Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 3

“Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba”

“Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba”

Nini etindaka biso tókoba kolanda Yesu? Ntoma Paulo apesi eyano: “Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba.” (2 Bakorinti 5:14) Na eteni oyo, tokoyekola bolingo oyo Yesu azali na yango mpo na Yehova, mpo na bato, mpe mpo na mokomoko na biso. Bolingo yango ezali mpenza komemisa biso mokumba. Esimbaka mitema na biso, mpe etindaka biso tósala eloko, tókola na oyo etali kolanda ndakisa ya Nkolo na biso.