Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 11

“Naino moto moko te alobá lokola moto yango”

“Naino moto moko te alobá lokola moto yango”

1, 2. (a) Mpo na nini bakɛngɛli oyo batindaki bákende kokanga Yesu bazongaki mabɔkɔ mpamba? (b) Nini esalaki ete Yesu azala moteyi monene ndenge wana?

 BAFARISAI bayoki nkanda makasi mpenza. Yesu azali na tempelo, azali koteya makambo etali Tata na ye. Bato oyo bazali koyoka ye bakabwani; mingi bandimeli Yesu, nzokande mposa ya basusu ezali ete akangama. Lokola bakonzi ya mangomba basiliki makasi mpe bakoki lisusu kokanga motema te, batindi bakɛngɛli mpo bákanga Yesu. Kasi, bakɛngɛli bazongi mabɔkɔ mpamba. Banganga-nzambe bakonzi mpe Bafarisai batuni bango: “Mpo na nini boyei na ye te?” Bakɛngɛli bayanoli ete: “Naino moto moko te alobá lokola moto yango.” Bakamwaki mingi na mateya ya Yesu, yango wana bakokaki te kokanga ye. a​—Yoane 7:45, 46.

2 Longola bakɛngɛli wana, bato mosusu mpe bakamwaki na mateya ya Yesu. Ebele mpenza ya bato bayanganaki mpo na koyoka ye ntango azali koteya. (Marko 3:7, 9; 4:1; Luka 5:1-3) Nini esalaki ete Yesu azala moteyi monene ndenge wana? Ndenge tomonaki yango na Mokapo 8, azalaki kolinga mateya ya solo oyo azalaki koteya mpe azalaki kolinga bato oyo azalaki koteya. Ayebaki mpe kosalela malamu mayele ya koteya. Tótalela mayele misato ya koteya oyo asalelaki mpe ndenge oyo tokoki komekola yango.

Azalaki na elobeli ya pɛtɛɛ

3, 4. (a) Mpo na nini Yesu azalaki kosalela maloba ya pɛtɛɛ ntango azalaki koteya? (b) Ndenge nini Lisolo Likoló ya Ngomba ezali ndakisa oyo emonisi ete Yesu azalaki koteya na ndenge ya pɛtɛɛ?

3 Kanisá naino ebele ya maloba oyo Yesu akokaki kosalela! Atako bongo, ntango azalaki koteya, alobaki te makambo oyo bayoki na ye bakokoka te kokanga ntina na yango, mpo mingi kati na bango bazalaki “bato batángá kelasi te mpe bato mpamba.” (Misala 4:13) Azalaki kotalela makoki na bango mpe azalaki te kosopela bango makambo ebeleebele. (Yoane 16:12) Maloba na ye ezalaki pɛtɛɛ, kasi makambo oyo azalaki koteya ezalaki na ntina mingi.

4 Na ndakisa, tótalela Lisolo Likoló ya Ngomba, ndenge ekomami na Matai 5:3–7:27. Na lisolo yango, Yesu alobelaki makambo mozindo. Maloba oyo asalelaki to makanisi oyo abimisaki ezalaki mindɔndɔ te. Ɛɛ, maloba nyonso oyo asalelaki ata mwana moke akoki kokanga noki mpenza ntina na yango! Na yango, tokokamwa te ete ntango Yesu asilisaki koloba, ebele wana ya bato oyo mbala mosusu esangisaki ebele ya basali-bilanga, babateli ya mpate, mpe baluki-mbisi​—“bakamwaki na ndenge na ye ya koteya.”​—Matai 7:28.

