Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 11

Koloba na esengo

Koloba na esengo

Baroma 12:11

NA MOKUSE: Lobá na esengo mpo na kopesa bato mposa ya koyoka yo mpe ya kosalela makambo oyo bakoyoka.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Tyá makanisi nyonso na lisolo na yo. Ntango ozali kobongisa lisolo na yo, zwá mpenza ntango ya kokanisa ntina ya makambo oyo okoteya. Yekolá makambo yango malamu mpo oloba yango na maloba oyo ekouta mpenza na motema.

  • Kanisá bato oyo bakoyoka yo. Kanisá ndenge makambo oyo okotánga to okoteya ekosalisa bato. Luká ndenge oyo okoki koloba makambo yango mpo bato básepela na yango mpenza.

  • Kozala malilimalili te. Lobá na mpiko. Saláká bajɛstɛ oyo ebongi mpe elongi na yo elakisaka ndenge oyo ozali koyoka.