Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 9

Koyeba kosalela biloko ya kolakisa

Koyeba kosalela biloko ya kolakisa

Ebandeli 15:5

NA MOKUSE: Salelá biloko oyo okoki kolakisa mpo makanisi ya ntina ezala polele mpe etikala na mitó ya bato.

NDENGE YA KOSALA YANGO:

  • Poná biloko ya kolakisa oyo ekobongisa lisusu mateya na yo. Salelá bililingi, bakarte, bafɔtɔ, to biloko mosusu mpo na kobimisa makanisi ya ntina, kasi te mpo na makambo ya mikemike. Salisá bato oyo bakoyoka yo bákanga liteya oyo obimisi, kasi básuka kaka te na kokanisa eloko oyo olakisi.

  • Luká koyeba soki moto nyonso akomona eloko oyo okolakisa.