MOKAPO 23
“Bóyoka kosamba na ngai”
Paulo alongisi solo liboso ya ebele ya bato oyo bazali na nkanda mpe liboso ya Sanedrina
Euti na Misala 21:18–23:10
1, 2. Mpo na nini Paulo akei na Yerusaleme, mpe mikakatano nini akokutana na yango kuna?
PAULO azali lisusu kotambola na babalabala mikemike ya Yerusaleme oyo etondi na bato! Engumba yango ezali na ntina mingi koleka engumba mosusu nyonso awa na mabele mpo na boyokani ya Yehova ná bato na ye. Bafandi mingi ya engumba yango bakumisaka yango mpo na makambo minene oyo esalemá kuna. Paulo ayebi ete bakristo mingi oyo bafandi na Yerusaleme bazali mpe kotya motema na makambo yango, bazali te kolanda ndenge oyo mokano ya Yehova ezali kokokisama. Yango wana, Paulo amoni ete longola mposa ya lisalisi ya mosuni oyo bandeko ya Yerusaleme bazali na yango, oyo etindaki ye, ntango azalaki na Efese, azwa ekateli ya koya lisusu na Yerusaleme, bandeko bazalaki mpe na mposa ya lisalisi ya elimo. (Mis. 19:21) Atako Paulo ayebaki ete akoki kokutana na mikakatano, akangamaki na mokano na ye.
2 Kasi, makambo nini Paulo akokutana na yango na Yerusaleme? Mokakatano ya liboso ekouta epai ya bayekoli ya Kristo, oyo bamosusu kati na bango bazali kotungisama mpo na makambo oyo bayokaki mpo na Paulo. Kasi, mikakatano oyo eleki minene ekouta nde epai ya banguna ya Kristo. Bakokosela Paulo makambo, bakobɛta ye, mpe bakoluka koboma ye. Makambo yango ya mobulu ekopesa mpe Paulo libaku ya komonisa makanisi na ye mpo na kolongisa solo. Komikitisa, mpiko, mpe kondima oyo esalisaki ye alonga mikakatano yango ezali ndakisa monene mpo na bakristo lelo oyo. Tótalela ntina oyo tolobi bongo.
“Babandaki kopesa Nzambe nkembo” (Misala 21:18-20a)
3-5. (a) Paulo ayanganaki na likita nini na Yerusaleme, mpe makambo nini alobelaki? (b) Mateya nini tokoki kozwa na likita oyo Paulo asalaki ná bankulutu na Yerusaleme?
3 Ntango Paulo ná baninga na ye bakómaki na Yerusaleme, na mokolo oyo elandaki bakendaki kokutana na bankulutu ya lisangá. Lisolo etángi nkombo ya ntoma moko te kati na baoyo bazalaki naino na bomoi; ekoki kozala ete na ntango wana bango nyonso balongwaki na Yerusaleme mpo na kokende kosakola na bamboka mosusu. Nzokande, Yakobo, ndeko ya Yesu azalaki kaka na Yerusaleme. (Gal. 2:9) Ekoki kozala ete Yakobo nde akambaki likita yango oyo esangisaki “bankulutu nyonso” ná Paulo.—Mis. 21:18.
4 Paulo apesaki bankulutu mbote “mpe abandaki koyebisa bango eloko moko na moko ya makambo nyonso oyo Nzambe asalaki epai ya bikólo na nzela ya mosala na ye.” (Mis. 21:19) Tokanisi mpenza ete lapolo na ye elendisaki bandeko. Lelo oyo mpe biso nyonso tosepelaka koyoka ndenge oyo mosala ezali kokende liboso na mikili mosusu.—Mas. 25:25.
5 Ekoki kozala ete na ntango yango mpe Paulo apesaki makabo oyo ayaki na yango. Na ntembe te, bandeko oyo bazalaki koyoka Paulo basepelaki ndenge bandeko oyo bazalaki na bamboka mosika bazalaki komibanzabanza mpo na bango. Kutu, lisolo elobi ete nsima ya koyoka lapolo ya Paulo, “[Bankulutu] babandaki kopesa Nzambe nkembo”! (Mis. 21:20a) Ndenge moko mpe, bandeko mingi ntango bakutani na makama to bazali na maladi ya makasi basepelaka mingi ntango bandeko basalisaka bango mpe balendisaka bango na maloba.