5. Pesá bandakisa ya maloba oyo Yesu alobaki oyo ezalaki pɛtɛɛ, kasi ezalaki na ndimbola monene mpenza.

5 Mbala mingi ntango Yesu azalaki koteya, azalaki kosalela maloba ya pɛtɛɛ mpe ya mikuse, mpe azalaki kobimisa maloba oyo ezalaki na ndimbola mpenza. Lokola na ntango wana mikanda ezalaki te, Yesu azalaki kosalela maloba ya pɛtɛɛ mpo nsango na ye etikala na makanisi mpe na mitema ya bayoki na ye. Tótalela mwa bandakisa: “Bótika kosambisa mpo básambisa bino te.” “Bato oyo bazali nzoto malamu bazalaka na mposa ya monganga te, kasi nde bato oyo bazali kobɛla.” “Elimo ezali na molende, kasi nzoto ezali na bolɛmbu.” “Bózongisa biloko ya Kaisala epai ya Kaisala, kasi biloko ya Nzambe epai ya Nzambe.” “Esengo ya kopesa eleki esengo ya kozwa.” b (Matai 7:1; 9:12; 26:41; Marko 12:17; Misala 20:35) Esili koleka pene na mbula 2000 banda maloba yango elobamaki, kasi bato babosanaka yango te tii lelo oyo.

6, 7. (a) Mpo tóteya na ndenge ya pɛtɛɛ, mpo na nini ezali na ntina tósalela maloba ya pɛtɛɛ? (b) Ndenge nini tokoki koboya kosopela moyekoli ya Biblia makambo ebeleebele?

6 Ndenge nini tokoki koteya na maloba ya pɛtɛɛ? Likambo moko ya ntina ezali ete tósalela maloba ya pɛtɛɛ oyo bato mingi bakokanga ntina na yango mbala moko. Mateya ya ebandeli ya Liloba ya Nzambe ezali mindɔndɔ te. Yehova asili komonisa mikano na ye epai ya bato ya mitema sembo mpe ya komikitisa. (1 Bakorinti 1:26-28) Soki tokanisi na mozindo ndenge ya kolimbola likambo moko na Liloba ya Nzambe na ndenge ya pɛtɛɛ, tokosalisa bato bákanga ntina na yango.

Ntango ozali koteya, zalá na elobeli ya pɛtɛɛ

7 Mpo tóteya na ndenge ya pɛtɛɛ, tosengeli kokeba ete tósopela te moyekoli ya Biblia makambo ebeleebele. Na yango, ntango tozali koyekola na moto Biblia, ezali na ntina te kolimbola makambo nyonso; ezali mpe na ntina te kokende mbangumbangu kaka mpo na kosilisa mokapo to liteya moko. Nzokande, ebongi mpenza tótalela mposa mpe makoki ya moyekoli mpo na koyeba soki boyekoli esengeli kokende mbangu to te. Mokano na biso ezali ya kosalisa moyekoli akóma kolanda Kristo mpe akóma mosambeli ya Yehova. Mpo na yango, tosengeli kozwa mpenza ntango oyo esengeli mpo moyekoli akanga mpenza ntina ya makambo oyo azali koyekola. Soki tosali bongo, mateya ya solo oyo ezali na Biblia ekosimba motema ya moyekoli mpe ekotinda ye asalela makambo oyo azali koyekola.​—Baroma 12:2.

Azalaki kotuna mituna oyo ebongi

8, 9. (a) Mpo na nini Yesu azalaki kotuna mituna? (b) Ndenge nini Yesu asalelaki mituna mpo na kosalisa Petro akanga ntina ya likambo etali kofuta mpako ya tempelo?

8 Yesu azalaki mpenza kosalela mituna, ata mpo na koyebisa moto likambo moko na boumeli ya ntango moke. Kasi, mpo na nini azalaki kotuna mituna? Na bantango mosusu, azalaki kotuna mituna oyo ebongi mpo na komonisa polele makanisi ya batɛmɛli na ye, mpo akangisa bango monɔkɔ. (Matai 21:23-27; 22:41-46) Nzokande, mbala mingi azalaki kotuna bayekoli na ye mituna mpo bábimisa makambo oyo ezalaki na mitema na bango, mpe mpo na kosembola mpe kobongisa ndenge na bango ya kokanisa. Na yango, azalaki kotuna mituna lokola oyo: “Bokanisi nini?” mpe “Ondimi yango?” (Matai 18:12; Yoane 11:26) Ndenge oyo Yesu azalaki kosalela mituna, esalisaki ye asimba mpenza mitema ya bayekoli na ye. Tótalela ndakisa moko.

