Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 14

“Ebele ya bato bapusanaki epai na ye”

“Ebele ya bato bapusanaki epai na ye”

“Tiká bana báya epai na ngai”

1-3. Nini esalemi ntango baboti bamemi bana na bango epai ya Yesu, mpe yango emonisi nini mpo na Yesu?

 YESU ayebi ete nsuka ya bomoi na ye awa na mabele ekómi mpenza pene. Atikali kaka na mwa bapɔsɔ, kasi makambo ya kosala ezali naino mingi! Azali kosakola elongo na bantoma na ye na Perea, etúká oyo ezali na ɛsti ya Ebale Yordani. Bazali kosakola nzelanzela wana bazali kokende na ngámbo ya sudi na Yerusaleme, epai makambo ekoya ndongo ntango Yesu akosala Elekeli na ye ya nsuka.

2 Ntango Yesu asilisi lisolo na ye ya benda bika ná bakambi mosusu ya lingomba, mwa yikiyiki ebimi. Bato bazali komema bana na bango mpo bámona ye. Emonani ete bana yango bazali na mbula ekeseni, mpamba te Marko alobeli bango kaka na maloba oyo asalelaki liboso mpo na kolobela mwana moke ya mbula 12, nzokande Luka asaleli liloba oyo ekoki kobongolama na “bana ya mike.” (Luka 18:15; Marko 5:41, 42; 10:13) Ndenge toyebi yango, esika nyonso oyo bana bazali, mbala mingi makɛlɛlɛ mpe mobulu ezangaka te. Bayekoli ya Yesu bapameli baboti, mpo mbala mosusu bakanisi ete Nkolo azali na makambo mingi ya kosala, akozwa ntango te ya kotyela bana likebi. Yesu asali nini?

3 Ntango Yesu amoni bongo, asiliki. Asilikeli nani? Bana? Baboti? Te. Asilikeli nde bayekoli na ye! Alobi: “Bótika bana mike báya epai na ngai; bómeka te kopekisa bango, mpo Bokonzi ya Nzambe ezali ya bato oyo bazali lokola bango. Ya solo nalobi na bino, moto oyo ayambi Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke te akokɔta kuna ata moke te.” Na nsima, Yesu azwaki bana “na mabɔkɔ na ye,” mpe apamboli bango. (Marko 10:13-16) Elobeli oyo Marko asaleli awa emonisi ete Yesu ayambi bango na bolingo mpenza, to mbala mosusu ndenge mokomi moko amonisi yango, ekoki kozala “amemi bango na mabɔkɔ na ye.” Yango emonisi polele ete Yesu alingaka mpenza bana mike. Kasi, yango eteyi mpe biso likambo mosusu mpo na ye: moto nyonso akokaki kopusana epai na ye.

4, 5. (a) Nini endimisi biso ete bato bazalaki kobanga te kopusana epai ya Yesu? (b) Mituna nini tokotalela na mokapo oyo?

4 Soki Yesu azalaka makambo makasimakasi, moto oyo akipaka bato te, to moto ya lolendo, mbɛlɛ bana wana balingaki kopusana epai na ye te; baboti na bango mpe balingaki koya na bango epai na ye te. Kanisá ete ozali wana ntango likambo yango ezali kosalema; na ntembe te, olingaki komona ndenge baboti yango bazali kosepela ntango moto wana ya boboto amoniseli bana na bango bolingo, amonisi ete bana bazali na motuya na miso ya Nzambe, mpe apamboli bango, boye te? Ya solo, atako Yesu azalaki na mokumba monene koleka, azalaki kaka kondima ete bato bápusana epai na ye.

5 Banani mosusu bapusanaki epai ya Yesu? Nini esalaki ete bato bákakatana te kopusana epai na ye? Mpe ndenge nini tokoki komekola Yesu na likambo yango? Tiká tómona yango.

Banani bazalaki kopusana epai ya Yesu?

6-8. Mbala mingi Yesu azalaki esika moko na banani, mpe ndenge nini lolenge oyo azalaki kotalela bango ekeseni na oyo ya bakambi ya mangomba?