Mingi bazali naino “na molende mpo na Mibeko” (Misala 21:20b, 21)
6. Bankulutu bayebisaki Paulo likambo nini?
6 Na nsima, bankulutu bayebisaki Paulo ete bandeko na Yudea bazalaki kobɛta libaku mpo na ye. Balobaki boye: “Ozali komona, ndeko, ndenge bankóto mingi ya bandimi bazali na kati ya Bayuda; mpe bango nyonso bazali na molende mpo na Mibeko. Kasi bayokaki nungunungu mpo na yo ete ozali koteya Bayuda nyonso na kati ya bikólo ete bápɛngwa na Moize, ozali koyebisa bango ete bákata bana na bango ngenga te mpe bátambola te na kolanda mimeseno yango oyo eyebaná.” a—Mis. 21:20b, 21.
7, 8. (a) Libunga nini bakristo mingi ya Yudea bazalaki na yango? (b) Mpo na nini tokoki koloba te ete makanisi ya Bayuda mosusu oyo bakómaki bakristo ezalaki lipɛngwi?
7 Mpo na nini bakristo mingi bazalaki naino na molende mpo na Mibeko ya Moize, mbula koleka 20 nsima ya kolongolama na yango? (Kol. 2:14) Na mobu 49 T.B., bantoma mpe bankulutu oyo bayanganaki na Yerusaleme batindelaki masangá nyonso mokanda oyo elimbolaki ete bandimi oyo bazalaki bato ya bikólo basengelaki te kokatama ngenga mpe kotosa Mibeko ya Moize. (Mis. 15:23-29) Nzokande, mokanda yango elobelaki te Bayuda oyo bakómaki bakristo, oyo mingi bayebaki te ete Mibeko ya Moize esilaki kolongolama.
8 Tokoki nde koloba ete lokola Bayuda wana bazalaki na libunga babongaki te kobengama bakristo? Te. Bango bazalaki te lokola bato oyo bazalaki liboso kosambela bikeko, bongo nsima ya kokóma bakristo, bazalaki kokoba kolanda mimeseno mosusu ya losambo na bango ya kala. Yehova nde apesaki Mibeko oyo Bayuda oyo bakómaki bakristo bazalaki kopesa motuya mingi. Mibeko yango ezalaki na eloko moko te ya mabe to oyo ezalaki na boyokani na bademo. Kasi, Mibeko yango ezalaki na kati ya kondimana ya kala, nzokande, bakristo bazalaki na kondimana ya sika. Na oyo etali losambo ya pɛto, makambo oyo kondimana ya Mibeko esɛngaki esilaki ngala. Bayuda oyo bakómaki bakristo, oyo bazalaki na molende mpo na Mibeko, bazangaki bososoli mpe bazalaki kotyela lisangá ya bokristo motema te. Basengelaki kobongola makanisi na bango mpo eyokana na boyebi ya solo oyo Nzambe apesaki na ntango wana. b—Yil. 31:31-34; Luka 22:20.
“Nungunungu . . . ezali ya mpamba” (Misala 21:22-26)
9. Paulo azalaki koteya nini na oyo etali Mibeko ya Moize?
9 Basalaki nini mpo na nungunungu oyo etambolaki ete Paulo azalaki koteya Bayuda oyo bafandaki na bikólo mosusu “ete bákata bana na bango ngenga te mpe bátambola te na kolanda mimeseno yango oyo eyebaná”? Paulo azalaki ntoma ya bikólo, mpe azalaki koyebisa bato ya bikólo ekateli oyo ezwamaki ete basengisami te kotosa Mibeko. Lisusu, amonisaki ete moto akozala na libunga soki aluki kondimisa bato ya bikólo ete bákatama ngenga mpo na kotosa Mibeko ya Moize. (Gal. 5:1-7) Paulo asakolaki mpe nsango malamu epai ya Bayuda na bingumba oyo atambolaki. Na ntembe te, azalaki mpe kolimbwela Bayuda oyo bazalaki kondima ete liwa ya Yesu esukisaki Mibeko mpe ete moto akotángama moyengebene na nzela ya kondima, kasi na nzela ya Mibeko te.—Rom. 2:28, 29; 3:21-26.
