Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 20

Ndenge malamu ya kosukisa lisolo

Ndenge malamu ya kosukisa lisolo

Mosakoli 12:13, 14

NA MOKUSE: Ntango ozali kosukisa lisolo na yo, pesá bato oyo bazali kolanda yo mposa ya kondima mpe kosalela makambo oyo bayoki.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Yokanisá maloba na yo ya nsuka na lisolo na yo mobimba. Zongelá makanisi ya ntina mpe motó ya likambo ya lisolo na yo to salelá maloba mosusu mpo na kolobela yango.

  • Pesá bato mposa. Yebisá bato makambo oyo basengeli kosala, mpe pesá bango bantina malamu ya kosala yango. Elobeli na yo elakisa ete yo moko ozali kondima makambo oyo ozali koloba mpe ete ezali na ntina.

  • Maloba na yo ya nsuka ezala mokuse mpe mindɔndɔ te. Kebá ete obakisa te likanisi mosusu ya ntina. Na mwa maloba mokuse oyo ebongi, pesá bato mposa ya kosalela makambo oyo bayoki.