Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 15

“Ayokaki mawa”

“Ayokaki mawa”

“Nkolo, miso na biso efungwama”

1-3. (a) Yesu asali nini ntango bato mibale oyo bakufá miso basɛngi ye asalisa bango? (b) Elobeli “ayokaki mawa” elimboli nini? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

 BATO mibale oyo bakufá miso bafandi pembeni ya nzela, na libándá ya Yeriko. Bayaka wana mikolo nyonso kosɛnga mbongo, mpo ezali esika oyo bato mingi balekaka. Nzokande mokolo ya lelo, bakokutana na likambo moko oyo ekobongola mpenza bomoi na bango.

2 Na mbala moko, bato yango oyo basɛngasɛngaka biloko bayoki yikiyiki moko boye. Lokola bakoki te komona nini ezali koleka, moko na bango atuni mpo na nini yikiyiki bongo, mpe bayebisi ye ete: “Yesu moto ya Nazarete nde azali koleka!” Yesu azali kokende na Yerusaleme mpo na mbala ya nsuka. Kasi azali ye moko te; ebele ya bato bazali kolanda ye. Nsima ya koyoka ete Yesu nde azali koleka, bato yango oyo bakufá miso babandi koganga makasi ete: “Nkolo, Mwana ya Davidi, yokelá biso mawa!” Ebele yango ya bato basiliki mpe bayebisi bato yango ete báfanda nyɛɛ, kasi baboyi. Bazali kaka koganga.

3 Yesu ayoki koganga na bango atako ebele ya bato bazali kotya makɛlɛlɛ. Akosala nini? Azali kokanisa makambo mingi na motema na ye. Alingi akóma na pɔsɔ ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. Ayebi ete bampasi mpe liwa moko ya nsɔmɔ ezali kozela ye na Yerusaleme. Atako bongo, atye likebi na koganga na bango. Atɛlɛmi mpe asɛngi bámemela ye bato yango oyo bazali koganga. Bato yango oyo bakufá miso babondeli ye ete: “Nkolo, tolingi miso na biso efungwama.” Lokola “ayokaki mawa,” Yesu asimbi miso na bango, mpe bakómi komona. a Na mbala moko, babandi kolanda ye.​—Luka 18:35-43; Matai 20:29-34.

4. Ndenge nini Yesu akokisaki esakweli oyo ete ‘akoyokela moto mpamba mawa’?

4 Ezali kaka te na libaku oyo nde amonisaki motema mawa. Mbala mingi mpe na mabaku ndenge na ndenge, Yesu amonisaki mpenza motema mawa. Biblia esakolaki ete ‘akoyokela moto mpamba mawa.’ (Nzembo 72:13) Yesu ayebaki mpenza komitya na esika ya bato, yango ekokisaki esakweli yango. Azalaki kosepela kosalisa bango. Motema mawa nde ezalaki kotinda ye asakola. Tiká tómona ndenge Baevanzile emonisi motema mawa ya Yesu na maloba mpe na misala; mpe tótalela ndenge oyo tokoki komonisa motema mawa lokola ye.

Azalaki komemya mayoki ya bato

5, 6. Bandakisa nini emonisi ete Yesu ayebaki mpenza komitya na esika ya bato?

5 Yesu ayebaki mpenza komitya na esika ya bato. Ayebaki mpasi ya bato oyo bazalaki konyokwama mpe azalaki komitya na esika na bango. Yesu akutanaki te na makambo ya mpasi nyonso oyo bakutanaki na yango, atako bongo, mpasi na bango ekómaki mpenza lokola mpasi na ye. (Baebre 4:15) Ntango abikisaki mwasi moko oyo aumelaki na maladi ya kotanga makila mbula 12, Yesu alobelaki maladi ya mwasi yango ete ezalaki ‘maladi moko ya mpasi’; yango emonisi ete ayebaki minyoko mpe mpasi makasi oyo mwasi yango azalaki koyoka. (Marko 5:25-34) Ntango amonaki Maria mpe baoyo bazalaki elongo na ye bazali kolela ntango Lazare akufaki, atungisamaki makasi na mawa na bango mpe abulunganaki na makanisi. Atako ayebaki ete akosekwisa Lazare, Yesu ayokaki mawa mpe alelaki, abimisaki mai ya miso.​—Yoane 11:33, 35.

