Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Mokanda ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

‘Bosengeli nde kozala bateyi.’ (Ebr. 5:12) Kanisá naino! Yehova, Moteyi oyo aleki bateyi nyonso, apesi biso mokumba ya koteya bato mosusu makambo na ye! Mbala nyonso oyo tozwi mokumba ya koteya makambo ya Yehova, ezala na libota, na lisangá, to na mosala ya kosakola, ezalaka libaku malamu mpe likambo ya kozwa na lisɛki te. Ndenge nini tokoki kokokisa mokumba yango malamu?

Maloba oyo ntoma Paulo akomelaki Timote epesi eyano na motuna yango; elobi: “Kobá komipesa na kotánga liboso ya bato nyonso, na kolendisa, na koteya.” Abakisaki: “Soki osali bongo okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bazali koyoka yo.” (1 Tim. 4:13, 16) Nsango oyo tozali komemela bato ekoki kosalisa bango bázwa bomoi ya seko. Yango wana, ezali na ntina mingi mokomoko na biso asala makasi mpo na kobongisa ndenge na ye ya kotánga mpe ya koteya. Mwa buku oyo ebongisami mpo na kosalisa yo na likambo yango. Talá mwa makambo oyo okomona na kati:

Na lokasa mokomoko, okomona vɛrsɛ ya Biblia oyo ezali na likanisi oyo eyokani na liteya oyo ozali koyekola to ezali na ndakisa oyo emonisi ndenge ya kosalela liteya yango

Yehova azali ‘Molakisi Monene.’ (Yis. 30:20) Mwa buku oyo ekosalisa yo obongisa ndenge na yo ya kotánga mpe ya koteya; kasi kobosana te ete nsango oyo toteyaka ezali ya Yehova mpe ye nde abendaka bato. (Yoa. 6:44) Yango wana, bondeláká mingi mpo na kosɛnga elimo santu. Saleláká mingi Liloba ya Nzambe. Salisáká bato bámona Yehova, kasi yo te. Salisáká bato oyo bazali koyoka yo bálinga Yehova na motema mobimba.

Ozali na mokumba ya koteya nsango eleki ntina oyo bato basengeli koyoka. Tozali na elikya ete soki otye motema na “makasi oyo Nzambe azali kopesa,” okokóma kotánga mpe koteya malamu.​—1 Pe. 4:11.

Bandeko na yo,

Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova