Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 4

Komonisa ntina oyo olingi kotánga vɛrsɛ

Komonisa ntina oyo olingi kotánga vɛrsɛ

Matai 22:41-45

NA MOKUSE: Bongisá makanisi ya bato liboso ya kotánga vɛrsɛ.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Kanisá mpo na nini okotánga vɛrsɛ yango. Liboso ya kotánga vɛrsɛ, lobá mwa maloba oyo ekosalisa bato bámona likanisi ya ntina oyo olingi kobimisa na vɛrsɛ yango.

  • Monisá ete Biblia eleki mikanda nyonso. Ntango ozali koloba na bato oyo bandimaka Nzambe, lakisá ete Biblia ezali “Liloba ya Nzambe,” mpo na komonisa ete bwanya oyo ezali na Biblia eleki bwanya mosusu nyonso.

  • Pesá bato mposa ya koyoka maloba ya vɛrsɛ. Tuná motuna moko oyo bokozwa eyano na vɛrsɛ yango, to lobelá mokakatano moko oyo vɛrsɛ yango ekosilisa, to lobelá etinda moko oyo vɛrsɛ wana ekosalisa bato bákanga ntina na yango.