6 Mokolo mosusu, moto moko ya maba ayaki epai ya Yesu mpe abondelaki ye ete: “Soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.” Yesu, moto ya kokoka oyo atikalá kobɛla ata mokolo moko te, asalaki nini? Amityaki na esika ya moto yango ya maba. Ya solo, “ayokaki mawa.” (Marko 1:40-42) Na nsima, asalaki likambo moko ya kokamwa. Ayebaki malamu ete, na kotalela Mibeko, bato ya maba bazalaki mbindo mpe basengelaki te kozala esika moko na bato mosusu. (Balevi 13:45, 46) Na ntembe te, Yesu akokaki kobikisa moto yango kozanga ete asimba ye na nzoto. (Matai 8:5-13) Kasi, amonaki malamu asembola lobɔkɔ na ye mpe asimba moto yango ya maba, alobaki na ye: “Nalingi. Kómá pɛto.” Na mbala moko, maba na ye elimwaki. Yesu ayebaki mpenza komitya na esika ya bato!

‘Tómityaka na esika ya basusu’

7. Nini ekoki kosalisa biso tóyeba komitya na esika ya basusu, mpe ndenge nini tokoki komonisa ezaleli yango?

7 Lokola tozali bakristo, tosengeli komekola Yesu na likambo etali koyeba komitya na esika ya basusu. Biblia elendisi biso ete ‘tómityaka na esika ya basusu.’ b (1 Petro 3:8) Mbala mosusu ezalaka mpasi tóyeba ndenge bato oyo bazali na maladi oyo esilaka te to baoyo bazali konyokwama na makanisi bayokaka, mingimingi, soki biso moko tokutaná naino te na mpasi ya ndenge wana. Kasi, tóbosana te ete komitya na esika ya basusu esɛngaka te kaka tókutana na makambo ya mpasi oyo bazali na yango. Yesu amityaki na esika ya bato ya maladi atako ye moko abɛlaki te. Na yango, ndenge nini tokoki koyeba komitya na esika ya basusu? Soki tozali koyoka na motema molai nyonso bato oyo bazali na mpasi ntango bazali kofungwela biso motema na bango mpe koyebisa biso ndenge bazali komiyoka. Tokoki komituna: ‘Soki nazalaki na esika na bango, nalingaki komiyoka ndenge nini?’ (1 Bakorinti 12:26) Soki tozali mpenza komitya na esika ya basusu, tokokoka ‘koloba na ndenge ya kobɔndisa epai ya baoyo banyokwami na makanisi.’ (1 Batesaloniki 5:14) Na bantango mosusu, komitya na esika ya basusu esengeli kosuka kaka te na maloba, kasi ekoki mpe kosɛnga kolela elongo na bango. Baroma 12:15 elobi: “Bólelaka elongo na bato oyo bazali kolela.”

8, 9. Ndenge nini Yesu amonisaki ete ayebaki komitya na esika ya bato?

8 Yesu azalaki komitya na esika ya bato, mpe azalaki kosala te makambo oyo ekozokisa bango. Kanisá oyo esalemaki ntango bamemelaki Yesu moto moko oyo akufá matoi mpe oyo azalaki na mokakatano ya koloba. Lokola amonaki ete moto yango akokaki koyoka nsɔni, Yesu asalaki likambo moko oyo amesanaki kosala te ntango azali kobikisa bato: “Abendaki [mobali yango] pembeni.” Lokola ebele yango ya bato bazalaki komona te, abikisaki moto yango.​—Marko 7:31-35.

9 Yesu asalaki mpe bongo ntango bamemelaki ye moto moko oyo akufá miso mpe basɛngaki ete abikisa ye. Yesu “asimbaki moto yango oyo akufá miso na lobɔkɔ” mpe “amemaki ye libándá ya mboka.” Na nsima, abikisaki moto yango mokemoke. Soki asalaki bongo, ekokaki kozala mpo na kosalisa bɔɔngɔ mpe miso ya moto yango emesana mokemoke na kongɛnga ya moi mpe na biloko ndenge na ndenge ya mokili oyo ezalaki zingazinga na ye. (Marko 8:22-26) Yesu ayebaki mpenza komitya na esika ya bato!

