Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 6

Stefano​—“Atondaki na ngɔlu ya Nzambe mpe na nguya”

Stefano​—“Atondaki na ngɔlu ya Nzambe mpe na nguya”

Mateya oyo tokoki kozwa na ndenge oyo Stefano apesaki litatoli na mpiko liboso ya Sanedrina

Euti na Misala 6:8–8:3

1-3. (a) Stefano akutanaki na mokakatano nini, kasi ye azalaki ndenge nini? (b) Mituna nini tokotalela na mokapo oyo?

 STEFANO atɛlɛmi liboso ya bazuzi. Na kati ya ndako monene, oyo mbala mosusu ezalaki pembeni ya tempelo ya Yerusaleme, bazuzi 71 bafandi na bakiti zingazinga na ye. Tribinale yango oyo ebengami Sanedrina, eyangani mpo na kosambisa Stefano. Bazuzi yango bazali bato minene mpe ya lokumu; mingi kati na bango bazali kosepela ata moke te na moyekoli yango ya Yesu. Kutu, moto oyo ayanganisi bango ezali Kaifa, nganga-nzambe monene oyo akambaki Sanedrina mwa basanza liboso, ntango bakatelaki Yesu Kristo etumbu ya liwa. Stefano azali nde kobanga?

2 Na ntango yango, bazuzi bamoni likambo moko na elongi ya Stefano. Ntango batali ye, bamoni ete elongi na ye ezali “lokola elongi ya anzelu.” (Mis. 6:15) Baanzelu bazali bamemi-nsango ya Yehova Nzambe mpe mpo na yango, babangaka te, bazalaka kimya. Ezali mpe bongo mpo na Stefano; ata bazuzi oyo batondi na nkanda bamoni yango. Nini esalisi ye azala motema mpiɔ?

3 Eyano na motuna yango ezali na liteya monene mpo na bakristo lelo oyo. Lisusu, tosengeli koyeba mpo na nini Stefano akómaki na esika yango. Ndenge nini alongisaki kondima na ye liboso bákanga ye? Mpe tokoki komekola ye na makambo nini?

“Batombokisaki bato” (Misala 6:8-15)

4, 5. (a) Mpo na nini Stefano azalaki na ntina mingi na lisangá? (b) Na ndimbola nini Stefano “atondaki na ngɔlu ya Nzambe mpe na nguya”?

4 Tomonaki ete Stefano azalaki na mokumba ya ntina mingi na lisangá ya bokristo oyo esalemaki sika. Na mokapo eleki, tomonaki ete azalaki na kati ya mibali nsambo ya komikitisa oyo bandimaki kopesa bantoma mabɔkɔ ntango mposa emonanaki. Tokoki komona polele ete mobali yango azalaki na komikitisa soki totaleli makoki oyo azalaki na yango. Misala 6:8 elobi ete azalaki kosala “makamwisi minene ya komonisa makambo oyo ekoya mpe bilembo minene,” ndenge bantoma mosusu bazalaki kosala. Vɛrsɛ yango elobi mpe ete “atondaki na ngɔlu ya Nzambe mpe na nguya.” Yango elingi koloba nini?

5 Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “ngɔlu ya Nzambe” ekoki mpe kobongolama na “ngɔlu.” Ekoki mpenza kozala ete Stefano azalaki moto malamu mpe ya boboto, yango wana bato bazalaki kosepela na ye mingi. Azalaki koloba na ndenge oyo ezalaki kondimisa bato mingi mpo bazalaki komona ete azali motema sembo mpe alobaka solo. Atondaki na nguya mpo elimo ya Nzambe ezalaki kosala kati na ye mpe azalaki kotosa litambwisi ya elimo yango. Na esika avimba na lolendo mpo na makambo oyo azalaki na makoki ya kosala, azalaki kopesa nkembo nyonso epai ya Yehova mpe azalaki komibanzabanza mpo na bato. Yango wana, banguna na ye bamonaki ete azali moto ya kotika te!

