Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 10

“Ekomamá”

“Ekomamá”

“Lelo oyo likomami oyo. . . ekokisami.”

1-3. Yesu alingi ete bato ya Nazarete báyeba likambo nini ya ntina mingi, mpe asali nini mpo na kondimisa bango likambo yango?

 TOZALI na ebandeli ya mosala ya Yesu. Kristo azongi epai na bango, na engumba Nazarete. Mokano na ye ezali ya kosalisa bato báyeba likambo oyo ya ntina mingi: Ye nde Masiya oyo asakolamaki banda kala! Elembo nini apesi mpo na kondimisa likambo yango?

2 Na ntembe te, bato mingi bazali komizela ete asala likamwisi. Bayoki nsango ya makambo ya kokamwisa oyo Yesu asali. Kasi apesi bango elembo ya ndenge wana te. Akei nde na Sinagoga ndenge amesanaki kosala. Atɛlɛmi mpo na kotánga, mpe bapesi ye rulo ya Yisaya. Ezali rulo moko molai, Yesu azali kofungola yango na ngambo moko mpe kolínga yango na ngambo mosusu tii akomona maloba oyo azali koluka. Na nsima, atángi na mongongo makasi maloba oyo ezali lelo na Yisaya 61:1-3.​—Luka 4:16-19.

3 Ya solo, bato oyo bazali koyoka ye bayebi maloba yango. Ezali esakweli etali Masiya. Bato nyonso na Sinagoga bazali kotala Yesu. Bango nyonso bafandi nyɛɛ. Na bongo, Yesu abandi kolimbola, mbala mosusu likambo mokomoko, mpe alobi ete: “Lelo oyo likomami oyo bouti koyoka ekokisami.” Bato oyo bazali koyoka ye bakamwe na maloba na ye ya kitoko, kasi emonani ete mingi bazali kaka kozela ete asala elembo moko ya kokamwisa. Kasi, na mpiko nyonso Yesu asaleli ndakisa moko ya Makomami mpo na komonisa polele kozanga kondima na bango. Na mbala moko, bato ya Nazarete baluki koboma ye!​—Luka 4:20-30.

4. Yesu apesaki ndakisa nini na mosala na ye, mpe tokolobela nini na mokapo oyo?

4 Na mokolo yango, Yesu apesaki ndakisa ya likambo oyo ye moko amesanaki kosala na mosala na ye. Azalaki ntango nyonso kosalela Liloba oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Na ntembe te, makamwisi oyo asalaki ezalaki na ntina mingi mpamba te emonisaki ete elimo ya Nzambe ezalaki elongo na ye. Atako bongo, Makomami Mosantu ezalaki na ntina mingi koleka mpo na Yesu. Tótalela ndakisa oyo atikaki na likambo yango. Tokomona ndenge Nkolo na biso azalaki kolobela makambo oyo euti na Liloba ya Nzambe, ndenge azalaki kolongisa yango, mpe ndenge azalaki kolimbola yango.

Azalaki kolobela makambo oyo euti na Liloba ya Nzambe

5. Makambo nini Yesu alingaki ete bayoki na ye báyeba, mpe ndenge nini amonisaki ete maloba na ye ezali solo?

5 Yesu alingaki ete bato báyeba epai nsango na ye eutaki. Alobaki: “Makambo oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ezali ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoane 7:16) Mokolo mosusu, alobaki: “Nasalaka eloko moko te na likanisi na ngai moko; kasi kaka ndenge Tata ateyaki ngai, ngai mpe nazali koloba makambo oyo.” (Yoane 8:28) Alobaki lisusu ete: “Makambo oyo nazali koloba na bino ezali kouta epai na ngai moko te; kasi Tata, oyo azalaka na bomoko elongo na ngai, azali kosala misala na ye.” (Yoane 14:10) Mpo na komonisa ete maloba na ye ezalaki solo, Yesu azalaki kolobela mbala na mbala makambo oyo eutaki na Liloba ya Nzambe oyo ekomamá.

