Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 17

“Moto moko te azali na bolingo koleka moto oyo”

“Moto moko te azali na bolingo koleka moto oyo”

1-4. (a) Nini esalemi ntango Pilate alakisi Yesu epai ya bato oyo bazalaki na nkanda, oyo bayanganaki liboso ya ndako ya guvɛrnɛrɛ? (b) Yesu asali ndenge nini ntango bazali kosambwisa ye mpe konyokola ye, mpe yango ebimisi mituna nini ya ntina?

 “BÓTALA, moto!” Ntango Ponsi Pilate, guvɛrnɛrɛ ya Roma, alobaki maloba wana, azalaki kolakisa Yesu Kristo epai ya ebele ya bato oyo bazalaki mpenza na nkanda; bato yango bayanganaki na ntɔngɔ liboso ya ndako ya guvɛrnɛrɛ, na Elekeli ya mobu 33 T.B. (Yoane 19:5) Mwa mikolo liboso, ebele ya bato yango bakumisaki Yesu na esengo nyonso ntango akɔtaki na Yerusaleme lokola Mokonzi oyo Nzambe atye. Nzokande lelo, ebele yango ya bato bazali kosepela na ye lisusu te, bakómi kotalela ye ndenge mosusu.

2 Yesu alati elamba ya molai motane-bulé lokola oyo bato ya libota ya mokonzi balataka, mpe alati motole ya nzubɛ na motó na ye. Nzokande, balatisi ye elamba yango oyo ezipi mwa moke bampota oyo azoki na mokɔngɔ mpo babɛti ye, mpe balatisi ye motole ya nzubɛ na motó na ye, oyo etondi na makila, basali nyonso wana mpo na kosambwisa ye. Lokola banganga-nzambe bakonzi batindi bato babalukela moto yango oyo atɛlɛmi liboso na bango. Banganga-nzambe bagangi ete: “Baká ye na nzete! Baká ye na nzete!” Lokola balingaki kaka koboma ye, bato bagangi ete: “Asengeli kokufa.”​—Yoane 19:1-7.

3 Atako bazali kosambwisa ye mpe komonisa ye mpasi, na limemya mpe kozanga kobanga, Yesu ayiki mpiko kozanga komilelalela. a Andimi mpenza kokufa. Mwa moke na nsima, na mokolo yango ya Elekeli, andimi mpenza kokufa liwa moko ya nsɔmɔ likoló ya nzete ya mpasi.​—Yoane 19:17, 18, 30.

4 Lokola Yesu andimaki kokaba bomoi na ye, amonisaki ete azali moninga ya solosolo ya bayekoli na ye. Alobaki boye: “Moto moko te azali na bolingo koleka moto oyo apesi bomoi na ye mpo na baninga na ye.” (Yoane 15:13) Yango ebimisi mwa mituna ya ntina mingi: Ezalaki mpenza na ntina ete Yesu amona bampasi nyonso wana mpe na nsima akufa? Mpo na nini andimaki makambo nyonso wana? Lokola tozali “baninga na ye” mpe bato oyo balandaka ye, ndenge nini tokoki komekola ye?

Mpo na nini ezalaki na ntina ete Yesu anyokwama mpe akufa?

5. Ndenge nini Yesu ayebaki bampasi oyo ezalaki mpenza kozela ye?

5 Lokola Yesu nde azali Masiya oyo alakamaki, ayebaki makambo oyo ekokómela ye. Ayebaki bisakweli mingi ya Makomami ya Ebre oyo elobelaki mpenza bampasi mpe liwa ya Masiya. (Yisaya 53:3-7, 12; Danyele 9:26) Mbala mingi, abongisaki bayekoli na ye mpo na komekama oyo ezalaki kozela ye. (Marko 8:31; 9:31) Ntango azalaki kokende na Yerusaleme mpo na Elekeli na ye ya nsuka, ayebisaki bantoma na ye polele ete: “Mwana ya moto akokabama na mabɔkɔ ya banganga-nzambe bakonzi mpe bakomeli. Bakokatela ye etumbu ya liwa mpe bakokaba ye na mabɔkɔ ya bato ya bikólo; bango bakosɛka ye, bakobwakela ye nsoi, bakobɛta ye fimbo mpe bakoboma ye, kasi mikolo misato na nsima akosekwa.” (Marko 10:33, 34) Yango ezalaki maloba ya mpamba te. Ndenge tomonaki yango, basɛkaki mpenza Yesu, babwakelaki ye nsoi, babɛtaki ye fimbo mpe babomaki ye.