10. Ndenge nini tokoki komonisa ete toyebi komitya na esika ya basusu?

10 Lokola tolandaka Yesu, biso mpe tosengeli koyeba komitya na esika ya basusu. Na yango, lokola toyebi ete koloba kozanga kokanisa ekoki kozokisa bato, tokebaka na maloba na biso. (Masese 12:18; 18:21) Maloba ya mabe, maloba ya kozokisa, mpe maloba ya kofinga ebongi te na bakristo oyo bayebi komitya na esika ya basusu. (Baefese 4:31) Bankulutu, ndenge nini bokoki komonisa ete bomityaka na esika ya basusu? Ntango bozali kopesa toli, bósala ete maloba na bino ezala ya boboto mpe bómemya moto oyo azali koyoka bino. (Bagalatia 6:1) Baboti, ndenge nini bokoki komonisa ete bomityaka na esika ya bana na bino? Ntango bozali kopesa bango disiplini, bósala makasi ete bópesa yango na ndenge ya kosambwisa bango te.​—Bakolose 3:21.

Azalaki kosepela kosalisa bato

11, 12. Masolo nini ya Biblia emonisi ete Yesu azalaki kozela te básɛnga ye liboso amonisela bato motema mawa?

11 Mpo na komonisela bato motema mawa, Yesu azalaki kozela kaka te básɛnga ye. Kutu, motema mawa elimboli te kokanga mabɔkɔ, kasi esengeli nde kotinda moto asala eloko to likambo moko ya malamu. Yango wana, tokokamwa te na komona ete motema mawa nde ezalaki kotinda Yesu asala eloko mpo na kosalisa bato. Na ndakisa, ntango ebele ya bato bafandaki elongo na ye mikolo misato mobimba kozanga eloko ya kolya, moto moko te alobaki na Yesu ete bato bazali na nzala to atindaki ye asala eloko. Lisolo elobi ete: “Yesu abengaki bayekoli na ye mpe alobaki: ‘Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa, mpo bafandi na ngai mikolo misato mobimba mpe bazali na eloko ya kolya te. Nalingi kotika bango bázonga na nzala te, noki te bákwea na nzela.’” Na yango, na bolingo na ye moko mpenza, aleisaki ebele yango ya bato na ndenge ya likamwisi.​—Matai 15:32-38.

12 Tótalela lisolo mosusu. Na mobu 31 T.B., ntango Yesu akómaki pene ya engumba Naine, akutanaki na likambo moko ya mawa. Molɔngɔ ya bato bauti na engumba yango bamemi ebembe, mbala mosusu bazali kokende na malita oyo ezali pene wana, pembeni ya bangomba, mpo na kokunda “mwana kaka moko ya mama na ye. . . mwasi oyo mobali akufá.” Kanisá mpasi oyo mama wana azalaki na yango na motema! Etikalaki moke bákunda mwana na ye se moko, mpe azalaki na mobali te mpo akabola na ye mawa. Na bato yango nyonso, Yesu “amonaki” mwasi oyo mobali akufá, oyo mpe sikoyo azangi mwana. Ntango Yesu amonaki mwasi yango ayokaki mpasi na motema​—ɛɛ, “ayokelaki ye mawa.” Moto moko te asɛngaki Yesu asala eloko, kasi motema mawa na ye nde etindaki ye. Na yango “apusanaki, asimbaki mbeto ya ebembe,” mpe azongisaki elenge mobali yango na bomoi. Nini esalemaki na nsima? Yesu asɛngaki te na elenge mobali yango ete azala elongo na ebele wana ya bato oyo bazalaki kotambola elongo na ye. Nzokande, Yesu “apesaki ye epai ya mama na ye,” mpe bazongelaki bomoi na bango ya libota, na ndenge yango andimisaki mwasi oyo mobali akufá ete azwi moto oyo akosalisa ye na libota.​—Luka 7:11-15.

Tósalisa mpenza baoyo bazali na bosɛnga

13. Ndenge nini tokoki komekola Yesu na likambo etali kosalisa mpenza bato oyo bazali na bosɛnga?

13 Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yesu? Na ntembe te, biso tokoki te kopesa bato bilei na ndenge ya likamwisi to kozongisa bakufi na bomoi. Kasi, tokoki komekola Yesu na likambo etali kosalisa bato oyo bazali na bosɛnga. Ekoki kozala ete ndeko moko mokristo azangi mbongo to abungisi mosala na ye. (1 Yoane 3:17) Ndako ya ndeko mwasi moko oyo mobali akufá ekoki kosɛnga kobongisa yango nokinoki. (Yakobo 1:27) Mbala mosusu, toyebi libota moko oyo moto akufi oyo tosengeli kobɔndisa to kosunga. (1 Batesaloniki 5:11) Na makambo ya ndenge wana, tokozela te ete básɛnga biso liboso tósalisa. (Masese 3:27) Motema mawa ekotinda biso tósalisa na kotalela makoki na biso. Tóbosana te ete mwa likambo ya boboto to mwa maloba ya kobɔndisa oyo euti na motema ekoki komonisa mpenza motema mawa.​—Bakolose 3:12.