6, 7. (a) Mbala boni Yesu alobelaki makambo oyo euti na Makomami ya Ebre, mpe mpo na nini yango ezali kokamwisa? (b) Na ndenge nini mateya ya Yesu ekesanaki na oyo ya bakomeli?

6 Soki totaleli malamumalamu maloba ya Yesu oyo ekomamá, tokomona ete makambo oyo atángaki to alobelaki eutaki mingimingi na Makomami ya Ebre, oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Kutu, yango ekoki komonana lokola likambo ya kokamwa te. Mbala mosusu okomituna, mpo na nini na boumeli ya mbula misato ná ndambo oyo alekisaki na mosala ya koteya mpe ya kosakola, Yesu alobelaki te makambo nyonso oyo euti na mikanda oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, oyo ezalaki na ntango wana? Ya solo, akokaki kosala bongo. Kasi, tóbosana te ete kaka mwa ndambo ya maloba mpe misala ya Yesu nde ekomamá na Biblia. (Yoane 21:25) Ya solo, mbala mosusu kaka na mwa bangonga mpamba okoki kotánga na mongongo makasi maloba nyonso ya Yesu oyo ekomamá. Kanisá ete basɛngi yo olobela Nzambe mpe Bokonzi na ye kaka na mwa bangonga moke, mpe ete osala makasi otánga makambo mingi oyo euti na Makomami ya Ebre! Lisusu, tóyeba ete mbala mingi Yesu azalaki te na barulo ya makambo oyo ekomamá. Ntango asalaki lisolo na ye oyo eyebani mingi na nkombo Lisolo Likoló ya Ngomba, atángaki na motó mpe alobelaki makambo mingi oyo eutaki na Makomami ya Ebre!

7 Lokola Yesu azalaki kolobela makambo mingi oyo eutaki na Makomami, yango emonisi ete azalaki mpenza komemya Liloba ya Nzambe. Bato oyo bazalaki koyoka ye “bakamwaki mingi na ndenge na ye ya koteya, mpo azalaki koteya bango lokola moto oyo azali na bokonzi, kasi lokola bakomeli te.” (Marko 1:22) Ntango bakomeli bazalaki koteya, mbala mingi bazalaki kolobela makambo oyo eutaki na oyo bango moko bazalaki kobenga mibeko oyo ekomami te, mpe bazalaki kotánga bankombo ya Barabi ya mayele ya ntango ya kala. Nzokande, Yesu alobelaki ata mokolo moko te mobeko oyo ekomami te to mpe Barabi. Kasi azalaki nde kolobela makambo oyo euti na Liloba ya Nzambe. Azalaki koloba mbala na mbala ete: “Ekomamá.” Azalaki kosalela elobeli wana mpe maloba mosusu ya ndenge wana ntango azalaki koteya bato oyo bazalaki kolanda ye mpe ntango azalaki kosembola makanisi oyo ebongi te.

8, 9. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki bokonzi ya Liloba ya Nzambe ntango apɛtolaki tempelo? (b) Na ndenge nini bakonzi ya mangomba na tempelo bamonisaki mpenza kozanga limemya mpo na Liloba ya Nzambe?

8 Ntango Yesu apɛtolaki tempelo na Yerusaleme, alobaki: “Ekomamá ete: ‘Ndako na ngai ekobengama ndako ya mabondeli,’ kasi bino bozali kokómisa yango mobenga ya miyibi.” (Matai 21:12, 13; Yisaya 56:7; Yirimia 7:11) Nzokande lobi oyo eleki, asalaki misala mingi ya kokamwa kuna. Bilenge mibali bakamwaki mingi mpe babandaki kosanzola ye. Kasi bakonzi ya mangomba lokola basepelaki te batunaki Yesu soki azali koyoka makambo oyo bana yango bazalaki koloba. Ayanolaki ete: “Ɛɛ. Botángá naino te likambo oyo: ‘Osali ete monɔkɔ ya bana mpe ya bana oyo bazali komɛla mabɛlɛ ebimisa lisanzoli’?” (Matai 21:16; Nzembo 8:2) Yesu alingaki mibali wana báyeba ete likambo bana yango bazalaki kosala esakolamaki na Liloba ya Nzambe.

