Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 18

“Kobá kolanda ngai”

“Kobá kolanda ngai”

1-3. (a) Ndenge nini Yesu akabwanaki na bantoma na ye, mpe mpo na nini kokabwana yango epesaki bango mawa te? (b) Mpo na nini tosengeli koyeba makambo etali bomoi ya Yesu banda azongá na likoló?

 BATO zomi na moko batɛlɛmi esika moko na ngomba. Bazali kotala moto oyo balingaka mpe bamemyaka mingi. Atako moto yango azali na nzoto ya mosuni, moto yango nde Yesu oyo asekwi, oyo akómi lisusu moko ya bana ya Yehova ya elimo, oyo aleki bango nyonso na nguya. Yesu ayanganisi bantoma na ye na Ngomba ya Olive mpo na mbala ya nsuka.

2 Ngomba yango ezali na molɔngɔ ya bangomba oyo ezalaka na mabanga ya mpɛmbɛ, oyo Lobwaku ya Kidrone ekaboli yango ná Yerusaleme. Na ntembe te, esika yango etindi Yesu akanisa makambo mingi. Engumba Betania, epai Yesu asekwisaki Lazare, etongami na mopanzi ya ngomba yango. Eleki mwa bapɔsɔ, uta na Betefage, mboka oyo ezali pembeni wana, nde Yesu abandaki kotambola na lokumu nyonso tii na Yerusaleme. Ekoki kozala ete na Ngomba ya Olive nde esika elanga ya Getesemane ezalaki, epai Yesu alekisaki bangonga ya mpasi liboso bákanga ye. Sikoyo, kaka na ngomba yango nde Yesu alingi kotika bayekoli na ye, oyo bazalaki baninga na ye ya motema. Alobi maloba ya boboto liboso atika bango. Na nsima, abandi kotombwama, atiki mabele! Bantoma bazali kaka kotala ndenge Nkolo na bango ya bolingo azali komata na likoló. Nsukansuka, lipata ezipi ye na miso na bango, mpe bamoni ye lisusu te.​—Misala 1:6-12.

3 Koyoka ndenge Yesu akabwanaki na bantoma na ye, epesi yo mawa to esengo? Ezali bongo te. Kutu, kaka ndenge baanzelu mibale bayebisaki bantoma, lisolo ya Yesu esuki wana te. (Misala 1:10, 11) Komata na ye na likoló ezali kaka ebandeli. Liloba ya Nzambe eyebisi makambo oyo ekómelaki Yesu na nsima. Koyekola makambo etali bomoi ya Yesu banda amatá na likoló ezali na ntina mingi. Mpo na nini? Kobosana te maloba oyo Yesu alobaki na Petro ete: “Kobá kolanda ngai.” (Yoane 21:19, 22) Biso nyonso tosengeli kotosa etinda wana, kaka mpo na mwa ntango te, kasi bomoi na biso mobimba. Mpo tókoba kolanda Yesu, tosengeli koyeba mosala nini Nkolo na biso azali kosala sikoyo mpe mikumba nini Yehova apesi ye kuna na likoló.

Bomoi ya Yesu banda azongá na likoló

4. Ndenge nini Biblia emonisaki liboso makambo oyo ekosalema na likoló nsima ya kozonga ya Yesu?

4 Makomami elobeli te makambo oyo esalemaki ntango Yesu akómaki na likoló, ndenge ayambamaki, mpe esengo oyo ayokaki ya kozala lisusu elongo na Tata na ye. Nzokande, Biblia esilaki komonisa liboso makambo oyo ekosalema mwa moke nsima ya kozonga ya Yesu na likoló. Na boumeli ya basiɛklɛ 15, mbula na mbula Bayuda bazalaki kosala molulu moko mosantu. Mbala moko na mbula, nganga-nzambe monene azalaki kokɔta na Esika oyo Eleki Mosantu ya tempelo mpo na komwangisa makila ya bambeka oyo esɛngamaki na Mokolo ya Kozipa masumu liboso ya sanduku ya kondimana. Na mokolo yango, nganga-nzambe monene azalaki elilingi ya Masiya. Ntango Yesu azongaki na likoló, akokisaki ndimbola ya esakweli ya molulu yango mbala moko mpo na libela. Akɔtaki liboso mpenza ya nkembo ya Yehova na likoló, elingi koloba, esika oyo eleki mpenza bosantu na molɔ́ngɔ́ mobimba mpe alakisaki motuya ya mbeka ya lisiko na ye epai ya Tata na ye. (Baebre 9:11, 12, 24) Yehova andimaki yango?

5, 6. (a) Nini emonisaki ete Yehova andimaki mbeka ya lisiko ya Kristo? (b) Banani bazali kozwa matomba na lisiko yango, mpe ndenge nini?

5 Tokozwa eyano soki totaleli makambo oyo esalemaki mwa mikolo moke nsima ya komata ya Yesu na likoló. Mwa etuluku ya bakristo soki 120 bayanganaki na shambrɛ ya likoló na Yerusaleme, mpe na mbala moko bayokaki makɛlɛlɛ lokola oyo ya mopɛpɛ makasi mpe etondaki na shambrɛ yango. Ndemo lokola ya mɔtɔ emonanaki na mitó na bango, batondaki na elimo santu, mpe babandaki koloba na minɔkɔ ndenge na ndenge. (Misala 2:1-4) Likambo yango emonisaki kobotama ya ekólo moko ya sika, Yisraele ya elimo, oyo ezalaki “libota oyo eponami” ya sika ya Nzambe mpe “bonganga-nzambe moko ya bokonzi” mpo na kokokisa mokano ya Nzambe awa na mabele. (1 Petro 2:9) Emonani polele ete Yehova Nzambe andimaki mpe asepelaki na mbeka ya lisiko ya Kristo. Kosopama ya elimo santu ezalaki moko ya mapamboli ya liboso oyo ezwamaki na nzela ya lisiko.

6 Kobanda ntango wana, mbeka ya lisiko ya Kristo epesi bayekoli na ye matomba na mokili mobimba. Tózala na kati ya “etonga moke” ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo santu, oyo bakoyangela elongo na Kristo na likoló, to na kati ya “bampate mosusu,” oyo Kristo akoyangela bango awa na mabele, biso nyonso tozali kozwa matomba na mbeka na ye. (Luka 12:32; Yoane 10:16) Mbeka na ye nde epesi biso nzela mpo tózala na elikya mpe masumu na biso elimbisama. Soki tokobi “kondimela” lisiko yango mpe kolanda Yesu mokolo na mokolo, tokoki kozala na lisosoli ya pɛto mpe elikya kitoko mpo na mikolo oyo ezali koya.​—Yoane 3:16.

7. Bokonzi nini Yesu azwaki ntango azongaki na likoló, mpe ndenge nini okoki kopesa ye mabɔkɔ?

7 Yesu azali kosala nini na likoló banda azongá kuna? Azali na bokonzi moko monene. (Matai 28:18) Ya solo, Yehova atyaki ye mokonzi ya lisangá ya bokristo, mokumba oyo azali kokokisa na bolingo mpe na bosembo nyonso. (Bakolose 1:13) Ndenge esakolamaki, Yesu aponaki mibali ya makoki mpo na kokokisa bamposa ya etonga na ye. (Baefese 4:8) Na ndakisa, aponaki Paulo mpo azala “ntoma ya bikólo,” mpe atindaki ye apalanganisa nsango malamu na mikili oyo ezalaki mosika. (Baroma 11:13; 1 Timote 2:7) Pene na nsuka ya siɛklɛ ya liboso, Yesu asalelaki ntoma Yoane mpo na kokomela masangá oyo ezalaki na etúka ya Azia. Na mikanda yango apesaki masangá yango longonya mpe asembolaki yango. (Emoniseli, mikapo 2-3) Ondimaka ete Yesu nde azali Mokonzi ya lisangá ya bokristo? (Baefese 5:23) Mpo okoba kolanda ye, osengeli kolendisa elimo ya botosi mpe ya kosala na bomoko na lisangá na bino.

8, 9. Bokonzi nini Yesu azwaki na mobu 1914, mpe yango esengeli kotinda biso tósala nini?

8 Na mobu 1914, Yesu azwaki lisusu bokonzi ya monene koleka. Na mobu yango, atyamaki Mokonzi ya Bokonzi ya Masiya ya Yehova. Ntango Yesu abandaki koyangela, “etumba ebimaki na likoló.” Esukaki ndenge nini? Satana ná bademo na ye babwakamaki na nse; yango ebandisaki eleko moko ya mawa. Bitumba oyo ezali kosalema epai na epai, kobomana, nsɔmɔ, maladi, koningana ya mabele, mpe nzala oyo ezali konyokola bato lelo oyo emonisi ete Yesu azali sikoyo koyangela na likoló. Satana azali naino “mokonzi ya mokili oyo” kaka mpo na “ntango mokuse.” (Emoniseli 12:7-12; Yoane 12:31; Matai 24:3-7; Luka 21:11) Atako bongo, Yesu azali kopesa bato ya mokili mobimba libaku ya kondima Bokonzi na ye.

9 Ezali na ntina tómitya na ngámbo ya Mokonzi Masiya. Na bikateli nyonso oyo tozwaka mokolo na mokolo, tosengeli koluka ete ye andima biso, kasi mokili mabe oyo te. Yesu oyo azali “Mokonzi ya bakonzi mpe Nkolo ya bankolo” alingaka bosembo. Na yango ntango atalaka na mabele, amonaka makambo oyo epesaka ye nkanda mpe oyo esepelisaka ye. (Emoniseli 19:16) Mpo na nini?

Nkanda mpe esengo ya Mokonzi Masiya

10. Yesu azali moto ya ndenge nini, kasi makambo nini esalaka ete Nkolo na biso ayoka mpenza nkanda?

10 Lokola Tata na ye, Nkolo na biso mpe azali ekelamu ya esengo. (1 Timote 1:11) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, azalaki te koloba mabe mpo na bato, azalaki mpe makambo makasimakasi te. Nzokande lelo oyo, ezali na makambo mingi oyo ezali kosalema na mabele, oyo ekoki kopesa ye nkanda mpenza. Na ntembe te, azali na nkanda mpenza mpo na mangomba nyonso oyo elobaka ete ezali komonisa ye. Kutu yango nde asakolaki: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na Bokonzi ya likoló, kasi kaka moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló. Na mokolo yango, bato mingi bakoloba na ngai: ‘Nkolo, Nkolo. . . tosalaki makamwisi mingi na nkombo na yo te?’ Kasi ngai nakoloba na bango: Nayebi bino ata moke te! Bólongwa pene na ngai, bino bato oyo bobukaka mibeko!”​—Matai 7:21-23.

11-13. Mpo na nini maloba makasi oyo Yesu asalelaki ekoki kobulunganisa bato mosusu oyo basali “makamwisi mingi” na nkombo na ye, kasi mpo na nini azali na nkanda? Pesá ndakisa.

11 Maloba wana ekoki kobulunganisa bato mingi oyo bamibengaka bakristo lelo oyo. Mpo na nini Yesu akoloba maloba ya makasi boye epai ya bato oyo basali “makamwisi mingi” na nkombo na ye? Mangomba ya bokristo esalá bibongiseli mpo na kosunga bato ya mpasi, esalisaka babola, etongá balopitalo mpe biteyelo, mpe esalaka makambo mosusu mingi. Mpo tóyeba ntina oyo Yesu azali na nkanda ya mangomba yango, tótalela ndakisa oyo.

