosengeli ‘kopesa bango lokumu oyo eleki mpenza na kati ya bolingo mpo na mosala na bango.’—1 Tes. 5:13.
5. Lobelá ndenge oyo litatoli epesamaki na esanga ya Shipre.
5 Nsima ya kotambola tii na Selukia, libongo oyo ezalaki pene na Antiokia, Barnabasi ná Saulo bazwaki masuwa mpo na kosala mobembo ya kilomɛtrɛ soki 160 tii na esanga ya Shipre. d Lokola Barnabasi abotamaki na Shipre, na ntembe te, azalaki na mposa makasi ya komemela bato ya mboka na ye nsango malamu. Ntango bakómaki na Salamisi, engumba moko oyo ezalaki na ngámbo ya ɛsti ya esanga ya Shipre, babungisaki ntango te. Mbala moko, “babandaki kosakola liloba ya Nzambe na basinagoga ya Bayuda.” e (Mis. 13:5) Barnabasi ná Saulo bakatisaki esanga ya Shipre mobimba; na ntembe te, bazalaki kopesa litatoli na bingumba nyonso ya minene oyo ezalaki na nzela na bango. Ekoki kozala ete bamisionɛrɛ yango batambolaki kilomɛtrɛ soki 160!
6, 7. (a) Serguisi Paulusi azalaki nani, mpe mpo na nini Bara-Yesu alukaki kopekisa ye ayoka nsango malamu? (b) Ndenge nini Saulo atɛmɛlaki Bara-Yesu?
6 Na siɛklɛ ya liboso, bato mingi ya Shipre bamipesaki na losambo ya lokuta. Barnabasi ná Saulo bamonaki yango mpenza ntango bakómaki na Pafosi, na bokula ya wɛsti ya esanga yango. Kuna bakutanaki na “Moyuda moko, nkombo na ye Bara-Yesu oyo azalaki nganga-nkisi mpe mosakoli ya lokuta. Azalaki elongo na prokonsule Sergiusi Paulusi, mobali moko ya mayele.” f Na siɛklɛ ya liboso, ata Baroma oyo bayebaki makambo mingi—na ndakisa Sergiusi Paulusi, oyo azalaki “mobali moko ya mayele,”—bazalaki kotuna banganga-nkisi to banganga-minzoto liboso ya kozwa bikateli ya minene. Atako bongo, Serguisi Paulusi asepelaki na nsango ya Bokonzi mpe “azalaki na mposa makasi ya koyoka liloba ya Nzambe.” Bara-Yesu, oyo ayebanaki mpe na nkombo ya Elimasi, elingi koloba “nganga-nkisi,” asepelaki na likambo yango te.—Mis. 13:6-8.
7 Bara-Yesu atɛmɛlaki nsango ya Bokonzi. Lokola azalaki mopesi-toli ya Serguisi Paulusi, amonaki ete mpo abatela mosala na ye, asengeli “kopɛngwisa prokonsule na kondima.” (Mis. 13:8) Kasi Saulo akokaki te kotika moto wana ya maji apekisa Serguisi Paulusi ayoka nsango malamu. Asalaki nini? Biblia elobi boye: “Saulo, oyo azali mpe Paulo, lokola atondaki na elimo santu, atalaki ye [Bara-Yesu] na likebi mpenza mpe alobaki: ‘Ee moto atondi na bokosi ya ndenge nyonso mpe na bizaleli mabe ya ndenge nyonso, yo mwana ya Zabolo, yo monguna ya makambo nyonso ya bosembo, okotika te kotɛngisa banzela ya sembo ya Yehova? Talá! Lobɔkɔ ya Yehova ezali kokitela yo, okokufa miso, okomona pole ya moi te mpo na mwa ntango.’ Na ntango wana kaka, londende moko ya makasi mpe molili ekwelaki ye, mpe akómaki kobalukabaluka mpo na koluka moto abenda ye na lobɔkɔ.” g Likamwisi wana esalaki nini? “Ntango prokonsule amonaki likambo oyo esalemi, akómaki mondimi, mpo mateya ya Yehova ekamwisaki ye.”—Mis. 13:9-12.