6 Ntango ozali kotánga Baevanzile, okoki kokamwa komona ndenge bato mingi bazalaki kokakatana te kopusana epai ya Yesu. Mbala mingi, basalelaka maloba “ebele ya bato” ntango bazali kolobela Yesu, na ndakisa: “Ebele ya bato balandaki ye; bautaki na Galile.” “Ebele mpenza bazingaki ye.” “Ebele ya bato bapusanaki epai na ye.” “Ebele ya bato bazalaki kosala mobembo elongo na ye.” (Matai 4:25; 13:2; 15:30; Luka 14:25) Ɛɛ, mbala mingi ebele ya bato bazalaki zingazinga na Yesu.

7 Mbala mingi, ebele yango ya bato ezalaki bato mpamba, oyo bakambi ya mangomba bazalaki kobenga na lityo nyonso ete “bato ya mokili.” Bafarisai ná banganga-nzambe bazalaki koloba polele ete: “Ebele ya bato wana oyo bayebi Mobeko te, bazali bato oyo balakelamá mabe.” (Yoane 7:49) Mikanda ya Barabi oyo ekomamaki na nsima emonisi mpe likambo yango. Bakambi mingi ya mangomba bazalaki komona bato wana bato mpamba, bazalaki koboya kolya elongo na bango, kosomba biloko na bango, to kozala esika moko na bango. Kutu, bamosusu bazalaki koloba ete bato wana oyo bazangaki koyeba mibeko oyo ekomamá te bazali na elikya ya lisekwa te! Ebele ya bato yango oyo bakonzi ya mangomba bazalaki komona mpamba bazalaki kokima bakambi wana na esika ya koluka lisungi to litambwisi epai na bango. Kasi Yesu azalaki bongo te.

8 Yesu asepelaki kozala elongo na bato mpamba. Alyaki esika moko na bango, abikisaki bango, ateyaki bango, mpe apesaki bango elikya. Nzokande, Yesu ayebaki malamu ete mingi bakoboya libaku ya kosalela Yehova. (Matai 7:13, 14) Atako bongo, azalaki na elikya mpo na mokomoko na bango mpe amonaki ete mingi bakoki kosala oyo ezali malamu. Oyo nde bokeseni kati na ye ná banganga-nzambe mpe Bafarisai oyo ya mitema makasi! Kasi likambo ya kokamwa, ata banganga-nzambe mpe Bafarisai bazalaki kopusana epai ya Yesu, mpe bamosusu kati na bango babongolaki bomoi na bango mpe balandaki ye. (Misala 6:7; 15:5) Bato mosusu ya bozwi mpe ya nguya bazalaki mpe kopusana epai ya Yesu.​—Marko 10:17, 22.

9. Mpo na nini basi bazalaki kopusana epai ya Yesu?

9 Basi bazalaki kokakatana te kopusana epai ya Yesu. Mbala mingi bazalaki komiyoka ete batyolami mpenza na bakambi ya mangomba. Barabi bazalaki kotyola moto nyonso oyo azalaki koteya basi. Kutu, basi bazalaki na ndingisa te ya kopesa litatoli na makambo ya kosambisa; bazalaki kondima litatoli na bango te. Barabi bazalaki ata na libondeli oyo bazalaki kotɔnda Nzambe ndenge babotamá basi te. Kasi, basi bamonaki ete Yesu azalaki kotyola bango te. Mingi bazalaki kopusana epai na ye na mposa makasi ete ateya bango. Na ndakisa, Maria ndeko ya Lazare, afandaki na makolo ya Nkolo, azali koyoka maloba ya Yesu na likebi nyonso, nzokande Marta, ndeko na ye, azalaki koboma nzoto mpo na kolamba biloko. Yesu apesaki Maria longonya ndenge atyaki makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso.​—Luka 10:39-42.