6. Mpo na nini ezalaki na ntina Yesu anyokwama mpe akufa?

6 Kasi, mpo na nini ezalaki na ntina ete Yesu anyokwama mpe akufa? Mpo na bantina mingi. Ya liboso, soki atikali sembo, Yesu akomonisa ete akangami mpenza na Nzambe mpe akolongisa lotomo oyo Yehova azali na yango ya koyangela. Kobosana te ete Satana alobaki na lokuta nyonso ete bato basalelaka Nzambe kaka mpo na matomba na bango. (Yobo 2:1-5) Lokola Yesu atikalaki sembo “tii na liwa . . . na nzete ya mpasi,” apesaki mpenza eyano oyo eleki malamu na efundeli wana ya lokuta ya Satana. (Bafilipi 2:8; Masese 27:11) Ya mibale, bampasi mpe liwa ya Masiya ekosala ete masumu ya bato elimbisama. (Yisaya 53:5, 10; Danyele 9:24) Yesu apesaki “bomoi na ye lisiko na esika ya bato mingi,” na ndenge yango afungwelaki biso nzela ya kozala na boyokani malamu elongo na Nzambe. (Matai 20:28) Ya misato, lokola ayikaki mpiko na mikakatano mpe bampasi ndenge na ndenge, Yesu “amekamaki na makambo nyonso lokola biso.” Na ndenge yango, azali nganga-nzambe Monene ya motema mawa, oyo akoki “koyokela biso mawa na bolɛmbu na biso.”​—Baebre 2:17, 18; 4:15.

Mpo na nini Yesu andimaki kokaba bomoi na ye?

7. Eloko nini Yesu andimaki kotika ntango ayaki awa na mabele?

7 Mpo na koyeba malamu makambo oyo Yesu andimaki kosala, tókanisa naino na likambo oyo: Nani akolinga kotika libota na ye mpe ndako na ye mpe kokende na mokili ya bapaya soki ayebi ete bato mingi ya mboka yango bakoboya ye, bakosambwisa ye, bakonyokola ye, mpe nsukansuka bakoboma ye? Sikoyo tótala oyo Yesu asalaki. Liboso aya awa na mabele, azalaki na esika moko ya lokumu na likoló, pembeni ya Tata na ye. Kasi, Yesu andimaki kotika esika na ye na likoló mpe koya awa na mabele lokola moto. Andimaki kosala bongo, atako ayebaki ete bato mingi bakoboya ye, bakosambwisa ye mabe, bakonyokola ye makasi, mpe bakoboma ye na liwa moko ya nsɔmɔ. (Bafilipi 2:5-7) Nini etindaki Yesu andima makambo nyonso wana?

8, 9. Nini etindaki Yesu akaba bomoi na ye?

8 Libosoliboso, ezali bolingo makasi oyo azalaki na yango mpo na Tata na ye. Bolingo oyo Yesu azalaki na yango mpo na Yehova nde esalisaki ye ayika mpiko. Bolingo yango etindaki Yesu amibanzabanza mpo na nkombo mpe lokumu ya Tata na ye. (Matai 6:9; Yoane 17:1-6, 26) Mpo na Yesu, likambo ya ntina mingi koleka ezalaki kolongola nsɔni nyonso oyo ebwakamaki na nkombo ya Tata na ye. Na yango mpo na Yesu, ezalaki lokumu monene mpe libaku malamu konyokwama mpo na bosembo, mpamba te ayebaki ete bosembo na ye ekosala ete nkombo monene ya Tata na ye esantisama.​—1 Ntango 29:13.

9 Ezali na ntina mosusu oyo etindaki Yesu akaba bomoi na ye: bolingo oyo azalaki na yango mpo na bato. Bolingo yango ebandá kala uta ebandeli ya lisolo ya bato. Banda kala, liboso Yesu aya awa na mabele, Biblia emonisi ndenge azalaki koyoka na maloba oyo: “Nazalaki kolinga mingi bana ya bato.” (Masese 8:30, 31) Bolingo na ye emonanaki polele ntango azalaki awa na mabele. Ndenge tomonaki yango na mikapo misato oyo euti koleka, na makambo mingi Yesu amonisaki bolingo na ye mpo na bato mpe mingi mpenza mpo na bayekoli na ye. Na mokolo ya 14 Nisana ya mobu 33 T.B., andimaki kokaba bomoi na ye mpo na biso. (Yoane 10:11) Ya solo, yango nde lolenge eleki mpenza malamu oyo amonisaki bolingo na ye mpo na biso. Tosengeli nde komekola ye na likambo yango? Ɛɛ! Kutu, tozwi mobeko ya kosala bongo.