10. Ndenge nini Paulo amonisaki ete azalaki komitya na esika ya bato mosusu na likambo etali Mibeko mpe kokatama ngenga?
10 Atako bongo, Paulo azalaki komitya na esika ya bato oyo bazalaki kosepela kotosa mimeseno mosusu ya Bayuda, na ndakisa kosala mosala te na mokolo ya Sabata to koboya bilei mosusu. (Rom. 14:1-6) Apekisaki mpe te kokatama ngenga. Kutu, Paulo akataki Timote ngenga mpo abɛtisa Bayuda libaku te mpo bayebaki ete tata ya Timote azalaki Mogrɛki. (Mis. 16:3) Kokatama ngenga ezalaki ekateli ya moto na moto. Paulo akomelaki Bagalatia boye: “Kokatama ngenga ezali na ntina te, ezala mpe kokatama ngenga te, kasi kondima oyo ezali kosala na nzela ya bolingo nde ezali na ntina.” (Gal. 5:6) Nzokande, soki moto andimi kokatama ngenga mpo na komonisa ete azali kotosa Mibeko to azali koloba ete likambo yango ezali na ntina mpo Yehova andima ye, moto yango azangi kondima.
11. Bankulutu bapesaki Paulo toli nini, mpe kosala yango esɛngaki nini? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
11 Yango wana, atako nungunungu oyo etambolaki mpo na Paulo ezalaki makambo ya lokuta, yango ezalaki kaka kobulunganisa Bayuda oyo bakómaki bakristo. Mpo na yango, bankulutu bayebisaki Paulo boye: “Tozali na mibali minei oyo bazali na ndai likoló na bango. Kamatá mibali yango mpe kende komipɛtola elongo na bango na ndenge milulu ezali kosɛnga mpe futelá bango makambo nyonso, mpo bákokolama motó. Mpe na ndenge yango, moto nyonso akoyeba ete nungunungu oyo bayebisaki bango mpo na yo ezali ya mpamba, kasi ete yo ozali kotambola na molɔngɔ, yo moko mpe ozali kobatela Mibeko.” c—Mis. 21:23, 24.
12. Ndenge nini Paulo amonisaki ete azali makambo makasi te mpe amonisaki botosi na toli oyo bankulutu ya Yerusaleme bapesaki ye?
12 Paulo akokaki koloba ete likambo oyo ezalaki kobimisa mokakatano ezalaki nde molende oyo Bayuda oyo bakómaki bakristo bazalaki na yango mpo na Mibeko ya Moize, kasi ezalaki mpenza nungunungu wana te. Atako bongo, asepelaki kotosa etinda ya bankulutu, lokola yango esɛngaki te abuka mitinda ya Nzambe. Mwa ntango liboso, Paulo akomaki ete: “Epai ya baoyo bazali na nse ya mibeko, nakómaki lokola nde nazalaki na nse ya mibeko, atako ngai moko nazali na nse ya mibeko te, mpo nakoka kozwa baoyo bazali na nse ya mibeko.” (1 Ko. 9:20) Na likambo wana, Paulo atosaki bankulutu ya Yerusaleme mpe akómaki lokola moto oyo azali “na nse ya mibeko.” Na ndenge yango, apesaki biso ndakisa ya malamu ya kotosa bankulutu mpe ya kotingama kaka te na ndenge oyo biso tosepeli kosala makambo.—Ebr. 13:17.
“Abongaki kozala na bomoi te!” (Misala 21:27–22:30)
13. (a) Mpo na nini Bayuda mosusu babimisaki yikiyiki na tempelo? (b) Ndenge nini Paulo abikaki na liwa?