9 Mokolo moko, bakɔngɔli-mpako batunaki Petro soki Yesu afutaka mpako ya tempelo. c Petro ayanolaki mbala moko: “Ɛɛ, afutaka.” Na nsima, Yesu atunaki ye boye: “Simo, okanisi nini? Bakonzi ya mabele bazwaka lifuti to mpako ya moto na moto epai ya banani? Epai ya bana na bango to epai ya bato mosusu?” Petro ayanolaki: “Epai ya bato mosusu.” Yesu alobaki: “Boye bana bafutaka mpako te.” (Matai 17:24-27) Na ntembe te, Petro akangaki ntina ya mituna wana, mpamba te eyebanaki malamu ete bato ya libota ya bakonzi bazalaki kofuta mpako te. Na yango, lokola Yesu azalaki Mwana se moko oyo abotamaki ya Mokonzi ya likoló oyo bato bazalaki kosambela na tempelo wana, asengelaki kofuta mpako te. Tomoni ete na esika Yesu asuka kaka na kopesa Petro eyano ya malamu, asalelaki nde mituna na ndenge ebongi mpo na kosalisa Petro akanga ntina mpe mbala mosusu, akanisaka malamu liboso ya koyanola.

Tunáká mituna oyo ekolamwisa mposa ya moto oyo ozali kosolola na ye

10. Ndenge nini tokoki kosalela malamu mituna ntango tozali kosakola ndako na ndako?

10 Ndenge nini tokoki kosalela malamu mituna na mosala ya kosakola? Ntango tozali kosakola ndako na ndako, tokoki kotuna mituna mpo na kobenda likebi ya bato, mbala mosusu mpo na koluka ndenge ya koyebisa bango nsango malamu. Na ndakisa, soki mobange moko afungoli porte, tokoki kotuna ye na limemya nyonso: “Mbongwana nini osili komona na mokili na boumeli ya bomoi na yo?” Nsima ya koyoka eyano na ye, tokoki lisusu kotuna ye: “Mpo na yo, esengeli kosala nini mpo mokili oyo ekóma mpenza esika ya malamu koleka mpo na kofanda?” (Matai 6:9, 10) Soki mama moko oyo azali na bana ya mike afungoli porte, tokoki kotuna ye boye: “Osilá komituna ndenge mokili oyo ekozala ntango bana na yo bakokóma mikóló?” (Nzembo 37:10, 11) Soki tozali kosalela miso ntango tolingi kokɔta na lopango moko, tokoyeba kopona motuna oyo eyokani na makambo oyo ekosepelisa moto oyo tolingi kosolola na ye.

11. Ndenge nini tokoki kosalela malamu mituna ntango tozali koyekola na moto Biblia?

11 Ndenge nini tokoki kosalela mituna malamu ntango tozali koyekola na moto Biblia? Mituna oyo eponami malamu ekoki kosalisa biso tóyeba makanisi oyo ezali na motema ya moyekoli. (Masese 20:5) Na ndakisa, kanisá ete ozali koyekola na moto liteya 43 ya buku Sepelá na bomoi libela na libela!, oyo elobi “Ndenge nini bakristo basengeli kotalela masanga.” d Liteya yango ezali kolobela ndenge Nzambe atalelaka makambo lokola komɛla mingi to kolangwa masanga. Biyano ya moyekoli ekoki komonisa ete azali kokanga ntina ya makambo oyo Biblia eteyaka, kasi, azali mpenza kondima makambo oyo azali koyekola? Tokoki kotuna ye boye: “Mpo na yo, likanisi ya Nzambe na makambo oyo ebongi mpenza?” Tokoki mpe kotuna: “Ndenge nini okoki kosalela makambo oyo na bomoi na yo?” Nzokande, tosengeli kozala na bokɛngi, mpe kopesa moyekoli lokumu. Tosengeli soki moke te kotuna ye mituna oyo ekoki koyokisa ye nsɔni.​—Masese 12:18.