12 Tata ná mama moko balingi kosala mobembo. Lokola bakei na bana na bango te, bazwi mwana mwasi moko ya mosala mpo abatela bango na nsima. Malako ya pɛtɛɛ oyo bapesi ye yango oyo: “Batelá bana na biso. Leisá bango, sukoláká bango mpo bázala pɛto, mpe batelá bango na makama.” Nzokande ntango baboti bazongi, bayoki mpasi na motema ndenge bakuti bana na bango bazali kokufa nzala, bazali salite, maladi, mpe mawamawa. Ntango bana bazalaki kobenga moto oyo azali kobatela bango, ye azalaki kotya likebi te. Mpo na nini? Azalaki nde komata na eskalye mpo na kosukola bafɛnɛtrɛ. Baboti basiliki, babengi ye ayebisa bango ntina oyo asali bongo. Mwana yango ya mosala ayanoli ete: “Bótala nyonso oyo nasali! Bokuti bafɛnɛtrɛ ezali salite? Nabongisi mpe ndako, nyonso wana mpo na bolamu na bino!” Baboti yango bakosepela? Soki moke te! Basɛngaki ye asala misala wana te; basɛngaki ye nde abatela bana na bango. Bayoki nkanda mpo alandi te malako oyo bapesaki ye.

13 Mangomba ya bokristo esali lokola mwana mwasi wana oyo bazwaki mpo abatela bana. Yesu atikelaki bamonisi na ye malako ete báleisa bato na elimo, báteya bango solo ya Liloba ya Nzambe mpe básalisa bango bákóma pɛto na elimo. (Yoane 21:15-17) Nzokande na mawa nyonso, mangomba ya bokristo eboyi kotosa malako na ye. Etiki bato bákufa nzala na elimo, bábulungana na mateya ya lokuta mpe báyeba te mateya ya moboko ya Biblia. (Yisaya 65:13; Amose 8:11) Atako mangomba ezali kosala milende mpo na komeka kobongisa mokili oyo, bakolimbisa yango te na ndenge eboyi kotosa Yesu na nko nyonso. Kutu mokili ya lelo ezali lokola ndako oyo etyami na molɔngɔ ya bandako oyo bakobuka! Liloba ya Nzambe emonisi ete mosika te mokili ya Satana ekobomama.​—1 Yoane 2:15-17.

14. Lelo oyo, mosala nini ezali kopesa Yesu esengo, mpe mpo na nini?

14 Nzokande, Yesu asengeli mpenza koyoka esengo soki atali awa na nse mpe amoni bamilio ya bato oyo bazali kosala mosala ya kokómisa bato bayekoli, mosala oyo apesaki bayekoli na ye liboso atiká mabele. (Matai 28:19, 20) Oyo nde libaku malamu tozwi ya kosala makambo oyo ezali kopesa Mokonzi Masiya esengo! Tózwa ekateli ya kokoba kopesa “moombo ya sembo mpe ya mayele” mabɔkɔ. (Matai 24:45) Na bokeseni na bakonzi ya mangomba ya bokristo, etuluku yango ya moke ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, bazali na botosi nyonso kokamba mosala ya kosakola mpe bazali na bosembo nyonso koleisa bampate ya Kristo.

15, 16. (a) Yesu ayokaka ndenge nini mpo na kozanga bolingo oyo epalangani lelo oyo, mpe ndenge nini toyebi yango? (b) Mpo na nini Yesu azali na nkanda ya bakonzi ya mangomba ya bokristo?

15 Tokoki mpe kondima ete Mokonzi azali na nkanda ntango azali komona kozanga bolingo oyo epalangani na mabele lelo oyo. Tobosani mpe te ndenge Bafarisai balobaki mabe mpo na Yesu ntango abikisaki bato na mokolo ya Sabata. Lokola bazalaki na motema mabe mpe na motó makasi, bakokaki te komona mosika; eloko bayebaki kaka kolimbola na ndenge ya mabe ezalaki Mibeko ya Moize mpe mibeko oyo ekomamaki te. Makamwisi ya Yesu ememelaki bato bolamu mingi! Kasi Bafarisai babongolaki te bomoto na bango, atako makamwisi oyo Yesu asalaki epesaki bato esengo, ekitisaki mpasi na bango, mpe ekómisaki kondima na bango makasi. Yesu ayokaki ndenge nini mpo na bango? Mokolo moko atalaki “bango nyonso, mpo ayokaki mpenza mawa mingi mpo na motema makasi na bango.”​—Marko 3:5.

