Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 13

“Ngai nalingaka Tata”

“Ngai nalingaka Tata”

1, 2. Likambo nini ntoma Yoane amonisi oyo esalemaki na mpokwa ya nsuka oyo bantoma balekisaki elongo na Yesu?

 MOBALI moko mobange azindisi ekomeli na ye na mai ya mokanda, makambo mingi oyo eleká eyeli ye na motó. Nkombo na ye Yoane, mpe azali ntoma ya nsuka ya Yesu Kristo oyo atikali na bomoi. Sikoyo Yoane akómi na mbula pene na 100; azali kokanisa makambo oyo esalemaki na mpokwa oyo abosanaka te esili koleka soki mbula 70, elingi koloba, mpokwa oyo ye ná bantoma mosusu balekisaki elongo na Yesu liboso akufa. Elimo santu ya Nzambe ekosalisa Yoane akanisa makambo oyo eleká mpe akoma yango ndenge esalemaki.

2 Na mpokwa yango, Yesu amonisaki polele ete mosika te akobomama. Kaka Yoane nde amonisi ntina oyo Yesu alobaki ete bakoboma ye na ndenge ya nsɔmɔ: “Mpo mokili eyeba ete ngai nalingaka Tata, nazali kosala kaka ndenge Tata apesi ngai mitindo ete nasala. Bótɛlɛma, tólongwa awa.”​—Yoane 14:31.

3. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azalaki kolinga Tata na ye?

3 “Ngai nalingaka Tata.” Yango nde likambo ya ntina mingi koleka mpo na Yesu. Azongelaki te maloba wana mbala na mbala. Na lisolo ya Biblia, kaka na Yoane 14:31 nde esika Yesu alobeli polele bolingo oyo azali na yango mpo na Tata na ye. Asukaki kaka na koloba te, kasi akokisaki mpe maloba yango. Mpe azalaki komonisa bolingo yango mpo na Yehova mokolo na mokolo. Mpiko ya Yesu, botosi na ye, mpe ezaleli na ye ya koyika mpiko emonisaki bolingo oyo azalaki na yango mpo na Nzambe. Bolingo yango nde etindaki ye amipesa mobimba na mosala na ye.

4, 5. Biblia ezali kolendisa bolingo ya ndenge nini, mpe tokoki koloba nini mpo na bolingo oyo Yesu azalaki na yango mpo na Yehova?

4 Lelo oyo, ntango bato balobelaka bolingo, bakanisaka na bolingo oyo bato balobelaka na maloba ya ntɔki to oyo bayembaka na banzembo, to mbala mosusu na makambo ya mpambampamba oyo elobelaka lolango. Biblia mpe elobelaka lolango, kasi na ndenge ya lokumu koleka ndenge oyo balobelaka yango lelo. (Masese 5:15-21) Nzokande, Liloba ya Nzambe elobelaka mingi motindo mosusu ya bolingo. Bolingo yango ezali te mayoki ya mpamba to bilingela; ezali mpe te bolingo oyo ezangi mayoki, oyo elobelami na mayele ya filozofi. Bolingo yango etalelaka motema ná makanisi. Bolingo ya ndenge wana eutaka na motema, etambwisami mpe eyokani na mitinda oyo ebongi, mpe emonisamaka na misala ya malamu. Yango ezali eloko ya mpambampamba te. Liloba ya Nzambe elobi: “Bolingo esilaka soki moke te.”​—1 Bakorinti 13:8.

5 Ezali na moto moko te oyo alingá Yehova koleka Yesu. Moto moko te alekaki Yesu na oyo etali kotosa maloba oyo ye moko abengaki mobeko oyo eleki monene na mibeko nyonso ya Nzambe: “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso, mpe na makasi na yo nyonso.” (Marko 12:30) Ndenge nini Yesu akómaki na bolingo ya ndenge wana? Ndenge nini abatelaki makasi bolingo na ye mpo na Nzambe ntango azalaki awa na mabele? Mpe ndenge nini tokoki komekola ye?