10. Ndenge nini Yesu akesanaki na bakambi ya mangomba na ndenge oyo azalaki kotalela bato ya maladi?

10 Bato ya maladi mpe bazalaki koya ebele epai ya Yesu, atako mbala mingi bakambi ya mangomba bazalaki komona bango bato ya ntina te. Na mibeko ya Moize, bibongiseli ezwamaki ya kotya bato ya maladi ya maba pembeni mpo bato mosusu bázwa maladi yango te; kasi mibeko yango elobaki te ete bázanga komonisela bango boboto. (Balevi, mokapo 13) Nzokande, mibeko ya Barabi oyo ekomamaki na nsima elobaki ete bato ya maba bazalaki bosɔtɔ lokola nyɛi. Bakambi mosusu ya mangomba bakendaki mosika tii kobamba bato ya maba mabanga mpo bápusana pene na bango te! Ezali mpenza mpasi kokanisa ete bato oyo bazalaki kotyolama ndenge wana bápusana ata epai ya moteyi moko, kasi bato ya maba bazalaki kopusana epai ya Yesu. Moto moko ya maba amonisaki kondima na ye na maloba oyo eyebani: “Nkolo, soki olingi, okoki kokómisa ngai pɛto.” (Luka 5:12) Na mokapo oyo elandi, tokomona eyano oyo Yesu apesaki. Kasi sikoyo, tomoni ete likambo yango mpe emonisi ete bato bazalaki kobanga te kopusana epai ya Yesu.

11. Ndakisa nini emonisi ete bato oyo bazalaki koyoka ete bamemi ngambo bazalaki kobanga te kopusana epai ya Yesu, mpe mpo na nini yango ezali na ntina?

11 Baoyo bazalaki koyoka ete bamemi ngambo bazalaki kobanga te kopusana epai ya Yesu. Na ndakisa, kanisá mokolo oyo Yesu azalaki kolya na ndako ya Mofarisai moko. Mwasi moko oyo ayebanaki ete azali mosumuki akɔtaki mpe afukamaki na makolo ya Yesu, mpe abandaki kolela mpo na makambo ya mabe oyo asalá. Mpisoli na ye esukolaki makolo ya Yesu, mpe asalelaki nsuki na ye mpo na kopangwisa yango. Atako moto oyo ayambaki Yesu akamwaki mpe akaniselaki Yesu mabe ndenge atikaki mwasi wana apusana pene na ye, na boboto nyonso Yesu apesaki mwasi yango longonya ndenge abongolaki mpenza motema mpe amonisaki mwasi yango ete Yehova alimbisi ye. (Luka 7:36-50) Oyo nde mpenza ntango oyo ebongi mpo bato oyo bazali koyoka ete bamemi ngambo bákakatana te kopusana epai ya baoyo bakoki kosalisa bango bábongisa boyokani na bango na Nzambe! Nini ezalaki mpenza kosala ete bato bápusana epai ya Yesu?

Mpo na nini bato bazalaki kopusana epai ya Yesu?

12. Mpo na nini tokoki kokamwa te ndenge bato bazalaki kopusana epai ya Yesu?

12 Tóbosana te ete Yesu amekolaki Tata na ye ya likoló oyo atondi na bolingo na ndenge ya kokoka. (Yoane 14:9) Biblia esalisi biso tóbosana te ete Yehova “azali mosika te na mokomoko na biso.” (Misala 17:27) Yehova oyo azali “Moyoki ya libondeli,” azalaka ntango nyonso pene na basaleli na ye ya sembo mpe baoyo nyonso balukaka mpenza koyeba ye mpe kosalela ye. (Nzembo 65:2) Kanisá naino: Moto oyo aleki na nguya mpe aleki monene na molɔ́ngɔ́ mobimba andimaka mpenza ete moto nyonso apusana epai na ye! Lokola Tata na ye, Yesu mpe alingaka bato. Na mikapo oyo elandi, tokolobela bolingo makasi oyo Yesu azalaki na yango mpo na bato. Bato bazalaki kopusana epai ya Yesu mpo bamonaki ete azalaki kolinga bango. Tólobela ndenge mosusu oyo Yesu amoniselaki bato bolingo.

13. Ndenge nini baboti bakoki komekola Yesu?

13 Ezalaki mpasi te bato báyeba ete Yesu azalaki kotyela mokomoko na bango likebi. Ata ntango azalaki na mikakatano makasi, Yesu azalaki kaka kotyela bato likebi. Ndenge tosili komona yango, ntango baboti wana bamemaki bana na bango epai na ye, Yesu azalaki kaka kondima ete bato bápusana epai na ye, atako azalaki na mosala mingi mpe na mikumba minene. Oyo nde ndakisa malamu atikelá baboti! Kobɔkɔla bana na mokili ya lelo ezali mokakatano. Yango wana ezali na ntina ete baboti bapesaka bana nzela ya kosolola na bango. Soki ozali moboti, oyebi ete na bantango mosusu ozalaka na makambo mingi ya kosala mpe ozangaka ntango ya kotyela mwana na yo likebi. Atako bongo, okoki kosalisa mwana na yo ayeba ete okotyela ye likebi? Soki okokisi maloba na yo, mwana na yo akoyeba ntina ya kozala na motema molai. Lisusu, akoyeba ete akoki kopusana epai na yo ntango nyonso oyo azali na mokakatano to bosɛnga moko boye.

14-16. (a) Na libaku nini Yesu asalaki likamwisi na ye ya liboso, mpe mpo na nini yango ezalaki likambo ya kokamwa? (b) Likamwisi oyo Yesu asalaki na Kana emonisi nini mpo na ye, mpe yango eteyi baboti nini?

14 Yesu amonisaki bato ete ayebi mpenza mikakatano na bango. Na ndakisa, tótalela likamwisi ya liboso oyo Yesu asalaki. Azalaki na fɛti moko ya libala na Kana, engumba moko ya Galile. Mokakatano moko ebimaki: vinyo esilaki! Maria, mama ya Yesu, ayebisaki mwana na ye likambo yango. Bongo Yesu asalaki nini? Asɛngaki bato oyo bazalaki kosala misala bátondisa mai na bilokó minene motoba ya mabanga. Ntango bamemelaki mokambi ya fɛti mwa ndambo na yango, amonaki ete ezalaki vinyo ya malamu! Yango ezalaki kaka mayele moko boye asalelaki mpo na kosakana na makanisi ya bato? Te, mai “ebongwanaki vinyo.” (Yoane 2:1-11) Koluka kobongola eloko moko ekóma eloko mosusu ezali likambo oyo bato balingaka kosala banda kala. Na boumeli ya basiɛklɛ mingi, bato ya siansi oyo ebengami alshimi bamekaki kobongola mondɔlu ekóma wolo. Balongaki te atako mondɔlu ná wolo esalaka lokola ekokana mpenza. a Ezali boni mpo na mai mpe vinyo? Ndenge mayele ya shimi emonisi yango, mai ezalaka na biloko mingi te, esalemi kaka na biloko mibale ya ntina. Kasi vinyo esalemi na biloko ndenge na ndenge soki nkóto moko, oyo mingi kati na yango ezali na biloko mosusu kilikili! Mpo na nini Yesu amonaki malamu asala likamwisi wana kaka mpo na mwa likambo ya moke lokola kozanga ya masanga na fɛti ya libala?

15 Mpo na mobali ná mwasi ya libala, yango ezalaki likambo ya moke te. Na Yisraele ya kala, koyamba bapaya ezalaki na ntina mingi. Kozanga masanga elingaki kozala nsɔni mpe mawa mpo na mobali ná mwasi ya libala, elingaki kobebisela bango mokolo ya libala mpe bakokaki kobosana yango te bambula mingi na nsima. Likambo yango ezalaki na ntina mingi mpo na bango, ezalaki mpe na ntina mpo na Yesu. Yango wana, asalaki likambo moko mpo na kosalisa bango. Omoni sikoyo mpo na nini bato bazalaki kopusana epai ya Yesu mpo na koyebisa ye mikakatano na bango?