“Bólinganaka bino na bino . . . kaka ndenge ngai nalingaki bino”

10, 11. Wapi mobeko ya sika oyo Yesu apesaki bayekoli na ye, yango esɛngi nini, mpe mpo na nini ezali na ntina kotosa yango?

10 Na butu oyo ezalaki liboso akufa, Yesu ayebisaki bayekoli oyo bazalaki elongo na ye ete: “Nazali kopesa bino mobeko ya sika, ete bólinganaka bino na bino; kaka ndenge ngai nalingi bino, bino mpe bólinganaka. Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai: soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoane 13:34, 35) “Bólinganaka bino na bino,” mpo na nini yango ezali “mobeko ya sika”? Mibeko ya Moize esilaki koloba ete: “Osengeli kolinga moninga [to, mozalani] na yo lokola yo moko.” (Balevi 19:18) Kasi mobeko ya sika esɛngi bolingo oyo eleki mpenza, bolingo oyo ekoki kotinda biso tókaba bomoi na biso mpo na bolamu ya basusu. Yesu amonisaki yango polele ntango alobaki: “Mobeko na ngai yango oyo: ete bólinganaka bino na bino kaka ndenge ngai nalingi bino. Moto moko te azali na bolingo koleka moto oyo apesi bomoi na ye mpo na baninga na ye.” (Yoane 15:12, 13) Mobeko ya sika elobi boye: “Bólingaka basusu, lokola bino moko te, kasi koleka bino moko.” Yesu ateyaki biso ndenge ya komonisa bolingo ya ndenge wana na bizaleli na ye mpe ndenge akufaki mpo na biso.

11 Mpo na nini tosengeli mpenza kotosa mobeko ya sika? Tóbosana te ete Yesu alobaki: “Na ndenge yango [bolingo ya solosolo] bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai.” Ɛɛ, bolingo ya solosolo emonisaka ete tozali bakristo ya solo. Tokoki kokokanisa bolingo yango na makarɔ oyo moto alati. Bato oyo bayanganaka mbula na mbula na mayangani minene ya Batatoli ya Yehova balataka makarɔ. Makarɔ yango esalisaka mpo na koyeba nkombo ya moto oyo alati yango mpe lisangá na ye. Bolingo ya solosolo oyo tomoniselanaka ezali “makarɔ” oyo emonisaka ete tozali bakristo ya solo. Na maloba mosusu, bolingo oyo tomoniselanaka esengeli mpenza komonana lokola makarɔ oyo esalisaka bato báyeba ete tozali mpenza bato oyo balandaka Kristo. Mokomoko na biso asengeli komituna boye: ‘‘Makarɔ’ ya bolingo ya solosolo ezali mpenza komonana na bomoi na ngai?’

Bolingo ya solosolo esɛngi nini?

12, 13. (a) Bolingo ya solosolo ekoki kosɛnga biso tósala nini? (b) Kozala na bolingo ya solosolo elimboli nini?

12 Lokola tolandaka Yesu, tosengeli komoniselana bolingo ndenge ye alingaki biso. Yango elimboli kondima komipimela makambo mosusu mpo na bolamu ya bandeko na biso bakristo. Bolingo yango ekoki komema biso tii na kosala likambo nini? Biblia eyebisi biso ete: “Toyebi mpenza bolingo mpo Yesu Kristo apesaki bomoi na ye mpo na biso. Biso mpe tosengeli kopesa bomoi na biso mpo na bandeko na biso.” (1 Yoane 3:16) Lokola Yesu, tokondima ata kokufa mpo na bandeko na biso, soki esengeli. Na ntango ya minyoko, tokondima kutu kokufa na esika ya kotɛka bandeko na biso bakristo to kotya bomoi na bango na likama. Na bamboka oyo bato bakabwani mpo na lomposo to matata kati na bikólo, tondimaka kotya bomoi na biso na likama mpo na kobatela bandeko na biso, ata soki tozali na bango lomposo to ekólo moko te. Ntango bikólo ezali kobunda, tondimaka kokɔta bolɔkɔ to ata mpe kokufa na esika ya kokamata mandoki mpo na kobundisa bandeko na biso bakristo to ata mpe bato mosusu.​—Yoane 17:14, 16; 1 Yoane 3:10-12.