Ayebaki kosalela makanisi oyo ebongi

12-14. (a) Ndenge nini Yesu asalelaki likoki na ye ya kokanisa na bato na ndenge ebongi? (b) Makanisi nini oyo ebongi Yesu asalelaki ntango Bafarisai balobaki na ye ete azalaki kosala makamwisi na nguya ya Satana?

12 Lokola Yesu azalaki moto ya kokoka, ayebaki ndenge ya kosalisa bato bakóma na makanisi ya malamu. Na bantango mosusu, azalaki kosalela makanisi oyo ebongi mpo na kokweisa bifundeli ya lokuta ya batɛmɛli na ye. Mbala mingi, asalelaki mayele ya kokanisa mpo na koteya bayekoli na ye mateya ya ntina mingi. Tótalela mwa bandakisa.

13 Ntango Yesu abikisaki moto moko oyo azalaki na demo, akufá miso mpe alobaka te, Bafarisai bafundaki Yesu na maloba oyo: “Moto oyo azali kobimisa bademo kaka na nguya ya Beelezebube [Satana], mokonzi ya bademo.” Bandimaki ete moto asengeli kozala na nguya oyo eleki nguya ya bato mpo na kobimisa bademo. Kasi mpo na bango, nguya ya Yesu eutaki epai ya Satana. Efundeli yango ezalaki ya lokuta, ezangaki motó ná makolo. Yesu amonisaki polele ete makanisi na bango ezalaki ya libunga ntango alobaki: “Bokonzi nyonso oyo ekabwani na kati na yango moko nsukansuka ebebaka, mpe engumba nyonso to libota nyonso oyo ekabwani ekotɛlɛma te. Ndenge moko mpe, soki Satana azali kobimisa Satana, akabwani na kati na ye moko. Bongo ndenge nini bokonzi na ye ekotɛlɛma?” (Matai 12:22-26) Na maloba mosusu, Yesu azalaki nde koloba: “Soki nazalaki mosaleli ya Satana, oyo azali kobebisa misala oyo Satana asalaki, boye Satana azali kobebisa misala na ye moko mpe mosika te akobebisama.” Ndenge nini bakokaki kokweisa makanisi wana oyo ebongaki mpenza?

14 Kasi, Yesu asilisaki naino te kokanisa na bango. Lokola ayebaki ete bayekoli mosusu ya Bafarisai babimisaki bademo, atunaki bango motuna moko ya pɛtɛɛ, oyo ezalaki kotinda na kokanisa: “Soki ngai nazali kobimisa bademo na nguya ya Beelezebube, bongo bayekoli na bino bazali kobimisa bango na nguya ya nani?” (Matai 12:27) Na maloba mosusu, Yesu alingaki koloba boye: “Soki ngai nazali kobimisa bademo na nguya ya Satana, boye bayekoli na bino mpe bazali kosalela kaka nguya yango.” Bafarisai bakokaki koloba nini? Bakokaki te kondima ete bayekoli na bango bazalaki kosala na nguya ya Satana. Na yango, Yesu asalelaki kaka makanisi na bango ya lokuta mpo na kondimisa bango likambo oyo esilisaki bango mayele. Soki tosepelaka mpenza ntango totángaka ndenge oyo Yesu asalisaki bango bákanisa malamu, ezali boni mpo na ebele ya bato oyo bayokaki mongongo ya Yesu ye moko ntango azali koloba makambo yango?