9 Na nsima, bakonzi wana ya mangomba bayanganaki elongo mpe bakendaki kotuna Yesu ete: “Bokonzi nini ozali na yango ya kosala makambo oyo?” (Matai 21:23) Mbala mingi Yesu asilaki komonisa polele epai wapi bokonzi na ye eutaki. Ateyaki mateya ya sika te mpe abimisaki makanisi ya sika te. Azalaki kaka kosalela makambo oyo ekomamaki na Liloba ya Tata na ye. Na yango, banganga-nzambe mpe bakomeli wana nde bamonisaki mpenza kozanga limemya mpo na Yehova mpe Liloba na ye. Ebongaki mpenza Yesu apamela bango na ndenge amonisaki polele mabe ya makanisi na bango.​—Matai 21:23-46.

10. Ndenge nini tokoki komekola Yesu na lolenge oyo tosalelaka Liloba ya Nzambe, mpe bisaleli nini tozali na yango oyo Yesu azalaki na yango te?

10 Lokola Yesu, lelo oyo bakristo ya solo mpe batyelaka Liloba ya Nzambe motema na mosala ya kosakola. Na mokili mobimba, eyebani ete Batatoli ya Yehova bazalaka na mposa makasi ya koyebisa bato mosusu nsango ya Biblia. Mikanda na biso etángaka mpe elobelaka mingi makambo oyo euti na Biblia. Na mosala na biso ya kosakola, tosalaka mpe bongo; tosalaka makasi mpo na kobenda likebi ya bato na Makomami ntango tozali kosolola na bango. (2 Timote 3:16) Tosepelaka mingi mpenza ntango moto andimi ete tótángela ye likambo moko na Biblia, tómonisa ye ntina ya Liloba ya Nzambe, mpe tólimbwela ye yango! Ezali solo ete tozali te na bɔɔngɔ ya kokoka ndenge Yesu azalaki na yango, kasi tozali na bisaleli mingi oyo ye azalaki na yango te. Longola Biblia na mobimba na yango, oyo ezali kobimisama na minɔkɔ mingi, tozali mpe na mikanda ebele oyo elimbolaka Biblia, oyo esalisaka biso tómona vɛrsɛ nyonso oyo tokoki koluka. Tiká tózala ntango nyonso na mokano ya kolobela makambo oyo euti na Biblia mpe kobenda likebi ya bato likoló na yango na libaku nyonso!

Azalaki kolongisa Liloba ya Nzambe

11. Mpo na nini mbala mingi Yesu azalaki kolongisa Liloba ya Nzambe?

11 Mbala mingi Yesu amonaki bato bazali koluka kosalela Liloba ya Nzambe na ndenge ya mabe, kasi yango ekamwisaki ye te. Na libondeli moko, Yesu alobaki na Tata na ye ete: “Liloba na yo ezali solo.” (Yoane 17:17) Mpe Yesu ayebaki malamu ete Satana, “mokonzi ya mokili oyo,” azali “moto ya lokuta mpe tata ya lokuta.” (Yoane 8:44; 14:30) Ntango Satana amekaki Yesu, Yesu atángaki Makomami mbala misato. Satana alobelaki vɛrsɛ moko ya Nzembo, oyo na nko nyonso asalelaki yango na ndenge ya mabe; Yesu aboyaki makanisi wana ya mabe, alongisaki nde Liloba ya Nzambe.​—Matai 4:6, 7.

12-14. (a) Ndenge nini bakonzi ya mangomba bazangaki limemya mpo na Mibeko ya Moize? (b) Ndenge nini Yesu alongisaki Liloba ya Nzambe?