16 Lelo oyo, makambo oyo Yesu azali komona ezali kosala ete ayoka “mpenza mawa mingi” koleka. Bakambi ya mangomba ya bokristo bakufi mpenza miso na ndenge bamipesi na bonkɔkɔ mpe na mateya oyo eyokani te na Makomami. Lisusu, bazali na nkanda makasi ndenge nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali kosakolama. Na bamboka mingi na mokili, bakonzi ya mangomba babimiselaki bakristo minyoko ya makasi mpo bazali mpenza kosala milende mpo na kosakola nsango oyo Yesu asakolaki. (Yoane 16:2; Emoniseli 18:4, 24) Lisusu, mbala mingi bakambi yango ya mangomba balendisaka bandimi na bango bákɔta na bitumba mpe báboma baninga na bango, mpe bakanisaka ete soki basali bongo bakosepelisa Yesu Kristo!

17. Ndenge nini bayekoli ya solosolo ya Yesu basepelisaka motema na ye?

17 Kasi, bayekoli ya solosolo ya Yesu basalaka makasi bámonisela baninga na bango bolingo. Basakolaka nsango malamu epai ya “bato ya ndenge nyonso,” kaka ndenge Yesu asalaki, atako botɛmɛli. (1 Timote 2:4) Mpe bolingo oyo bamoniselanaka emonanaka polele; yango nde elembo mpenza oyo emonisaka bango. (Yoane 13:34, 35) Lokola basalelaka bandeko na bango bakristo makambo na bolingo, na limemya, mpe na ndenge ya lokumu, bazali mpenza kolanda Yesu mpe bazali kosepelisa motema ya Mokonzi Masiya!

18. Makambo nini ekoki koyokisa Nkolo na biso mawa, kasi ndenge nini tokoki kosepelisa ye?

18 Tóyeba mpe likambo oyo: Nkolo na biso akoyoka mawa soki bayekoli na ye batiki koyika mpiko, soki bolingo na bango mpo na Yehova ekiti mpe batiki kosalela ye. (Emoniseli 2:4, 5) Kasi, Yesu asepelaka na baoyo bazali koyika mpiko tii na nsuka. (Matai 24:13) Yango wana, tóbatela ntango nyonso na makanisi etinda oyo ya Kristo: Kobá  kolanda ngai.” (Yoane 21:19) Tótalela sikoyo mapamboli mosusu oyo Mokonzi Masiya akopesa baoyo bakoyika mpiko tii na nsuka.

Mapamboli oyo basaleli ya sembo ya Mokonzi bakozwa

19, 20. (a) Kolanda Yesu epesaka mapamboli nini banda sikoyo? (b) Ndenge nini Yesu akoki kozala ‘Tata na biso ya seko?’

19 Kolanda Yesu epesaka mpenza mapamboli banda sikoyo. Soki tondimi Kristo azala Nkolo na biso, tolandi malako na ye mpe tolandi ndakisa na ye, tokozwa bolamu oyo bato ya mokili bazali koluka kasi bazali kozwa yango te. Tokozala na mosala oyo ezali kopesa biso esengo na bomoi, libota ya bandeko oyo bazali na bomoko mpe na bolingo ya solosolo, tokozala na lisosoli ya pɛto, mpe na kimya na makanisi. Na mokuse, tokozala na bomoi moko ya malamu mpe ya esengo. Tokozwa mpe mapamboli mosusu ebele.

