Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 15

Komonisa ete ozali kondima makambo oyo ozali koloba

Komonisa ete ozali kondima makambo oyo ozali koloba

1 Batesaloniki 1:5

NA MOKUSE: Monisá ete ozali kondima mpenza makambo oyo ozali koteya mpe ete makambo yango ezali na ntina mingi.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Mibongisá malamumalamu. Yekolá lisolo na yo tii okoyeba malamu makanisi na yango ya ntina mpe ndenge oyo bavɛrsɛ ya Biblia ezali kondimisa yango. Salá makasi obimisa makanisi ya ntina ya lisolo na yo na maloba moke mpe ya pɛtɛɛ. Luká mingimingi makambo oyo ekoki kosalisa bato oyo bakoyoka yo. Bondelá mpo na kosɛnga elimo santu.

  • Salelá maloba oyo ekomonisa ete ozali kondima makambo oyo ozali koloba. Na esika ozongela kaka maloba oyo ekomami na plan to na mokanda, lobá yango na maloba na yo moko. Zalá na elobeli oyo ekomonisa ete ozali mpenza kondima makambo oyo ozali koloba.

  • Maloba na yo euta mpenza na motema. Lobá na mongongo oyo ebongi. Soki yango emonanaka mabe te na mboka na bino, mbala na mbala, taláká bilongi ya bato oyo bazali koyoka yo.