Motema mawa etindaki Yesu asakola

14. Mpo na nini Yesu atyaki mosala ya kosakola nsango malamu na esika ya liboso?

14 Ndenge tomonaki na Eteni 2 ya buku oyo, Yesu atiká ndakisa moko malamu na oyo etali kosakola nsango malamu. Alobaki ete: “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.” (Luka 4:43) Mpo na nini atyaki mosala yango na esika ya liboso? Libosoliboso mpo azalaki kolinga Nzambe. Kasi ezali mpe na likambo mosusu oyo etindaki Yesu asala bongo: Motema mawa nde etindaki ye akokisa mposa ya elimo oyo bato bazalaki na yango. Kosilisa nzala ya elimo nde ezalaki likambo eleki monene oyo emonisaki motema mawa ya Yesu. Sikoyo tótalela makambo mibale oyo emonisi ndenge Yesu azalaki kotalela bato oyo azalaki kosakwela. Yango ekoki kosalisa biso tóyeba nini etindaka biso tósakola.

15, 16. Lobelá makambo mibale oyo emonisi ndenge Yesu azalaki kotalela bato oyo azalaki kosakwela.

15 Na mobu 31 T.B., nsima ya mbula soki mibale ya komipesa na molende mpenza na mosala ya kosakola, Yesu abandaki “kolekaleka na bingumba nyonso mpe bamboka” ya Galile. Makambo oyo amonaki esimbaki motema na ye. Ntoma Matai ayebisi ete: “Ntango amonaki ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, mpo bazalaki komona mpasi mpe basundolamaki lokola bampate oyo ezangi mobateli.” (Matai 9:35, 36) Yesu amityaki na esika ya bato. Ayebaki malamu bobola na bango ya elimo. Ayebaki ete bazalaki konyokwama mpe basundolamaki na bato oyo basengelaki kobatela bango, elingi koloba, bakambi ya mangomba. Lokola azalaki mpenza na motema mawa, Yesu asalaki makasi apesa bato yango nsango ya elikya. Bato yango bazalaki mpenza na mposa ya nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe.

16 Likambo ya ndenge wana mpe esalemaki mwa basanza na nsima, pene na eleko ya Elekeli ya mobu 32 T.B. Na libaku yango, Yesu ná bantoma na ye bamataki na masuwa mpe bakatisaki Mbu ya Galile mpo na koluka esika bato bazali te mpo bápema. Kasi ebele ya bato bapotaki mbangu pembeni ya mbu mpe bakómaki na ngámbo mosusu ya mbu liboso ya masuwa. Yesu asalaki nini? “Ntango abimaki na masuwa, amonaki ebele mpenza ya bato, mpe ayokelaki bango mawa, mpo bazalaki lokola bampate oyo ezangi mobateli. Bongo abandaki koteya bango makambo mingi.” (Marko 6:31-34) Na mbala oyo mpe, Yesu “ayokelaki bango mawa” mpo bato yango bazalaki babola na elimo. Lokola “bampate ezangi mobateli,” bazalaki na nzala ya elimo mpe bazangaki babateli. Motema mawa nde etindaki Yesu asakola, kasi eloko mosusu te.

Tómonisa motema mawa ntango tozali kosakola

17, 18. (a) Nini etindaka biso tósakola? (b) Ndenge nini tokoki komonisela basusu motema mawa?

17 Lokola tolandaka Yesu, nini etindaka biso tósakola? Ndenge tomonaki na Mokapo 9 ya buku oyo, tozali na mosala, to mokumba ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli. (Matai 28:19, 20; 1 Bakorinti 9:16) Kasi tosakolaka te kaka mpo ezali mokumba to etinda bapesi biso. Bolingo oyo tolingaka Yehova ezali likambo eleki ntina oyo etindaka biso tósakola nsango malamu ya Bokonzi na ye. Lisusu, motema mawa oyo tozalaka na yango mpo na bato ya mangomba mosusu etindaka biso mpe tósakola. (Marko 12:28-31) Na yango, ndenge nini tokoki komonisela basusu motema mawa?