Bolingo oyo eumelá mingi mpe ya makasi koleka

6, 7. Ndenge nini toyebi ete Masese 8:22-31 elobeli Mwana ya Nzambe, kasi te bwanya oyo tozalaka na yango?

6 Osilá kosala mosala ná moninga moko boye mpe komona ete boyokani na bino mibale ekómaki makasi mpo na mosala yango? Soki ezali bongo, yango ekoki kosalisa yo oyeba motindo ya bolingo oyo ezalaki kati na Yehova mpe Mwana na ye se moko oyo abotamaki. Tolobeli mbala mingi Masese 8:30, kasi sikoyo tótalela malamumalamu bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima na yango. Kobanda vɛrsɛ 22 tii 31, balobeli bwanya oyo emonisami lokola moto. Ndenge nini toyebi ete maloba wana etaleli Mwana ya Nzambe?

7 Na vɛrsɛ 22, bwanya elobi: “Yehova asalaki ngai ebandeli ya mosala na ye, mosala na ye ya liboso na misala na ye ya kalakala.” Awa ezali te bwanya oyo tozalaka na yango, mpo ezaleli yango ‘basalaki’ yango te, kasi ezali nde eloko mosusu. Yango ekokaki kozala na ebandeli te mpo Yehova azalaka banda kala mpe azali ntango nyonso na bwanya. (Nzembo 90:2) Nzokande, Mwana ya Nzambe azalaki “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá.” Asalemaki, to azalisamaki; azalaki mosala ya liboso na misala nyonso oyo Yehova asalaki. (Bakolose 1:15) Mwana azalaki liboso mabele mpe likoló ezala, ndenge Masese emonisi yango. Mpe lokola azali Liloba, Molobeli ya Nzambe, azalaki bwanya mpenza ya Nzambe na ndenge ya kokoka.​—Yoane 1:1.

8. Mosala nini Mwana azalaki kosala liboso ete aya awa na mabele, mpe tokoki kokokanisa na nini ntango tozali kosepela na biloko oyo ezalisamá?

8 Mosala nini Mwana azalaki kosala na boumeli ya ntango nyonso wana liboso aya awa na mabele? Vɛrsɛ 30 eyebisi biso ete azalaki pembeni ya Nzambe lokola “mosali ya mayele.” Yango elingi koloba nini? Bakolose 1:16 elimboli ete: “Na nzela na ye biloko mosusu nyonso ezalisamaki na likoló mpe na mabele. . . Biloko mosusu nyonso ezalisamaki na nzela na ye mpe mpo na ye.” Na yango, Yehova, Mozalisi, asalelaki Mwana na ye, Mosali ya Mayele, mpo na kozalisa biloko mosusu, elingi koloba bikelamu ya elimo na likoló, molɔ́ngɔ́ monene oyo emonanaka, mabele ná mitindo ndenge na ndenge ya banzete ná banyama oyo ezali kokamwisa, mpo na kosukisa na eloko oyo eleki biloko nyonso awa na mabele: bato. Na makambo mosusu, tokoki kokokanisa boyokani wana kati na Tata ná Mwana na boyokani oyo ezalaka kati na moto oyo azali na mayele ya kosala plan ná motongi-ndako, oyo akolanda plan ya moto yango ya mayele. Ntango tozali kokamwa na komona biloko oyo ezalisamá, tozali mpenza nde kokumisa Moto oyo aleki na mayele. (Nzembo 19:1) Nzokande, yango etindi mpe biso tókanisa boyokani oyo eumelá mpe ya esengo oyo ezalaki kati na Mozalisi ná ‘mosali na ye ya mayele.’

9, 10. (a) Nini esalaki ete bolingo kati na Yehova ná Mwana na ye ezala makasi? (b) Nini ekoki kosala ete bolingo kati na yo ná Tata na yo ya likoló ezala makasi?