6-8. (a) Wapi makambo mibale oyo banguna ya Stefano bafundaki ye, mpe mpo na nini? (b) Mpo na nini ndakisa ya Stefano ekoki kosalisa bakristo lelo oyo?

6 Bato ndenge na ndenge batɛlɛmaki mpo na kotyana ntembe na Stefano, kasi “bakokaki kotɛlɛma te liboso ya bwanya mpe ya elimo oyo ye azalaki koloba na yango.” a Lokola bato yango bakangelaki ye nkanda, “bandimisaki bato na nkuku” bákosela moyekoli yango ya Kristo makambo atako asalaki mabe moko te. Lisusu, “batombokisaki bato,” mikóló, mpe bakomeli, mpo bámema Stefano na makasi na Sanedrina. (Mis. 6:9-12) Batɛmɛli bafundaki ye na makambo mibale. Balobaki ete afingaki Nzambe mpe Moize. Na ndenge nini?

7 Mibali yango bakoselaki Stefano makambo ete alobaki maloba ya kofinga Nzambe na ndenge balobaki ete alobi mabe mpo na “esika mosantu oyo,” elingi koloba tempelo ya Yerusaleme. (Mis. 6:13) Balobaki mpe ete alobi maloba ya kofinga Moize na ndenge balobaki ete alobi mabe mpo na Mibeko ya Moize, na maloba mosusu, alukaki kobongola mimeseno oyo Moize alakisaki. Bifundeli wana ezalaki minene, mpo na ntango wana Bayuda bazalaki kopesa lokumu mingi na tempelo, na makambo ya Mibeko ya Moize, mpe na mibeko oyo ekomami te, oyo babakisaki na Mibeko ya Moize. Na yango, bifundeli wana emonisaki ete Stefano azali moto mabe, oyo abongi na etumbu ya liwa.

8 Likambo ya mawa ezali ete bakonzi ya mangomba basalelaka mingi mayele mabe wana mpo na kobendela basaleli ya Nzambe mikakatano. Tii lelo oyo, bato ya mangomba oyo balingaka Batatoli ya Yehova te batindaka bakonzi ya mokili bányokola bango. Tosengeli kosala nini ntango bakoseli biso makambo? Ndakisa ya Stefano ekoki koteya biso.

Apesi litatoli na mpiko mpo na “Nzambe ya nkembo” (Misala 7:1-53)

9, 10. Bato oyo balukaka mabunga na Biblia balobaka nini mpo na maloba ya Stefano liboso ya Sanedrina, mpe likambo nini tosengeli kobosana te?

9 Ndenge tolobaki yango na ebandeli, elongi ya Stefano ezalaki kimya lokola elongi ya anzelu ntango azalaki koyoka ndenge oyo bazalaki kokosela ye makambo. Na nsima, Kaifa abalukaki epai na ye mpe atunaki ye: “Makambo wana ezali bongo?” (Mis. 7:1) Ekómaki ngala ya Stefano mpo aloba, mpe alobaki mpenza!

10 Bato mosusu oyo balukaka mabunga na Biblia balobaki ete na maloba na ye nyonso, Stefano apesaki eyano te na makambo oyo bafundaki ye. Nzokande, Stefano apesi biso ndakisa malamu mpenza na ndenge oyo tosengeli “koloba” mpo na nsango malamu. (1 Pe. 3:15) Tóbosana te ete bafundaki Stefano ete afingi Nzambe mpe Moize na ndenge balobaki ete atyoli tempelo mpe alobi mabe mpo na Mibeko. Mpo na kopesa eyano, Stefano alobelaki lisolo ya Yisraele na mokuse; akabolaki yango na biteni misato mpe aponaki mwa makambo mosusu oyo alobelaki na mwa molai. Tótalela mokomoko na biteni yango misato ya lisolo ya Yisraele.