13 Makambo etambolaki malamu te na tempelo. Ntango mikolo ya kosukisa ndai ekómaki na nsuka, Bayuda oyo bautaki na Azia bamonaki Paulo, bakoselaki ye makambo ete akɔtisi bato oyo bazali Bayuda te na tempelo, mpe yango ebimisaki yikiyiki makasi. Soki komanda ya basoda ya Roma ayaki te, balingaki kobɛta Paulo mpe koboma ye. Komanda ya basoda atyaki ye na kasho. Kobanda mokolo wana, esengelaki mbula koleka minei mpo Paulo azwa lisusu bonsomi. Lisusu, Paulo azalaki kaka na likama. Ntango komanda atunaki Bayuda mpo na nini balingaki kosala Paulo mabe, bango nyonso bazalaki koloba makambo ndenge moko te. Lokola bazalaki kosala makɛlɛlɛ, komanda akangaki ntina ya likambo moko te. Nsukansuka, esɛngaki ete alongola Paulo na esika wana. Ntango Paulo ná basoda ya Roma balingaki kokɔta na lopango ya basoda, Paulo alobaki epai ya komanda ete: “Nabondeli yo, pesá ngai nzela naloba na bato.” (Mis. 21:39) Komanda apesaki ye nzela mpe Paulo alobaki na mpiko mpo na kolongisa kondima na ye.
14, 15. (a) Makambo nini Paulo alimbwelaki Bayuda? (b) Komanda ya basoda ya Roma asalaki nini mpo na koyeba ntina oyo Bayuda bayokelaki Paulo nkanda?
14 Paulo abandaki na maloba oyo: “Bóyoka kosamba na ngai.” (Mis. 22:1) Lokola Paulo alobaki epai ya ebele ya bato wana na monɔkɔ ya Ebre, bango nyonso bafandaki nyɛɛ. Paulo alimbolaki polele ntina oyo akómaki moyekoli ya Kristo. Na mayele mpenza, Paulo atángaki mwa makambo oyo Bayuda yango bakokaki kolandela mpe komona ete ezalaki solo. Paulo atángaki na makolo ya Gamaliele mpe anyokolaki bayekoli ya Kristo, likambo oyo, na ntembe te, bato mosusu oyo bazalaki wana bayebaki malamu. Nzokande, ntango azalaki kokende na Damasi, azwaki emonaneli ya Kristo oyo asekwaki, mpe alobaki na ye. Bato oyo Paulo azalaki kosala na bango mobembo bamonaki pole mpe bayokaki lokito ya mongongo, kasi bayokaki maloba oyo elobamaki te. (Mis. 9:7; 22:9) Na nsima, lokola Paulo azalaki lisusu komona te, baninga na ye bamemaki ye tii na kati ya engumba. Kuna, Ananiasi, mobali moko oyo Bayuda mingi ya etúká wana bayebaki, abikisaki Paulo na ndenge ya likamwisi mpe akómaki komona lisusu.
15 Paulo alobaki lisusu ete ntango azongaki na Yerusaleme, Yesu abimelaki ye na tempelo. Ntango alobaki bongo, Bayuda bayokaki nkanda makasi mpe bagangaki ete: “Longolá moto ya boye na mabele, mpo abongaki kozala na bomoi te!” (Mis. 22:22) Mpo na kobikisa Paulo, komanda atindaki bákɔtisa ye na lopango ya basoda. Lokola komanda alukaki koyeba ntina oyo Bayuda bazalaki koyokela Paulo nkanda, apesaki mitindo ete bábɛta ye fimbo mpo aloba. Kasi, Paulo asalelaki ntomo oyo mibeko epesaki ye mpe ayebisaki ete azali mwana-mboka Roma. Lelo oyo mpe, basambeli ya Yehova basalelaka ntomo oyo mibeko epesi bango mpo na kolongisa kondima na bango. (Talá etanda “ Mibeko ya Roma mpe bana-mboka Roma,” na lokasa 184, mpe etanda “ Kolongisa nsango malamu na nzela ya mibeko lelo oyo,” na lokasa oyo.) Ntango komanda ayokaki ete Paulo azali mwana-mboka Roma, amonaki ete asengeli kosalela mayele mosusu mpo na koyeba makambo mpo na Paulo. Mokolo oyo elandaki, amemaki Paulo liboso ya Sanedrina, tribinale monene ya Bayuda, oyo eyanganaki mpo na kotalela kaka likambo wana.