9 Ntango bato mibale ya kozanga kokoka bazali kosala elongo, matata ezangaka te na bantango mosusu. Kasi ezali bongo te mpo na Yehova ná Mwana na ye! Mwana asalaki ebele ya bambula elongo na Tata na ye mpe ndenge vɛrsɛ elobi yango, azalaki “kosepela liboso na ye ntango nyonso.” (Masese 8:30) Ɛɛ, asepelaki kozala elongo na Tata na ye, mpe Tata asepelaki kozala elongo na ye. Ya solo mpenza, Mwana amekolaki bizaleli ya Nzambe, yango wana akómaki mpenza lokola Tata na ye. Na yango, tokokamwa te na komona ete bolingo kati na Tata ná Mwana ezalaki mpenza makasi! Ebongi mpenza tóbenga yango bolingo oyo eumelá mingi mpe ya makasi koleka na molɔ́ngɔ́ mobimba.

10 Kasi, yango ekoki kolimbola nini mpo na biso? Mbala mosusu okokanisa ete okoki te kokóma na bolingo ya ndenge wana mpo na Yehova. Ezali solo ete moko te kati na biso akoki kokóma na esika ya lokumu oyo Mwana ya Nzambe azalaki na yango. Atako bongo, biso mpe tozali na libaku moko monene. Kobosana te ete Yesu akómaki na boyokani makasi na Tata na ye ntango azalaki kosala elongo na Ye. Na bolingo nyonso, Yehova apesi biso libaku ya kozala ‘bato oyo bazali kosala elongo na ye.’ (1 Bakorinti 3:9) Lokola tozali kolanda ndakisa ya Yesu na mosala ya kosakola, tosengeli koyeba ete tozali bato oyo bazali kosala elongo na Nzambe. Na yango, bolingo oyo esangisi biso ná Yehova ezali kokóma se makasi. Yango ezali libaku moko monene koleka, boye te?

Ndenge oyo Yesu abatelaki bolingo na ye makasi mpo na Yehova

11-13. (a) Mpo na nini ebongi tókolisa bolingo, mpe ndenge nini Yesu abatelaki makasi bolingo na ye mpo na Yehova ntango azalaki elenge? (b) Ndenge nini Mwana ya Nzambe amonisaki mposa na ye ya koyekola epai ya Yehova, liboso aya awa na mabele mpe ntango azalaki awa na mabele?

11 Na makambo mingi, ebongi tótalela bolingo lokola eloko oyo tosengeli kokolisa na motema na biso. Lokola fololo oyo ezali na lopango, bolingo esengeli koleisama mpe kobatelama mpo ekola mpe ebota mbuma. Soki ebatelami te mpe eleisami malamu te, ekoki kolɛmba mpe kokufa. Yesu atalelaki bolingo na ye mpo na Yehova na lisɛki te. Abatelaki yango makasi mpe ebotaki mbuma ntango azalaki awa na mabele. Tótala ndenge asalaki.   

12 Tókanisa lisusu oyo esalemaki wana Yesu azalaki naino elenge, ntango alobaki na molende nyonso na tempelo na Yerusaleme. Kanisá maloba oyo alobaki epai ya baboti na ye oyo bakómaki motema likoló: “Mpo na nini bozalaki koluka ngai? Boyebaki te ete nasengeli kozala na ndako ya Tata na ngai?” (Luka 2:49) Emonani ete ntango azalaki elenge, Yesu akanisaki naino lisusu te bomoi oyo azalaki na yango na likoló liboso aya awa na mabele. Atako bongo, bolingo na ye mpo na Tata na ye, Yehova, ezalaki kaka makasi. Ayebaki ete bolingo yango esengeli komonana na makambo ya losambo. Na yango mpo na Yesu, esika eleki malamu oyo asengelaki kozala, ezalaki nde na tempelo, epai bato bazalaki koya mpo na kosambela Yehova. Azalaki kosepela mingi kozala kuna mpe ezalaki mpasi mpo alongwa kuna. Lisusu, ntango azalaki na tempelo, azalaki kaka te kotala makambo na miso. Azalaki kosepela makasi koyekola makambo etali Yehova mpe azalaki kolobela makambo oyo ayebaki. Abandaki kosala bongo liboso kutu akokisa mbula 12, mpe akobaki kosala bongo ata na nsima.

