Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 14

Kobimisa polele makanisi ya ntina

Kobimisa polele makanisi ya ntina

Baebre 8:1

NA MOKUSE: Salisá bato bálanda lisolo na yo, mpe monisá polele ndenge oyo likanisi mokomoko ya ntina eyokani na mokano oyo ozali koluka kokokisa mpe ndenge oyo eyokani na likanisi mobimba ya lisolo na yo.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Zalá na mokano. Luká koyeba soki lisolo na yo ezali mpo na koyebisa bato makambo, to kondimisa bango, to kopesa bango mposa ya kosalela makambo mpe na nsima, bongisá yango na mokano wana. Luká ete makanisi nyonso ya ntina esalisa yo okokisa mokano wana.

  • Zongeláká likanisi ya ntina ya lisolo na yo. Ntango ozali kosala lisolo na yo, zongeláká maloba ya ntina to mpe saleláká maloba mosusu mpo na kolobela kaka likambo yango.

  • Bimisáká makanisi ya ntina polele mpe na ndenge ya pɛtɛɛ. Poná kaka makanisi ya ntina oyo esimbi lisolo na yo mpe oyo okoki kolimbola malamu na kotalela ntango oyo bapesi yo. Kopona makanisi ya ntina ebeleebele te, lobelá polele mokomoko na yango, pemáká mwa moke liboso ya koleka na likanisi mosusu, mpe monisáká polele ete osilisi likanisi moko mpe olingi koleka na likanisi mosusu.