Monisá mwana na yo ete akoki kopusana epai na yo mpe ete otyelaka ye likebi

16 Na likambo oyo mpe, baboti bakoki kozwa liteya. Okosala nini soki mwana na yo ayei koyebisa yo mokakatano moko oyo azali na yango? Mbala mosusu, mokakatano na ye ekoki komonana likambo ya moke epai na yo. Likambo yango ekoki kutu kosɛkisa yo. Soki okokanisi mokakatano ya mwana ná mikumba oyo ozali na yango, mbala mosusu yango ekomonana eloko mpamba. Atako bongo, yebá ete mpo na mwana, yango ezali likambo ya moke te! Soki likambo yango ezali na ntina mpo na moto oyo olingaka mingi, esengeli mpe kozala na ntina mpo na yo, boye te? Soki omonisi mwana ete otyaka likebi na mikakatano na ye, akobanga te koyebisa yo mokakatano nyonso oyo ekómeli ye.

17. Ndakisa nini ya boboto Yesu atikelá biso, mpe mpo na nini ezaleli yango emonisaka nguya?

17 Ndenge tomonaki yango na Mokapo 3Yesu azalaki na boboto mpe na komikitisa. (Matai 11:29) Boboto ezali ezaleli moko ya ntina mingi koleka, ezali elembo oyo emonisaka mpenza ete moto azali na komikitisa na motema. Yango ezali ezaleli ya mbuma ya elimo santu ya Nzambe mpe eyokani na bwanya ya Nzambe. (Bagalatia 5:22, 23; Yakobo 3:13) Kutu, ata ntango batumolaki mpenza ye, Yesu azalaki kaka komipekisa. Ezaleli na ye ya boboto ezalaki bolɛmbu te. Moto moko ya mayele alobaki mpo na ezaleli yango ete: “Kozala na boboto ezali nde kozala na nguya.” Ya solo, mbala mingi esɛngaka kozala na nguya mpo tómipekisa mpe tósalela basusu makambo na boboto. Kasi soki tosali milende, Yehova akopambola biso, tokomekola Yesu mpo na oyo etali komonisa boboto, mpe yango ekosala ete bato bábanga te kopusana epai na biso.

18. Ndakisa nini emonisi ete Yesu azalaki makambo makasimakasi te, mpe mpo na nini okanisi ete ezaleli yango ekoki kosala ete basusu bábanga te kopusana epai ya moto?

18 Yesu azalaki makambo makasimakasi te. Ntango Yesu azalaki na Tire, mwasi moko ayaki epai na ye mpo “demo akɔtelá” mwana na ye ya mwasi. Mbala misato mobimba, Yesu amonisaki ete asepeli te kosala oyo mwasi yango asɛngaki ye. Ya liboso, apesaki eyano te; ya mibale, ayebisaki ye ntina oyo aboyi kosala oyo asɛngaki ye; ya misato, apesaki ndakisa oyo emonisaki ntina oyo aboyi. Atako bongo, Yesu alobaki nde na mwasi yango kozanga boboto mpe aboyaki kobongola ekateli na ye? Amonisaki nde ete mwasi yango azali komilukela makambo ndenge abangi te kofungola monɔkɔ liboso ya moto monene lokola ye? Te, emonani ete mwasi yango abangaki te. Asukaki kaka te na kosɛnga lisalisi, kasi atyaki mpe mbamba atako emonanaki ete Yesu asepelaki te kosalisa ye. Yesu amonaki kondima makasi ya mwasi yango lokola atyaki ye mbamba, yango wana abikisaki mwana na ye. (Matai 15:22-28) Ya solo, bato bazalaki kobanga te kopusana epai ya Yesu mpo azalaki makambo makasimakasi te, azalaki kolinga koyoka bango mpe azalaki kondima likanisi na bango soki esengeli!

Bato bapusanaka epai na yo?