13 Liboso aya awa na mabele, Mwana ayekolaki na molende epai ya Tata na ye. Esakweli oyo ekomami na Yisaya 50:4-6 emonisi ete Yehova ateyaki Mwana na ye malako ya ntina mingi mpo na mokumba na ye ya Masiya. Atako Yesu ayekolaki ete kozala Masiya ekozala likambo ya pɛtɛɛ te, azalaki kaka na esengo ya koyekola makambo nyonso oyo akokaki mpo na Yehova. Na nsima, ntango Yesu ayaki awa na mabele mpe ntango akómaki mokóló, azalaki mpe kosepela kokende na ndako ya Tata na ye, mpe kosambela Yehova elongo na basusu mpe kolobela makambo etali Tata na ye. Na yango, Biblia elobi ete Yesu azalaki kokende mbala na mbala na tempelo mpe na sinagoga. (Luka 4:16; 19:47) Soki tolingi ete bolingo na biso mpo na Yehova ekoba kozala ntango nyonso makasi, tosengeli kozala ntango nyonso na mposa makasi ya koyangana na makita ya bokristo, epai tosambelaka Yehova mpe tokolisaka boyebi mpe botɔndi na biso mpo na ye.

“Amataki na ngomba kaka ye moko kobondela”

14, 15. (a) Mpo na nini Yesu azalaki koluka kozala ye moko? (b) Ndenge nini mabondeli ya Yesu emonisaki boyokani mpe limemya oyo azalaki na yango mpo na Tata na ye?

14 Lisusu, Yesu abatelaki makasi bolingo na ye mpo na Yehova na ndenge azalaki kobondela mbala na mbala. Atako azalaki na boboto mpe azalaki kolinga kozala elongo na bato, na bantango mosusu amonaki malamu azala ye moko. Na ndakisa, Luka 5:16 elobi: “Mbala mingi azalaki kokende na esobe mpo na kobondela.” Ndenge moko mpe, Matai 14:23 elobi: “Nsima ya kozongisa ebele ya bato wana, amataki na ngomba kaka ye moko mpo na kobondela. Ntango butu eyaki, azalaki kuna, kaka ye moko.” Na mabaku wana mpe na mabaku mosusu, Yesu alukaki kozala ye moko, mpo na kokima bato te to koboya kozala na bango, kasi nde mpo asepelaki kozala ye moko ná Yehova, kosolola na motema moko na Tata na ye na nzela ya libondeli.

15 Ntango azalaki kobondela, Yesu azalaki mbala mosusu kosalela elobeli “Aba, Tata.” (Marko 14:36) Na ntango ya Yesu, “Aba” ezalaki liloba ya bolingo oyo bamesanaki kosalela na libota mpo na “tata”. Mbala mingi, yango ezalaki moko ya maloba ya liboso oyo mwana moke abandaki koyekola koloba. Kasi ezalaki elobeli moko ya limemya. Atako liloba yango emonisaki boyokani oyo Mwana azalaki na yango ntango azali koloba na Tata na ye ya bolingo, yango emonisaki mpe limemya makasi oyo Yesu azalaki na yango mpo na bokonzi ya Tata na ye Yehova. Boyokani mpe limemya yango ezali na mabondeli ya Yesu oyo ekomamá. Na ndakisa, Yoane mokapo 17, elobeli libondeli ya molai mpe oyo Yesu asalaki yango na motema na ye mobimba na butu ya nsuka liboso báboma ye. Ya solo, ebongi tóyekola libondeli yango mpe tobondelaka lokola Yesu. Kasi yango elingi koloba te ete tosengeli kozongelaka maloba ya Yesu, kasi nde kobondela Tata na biso na motema mobimba mbala nyonso oyo tozwi libaku ya kosala yango. Soki tosali bongo, bolingo na biso mpo na ye ekokola mpe ekokóma makasi.