12 Mbala mingi Yesu azalaki kolongisa Liloba ya Nzambe mpo bato bazalaki kosalela Makomami Mosantu na ndenge ya mabe, kolimbola yango mabe, mpe komonisa yango na ndenge oyo ebongi te. Bakonzi ya mangomba na ntango na ye bazalaki kosalela Liloba ya Nzambe na ndenge ya mabe. Bazalaki kolobela mingi makambo mikemike ya Mibeko ya Moize, kasi bazalaki te kosalela mitinda oyo esimbaki mibeko yango. Na yango, bazalaki kolendisa losambo ya likolólikoló, oyo etongami na makambo oyo emonanaka, na esika ya kolendisa makambo oyo eleki ntina, elingi koloba bosembo, motema mawa, mpe kondima. (Matai 23:23) Ndenge nini Yesu alongisaki Mibeko ya Nzambe?

13 Na Lisolo Likoló ya Ngomba oyo asalaki, Yesu azalaki mbala na mbala koloba ete “boyokaki ete balobaki,” mpo na kokɔtisa likanisi ya Mibeko ya Moize. Na nsima, azalaki kobakisa ete “kasi ngai nalobi na bino” mpe kolimbola etinda oyo ezalaki na kati ya mobeko yango, na esika ya kosuka kaka na kolobela kotosa Mibeko likolólikoló. Na maloba wana, azalaki nde kokweisa Mibeko? Te, azalaki nde kolongisa yango. Na ndakisa, bato bayebaki malamu mobeko oyo elobaki ete: “Osengeli koboma moto te.” Kasi Yesu ayebisaki bango ete koyina moto ezali kobuka mobeko. Ndenge moko mpe, kozala na mposa ya kosangisa nzoto na moto oyo azali molongani na yo te, ezali kobuka mobeko ya Nzambe oyo epekisi ekobo.​—Matai 5:17, 18, 21, 22, 27-39.

14 Na nsuka, Yesu alobaki boye: “Boyokaki ete balobá, ‘osengeli kolinga mozalani na yo mpe koyina monguna na yo.’ Kasi ngai nalobi na bino ete: Bókoba kolinga banguna na bino mpe kobondela mpo na baoyo bazali konyokola bino.” (Matai 5:43, 44) Mobeko ya “koyina monguna na yo” eutaki na Liloba ya Nzambe? Te, bakonzi ya mangomba nde babimisaki mobeko wana na ndenge na bango moko. Bakɔtisaki makanisi ya bato mpo na kolɛmbisa Mibeko ya Nzambe oyo ezali ya kokoka. Kozanga kobanga, Yesu alongisaki Liloba ya Nzambe mpo ebebisama te na bonkɔkɔ ya bato.​—Marko 7:9-13.

15. Ndenge nini Yesu alongisaki Mibeko ya Nzambe liboso ya bato oyo balingaki komonisa ete ezali mpenza mpasi mpe makasi?

15 Bakonzi ya mangomba bakweisaki mpe Mibeko ya Nzambe na ndenge basalaki ete ekóma mpenza mpasi mpe makasi. Ntango bayekoli ya Yesu babukaki mwa ndambo ya mitó ya blé wana bazalaki koleka na elanga, Bafarisai mosusu balobaki ete bazali kotosa Sabata te. Yesu asalelaki ndakisa moko oyo azwaki na Makomami mpo na kolongisa Liloba ya Nzambe liboso ya likanisi wana ya mabe. Atángaki kaka eteni moko ya Makomami oyo emonisi ndenge basalelaki mampa ya kolakisa na libándá ya esika mosantu ntango Davidi mpe bato na ye oyo bazalaki na nzala balyaki yango. Yesu ayebisaki Bafarisai yango ete bakangaki ntina te ete Yehova azali na mawa mpe ndenge oyo ayokelaka bato mawa.​—Marko 2:23-27.