20 Yehova aponi Yesu mpo azala “Tata ya Seko” mpo na baoyo bazali kolikya kozwa bomoi ya seko awa na mabele. Yesu azwi esika ya Adama, tata ya bato nyonso, oyo na mawa nyonso atɛkaki bana na ye nyonso. (Yisaya 9:6, 7) Soki tondimi Yesu lokola “Tata ya Seko,” mpe tondimeli ye, tokozala na elikya ya solosolo ya kozwa bomoi ya seko. Lisusu, tokozala na boyokani ya penepene elongo na Yehova Nzambe. Ndenge tomonaki yango, kosala makasi mpo na kolanda ndakisa ya Yesu mokolo na mokolo, ezali lolenge ya malamu koleka oyo tokomonisa ete tozali kotosa etinda oyo ya Nzambe: “Bókóma bamekoli ya Nzambe, lokola bana ya bolingo.”​—Baefese 5:1.

21. Ndenge nini bayekoli ya Kristo bangɛngisaka pole na mokili oyo ezali na ya molili?

21 Soki tomekoli Yesu mpe Tata na ye, Yehova, tokozala na libaku moko ya ntina mingi: ya kongɛngisa pole. Na mokili oyo ezali na molili, epai bamilio ya bato bakosami na Satana mpe bazali komekola bizaleli na ye, biso baoyo tolandaka Kristo tozali kongɛngisa pole oyo ezali se kongɛnga: pole ya mateya ya solo oyo ezali na Biblia, pole ya bizaleli malamu ya bakristo, pole ya esengo ya solosolo, ya kimya ya solosolo, mpe ya bolingo ya solosolo. Lisusu, tozali kopusana penepene na Yehova, mpe yango nde mokano oyo eleki nyonso mpe ya ntina mingi, oyo moto nyonso akoki komityela.

22, 23. (a) Mapamboli nini bato oyo bazali kokoba kolanda Yesu na bosembo nyonso bakozwa na mikolo oyo ezali koya? (b) Ekateli nini tosengeli kozwa?

22 Lisusu, kanisá mpe oyo Yehova alingi kosala mpo na yo na mikolo ezali koya, na nzela ya Mokonzi Masiya oyo ye aponi. Mosika te, Mokonzi yango akobundisa mokili ya Satana na etumba ya sembo. Ya solo, Yesu akolonga mpenza! (Emoniseli 19:11-15) Nsima na yango, Kristo akobanda koyangela mabele na Boyangeli na ye ya Mbula Nkóto. Yesu mpe baoyo bakoyangela elongo na ye kuna na likoló bakosalisa bato ya sembo bákóma bato ya kokoka mpe bázwa mapamboli nyonso oyo lisiko ya Yesu ememi. Kanisá ndenge okozala nzoto kolɔngɔnɔ, ndenge okozonga lisusu elenge mpe makasi, na esengo ya kosala elongo na bato oyo bazali na bomoko mpo na kobongola mabele ekóma paradiso! Na nsuka ya boyangeli yango ya Mbula Nkóto, Yesu akozongisa bokonzi epai ya Tata na ye. (1 Bakorinti 15:24) Soki okobi kolanda Kristo na bosembo nyonso, okozwa lipamboli moko monene, oyo tokoki kolimbola ata moke te, elingi koloba “bonsomi ya bana ya Nzambe oyo etondi na nkembo”! (Baroma 8:21) Ɛɛ, tokozwa mapamboli nyonso oyo Adama ná Eva bazalaki na yango, kasi babungisaki. Biso nyonso bana ya Yehova awa na mabele, basi mpe mibali, tokozala lisusu te baombo ya lisumu ya Adama mpo na libela. Ya solo, “liwa ekozala lisusu te.”​—Emoniseli 21:4.

23 Tóbosana te elenge mobali oyo azalaki na bozwi mpe oyo azalaki moyangeli, oyo tolobelaki na Mokapo 1. Aboyaki libyangi oyo Yesu apesaki ye: “Yaká, landá ngai.” (Marko 10:17-22) Kosala libunga ya ndenge wana soki moke te! Ndimá libyangi ya Yesu na esengo nyonso mpe na nsai. Zwá ekateli ya kokoba koyika mpiko, kolanda Mobateli ya mpate oyo aleki malamu mokolo na mokolo. Soki osali bongo, okomona ndenge bilaka nyonso ya Yehova ekokokisama!