16, 17. (a) Ndenge nini Yesu azalaki kolobela bolingo oyo azalaki na yango mpo na Tata na ye? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki bokabi ya Tata na ye?

16 Ndenge tomonaki yango liboso, Yesu azongelaki te mbala na mbala maloba: “Nalingaka Tata.” Nzokande, mbala mingi azalaki kolobela bolingo na ye mpo na Tata na ye. Ndenge nini? Yesu ye moko alobaki: “Nazali kosanzola yo liboso ya bato nyonso, Tata, Nkolo ya likoló mpe ya mabele.” (Matai 11:25) Ntango toyekolaki Eteni 2 ya buku oyo, tomonaki ete Yesu asepelaki kosanzola Tata na ye na ndenge asalisaki bato báyeba Ye. Na ndakisa, akokanisaki Yehova na tata oyo andimaki mpenza kolimbisa mwana na ye oyo abungaki nzela. Tata yango azalaki kozela mwana na ye oyo abongolaki motema aya, mpe ntango amonaki ye na mosika, apotaki mbangu mpo na kokutana na ye mpe ayambaki ye. (Luka 15:20) Moto nyonso oyo atángi mokapo oyo akosepela na ndenge oyo Yesu alobeli bolingo mpe bolimbisi ya Yehova!

17 Mbala mingi Yesu azalaki kosanzola Tata na ye mpo na bokabi na Ye. Asalelaki ndakisa ya baboti oyo bazali bato ya kozanga kokoka mpo na kondimisa biso ete Tata na biso akopesa biso elimo santu oyo tozali na mposa na yango. (Luka 11:13) Yesu alobelaki mpe elikya ya bomoi ya seko oyo Tata apesi biso. Mbala mingi, Yesu alobelaki mpe elikya oyo azalaki na yango ya kozonga pene ya Tata na ye na likoló. (Yoane 14:28; 17:5) Ayebisaki bayekoli na ye elikya oyo Yehova apesi “etonga moke” ya Kristo, elingi koloba elikya ya kofanda na likoló mpe ya koyangela elongo na Mokonzi Masiya. (Luka 12:32; Yoane 14:2) Mpe ayebisaki mosali-mabe oyo azalaki pene na ye likoló ya nzete ya mpasi ete akoki kozala na elikya ya kozala lisusu na bomoi na Paradiso. (Luka 23:43) Kolobela bokabi monene ya Tata na ye ndenge wana esalisaki Yesu abatela bolingo na ye makasi mpo na Yehova. Bato mingi oyo balandaka Kristo bamoni ete bolingo na bango mpo na Yehova mpe kondima na bango epai na ye ekómaka makasi ntango balobelaka ye mpe elikya oyo apesi mpo na baoyo balingaka ye.

Okomekola bolingo ya Yesu mpo na Yehova?