15-17. Lobelá ndakisa moko oyo emonisi ndenge Yesu asalelaki elobeli oyo emonisi ete likambo boye eleki oyo mosusu, mpo na koteya mateya ya solo ya Tata na ye, oyo ezalaki kosimba motema.

15 Lisusu Yesu asalelaki makanisi oyo ebongi na ndenge ya kondimisa bato mpo na koteya mateya ya solo ya Tata na ye oyo ezalaki kosimba motema. Mbala mingi mpo na kosala yango, azalaki kosalela elobeli oyo emonisi ete likambo boye eleki oyo mosusu mpo na kosalisa bayoki na ye bándima lisusu likambo moko oyo basí bandimá yango. e Lolenge wana ya kokanisa na bato na nzela ya kokesenisa makambo, esalisaka moto abosana te likambo oyo ayoki. Tótalela kaka ndakisa mibale.

16 Wana Yesu ayanolaki bayekoli na ye ntango basɛngaki ye ateya bango ndenge ya kobondela, amonisaki mposa makasi oyo baboti oyo bazangi kokoka bazalaka na yango ya “kopesa makabo ya malamu” na bana na bango. Na nsima asukisaki boye: “Soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na likoló akopesa te koleka elimo santu na baoyo bazali kosɛnga ye yango?” (Luka 11:1-13) Yesu asalelaki mayele ya kokesenisa makambo. Soki baboti oyo bazali bato ya masumu bakokisaka mposa ya bana na bango, ezali boni mpo na Tata na biso ya likoló, moto ya kokoka mpe moyengebene na makambo nyonso, akozanga nde kopesa elimo santu na basambeli na ye ya sembo oyo babondelaka ye na komikitisa nyonso?

17 Yesu asalelaki mpe lolenge wana ya kokanisa na bato ntango apesaki toli na likambo etali komitungisa. Alobaki boye: “Bayanganga. . . elonaka te mpe ebukaka te, mpe ezali na esika ya kobomba bilei te mpe na ndako ya kobomba biloko te, atako bongo Nzambe aleisaka yango. Bino boleki bandɛkɛ na motuya mosika te? Bótala ndenge bafololo lísi ekolaka; Emonaka mpasi te mpe etongaka elamba te. . . Bongo soki Nzambe alatisaka matiti ya esobe ndenge wana, oyo ezali lelo mpe lobi ekobwakama na mɔtɔ, akolatisa bino koleka te, bino bato ya kondima moke!” (Luka 12:24, 27, 28) Soki Yehova amibanzabanzaka mpo na bandɛkɛ mpe bafololo, akozanga nde komibanzabanza mpo na bato oyo balingaka ye mpe basambelaka ye? Na ntembe te, na mayele wana ya kokanisa, Yesu asimbaki mpenza mitema ya bayoki na ye.

18, 19. Ndenge nini tokoki kokanisa na moto oyo andimelaka Nzambe te mpo amonaka ye te?

18 Na mosala ya kosakola, tosengeli kosalela makanisi oyo ebongi mpo na kokweisa bindimeli ya lokuta. Tosengeli mpe kosalela mayele ya kondimisa mpo na koteya mateya ya solo oyo etali Yehova. (Misala 19:8; 28:23, 24) Atako bongo, tosengeli nde kosalela yango na ndenge ya mindɔndɔ? Ezali bongo te. Liteya tozwi epai ya Yesu yango oyo: kobimisa makanisi oyo ebongi na ndenge ya pɛtɛɛ epesaka mpenza matomba.

