Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

ETENI 2

“Koteya . . . kosakola nsango malamu”

“Koteya . . . kosakola nsango malamu”

Mosali mabaya. Mosali makamwisi. Mobikisi. Yesu ayebanaki na bankombo nyonso wana mpe misusu. Kasi, bato bazalaki kosalela bankombo wana te ntango bazalaki kosolola na ye. Bazalaki kobenga ye nde Moteyi. Na ntembe te, mosala ya ntina mingi oyo amipesaki na yango ntango azalaki na mabele ezalaki nde “koteya . . . kosakola nsango malamu.” (Matai 4:23) Lokola tolandaka Yesu, biso mpe tosengeli kosala mosala yango. Na eteni oyo, tokoyekola ndakisa na ye, oyo elakisi biso ndenge ya kosala mosala yango.