19. Ndenge nini tokoki koyeba soki tozali mpenza bato oyo basusu bábangaka te kopusana epai na bango?

19 Ezalaka mpasi te bato báloba ete basusu bábangaka te kopusana epai na bango. Na ndakisa, bato mosusu oyo bazali na bokonzi balobaka ete moto nyonso akoki koya kosolola na bango ntango nyonso oyo alingi, ete bato bazali na nse ya bokonzi na bango babangaka te kopusana epai na bango. Kasi, Biblia ekebisi makasi ete: “Bato mingi batutaka ntolo ete bazali sembo, kasi nani akoki komona moto oyo azali mpenza sembo?” (Masese 20:6) Ezali pɛtɛɛ koloba ete bato babangaka te kopusana epai na biso, kasi tozali mpenza komekola ezaleli wana ya bolingo ya Yesu na ndenge esengeli? Eyano ekouta te na ndenge oyo biso moko tomimonaka, kasi nde na ndenge oyo bato bamonaka biso. Paulo alobaki: “Bato nyonso báyeba ete bozalaka makambo makasimakasi te.” (Bafilipi 4:5) Mokomoko na biso asengeli komituna: ‘Ndenge nini bato bamonaka ngai? Ndenge nini bayebeli ngai?’

Bankulutu basalaka makasi ete bato bapusanaka epai na bango

20. (a) Mpo na nini ezali na ntina bankulutu ya lisangá bázala bato oyo basusu babangaka te kopusana epai na bango? (b) Mpo na nini tosengeli kozala na bokatikati na makambo oyo tozali kozela ete bankulutu ya lisangá básalela biso?

20 Mingimingi, bankulutu basengeli kosala makasi bázala bato oyo basusu bábangaka te kopusana epai na bango. Basengeli kosala oyo bakoki mpo na kosalela maloba oyo ezali na Yisaya 32:1, 2: “Mokomoko akozala lokola esika ya komibomba mpo na kokima mopɛpɛ, esika ya kobombana mpo na kokima mbula ya mopɛpɛ makasi, lokola mikɛli ya mai na mokili oyo ezangá mai, lokola elili ya libanga monene na mokili ekauká.” Nkulutu akoki kobatela bato, kokitisa bango motema mpe kobɔndisa bango kaka soki bato babangaka te kopusana epai na ye. Ya solo, kosala bongo ezalaka ntango nyonso pɛtɛɛ te, mpo bankulutu bazali na mokumba moko monene na ntango oyo ya mpasi. Atako bongo, bankulutu basengeli soki moke te kozanga ntango mpo na kokokisa bamposa ya bampate ya Yehova. (1 Petro 5:2) Bandeko mosusu ya lisangá mpe basengeli kozala na bokatikati na makambo oyo bazali kozela ete mibali wana ya sembo básalela bango; basengeli nde kozala na komikitisa mpe kopesa bango mabɔkɔ.​—Baebre 13:17.

21. Baboti bakoki kosala nini mpo bázanga ntango te mpo na bana na bango, mpe tokolobela nini na mokapo oyo elandi?

21 Baboti basalaka nyonso bázanga ntango te mpo na bana na bango. Yango ezali pɛtɛɛ te! Balingi bana na bango báyeba ete ezali na ntina kotyela tata to mama motema. Na yango, baboti bakristo basengeli kosala makasi bázala bato ya boboto mpe bázala makambo makasimakasi te, basilikaka mpambampamba te ntango mwana ayebisi bango mabe oyo asali to abimisi likanisi moko oyo ebongi te. Wana baboti bazali koteya bana na bango na motema molai nyonso, basengeli mpe kosololaka na bango. Ɛɛ, biso nyonso na ndakisa ya Yesu, tosengeli kozala bato oyo basusu babangaka te kopusana epai na bango. Na mokapo oyo elandi, tokolobela motema mawa ya Yesu oyo ezalaki moko ya bizaleli minene oyo esalaki ete bato bápusanaka epai na ye.

a Bato oyo bayekolaka makambo ya shimi bayebi ete mondɔlu mpe wolo ezali mabende oyo etyamaka moko pembeni ya mosusu na molɔngɔ na biloko ya shimi. Atɔmɛ ya mondɔlu ezali kaka na prɔtɔ misato na kati na yango koleka atɔmɛ ya wolo. Bato ya mayele ya fizike na mikolo na biso basili kutu kolonga kobongola biteni mikemike ya mondɔlu ekóma wolo, kasi mosala yango esɛngaki milende mingi mpo elonga.