11, 12. (a) Ndenge nini Stefano asalelaki malamu ndakisa ya Abrahama? (b) Mpo na nini ebongaki Stefano alobela Yozefe na lisolo na ye?

11 Eleko ya bankɔkɔ ya Bayisraele. (Mis. 7:1-16) Stefano alobelaki liboso Abrahama, moto oyo Bayuda nyonso bazalaki komemya mpo na kondima na ye. Ntango abandaki na likambo oyo bato yango mpe bazalaki kondima, Stefano amonisaki polele ete Yehova, “Nzambe ya nkembo,” amimonisaki liboso epai ya Abrahama na Mezopotamia. (Mis. 7:2) Kutu, mobali yango afandaki lokola mopaya na Mokili ya Ndaka. Abrahama azalaki na tempelo te, azalaki mpe na Mibeko ya Moize te. Ndenge nini moto akoki koloba ete mpo na kosalela Nzambe na bosembo esengeli kaka kozala na biloko yango?

12 Bato oyo bazalaki koyoka Stefano bazalaki mpe na limemya mingi mpo na Yozefe, nkɔkɔ ya Abrahama, kasi Stefano akundwelaki bango ete bandeko ya Yozefe, batata ya mabota ya Yisraele, banyokolaki mobali yango ya sembo mpe batɛkaki ye lokola moombo. Atako bongo, Nzambe asalelaki ye mpo na kobikisa Yisraele ntango nzala ekɔtaki na mokili na bango. Na ntembe te, Stefano amonaki bokokani kati na Yozefe ná Yesu Kristo, kasi aboyaki kolobela yango mpo bákoba koyoka ye.

13. Na ndenge nini maloba ya Stefano mpo na Moize epesaki eyano na likambo oyo bafundaki ye mpo na yango, mpe yango esalisaki ye alobela motó ya likambo nini?

13 Ntango ya Moize. (Mis. 7:17-43) Stefano alobaki makambo mingi mpo na Moize​—mpe yango ezalaki likambo ya bwanya, mpo bazuzi mingi ya Sanedrina bazalaki Basadukai, bato oyo bazalaki kondima kaka mikanda ya Moize. Tóbosana mpe te ete bafundaki Stefano ete afingi Moize. Maloba ya Stefano ezalaki eyano ya polele na efundeli wana, mpamba te amonisaki ete azali na limemya mingi mpo na Moize mpe mpo na Mibeko. (Mis. 7:38) Amonisaki ete Moize mpe aboyamaki epai ya bato oyo azalaki koluka kobikisa. Baboyaki ye ntango azalaki na mbula 40. Mbula koleka 40 na nsima, batyelaki bokonzi na ye ntembe mbala mingi. b Na bongo, Stefano akangamaki na motó ya likambo kaka moko: Libota ya Nzambe eboyaki mbala na mbala bato oyo Yehova azalaki kopona mpo na kotambwisa bango.

14. Stefano asalelaki ndakisa ya Moize mpo na kondimisa makanisi nini na lisolo na ye?

14 Stefano ayebisaki bayoki na ye ete Moize asakolaki ete mosakoli moko lokola Moize akobima na Yisraele. Mosakoli yango ezali nani, mpe ndenge nini balingaki koyamba ye? Stefano azelaki akóma na nsuka ya lisolo na ye mpo na kopesa biyano na mituna yango. Alobelaki likambo mosusu ya ntina mingi: Moize ayekolaki ete ata mabele nini ekoki kokóma mosantu, lokola mabele ya esika oyo mwa nzete ezalaki kopela mɔtɔ, esika oyo Yehova alobaki na ye. Na bongo, tokoki nde kokanisa ete mpo na kosambela Yehova esengeli kaka kozala na ndako moko, lokola tempelo ya Yerusaleme? Tótalela likambo yango.