19 Na ndakisa, ndenge nini tokoki koyanola na moto oyo alobi ete andimelaka Nzambe te mpo amonaka ye te? Tokoki kokanisa na ye na ndenge makambo esalemaka. Soki tomoni likambo moko esalemi, toyebaka ete moto moko nde asali yango. Tokoki koloba boye: “Soki okei na zamba moko mosika mpe kuna okuti ndako moko batongá yango malamu mpe ezali na ebele ya biloko ya kolya, okoloba mbala moko ete ezali na moto moko oyo atongaki yango, boye te? Ndenge moko mpe, ntango tozali komona ndenge oyo mokili ebongisamá mpe ebele ya biloko ya kolya oyo ezali na mabele, tosengeli kondima ete ezali na Moto moko oyo asalaki yango, boye te? Biblia emonisi likambo yango na maloba oyo: ‘Ndako nyonso etongamaka na moto, kasi moto oyo azalisá biloko nyonso ezali Nzambe.’” (Baebre 3:4) Ya solo, ata tosaleli mayele nyonso ya kokanisa, moto nyonso te nde akondima.​—2 Batesaloniki 3:2.

Salelá makanisi oyo ekosimba motema ya moto

20, 21. (a) Ndenge nini tokoki kosalela elobeli oyo emonisi ete likambo boye eleki oyo mosusu mpo na komonisa bizaleli mpe banzela ya Yehova? (b) Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?

20 Ntango tozali koteya, ezala na mosala ya kosakola to na lisangá, tokoki mpe kosalela elobeli oyo emonisi ete likambo boye eleki oyo mosusu mpo na komonisa bizaleli mpe banzela ya Yehova. Na ndakisa, mpo na komonisa ete liteya oyo elobaka ete bato banyokwamaka seko na lifelo ya mɔtɔ efingisaka mpenza Yehova, tokoki koloba: “Tata oyo alingaka mwana na ye, akoki nde kotya lobɔkɔ ya mwana na mɔtɔ mpo na kopesa ye etumbu? Na yango, likanisi oyo ete bato banyokwamaka na lifelo ya mɔtɔ ezali mabe mpenza na miso ya Tata na biso ya likoló, oyo atondi na bolingo.” (Yirimia 7:31) Mpo na kosalisa moninga mokristo moko oyo atungisami na makanisi ayeba ete Yehova alingaka ye, tokoki koloba: “Soki Yehova amonaka ete mokɛngɛli-mboka oyo ezali moke ezali na motuya, akozanga nde kolinga mpe komibanzabanza mpo na mosambeli na ye mokomoko awa na mabele, ná yo mpe lokola?” (Matai 10:29-31) Kokanisa ndenge wana, ekosalisa biso tósimba mitema ya bato.

21 Nsima ya kotalela kaka mayele misato ya koteya oyo Yesu asalelaki, tokoki kondima mpenza ete bapolisi wana oyo batindamaki mpo na kokanga Yesu balekisaki ndelo te ntango balobaki ete: “Naino moto moko te alobá lokola moto yango.” Na mokapo oyo elandi, tokolobela mayele mosusu ya koteya oyo mbala mosusu Yesu ayebanaki mingi mpo na yango: kosalela bandakisa.

a Ekoki kozala ete bakɛngɛli yango bazalaki bato ya Sanedrina mpe bazalaki na nse ya bokonzi ya banganga-nzambe bakonzi.

b Kaka ntoma Paulo nde alobeli maloba oyo ezali na Misala 20:35. Ekoki kozala ete ayokaki yango (epai ya moto moko oyo ayokaki Yesu alobi yango to epai ya Yesu oyo asekwisami) to mpe na nzela ya emonaneli ya Nzambe.

c Mbula na mbula, Bayuda bazalaki kofuta mpako ya tempelo ya drakimɛ mibale oyo ekokaki kozala lifuti ya mikolo mibale ya mosala. Buku moko elobi ete: “Mpako yango ezalaki kosalelama mingi mpo na kozongisa mosolo oyo ebimisamaki mpo na bambeka ya kotumba ya mokolo na mokolo, mpe mpo na bambeka oyo epesamaki mpo na bato nyonso.”

d Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

e Lolenge wana ya kokanisa na bato oyo ebengamaka ntango mosusu “a fortiori” na monɔkɔ ya Latin, elimboli “eleki ntina; ezali solo mpenza; na koleka.”