Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 2

Koloba lokola ozali kosolola na bato

Koloba lokola ozali kosolola na bato

2 Bakorinti 2:17

NA MOKUSE: Lobá ndenge olobaka mpe maloba na yo emonisa ndenge oyo ozali koyoka mpo na likambo ozali kolobela mpe mpo na bato oyo bazali koyoka yo.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Bondelá mpe mibongisá malamu. Bondelá Nzambe asalisa yo otya makanisi na makambo oyo okoteya, kasi epai na yo moko te. Fandisá malamu na motó na yo makanisi ya ntina oyo olingi koteya. Bimisá makanisi na maloba na yo moko, na esika ozongela kaka maloba oyo ezali na plan.

  • Maloba na yo euta na motema. Omituna mpo na nini bato bazali na mposa ya koyoka makambo oyo okoloba. Kanisá nde bango. Soki osali bongo, ndenge na yo ya kotɛlɛma, bajɛstɛ na yo, mpe elongi na yo ekomonisa ete ozali koloba makambo oyo euti mpenza na motema.

  • Taláká bato oyo bazali koyoka yo. Soki ezali mabe te na mboka na bino, taláká bato na bilongi. Ntango ozali kosala diskur, taláká mwa moke moto mokomoko na elongi, na esika olekisaka kaka miso likoló ya mitó ya bato.