Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 6

Komonisa polele ndenge ya kosalela makanisi ya vɛrsɛ

Komonisa polele ndenge ya kosalela makanisi ya vɛrsɛ

Yoane 10:33-36

NA MOKUSE: Kosuka kaka te na kotánga vɛrsɛ, bongo na nsima oleki na likanisi mosusu. Salá makasi bato bámona polele ndenge vɛrsɛ oyo otángi eyokani na likambo oyo ozali koteya.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Bimisá maloba ya ntina. Nsima ya kotánga vɛrsɛ moko, bimisá maloba oyo eyokani na likambo oyo ozali kolobela. Mpo na kosala yango, okoki kozongela maloba yango to kotuna bato motuna oyo ekosalisa bango moko bámona maloba yango.

  • Bimisá likanisi ya ntina. Soki liboso ya kotánga vɛrsɛ moko omonisaki malamu ntina oyo olingi kotánga yango, limbolá ndenge oyo maloba na yango eyokani na ntina wana.

  • Koluka mindɔndɔ te mpo na kobimisa liteya. Kolobela te makambo mosusu ya vɛrsɛ oyo eyokani te na likambo oyo ozali kolobela. Nsima ya kotalela makambo bato oyo bazali koyoka yo bayebi mpo na motó ya likambo wana, poná makanisi nini ya vɛrsɛ okolobela mpo liteya ebima polele mpe bato bákanga ntina na yango.