8. Ndenge nini tokoki komekola mpiko ya Paulo lelo oyo?
8 Paulo abangaki Bara-Yesu te. Biso mpe tosengeli te kobanga batɛmɛli ntango balingi kopɛngwisa bato oyo bazali kosepela na nsango malamu. Ya solo, tokosala makasi mpo maloba na biso “ezala ntango nyonso kitoko, eyeisama elɛngi na mungwa.” (Kol. 4:6) Kasi, tosengeli te kotika kosalisa moto oyo asepeli na nsango malamu kaka mpo na koboya mindɔndɔ ná batɛmɛli na biso. Tokobanga mpe te komonisa polele mateya ya mangomba ya lokuta, oyo ezali kokoba “kotɛngisa banzela ya sembo ya Yehova” ndenge Bara-Yesu asalaki. (Mis. 13:10) Na ndakisa ya Paulo, tósakola na molende mpe tósimba mitema ya bato ya sembo. Ata soki Nzambe asali te makamwisi ya polele na nzela na biso ndenge asalaki na nzela ya Paulo, tóyeba ete akosalela elimo santu na ye mpo na kobenda na losambo ya solo bato oyo babongi.—Yoa. 6:44.
“Liloba ya kolendisa” (Misala 13:13-43)
9. Na ndenge nini Paulo ná Barnabasi bapesaki ndakisa malamu mpo na bandeko oyo bazali kokamba lisangá lelo oyo?
9 Emonani ete mbongwana moko esalemaki ntango bamisionɛrɛ balongwaki na Pafosi mpe bazwaki masuwa mpo na kokende na Perga, engumba oyo ezali na bokula ya Azia Moke, na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 250 na nzela ya mai. Misala 13:13 emonisi ete ezalaki “Paulo ná baninga na ye.” Elobeli yango ezali kopesa likanisi ete Paulo nde akómaki kokamba etuluku wana. Kasi, Biblia elobi te ete Barnabasi akómaki koyokela Paulo zuwa. Kutu, bango mibale bakobaki kosala elongo mpo na kokokisa mokano ya Nzambe. Paulo ná Barnabasi bazali ndakisa malamu mpo na bandeko oyo bazali kokamba lisangá lelo oyo. Na esika ya koluka lokumu, bakristo babosanaka te maloba ya Yesu oyo: “Bino nyonso bozali bandeko.” Kutu, abakisaki ete: “Moto nyonso oyo azali komitombola akokitisama, mpe moto nyonso oyo azali komikitisa akotombwama.”—Mat. 23:8, 12.
10. Lobelá mobembo ya bamisionɛrɛ longwa na Perga tii na Antiokia ya Pisidia.
10 Ntango bakómaki na Perga, Yoane Marko atikaki Paulo ná Barnabasi mpe azongaki na Yerusaleme. Ntina oyo azongaki eyebani te. Kasi, Paulo ná Barnabasi bakobaki mobembo na bango; balongwaki na Perga mpe bakómaki na Antiokia ya Pisidia, engumba moko oyo ezali na etúká ya Galatia. Ezalaki mobembo ya pɛtɛɛ te, mpamba te Antiokia ya Pisidia ezalaki likoló ya ngomba oyo ezali na molai ya mɛtrɛ soki 1 100. Banzela wana ya bangomba ezalaki na makama mingi mpe eyebanaki ete miyibi bazalaki kobimela bato. Lisusu, ekoki kozala ete na ntango yango, Paulo akómaki kobɛla. h
11, 12. Ndenge nini Paulo abendaki likebi ya bato oyo alobaki na bango na sinagoga na Antiokia ya Pisidia?
11 Na Antiokia ya Pisidia, Paulo ná Barnabasi bakɔtaki na sinagoga mokolo ya sabata. Lisolo elobi boye: “Nsima ya kotángama ya Mibeko mpe Basakoli liboso ya bato nyonso, bakambi ya sinagoga batindelaki bango maloba: ‘Mibali, bandeko, soki bozali na mwa liloba ya kolendisa bato, bóloba yango.’” (Mis. 13:15) Paulo atɛlɛmaki mpo na koloba.
12 Paulo alobaki mbala moko na bayangani ete: “Mibali, Bayisraele mpe bino bamosusu oyo bobangaka Nzambe.” (Mis. 13:16) Bayangani yango bazalaki Bayuda ná baprozelite. Ndenge nini Paulo abendaki likebi ya bayoki na ye oyo bayebaki te ete Yesu azali na mokumba ya ntina mingi mpo na kokokisama ya mokano ya Nzambe? Ya liboso, Paulo azongelaki na mokuse lisolo ya ekólo ya Bayuda. Alimbolaki ndenge oyo Yehova “akómisaki bato oyo ekólo ya nguya ntango bafandaki bapaya na mokili ya Ezipito” mpe nsima ya kolongola bango na boombo, “akangaki motema na etamboli na bango na esobe” na boumeli ya mbula 40. Paulo alobelaki mpe ndenge oyo Bayisraele bazwaki Mokili ya Ndaka mpe ndenge oyo Yehova “apesaki mokili na bango libula epai ya bankɔkɔ na biso.” (Mis. 13:17-19) Bato mosusu balobaka ete ekoki kozala ete Paulo azongelaki makambo mosusu oyo ezalaki na mikapo ya Makomami oyo eutaki kotángama na mongongo makasi na mokolo wana ya Sabata. Soki ezali bongo, yango ezali ndakisa mosusu oyo emonisi ete Paulo ayebaki ndenge ya ‘kokóma makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso.’—1 Ko. 9:22.