15, 16. (a) Mpo na nini ezalaki na ntina mingi ete Stefano alobela tabernakle na lisolo na ye? (b) Ndenge nini Stefano alobelaki tempelo ya Salomo na lisolo na ye?

15 Tabernakle mpe tempelo. (Mis. 7:44-50) Stefano ayebisaki bazuzi ete liboso tempelo etongama na Yerusaleme, Nzambe atindaki Moize atonga tabernakle, to hema oyo bakokaki kopikola, mpo ezala esika ya losambo. Lokola Moize ye moko asambelaki na tabernakle, nani oyo akokaki koloba ete tempelo elekaki tabernakle?

16 Na nsima, ntango Salomo atongaki tempelo na Yerusaleme, elimo santu etindaki ye apesa liteya ya ntina mingi na libondeli oyo asalaki. Ndenge Stefano alobaki yango, “Oyo-Aleki-Likoló afandaka na bandako oyo esalemi na mabɔkɔ te.” (Mis. 7:48; 2 Nt. 6:18) Yehova akoki kosalela tempelo mpo na kokokisa mikano na ye, kasi afandaka kati na yango te. Na bongo, mpo na nini basambeli na ye basengeli kokanisa ete ndako oyo etongami na mabɔkɔ ya bato nde esimbi losambo ya solo? Stefano asukisaki diskur na ye na likanisi moko ya ntina mingi ntango azongelaki maloba ya Yisaya ete: “Likoló ezali kiti ya bokonzi na ngai, mpe mabele ezali ebonga ya makolo na ngai. Ndako ya ndenge nini bokotongela ngai? Yehova alobi bongo. To wapi esika na ngai ya kopema? Lobɔkɔ na ngai esalaki biloko oyo nyonso, boye te?”​—Mis. 7:49, 50; Yis. 66:1, 2

17. Ndenge nini lisolo ya Stefano (a) emonisaki ete bayoki na ye bazalaki na libunga mpe (b) epesaki eyano na makambo oyo bafundaki ye mpo na yango?

17 Tii na esika oyo, soki olandi malamu diskur ya Stefano liboso ya Sanedrina, omoni te ete amonisaki na mayele mpenza ete bato oyo bafundaki ye bazalaki na libunga? Amonisaki ete mokano ya Yehova ekokisamaka mokemoke mpe ete ekangami na mimeseno ya kala te. Bato oyo bazalaki kopesa valɛrɛ mingi na tempelo kitoko oyo ezalaki na Yerusaleme, na mimeseno mpe bonkɔkɔ oyo eutaki na Mibeko ya Moize, bazalaki kobosana ntina oyo Nzambe apesaki Mibeko mpe atongisaki tempelo! Lisolo ya Stefano ebimisaki motuna moko ya ntina: Bomoni te ete mpo na kokumisa malamumalamu Mibeko mpe tempelo bosengeli nde kotosa Yehova? Ya solo, maloba ya Stefano elongisaki malamu misala na ye, mpo azalaki mpenza kotosa Yehova na ndenge oyo eleki malamu.

18. Na makambo nini tosengeli koluka komekola Stefano?

18 Liteya nini tokoki kozwa na lisolo ya Stefano? Tomoni ete Stefano ayebaki Makomami malamumalamu. Biso mpe tosengeli kozala bayekoli ya solosolo ya Liloba ya Nzambe mpo tókoka kosembola “liloba ya solo malamumalamu.” (2 Tim. 2:15) Ndakisa ya Stefano ekoki mpe koteya biso tózalaka na maloba ya boboto mpe tózokisaka bato te na maloba na biso. Bayoki na ye batɛmɛlaki ye makasi mpenza! Atako bongo, na boumeli ya ntango molai mpenza alongaki kosimba likebi ya bato yango na ndenge alobelaki makambo oyo bazalaki kozwa na motuya mingi. Lisusu, alobaki na bango na limemya, azalaki kobenga mikóló ete “batata.” (Mis. 7:2) Biso mpe tosengeli koteya solo ya Liloba ya Nzambe na “boboto mpe na limemya makasi.”​—1 Pe. 3:15.

