Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 1

Ndenge malamu ya kobanda lisolo

Ndenge malamu ya kobanda lisolo

Misala 17:22

NA MOKUSE: Ndenge oyo okobanda lisolo na yo esengeli kopesa bato mposa ya koyoka, kosalisa bango bámona polele likambo oyo okolobela, mpe mpo na nini ezali na ntina mpo na bango.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Pesá bato mposa. Poná motuna moko, to maloba ya moto moko, to likambo moko oyo esalemá, to mpe nsango moko oyo ekosepelisa bato.

  • Bimisá polele likambo oyo okolobela. Na maloba na yo ya ebandeli, bato bámona polele likambo oyo olingi kolobela mpe mokano oyo olingi kokokisa.

  • Monisá ntina ya likambo oyo okolobela. Yokanisá makambo oyo okolobela na bamposa ya solosolo ya bato oyo bakoyoka yo. Basengeli komona polele ndenge oyo likambo yango ekoki kosalisa bango.