Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 10

Kobongola mongongo

Kobongola mongongo

Masese 8:4, 7

NA MOKUSE: Bimisá makanisi polele mpe simbá mitema ya bato na ndenge ozali komatisa to kokitisa mongongo, koloba mwa makasi to na mwa nse, mwa mbangu to mwa malɛmbɛ.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Matisá to kitisá mongongo. Matisá mongongo mpo na konyata makanisi ya ntina mpe kopesa bato mposa ya kosalela makambo oyo ozali koteya. Salá mpe bongo ntango ozali kotánga bavɛrsɛ oyo ezali kolobela bitumbu. Kitisá mongongo mpo na kopesa bato mposa ya koyoka makambo oyo ekolanda to mpo na komonisa kobanga to kotungisama.

  • Lobá mwa makasi to na mwa nse. Soki bato bamonaka yango mabe te na monɔkɔ na bino, lobá mwa makasi mpo na kobimisa esengo to mpo na kolakisa bonene to bolai. Lobá na mongongo ya nse mpo na kobimisa mawa to kotungisama.

  • Lobá mwa mbangu to mwa malɛmbɛ. Lobá mwa mbangu mpo na komonisa nsai. Lobá mwa malɛmbɛ ntango olingi kobanda kolobela likambo moko ya ntina.