18 Tosengeli kotalela bato ndenge Yesu azalaki kotalela bango ete “banyokwamaki mpe basundolamaki lokola bampate oyo ezangá mobateli.” Kanisá ete omoni mwana-mpate moko oyo ebungi mpe ezangi elikya. Soki ezangi mobateli oyo akoki komema yango na esika matiti mpe mai ezali, nyama yango ekokufa na nzala mpe na mposa ya mai. Okoyokela mpenza mwana-mpate yango mawa, boye te? Na ntembe te, okosala nyonso opesa yango bilei mpe mai. Bato mingi oyo bayebi naino nsango malamu te bazali lokola mwana-mpate yango. Lokola bakambi mabe ya mangomba basundoli bango, bazali na nzala mpe na mposa ya mai ya elimo mpe bazangi elikya ya solosolo mpo na mikolo ezali koya. Tozali na eloko oyo bazali na mposa na yango: bilei ya elimo ya kitoko mpe mai ya kokitisa motema ya solo oyo ezwami na Liloba ya Nzambe. (Yisaya 55:1, 2) Soki tokanisi mposa ya elimo ya bato oyo bazali zingazinga na biso, tokoyokela bango mawa. Soki tozali koyokela bato mawa lokola Yesu, tokosala nyonso mpo tóyebisa bango elikya ya Bokonzi.

19. Tokoki kosala nini mpo na kolendisa moyekoli ya Biblia oyo akokisi masɛngami mpo abanda kosakola elongo na lisangá?

19 Ndenge nini tokoki kosalisa basusu bálanda ndakisa ya Yesu? Kanisá ete tolingi kolendisa moyekoli moko ya Biblia, oyo akokisi masɛngami mpo abanda kosakola elongo na lisangá. To mbala mosusu, tolingi kosalisa ndeko moko oyo atiká kosakola azongela molende na ye. Ndenge nini tokoki kosalisa bato ya ndenge wana? Tosengeli kosimba mitema na bango. Tóbosana te ete libosoliboso Yesu ‘ayokelaki bato mawa’, mpe na nsima ateyaki bango. (Marko 6:34) Na yango, soki tosalisi bango bámonisa motema mawa, mitema na bango ekotinda bango bázala lokola Yesu mpe báyebisa basusu nsango malamu. Tokoki kotuna bango: “Ndenge nini nsango ya Bokonzi ebongolaki bomoi na yo ntango ondimaki yango? Ezali boni mpo na bato oyo bayebi naino nsango yango te? Omoni te ete bango mpe bazali na mposa ya nsango malamu? Okoki kosala nini mpo na kosalisa bango?” Kasi, tóyeba ete eloko mpenza oyo etindaka biso tósakola ezali bolingo oyo tolingaka Nzambe mpe mposa oyo tozalaka na yango ya kosalela ye.

20. (a) Kolanda Yesu esɛngi mpe nini? (b) Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?

20 Kolanda Yesu esuki kaka te na kozongelazongela maloba na ye mpe makambo oyo asalaki. Tosengeli mpe kozala na “makanisi” oyo azalaki na yango. (Bafilipi 2:5) Na yango, tozali mpenza na botɔndi ndenge Biblia emonisi biso makanisi mpe mayoki oyo ezalaki komonana na maloba mpe na misala ya Yesu! Soki toyebi malamu “makanisi ya Kristo,” tokoyeba komitya na esika ya basusu mpe komonisela bango motema mawa; na bongo, tokosalela bango makambo ndenge Yesu azalaki kosalela bato. (1 Bakorinti 2:16) Na mokapo oyo elandi, tokolobela makambo ndenge na ndenge oyo emonisi ndenge Yesu azalaki mpenza kolinga bayekoli na ye.

a Na maloba nyonso ya Grɛki oyo elobelaka motema mawa, oyo babongoli na “ayokaki mawa” nde eleki nyonso na nguya. Buku moko elobi ete liloba yango emonisi “kaka te mpasi oyo moto ayokaka ntango amoni moto mosusu azali konyokwama, kasi mpe mposa makasi oyo azalaka na yango ya kosalisa mpe kosilisa mpasi ya moto oyo azali konyokwama.”

b Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “komitya na esika ya basusu” elimboli mpenzampenza “komona mpasi elongo na bango.”