19. Ndenge nini Stefano ayebisaki polele nsango ya bitumbu ya Nzambe liboso ya Sanedrina?

19 Atako bongo, tosengeli te koboya koyebisa bato solo ya Liloba ya Nzambe mpo na kobanga kosilikisa bango; tosengeli mpe te kolɛmbisa nsango ya bitumbu ya Yehova. Stefano apesaki biso ndakisa malamu na likambo yango. Na ntembe te amonaki ete bilembeteli nyonso oyo apesaki liboso ya Sanedrina endimisaki ata moke te bazuzi wana ya mitema makasi. Yango wana, na kopusama na elimo santu, asukisaki lisolo na ye na komonisa bango polele ete bakesanaki te na bankɔkɔ na bango oyo baboyaki Yozefe, Moize, mpe basakoli nyonso. (Mis. 7:51-53) Kutu, bazuzi wana ya Sanedrina babomaki Masiya, oyo Moize mpe basakoli nyonso balobelaki koya na ye. Bato yango babukaki Mibeko ya Moize na ndenge oyo eleki mabe mpenza!

“Nkolo Yesu, yambá elimo na ngai” (Misala 7:54–8:3)

“Ntango bayokaki maloba wana, basilikaki makasi mpe babandaki kolyela ye mino.”​—Misala 7:54

20, 21. Bazuzi ya Sanedrina basalaki nini ntango bayokaki maloba ya Stefano, mpe ndenge nini Yehova alendisaki ye?

20 Makambo ya solo oyo Stefano alobaki ebakisaki lisusu nkanda ya bazuzi wana. Na kozanga mpenza nsɔni, babandaki kolyela Stefano mino. Na ntembe te mobali yango ya sembo amonaki ete bakoyokela ye mawa te, kaka ndenge bayokelaki Nkolo na ye Yesu mawa te.

21 Esengelaki ete Stefano azala na mpiko mpo na kondima makambo oyo ezalaki kozela ye, mpe ntembe ezali te ete emonaneli oyo Yehova apesaki ye elendisaki ye mingi. Stefano amonaki nkembo ya Nzambe, amonaki mpe Yesu atɛlɛmi na lobɔkɔ ya Yehova! Ntango Stefano azalaki koloba makambo oyo azalaki komona na emonaneli yango, bato oyo bazalaki kosambisa ye batyaki mabɔkɔ na matoi na bango. Mpo na nini? Mwa basanza liboso, Yesu alobaki liboso ya tribinale yango ete azali Masiya mpe ete mosika te akozala na lobɔkɔ ya mobali ya Tata na ye. (Mrk. 14:62) Emonaneli ya Stefano emonisaki ete Yesu alobaki solo. Bazuzi yango ya Sanedrina batɛkaki Masiya mpe babomisaki ye! Bango nyonso na mbala moko, batindaki báboma Stefano na mabanga. c

22, 23. Na ndenge nini liwa ya Stefano ezalaki lokola oyo ya Nkolo na ye, mpe ndenge nini bakristo lelo oyo bakoki kozala na elikya lokola ya Stefano?

22 Stefano akufaki ndenge oyo Nkolo na ye akufaki, azalaki motema mpiɔ, atyaki elikya nyonso epai ya Yehova mpe asɛngaki bolimbisi mpo na bato oyo babomaki ye. Alobaki ete: “Nkolo Yesu, yambá elimo na ngai,” mbala mosusu mpo azalaki komona Mwana ya moto elongo na Yehova na emonaneli. Na ntembe te, Stefano ayebaki maloba ya kolendisa oyo Yesu alobaki ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi.” (Yoa. 11:25) Na nsuka, Stefano abondelaki Nzambe na mongongo makasi ete: “Yehova, kotángela bango lisumu oyo te.” Nsima ya koloba bongo, akataki motema.​—Mis. 7:59, 60.