“Nazali Mofarisai” (Misala 23:1-10)
16, 17. (a) Lobelá makambo oyo elekaki ntango Paulo alobaki liboso ya Sanedrina. (b) Ndenge nini Paulo apesaki ndakisa ya komikitisa ntango babɛtaki ye?
16 Ntango azwaki maloba mpo na kosamba liboso ya Sanedrina, Paulo abandaki boye: “Mibali, bandeko, natamboli liboso ya Nzambe na lisosoli ya pɛto mpenza tii na mokolo ya lelo.” (Mis. 23:1) Azwaki ntango ya kobakisa likambo mosusu te. Lisolo elobi boye: “Na yango, nganga-nzambe monene Ananiasi apesaki baoyo batɛlɛmaki pene na ye mitindo ete bábɛta ye na monɔkɔ.” (Mis. 23:2) Azalaki mpenza kotyola ye! Yango mpe emonisi ete bazalaki kokanisela Paulo mabe mpe komona ete azali moto ya lokuta liboso kutu báyoka ndenge oyo akosamba! Yango wana, Paulo alobaki ete: “Nzambe akobɛta yo, yo efelo oyo epakolamá mpɛmbɛ. Ofandi mpo na kosambisa ngai na boyokani na Mibeko, bongo kaka yo mpe ozali lisusu kobuka Mibeko, na ndenge ozali kopesa mitindo ete bábɛta ngai?”—Mis. 23:3.
17 Bato mosusu oyo bazalaki wana bayokaki mabe mpo na likambo oyo Paulo alobaki, kasi bayokaki mabe te ndenge babɛtaki ye! Balobaki na ye boye: “Ozali kofinga nganga-nzambe monene ya Nzambe?” Eyano ya Paulo eteyaki bango komikitisa mpe botosi mpo na Mibeko; alobaki boye: “Bandeko, nayebaki te ete azali nganga-nzambe monene. Mpo ekomamá ete: ‘Osengeli te koloba mabe na nkumu ya bato na yo.’” d (Mis. 23:4, 5; Kob. 22:28) Na nsima, Paulo asalelaki mayele mosusu. Lokola amonaki ete bazuzi mosusu ya Sanedrina bazalaki Bafarisai mpe bamosusu Basadukai, alobaki ete: “Mibali, bandeko, nazali Mofarisai, mwana ya Bafarisai. Nazali kosambisama mpo na elikya ya lisekwa ya bakufi.”—Mis. 23:6.
18. Mpo na nini Paulo amibengaki Mofarisai, mpe ndenge nini na bantango mosusu tokoki kosalela mayele oyo asalelaki?
18 Mpo na nini Paulo amibengaki Mofarisai? Mpamba te azalaki “mwana ya Bafarisai”; baboti na ye bazalaki na lingomba yango. Yango wana, bato mingi bazalaki kotalela ye ete azali kaka Mofarisai. e Kasi, ndenge nini Paulo akokaki komitya na ngámbo ya Bafarisai na oyo etali elikya ya lisekwa? Bafarisai bazalaki kondima ete nsima ya liwa, molimo ezalaki kotikala na bomoi mpe ete milimo ya bato ya sembo ezalaki kokoba kozala na bomoi na nzoto mosusu. Paulo azalaki kondima mateya wana te. Ye azalaki kondima lisekwa ndenge oyo Yesu ateyaki yango. (Yoa. 5:25-29) Atako bongo, Paulo azalaki na likanisi moko na Bafarisai ete elikya ezalaki ete moto oyo akufi akoki kozonga na bomoi, likanisi oyo ekeseni na oyo ya Basadukai, oyo bazalaki kondima te ete bakufi bakozala lisusu na bomoi. Tokoki kosalela mayele yango ntango tozali kosolola na bato oyo balobaka ete bazali bakristo. Tokoki koloba ete biso mpe tondimaka Nzambe, lokola bango. Ya solo, ekoki kozala ete bango bandimaka Bosato; nzokande, biso tondimaka Nzambe oyo Biblia elobeli. Atako bongo, biso ná bango tondimaka ete Nzambe azali.