13. Ndenge nini tokoki kosimba mitema ya bato oyo tozali koteya?
13 Esengeli ete biso mpe tólukaka kosimba mitema ya bato oyo tozali koteya. Na ndakisa, soki toyebi bindimeli ya moto oyo tozali koteya, tokoki kopona lisolo oyo ekosepelisa ye. Tokoki mpe kolobela bavɛrsɛ ya Biblia oyo moto yango ayebi malamu. Ekoki mpe kozala malamu ete moto atánga bavɛrsɛ na Biblia na ye. Lukáká ndenge ya kosimba mitema ya bato oyo ozali koteya.
14. (a) Ndenge nini Paulo abandaki lisolo mpo na kolobela nsango malamu na ntina na Yesu, mpe likebisi nini apesaki? (b) Bato basalaki nini nsima ya koyoka diskur ya Paulo?
14 Na nsima, Paulo alobelaki ndenge oyo kokitana ya bakonzi ya Yisraele ememaki tii na “mobikisi, Yesu,” moto oyo Yoane Mobatisi abongiselaki nzela. Na nsima Paulo alobelaki ndenge Yesu abomamaki mpe asekwaki. (Mis. 13:20-37) Paulo alobaki boye: “Yango wana, bandeko, bóyeba ete na nzela ya Moto yango kolimbisama ya masumu ezali kosakolama epai na bino . . . Moto nyonso oyo azali kondima atángami moto azangi ngambo na nzela ya moto wana.” Na nsima, ntoma apesaki likebisi oyo: “Bókeba ete oyo elobami na Basakoli ekómela bino te: ‘Bótala yango, bino batyoli, mpe bókamwa, mpe bólimwa, mpo nazali kosala mosala moko na mikolo na bino, mosala oyo bokondima yango soki moke te ata soki moto ayebisi bino yango mokomoko.’” Bato basepelaki mpenza na diskur ya Paulo! Biblia elobi boye: “Bato babondelaki bango mpo bálobela bango makambo wana na sabata oyo ekolanda.” Lisusu, ntango bayangani bapanzanaki, “mingi na kati ya Bayuda mpe baprozelite oyo bazalaki kosambela Nzambe balandaki Paulo ná Barnabasi.”—Mis. 13:38-43.
“Tobaluki epai ya bikólo” (Misala 13:44-52)
15. Nini esalemaki na sabata oyo elandaki?
15 Na sabata oyo elandaki, “pene na engumba mobimba” eyanganaki mpo na koyoka Paulo. Yango esepelisaki Bayuda mosusu te, “babandaki kotɛmɛla na kofinga mpenza makambo oyo Paulo azalaki koloba.” Ye ná Barnabasi bayebisaki bango na mpiko nyonso ete: “Esengelaki liloba ya Nzambe esakolama liboso epai na bino. Lokola bozali kobwaka yango mpe komona ete bobongi te na bomoi ya seko, talá! tobaluki epai ya bikólo. Mpo Yehova apesi biso mitindo na maloba oyo: ‘Natye yo mpo ozala pole ya bikólo, mpo ozala lobiko tii na bansuka ya mabele.’”—Mis. 13:44-47; Yis. 49:6.
16. Bayuda basalaki nini ntango bayokaki maloba ya polele oyo bamisionɛrɛ balobaki na bango, mpe Paulo ná Barnabasi basalaki nini ntango batɛmɛlaki bango?
16 Bato ya bikólo oyo balandaki diskur yango basepelaki, mpe “baoyo nyonso bazalaki na ezaleli oyo ebongi mpo na bomoi ya seko bakómaki bandimi.” (Mis. 13:48) Mosika te, Liloba ya Yehova epalanganaki na ekólo mobimba. Bayuda bandimaki nsango malamu te. Kutu, bamisionɛrɛ yango bayebisaki bango ete atako bango nde bayokaki Liloba ya Nzambe liboso, baboyaki Masiya mpe na bongo, basengelaki kozwa etumbu ya Nzambe. Bayuda batombokisaki basi ya lokumu mpe bato minene ya engumba, “mpe babimiselaki Paulo ná Barnabasi monyoko mpe babwakaki bango libándá ya bandelo ya mboka na bango.” Paulo ná Barnabasi basalaki nini? “Bapupolelaki bango putulu ya makolo na bango mpe bakendaki na Ikoniumu.” Yango elimboli nde ete na nsima, bakristo bazalaki lisusu te na Antiokia ya Pisidia? Te! Bayekoli oyo batikalaki kuna “bakobaki kotonda na esengo mpe na elimo santu.”—Mis. 13:50-52.