18. Likambo nini ya ntina mingi koleka tosengeli kosala mpo na kolanda Yesu, mpe mpo na nini?

18 Na nyonso oyo tosengeli kosala mpo na kolanda Yesu, likambo eleki ntina yango oyo: Kolinga Yehova na motema na biso mobimba, na molimo na biso mobimba, na makanisi na biso nyonso mpe na makasi na biso nyonso. (Luka 10:27) Tomonisaka bolingo yango kaka te na ndenge oyo tomiyokaka, kasi nde na misala na biso. Yesu asukaki te na kolinga Tata na ye kaka na motema, to kaka na koloba ete: “Ngai nalingaka Tata.” Alobaki: “Mpo mokili eyeba ete ngai nalingaka Tata, nazali kosala kaka ndenge Tata apesi ngai mitindo ete nasala.” (Yoane 14:31) Satana abimisaki efundeli oyo ete moto ata moko te akosalela Yehova na bolingo ya solosolo. (Yobo 2:4, 5) Mpo na kopesa eyano ya malamu koleka na maloba wana ya lokuta ya Satana, na mpiko nyonso Yesu asalaki oyo esengeli mpe amonisaki polele na mokili ete alingaki mpenza Tata na ye. Kutu botosi na ye etindaki ye tii na kopesa bomoi na ye. Okolanda Yesu? Okomonisa bato ya mokili na nzela ya etamboli na yo ete olingaka mpenza Yehova Nzambe?

19, 20. (a) Mpo na bantina nini toyanganaka mbala na mbala na makita ya bokristo? (b) Ndenge nini tosengeli kotalela boyekoli na biso moko, komanyola, mpe kobondela?

19 Tokelamaki na mposa makasi ya kozala penepene na Nzambe mpe ya komonisela ye bolingo na biso. Yango wana, Yehova abongisá ndenge ya kosambela ye mpo bolingo na biso mpo na Tata na biso ekola mpe ekóma makasi. Ntango ozali na makita ya bokristo, kobosana te ete oyei wana mpo na kosambela Nzambe na yo. Losambo yango esangisi mabondeli oyo euti na motema, koyemba nzembo ya masanzoli, koyoka na likebi, mpe kopesa biyano soki likoki ezali. Makita yango epesaka mpe yo libaku ya kolendisa baninga na yo bakristo. (Baebre 10:24, 25) Kosambela Yehova pɔsɔ na pɔsɔ na makita ya bokristo ekosalisa yo mpo bolingo na yo mpo na Nzambe ekóma lisusu makasi mingi.

20 Ezali mpe bongo na oyo etali boyekoli ya moto ye moko, komanyola, mpe kobondela. Yebá ete bibongiseli wana epesaka moto libaku ya kozala ye moko elongo na Yehova. Ntango ozali koyekola Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango, Yehova azali koyebisa yo makanisi na ye mpe ndenge oyo amiyokaka. Ntango ozali kobondela, ozali kofungwela ye motema na yo. Kobosana te ete kobondela esuki kaka te na kosɛnga Nzambe eloko. Kobondela ezali mpe libaku ya kopesa Yehova matɔndi mpo na mapamboli oyo ozwi mpe kosanzola ye mpo na misala na ye ya kokamwa. (Nzembo 146:1) Lisusu, kosanzola Yehova na esengo mpe na nsai liboso ya bato nyonso ezali lolenge ya malamu koleka ya kopesa Yehova matɔndi mpe komonisa ete olingaka ye.

21. Mpo na nini bolingo mpo na Yehova ezali na ntina mingi, mpe tokolobela nini na mikapo oyo ekolanda?

21 Tosengeli kolinga Nzambe mpo tózala na esengo ya libela. Soki Adama ná Eva balingaki Yehova, bango mpe basengelaki kozala na esengo ya libela. Yango nde eloko ya ntina mingi koleka oyo osengeli na yango mpo na kolonga makambo nyonso oyo ekoki komeka kondima na yo, kolonga masɛnginya nyonso, mpe koyika mpiko na komekama ndenge na ndenge. Yango nde esengeli mpo moto alanda Yesu. Ya solo, bolingo mpo na Nzambe ekangani mpe na bolingo mpo na mozalani. (1 Yoane 4:20) Na mikapo oyo ekolanda, tokomona ndenge oyo Yesu amonisaki bolingo na ye mpo na bato. Na mokapo oyo elandi, tokomona ntina oyo bato mingi bazalaki kosepela koya epai ya Yesu.