16. Ndenge nini bakonzi ya mangomba babongolaki Mobeko ya Moize oyo etali koboma libala, mpe Yesu asalaki nini?

16 Bakonzi ya mangomba babimisaki mpe mibeko ebele mpo báboya kotosa mibeko mosusu ya Nzambe. Na ndakisa, Mibeko epesaki nzela ete mobali aboma libala na mwasi na ye kaka soki asali “likambo moko ya mabe,” ekokaki kozala likambo moko ya monene oyo epesi nsɔni na libota. (Kolimbola Mibeko 24:1) Nzokande, na ntango ya Yesu, bakonzi ya mangomba basalelaki mobeko wana mpo na kopesa mobali nzela ya koboma libala na mwasi na ye mpo na likambo nyonso, ata soki mwasi azikisi bilei! a Yesu amonisaki bango ete bazalaki kosalela na ndenge ya mabe maloba ya Moize oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Yango wana azongelaki mobeko oyo Yehova apesaki na ebandeli mpo na libala, ete mobali asengeli kozala na mwasi kaka moko, mpe amonisaki ete libala ekoki kokufa kaka mpo na pite.​—Matai 19:3-12.

17. Lelo oyo, ndenge nini bakristo bakoki komekola Yesu ntango bazali kolongisa Liloba ya Nzambe?

17 Lelo oyo, bato oyo balandaka Kristo bazalaka mpe na mposa makasi ya kolongisa Makomami Mosantu liboso ya baoyo bateyaka lokuta. Ntango bakonzi ya mangomba balobaka ete mitinda oyo etali etamboli malamu, oyo ezali na Liloba ya Nzambe, esilá ngala, bazali nde koloba ete Biblia ezali na ntina te mpo na biso lelo oyo. Bakonzi ya mangomba basalelaka mpe Biblia na ndenge ya mabe ntango bateyaka mateya ya lokuta oyo balobaka ete euti na Biblia. Tomonaka yango libaku malamu ntango tolongisaka Liloba ya Nzambe oyo ezali pɛto, na ndakisa, ntango tomonisaka ete Nzambe azali na kati ya Bosato te. (Kolimbola Mibeko 4:39) Kasi, tosalaka yango na mayele, na boboto mpenza mpe na limemya makasi.​—1 Petro 3:15.

Azalaki kolimbola Liloba ya Nzambe

18, 19. Bandakisa nini emonisi ete Yesu ayebaki kolimbola Liloba ya Nzambe malamumalamu?

18 Yesu azalaki na likoló ntango Makomami ya Ebre ezalaki kokomama. Na ntembe te, asepelaki makasi na libaku oyo azwaki ya koya na mabele mpo na kolimbola Liloba ya Nzambe! Na ndakisa, kanisá mokolo oyo akutanaki na bayekoli na ye mibale na nzela ya Emause, nsima ya lisekwa na ye. Liboso báyeba ete ezalaki ye, bayebisaki ye ndenge bazalaki na mawa makasi mpe babulunganaki mpo na liwa ya Nkolo na bango oyo bazalaki kolinga mingi. Yesu asalaki nini? “Kobanda na Moize tii na Basakoli nyonso, alimbolelaki bango makambo oyo elobamá mpo na ye na Makomami nyonso.” Bayokaki ndenge nini? Na nsima, balobanaki ete: “Mitema na biso ezalaki kopela na kati na biso ntango azalaki koloba na biso na nzela, ntango azalaki kolimbolela biso Makomami polelepolele, boye te?”​—Luka 24:15-32.

19 Na nsima, kaka na mokolo yango, Yesu akutanaki na bantoma na ye mpe bato mosusu. Talá likambo oyo asalaki mpo na bango: “Afungolaki makanisi na bango mpo bákanga malamumalamu ntina ya Makomami.” (Luka 24:45) Na ntembe te, ntango wana ya esengo esalisaki bango bábosana te mabaku nyonso oyo Yesu asalelaki bango likambo ya ndenge wana mpe mpo na moto nyonso oyo andimaki koyoka ye. Na mabaku mingi, azalaki kotánga biteni ya Makomami oyo eyebanaki malamu mpe kolimbola yango na ndenge oyo ezalaki kobenda mpenza likebi ya bato oyo bazalaki koyoka ye; bongo, bakómaki na boyebi ya mozindo ya Liloba ya Nzambe.

20, 21. Ndenge nini Yesu alimbolaki maloba oyo Yehova alobaki na Moize na nzete oyo ezalaki kopela mɔtɔ?