13 Komonisa bolingo esuki kaka te na kondima kokufa mpo na bandeko na biso. Kutu, biso nyonso te nde tokokufa mpo na basusu. Nzokande, soki tolingaka bandeko na biso tii kondima kokufa mpo na bango, tokondima banda sikoyo koboma nzoto mpo na kosalisa bango ata na makambo ya mikemike, boye te? Kozala na bolingo ya solosolo elimboli mpe kotika matomba to bolamu na biso moko mpo na koluka matomba ya basusu. Totyaka bamposa mpe bolamu ya basusu liboso ya oyo ya biso moko, ata soki yango ezali mpasi. (1 Bakorinti 10:24) Na makambo nini mpenza oyo tokoki komonisa bolingo ya solosolo?

Na lisangá mpe na libota

14. (a) Na bantango mosusu, bankulutu babomaka nzoto mpo na makambo nini? (b) Ndenge nini otalelaka bankulutu oyo babomaka nzoto mpo na lisangá na bino?

14 Bankulutu ya lisangá babomaka nzoto mingi mpo na ‘kobatela etonga.’ (1 Petro 5:2, 3) Longola mikumba oyo bazali na yango ya koleisa mabota na bango, na bantango mosusu balekisaka bampokwa to mikolo mosusu na nsuka ya pɔsɔ mpo na makambo ya lisangá, na ndakisa: kobongisa makita, kotala bandeko, mpe kosambisa makambo etali bopɛto ya lisangá. Bankulutu mingi babomaka mpe nzoto na makambo mosusu lokola, kokokisa mikumba minene na mayangani ya minene mpe ya mike, kosala na Bakomite ya boyokani elongo na minganga, kosala na bituluku ya bandeko mpo na kotala bato ya maladi, mpe kosala na Bakomite ya etúká mpo na botongi. Bankulutu, bóbosana te ete lokola bondimaka komipimela makambo mosusu ndenge wana, elingi koloba, kopesa ntango, makasi mpe biloko na bino mpo na kobatela etonga, bozali komonisa bolingo ya solosolo. (2 Bakorinti 12:15) Bolingo mpe milende na bino ezali na motuya mingi na miso ya Yehova, mpe na lisangá oyo bozali kobatela.​—Bafilipi 2:29; Baebre 6:10.

15. (a) Na makambo nini mosusu basi ya bankulutu bamonisaka elimo ya komipimela? (b) Ndenge nini otalelaka basi oyo bandimaka ete mibali na bango bámipesa mpo na kosalisa lisangá na bino?

15 Kasi, tokoloba boni mpo na basi ya bankulutu, bango mpe bamonisaka elimo ya komipimela na ndenge batikaka mibali na bango bámipesa mpo na kosalisa etonga, boye te? Na ntembe te, mwasi oyo andimi ete mobali na ye alekisa ntango mpo na makambo ya lisangá na esika alekisa yango mpo na libota na ye, azali mpenza komonisa elimo ya komipimela. Tóbosana mpe te basi ya bakɛngɛli ya zongazonga: bango mpe bamonisaka elimo ya komipimela na ndenge bandimaka kotambola elongo na mibali na bango na masangá mpe na bazongazonga ndenge na ndenge. Bandimaka kotika bandako na bango mpe ntango mosusu kolala na bambeto ya ndenge na ndenge pɔsɔ na pɔsɔ. Basi oyo bandimaka kotya matomba ya lisangá liboso ya matomba na bango moko, babongi mpenza na longonya mpo na bolingo ya solosolo oyo bazali komonisa.​—Bafilipi 2:3, 4.

16. Makambo nini baboti bakristo bamipimelaka mpo na bana na bango?

16 Ndenge nini tokoki komonisa bolingo ya solosolo na libota? Baboti, bomipimelaka makambo mingi mpo na koleisa bana na bino mpe kobɔkɔla bango “na mitinda mpe na makebisi ya Yehova.” (Baefese 6:4) Mbala mosusu bosalaka mosala makasi bangonga ebele kaka mpo bana na bino bázwa eloko ya kolya, elamba ya kolata, mpe esika malamu ya kofanda. Bondimaka kutu bino moko bózanga eloko, kasi bango te. Bosalaka mpe makasi koyekola na bana na bino, komema bango na makita ya lisangá, mpe kobima na bango na mosala ya kosakola. (Kolimbola Mibeko 6:6, 7) Bolingo ya solosolo oyo bozali komonisa esepelisaka Mobandisi ya libota mpe yango ekoki kosalisa bana na bino bázwa bomoi ya seko.​—Masese 22:6; Baefese 3:14, 15.

