Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 8

Bandakisa oyo ezali koteya

Bandakisa oyo ezali koteya

Matai 13:34, 35

NA MOKUSE: Kolisá mayele na yo ya koteya na kosalela bandakisa ya mindɔndɔ te, oyo ekosepelisa bato mpe ekoteya bango makambo ya ntina.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Poná bandakisa ya mindɔndɔ te. Lokola Yesu, salelá makambo ya mikemike mpo na kolimbola makambo ya minene, mpe makambo ya pɛtɛɛ mpo na kolimbola makambo ya mpasi. Koluka te kobakisa makambo mosusu oyo ezangi ntina, oyo ekokómisa ndakisa mindɔndɔ. Luká ete makambo oyo ndakisa na yo elobeli eyokana mpenza na liteya oyo olingi kobimisa mpo soki eyokani te, okotya mobulu na mitó ya bato.

  • Kanisá bato oyo bakoyoka yo. Poná bandakisa oyo eyokani na makambo oyo bato yango basalaka to basepelaka na yango. Kebá ete bandakisa oyo okopesa eyokisa bato nsɔni te mpe esilikisa bango te.

  • Teyá likanisi ya ntina. Pesá ndakisa na makambo ya ntina, kasi na makambo ya mikemike te. Salá makasi ete bato oyo bakoyoka yo bákanga liteya oyo okobimisa na ndakisa wana, kasi básuka kaka te na kokanga ndakisa yango moko.