23 Na ndenge yango, Stefano akómaki moyekoli ya liboso ya Kristo oyo akufaki lokola martiri. (Talá etanda “ Na ndimbola nini akufaki lokola ‘Martiri,’” na lokasa 48.) Kasi, azali kaka ye moko te. Tii na ntango na biso, bandimi ya mangomba oyo bazali na molende ya mabe, bato ya politiki, mpe banguna mosusu, babomi basaleli ya sembo ya Yehova. Atako bongo, tozali na bantina mingi ya kozala na elikya lokola ya Stefano. Yesu azali sikoyo Mokonzi oyo azali koyangela, azali na nguya monene oyo Tata na ye apesi ye. Eloko moko te ekopekisa ye asekwisa bayekoli na ye ya sembo.​—Yoa. 5:28, 29.

24. Ndenge nini Saulo apesaki mabɔkɔ na kobomama ya Stefano, mpe wapi mwa matomba oyo liwa ya moto yango ya sembo ebimisaki?

24 Ntango makambo wana nyonso ezalaki kosalema, elenge mobali moko, nkombo na ye Saulo, azalaki kotala. Ye mpe andimaki kobomama ya Stefano; kutu, azalaki kobatela bilamba ya bato oyo bazalaki kobamba ye mabanga. Mwa moke na nsima, abandisaki monyoko moko makasi. Kasi, liwa ya Stefano epesaki nzela na likambo moko ya malamu. Ndakisa na ye elendisaki bakristo mosusu bátikala sembo mpe bálonga lokola ye. Longola yango, Saulo, oyo nsima ya bambula akómaki kobengama Paulo, ayokaki mawa mingi na ndenge andimaki kobomama ya Stefano. (Mis. 22:20) Apesaki mabɔkɔ na bato oyo babomaki Stefano, kasi na nsima, miso na ye efungwamaki mpe alobaki ete: “Nazalaki mofingi, monyokoli mpe moto ya lofundo.” (1 Tim. 1:13) Tomoni mpenza ete Paulo abosanaki Stefano te mpe makambo oyo alobaki mokolo wana. Kutu, badiskur mosusu oyo Paulo asalaki mpe mikanda na ye mosusu ezongelaki makambo oyo Stefano alobelaki na diskur na ye. (Mis. 7:48; 17:24; Ebr. 9:24) Na nsima, Paulo alandaki ndakisa ya kondima mpe ya mpiko oyo amonaki epai ya Stefano, moto oyo “atondaki na ngɔlu ya Nzambe mpe na nguya.” Biso mpe tokolanda ndakisa yango?

a Banguna yango mosusu bazalaki bato ya “Sinagoga ya Basikwami.” Ekoki kozala ete bazalaki bato oyo Baroma bakangaki mpe na nsima batikaki bango, to mpe bazalaki baombo ya kala oyo bakómaki na bonsomi mpe bakómaki baprozelite. Bamosusu kati na bango bazalaki bato ya Silisia, ndenge Saulo moto ya Tarse azalaki. Lisolo elobi te soki Saulo azalaki na kati ya bato ya Silisia oyo bakokaki te kotɛlɛma liboso ya Stefano.

b Lisolo ya Stefano ezali na makambo mosusu oyo tokoki kokuta yango esika mosusu te na Biblia, na ndakisa, kelasi oyo Moize atángaki na Ezipito, mbula na ye ntango akimaki na Ezipito, mpe bambula oyo afandaki na Midiane.

c Tokanisi te ete mibeko ya Roma epesaki Sanedrina ndingisa ya kotinda ete báboma moto. (Yoa. 18:31) Na ntembe te, Stefano abomamaki na ebele ya bato oyo bazalaki na nkanda, kasi ezalaki te etumbu oyo tribinale ekatelaki ye.