17. Ndenge nini mibali bakristo bakoki komekola ezaleli malamu oyo Yesu azalaki na yango?

17 Mibali, ndenge nini bokoki komekola Yesu na oyo etali komonisa bolingo ya solosolo? Biblia eyanoli boye: “Mibali, bókoba kolinga basi na bino, kaka ndenge Kristo alingaki lisangá mpe apesaki bomoi na ye mpo na yango.” (Baefese 5:25) Ndenge tomoni yango, Yesu alingaki bayekoli na ye mingi tii akufaki mpo na bango. Mobali mokristo amekolaka ezaleli malamu ya Yesu, oyo “asalaki makambo te mpo na komisepelisa.” (Baroma 15:3) Mobali ya ndenge wana andimaka kotya bamposa mpe matomba ya mwasi na ye liboso ya oyo ya ye moko. Atingamaka te kaka na likanisi na ye, kasi andimaka mpe likanisi ya mwasi na ye soki yango ebuki mibeko ya Biblia te. Mobali oyo amonisaka bolingo ya solosolo, asepelisaka motema ya Yehova, mpe mwasi na ye ná bana na ye balingaka ye mpe bapesaka ye limemya.

Okosala nini?

18. Nini etindaka biso tólanda mobeko ya sika oyo esɛngi biso tólinganaka?

18 Kotosa mobeko ya sika oyo esɛngi biso tólinganaka ezali likambo ya pɛtɛɛ te, kasi tozali na ntina ya kosala bongo. Paulo akomaki ete: “Bolingo oyo Kristo azali na yango ememisi biso mokumba, mpo oyo tomoni yango oyo: ete moto moko akufelaki bato nyonso . . . , mpe akufelaki bato nyonso mpo baoyo bazali na bomoi bázala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango mpe asekwisamaki.” (2 Bakorinti 5:14, 15) Lokola Yesu akufelaki biso, tosengeli mpenza kozala na bomoi mpo na ye, boye te? Tokoki kosala yango soki tomonisi bolingo oyo esɛngi komipimela makambo mosusu lokola ye.

19, 20. Likabo nini ya kitoko Yehova apesá biso, mpe ndenge nini tokoki komonisa ete tondimi yango?

19 Yesu alekisaki ndelo te ntango alobaki ete: “Moto moko te azali na bolingo koleka moto oyo apesi bomoi na ye mpo na baninga na ye.” (Yoane 15:13) Lokola Yesu andimaki kokaba bomoi na ye mpo na biso, yango ezali elembo monene ya bolingo na ye mpo na biso. Kasi, ezali mpe na moto mosusu oyo alingaki biso mingi koleka. Yesu alobaki ete: “Nzambe alingaki mokili mingi mpenza yango wana apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo akomonisa kondima epai na ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.” (Yoane 3:16) Nzambe alingaka biso mingi, yango wana apesaki Mwana na ye lokola lisiko, mpo biso tósikolama na lisumu mpe na liwa. (Baefese 1:7) Lisiko ezali likabo moko kitoko oyo Yehova apesá biso, kasi atindaka biso na makasi te ete tóndima yango.

20 Biso moko nde tosengeli kozwa ekateli. Ya kosala nini? Ya ‘kondimela’ Mwana na ye. Nzokande, kondima esuki kaka na maloba te. Emonanaka nde na misala, na ndenge oyo tozali komitambwisa. (Yakobo 2:26) Tokomonisa ete tondimeli Yesu Kristo soki tozali kolanda ye mokolo na mokolo. Soki tosali bongo, tokozwa mapamboli mingi banda sikoyo mpe na mikolo ezali koya, ndenge mokapo ya nsuka ya buku oyo ekomonisa yango.

a Mbala mibale na mokolo yango babwakelaki Yesu nsoi: liboso ya bakonzi ya mangomba mpe na nsima, liboso ya basoda ya Roma. (Matai 26:59-68; 27:27-30) Atako basambwisaki ye ndenge wana, andimaki yango kozanga komilelalela; na yango akokisaki maloba ya esakweli oyo: “Nabombaki elongi na ngai te ntango bafingaki ngai mpe babwakelaki ngai nsoi.”​—Yisaya 50:6.