19. Mpo na nini likita ya Sanedrina esukaki na mobulu?
19 Maloba ya Paulo ekabolaki bazuzi ya Sanedrina. Lisolo elobi boye: “Koganga makasi ebimaki, mpe bakomeli mosusu ya etuluku ya Bafarisai batɛlɛmaki mpe babandaki koloba na koswana makasi ete: ‘Tomoni ata mabe moko te na moto oyo; kasi soki elimo moko boye to anzelu moko boye asololaki na ye,—.’” (Mis. 23:9) Basadukai bakokaki te kondima ata likanisi mpamba ete anzelu moko alobaki na Paulo; bango bazalaki kondima baanzelu te! (Talá etanda “ Basadukai mpe Bafarisai,” na lokasa oyo.) Yikiyiki ekómaki makasi na boye ete komanda ya basoda abikisaki lisusu ntoma Paulo. (Mis. 23:10) Atako bongo, Paulo azalaki kaka na likama. Nini ekómelaki ye na nsima? Tokoyeba yango na mokapo oyo elandi.
a Lokola Bayuda mingi bakómaki bakristo, ekoki kozala ete masangá ezalaki mingi mpe bazalaki koyangana na bandako ya bandeko.
b Mwa bambula na nsima, ntoma Paulo akomaki mokanda epai ya Baebre, mpe kati na yango amonisaki ete kondimana ya sika eleki oyo ya kala. Na mokanda yango, amonisaki polele ete lokola Nzambe asalaki kondimana ya sika, oyo ya kala esilaki ngala. Lisusu, lokola apesaki Bayuda oyo bakómaki bakristo makanisi oyo bakokaki komonisa epai ya bato oyo bazalaki kotɛmɛla bango, na ntembe te makanisi na ye elendisaki kondima ya bakristo mosusu oyo bazalaki kotya likebi mingi koleka na Mibeko ya Moize.—Ebr. 8:7-13.
c Balimboli ya maloba ya Biblia balobaka ete mibali yango bazalaki na ndai ya Monaziri. (Mit. 6:1-21) Ya solo, Mibeko ya Moize, oyo esɛngaki ndai ya ndenge wana esilaki ngala. Kasi, ekoki kozala ete Paulo akanisaki ete ekozala mabe te mibali yango bákokisa ndai oyo balapaki epai ya Yehova. Yango wana, ekozala mabe te afutela bango makambo nyonso mpe akende elongo na bango. Nzokande, toyebi te soki ezalaki ndai ya ndenge nini; kasi, ata soki ezalaki ya ndenge nini, tokanisi te ete Paulo alingaki kosomba nyama mpo bápesa yango mbeka (ndenge Banaziri bazalaki kosala) na likanisi ete ekopɛtola masumu na bango. Lokola Kristo apesaki mbeka ya kokoka, bambeka ya ndenge wana ekokaki lisusu kopɛtola masumu te. Ata soki Paulo asalaki nini, tokoki kolikya ete andimaki te kosala likambo oyo elingaki kotungisa lisosoli na ye.
d Bato mosusu balobaka ete Paulo azalaki komona malamu te, yango wana amonaki te ete moto oyo atindaki bábɛta ye ezalaki nganga-nzambe monene. To mpe, lokola azalaki na Yerusaleme te na boumeli ya ntango molai, ayebaki te moto oyo azalaki nganga-nzambe monene na ntango wana. To mpe ekoki kozala ete lokola bato bazalaki ebele, Paulo akokaki te komona moto oyo apesaki mitindo ete bábɛta ye.
e Na mobu 49 T.B., ntango bantoma ná bankulutu batalelaki likambo ya koyeba soki bato ya bikólo basengeli kotosa Mibeko ya Moize, bakristo mosusu oyo bazalaki wana babengamaki “bato . . . ya mwa lingomba ya Bafarisai oyo bandimaki.” (Mis. 15:5) Na ntembe te, bandimi yango bazalaki kobengama Bafarisai mpo na lingomba na bango ya kala.