17-19. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Paulo ná Barnabasi, mpe ndenge nini kosala bongo ekoki kopesa biso esengo?
17 Ndenge oyo bakristo wana ya sembo basalaki ntango batɛmɛlaki bango epesi biso liteya moko ya ntina mingi. Ata soki bakonzi bapekisi, tokoki te kotika kosakola nsango malamu. Tomoni mpe ete ntango bato ya Antiokia baboyaki nsango malamu, Paulo ná Barnabasi “bapupolelaki bango putulu ya makolo na bango.” Yango elingi koloba te ete basilikelaki bato ya mboka yango; kasi emonisaki ete Paulo ná Barnabasi bazalaki na ngambo te na likambo oyo esengelaki kokómela bato wana. Bamisionɛrɛ yango bamonaki ete bakokaki te kosala ete bato bázwa ekateli ya kondima to koboya nsango malamu. Eloko bayebaki ezali ete bakokaki kozwa ekateli ya kokoba kosakola to te. Mpe ntango bakendaki na Ikoniumu, bakobaki kosakola!
18 Bayekoli oyo batikalaki na Antiokia basalaki nini? Ya solo, bato ya mboka yango bazalaki kosepela na nsango malamu te. Kasi esengo na bango etalelaki te ndenge oyo bato bakoyamba nsango malamu. Yesu alobaki boye: “Esengo nde na baoyo bazali koyoka liloba ya Nzambe mpe kotosa yango!” (Luka 11:28) Bayekoli ya Antiokia ya Pisidia bazwaki ekateli ya kotosa liloba ya Nzambe.
19 Na ndakisa ya Paulo ná Barnabasi, tóbosanaka te ete mokumba na biso ezali ya kosakola nsango malamu. Bato oyo tozali kosakwela nde bakozwa ekateli ya kondima to koboya nsango malamu. Soki bato oyo tozali kosakwela baboyi nsango malamu, tosengeli kolanda ndakisa ya bayekoli ya siɛklɛ ya liboso. Soki tozali kosepela mingi na mateya ya solo mpe tozali kotika ete elimo santu etambwisa biso, biso mpe tokozala na esengo ata soki tokutani na botɛmɛli.—Gal. 5:18, 22.
a Talá etanda “ Barnabasi—‘Mwana ya Libɔndisi,’” na lokasa 86.
b Na ntango wana, masangá esilaki kofungwama na bamboka mosika lokola Antiokia ya Siri, oyo ezalaki na ntaka ya kilomɛtrɛ soki 550 na nɔrdi ya Yerusaleme.
c Talá etanda “ Mibembo na banzela ya mabele,” na lokasa 87.
d Na siɛklɛ ya liboso, masuwa ekokaki kotambola kilomɛtrɛ soki 150 na mokolo moko soki mipɛpɛ ezali kobɛta yango na liboso te. Soki mipɛpɛ ezali kobɛta na liboso, masuwa ezalaki kosala bakilomɛtrɛ ya ndenge wana na boumeli ya mwa mikolo.
e Talá etanda “ Na basinagoga ya Bayuda,” na lokasa 89.
f Shipre etambwisamaki na Sena ya Roma. Sena ezalaki kopona guvɛrnɛrɛ mpo na koyangela esanga yango mpe azalaki na lokumu ya prokonsule.
g Kobanda na vɛrsɛ oyo, Saulo akómi kobengama Paulo. Bato mosusu bakanisaka ete azwaki nkombo wana ya Baroma mpo na kosepelisa Sergiusi Paulusi. Nzokande, lokola akobaki kobengama Paulo ata ntango alongwaki na Shipre, yango emonisi ete lokola azalaki “ntoma ya bikólo,” azwaki ekateli akóma kobengama na nkombo na ye ya Baroma. Mbala mosusu mpe akómaki kosalela nkombo Paulo mpamba te soki Mogrɛki abengi nkombo na ye ya Ebre Saulo, ezalaki koyokana ndenge moko na liloba moko ya Grɛki oyo ezali liloba ya nsɔni.—Rom. 11:13.