Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 13

Komonisa polele bolamu oyo bato bakozwa

Komonisa polele bolamu oyo bato bakozwa

Masese 3:21

NA MOKUSE: Salisá bato bámona ndenge oyo lisolo na yo etali bango, mpe lakisá bango ndenge oyo bakoki kosalela makambo oyo bazali koyoka.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Kanisá bato oyo bakoyoka yo. Kanisá mpo na nini bato bazali na mposa ya koyoka makambo oyo okoloba, mpe luká koyeba makambo nini ya lisolo na yo ekozala na ntina mingi mpo na bango.

  • Ntango ozali kosala lisolo, lakisáká bato nini basengeli kosala. Banda na ebandeli, moto na moto asengeli kolobaka na motema ete: ‘Makambo oyo etali ngai.’ Ntango ozali kolobela likanisi mokomoko ya ntina, lakisáká ndenge ya kosalela yango. Kosuka te na kolobela makambo likolólikoló.