20 Na libaku moko, Yesu azalaki koloba na etuluku moko ya Basadukai. Bazalaki mwa etuluku ya bakonzi ya lingomba ya Bayuda oyo bazalaki kondima lisekwa te. Yesu alobaki na bango ete: “Na likambo etali lisekwa ya bakufi, botángá te oyo Nzambe alobaki mpo na bino ete: ‘Nazali Nzambe ya Abrahama, Nzambe ya Yisaka, mpe Nzambe ya Yakobo’? Azali Nzambe, ya bakufi te, kasi ya bato ya bomoi.” (Matai 22:31, 32) Yango ezalaki likomi oyo bayebaki malamu, oyo ekomamaki na Moize, moto oyo Basadukai bazalaki komemya mingi. Omoni ndenge ndimbola oyo Yesu apesaki ezalaki na nguya mingi?

21 Moize asololaki na Yehova likambo yango soki na mobu 1514 L.T.B., liboso ya nzete oyo ezalaki kopela mɔtɔ. (Kobima 3:2, 6) Na ntango wana, Abrahama asilaki kokufa eleki mbula 329, Yisaka eleki mbula 224, mpe Yakobo eleki mbula 197. Atako bongo, Yehova azalaki kaka koloba ete: “Nazali” Nzambe na bango. Basadukai wana bayebaki ete Yehova azali te lokola mwa nzambe moko ya bapakano, oyo bato bazalaki kokanisa ete ayangelaka mokili moko epai bato oyo bakufá bakendaka. Kasi ndenge Yesu alobaki yango, azali nde Nzambe ya “bato ya bomoi.” Yango elingaki koloba nini? Yesu asukisaki na maloba oyo: “Epai na ye bango nyonso bazali na bomoi.” (Luka 20:38) Basaleli ya Yehova ya bolingo oyo basilá kokufa, babatelami na makanisi ya Nzambe oyo ezali ya kokoka, mpe Nzambe akobosana bango te. Mokano ya Yehova ya kosekwisa basaleli na ye wana ekozanga te kokokisama; yango wana, alobeli bango lokola nde bazali na bomoi. (Baroma 4:16, 17) Na ntembe te yango ezali lolenge eleki malamu ya kolimbola Liloba ya Nzambe. Yango wana, “ebele ya bato wana. . . bakamwaki”!​—Matai 22:33.

22, 23. (a) Ndenge nini tokoki komekola Yesu ntango tozali kolimbola Liloba ya Nzambe? (b) Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?

22 Lelo oyo, bakristo bazali na libaku ya komekola ndenge oyo Yesu azalaki kolimbola Liloba ya Nzambe. Ya solo, makanisi na biso ezali ya kokoka te. Atako bongo, mbala mingi tozalaka na likoki ya kosolola na bato na vɛrsɛ moko oyo bayebi yango banda kala mpe kolimbolela bango likambo moko na vɛrsɛ yango na ndenge oyo mbala mosusu bakanisá naino te mpo na yango. Na ndakisa, ekoki kozala ete balobaka mbala na mbala ete “Nkombo na yo esantisama” mpe “Bokonzi na yo eya,” kozanga ete báyeba nkombo ya Nzambe mpe Bokonzi na ye. (Matai 6:9, 10) Tosepelaka mingi mpenza ntango moto andimi ete tólimbolela ye mateya wana ya solo ya Biblia na ndenge ya polele mpe ya pɛtɛɛ!

23 Kolobela makambo oyo euti na Liloba ya Nzambe, kolongisa yango, mpe kolimbola yango ezali na ntina mingi mpo na komekola ndenge oyo Yesu azalaki koyebisa bato solo. Tólobela sikoyo mayele mosusu ya koteya oyo Yesu asalelaki mpo na kosimba mitema ya bato na mateya ya solo ya Biblia.

a Josèphe, moto moko ya istware na siɛklɛ ya liboso, oyo azalaki mpe Mofarisai oyo abomaki libala, alobaki na nsima ete “mobali akoki koboma libala mpo na likambo nyonso (mpe mibali balobaka ete ezali na bantina ebele oyo ekoki kotinda bango báboma libala).”