MOKAPO 12
“Azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa”
1-3. (a) Bayekoli oyo bazali kotambola elongo na Yesu bazwi libaku nini ya malamu koleka, mpe ndenge nini ayeisi pɛtɛɛ makambo oyo azali koteya mpo bábosana yango te? (b) Mpo na nini bato babosanaka noki te bandakisa ya malamu?
BAYEKOLI oyo bazali kotambola elongo na Yesu bazwi libaku moko monene. Bazali koyekola epai ya Moteyi Monene ye moko. Bazali koyoka mongongo na ye ntango azali kolimbola Liloba ya Nzambe mpe koteya bango mateya kitoko ya solo. Na ntango wana, basengeli kobatela na makanisi mpe na mitema makambo kitoko oyo azali koyebisa bango; ntango ekokaki naino te mpo maloba na ye ekomama. a Nzokande, Yesu azali koyeisa pɛtɛɛ makambo oyo azali koteya mpo bábosana yango te. Ndenge nini? Na ndenge na ye ya koteya, mingimingi na ndenge na ye ya kosalela malamu bandakisa.
2 Ya solo, bato babosanaka noki te bandakisa ya malamu. Moto moko oyo akomaka babuku alobaki ete bandakisa “ekómisaka matoi miso” mpe “esalisaka bayoki bámona na makanisi makambo oyo bazali koyoka.” Lokola mbala mingi bililingi esalisaka biso tókanga malamu ntina ya makambo, bandakisa ekoki kosala ete ata makanisi oyo ezali polele te ekóma pɛtɛɛ mpo na kokanga ntina. Bandakisa ekoki kosalisa biso tókanga ntina ya maloba mpe ekoki koteya biso mateya oyo ekotikala na bɔɔngɔ.
3 Moteyi moko te awa na mabele ayebaki kosalela bandakisa malamu lokola Yesu Kristo. Tii lelo oyo, bato babosanaka bandakisa na ye te. Mpo na nini Yesu asalelaki mingi mayele wana ya koteya? Nini esalaki ete bandakisa na ye ezala malamu mpenza? Ndenge nini tokoki koyekola kosalela mayele wana ya koteya?
Mpo na nini Yesu azalaki koteya na bandakisa
4, 5. Mpo na nini Yesu azalaki kosalela bandakisa?
4 Biblia epesi bantina mibale ya minene oyo mpo na yango Yesu asalelaki bandakisa. Ya liboso, ntango azalaki kosala bongo, akokisaki esakweli. Totángi boye na Matai 13:34, 35,: “Yesu alobaki na ebele ya bato na bandakisa. Kutu, azalaki koloba na bango te kozanga kopesa ndakisa; mpo na kokokisa makambo oyo mosakoli alobaki, ete: ‘Nakofungola monɔkɔ na ngai na bandakisa.’” Mosakoli oyo Matai alobeli ezali mokomi ya Nzembo 78:2. Mokomi ya nzembo yango akomaki maloba yango na litambwisi ya elimo ya Nzambe basiɛklɛ mingi liboso ete Yesu abotama. Tótalela ndimbola na yango. Bankama ya bambula liboso, Yehova alobaki ete Masiya akoteya na bandakisa. Na yango, Yehova asepelaka mpenza na mayele wana ya koteya.
5 Ya mibale, Yesu amonisaki ete azalaki kosalela bandakisa mpo na koyeba mpenza baoyo mitema na bango ‘ekómaki makasi.’ (Matai 13:10-15; Yisaya 6:9, 10) Na ndenge nini bandakisa na ye ekokaki komonisa polele makanisi oyo ezalaki na mitema ya bato? Na bantango mosusu, azalaki kolinga ete bayoki na ye básɛnga ye alimbolela bango makambo oyo azalaki koteya mpo bákanga mpenza ntina ya maloba na ye. Bato ya komikitisa bazalaki kotuna, kasi bato ya lolendo to baoyo bazalaki kosepela te bazalaki kotuna te. (Matai 13:36; Marko 4:34) Na yango, bandakisa ya Yesu ezalaki koteya bato ya komikitisa mateya ya solo, kasi bandakisa na ye ezalaki mpe kobomba mateya ya solo mpo na baoyo bazalaki na lolendo.
6. Wapi bantina mosusu oyo Yesu asalelaki bandakisa?
6 Bandakisa ya Yesu esalisaki mpe na makambo mosusu ya ntina. Ezalaki kolamwisa mposa ya bato, mpe kotinda bango báyoka. Ezalaki kosepelisa bato mpe kotinda bango báyoka nsango oyo Yesu azalaki koteya. Ndenge touti komona yango, bandakisa ya Yesu esalisaki bayoki na ye bámona na makanisi mpe bákanga ntina ya makambo oyo azalaki koteya. Lisolo Likoló ya Ngomba, ndenge ekomami na Matai 5:3–7:27, emonisi malamu mpenza ndenge oyo Yesu azalaki kosalela bandakisa. Na lisolo yango, tokokuta maloba ya elilingi mbala koleka 50. Kanisá naino, lisolo yango ekoki kotángama na mongongo makasi soki na miniti 20. Yango elingi koloba ete na miniti moko, Yesu akokaki kobimisa maloba ya elilingi soki 3! Ya solo, Yesu ayebaki ete ezalaki na ntina kosalela bandakisa!
7. Mpo na nini tosengeli komekola ndenge oyo Yesu azalaki kosalela bandakisa?
7 Lokola tolandaka Kristo, tomekolaka ndenge na ye ya koteya mpe ya kosalela bandakisa. Lokola biloko ya mikemike oyo ekómisaka bilei elɛngi, bandakisa ya malamu ekoki kosala ete bato básepela mingi koleka na mateya na biso. Maloba ya elilingi oyo eponami malamu ekoki kosalisa moto akanga ntina ya mateya minene ya solo kozanga mindɔndɔ. Sikoyo, tótalela mwa makambo oyo esalaki ete bandakisa ya Yesu ezala malamu mpenza. Na nsima, tokomona ndenge oyo tokoki kosalela mayele wana ya koteya.
Azalaki kokokanisa makambo na ndenge ya pɛtɛɛ
8, 9. Ndenge nini Yesu azalaki kokokanisa makambo na ndenge ya pɛtɛɛ, mpe nini esalaki ete maloba yango ezala malamu mpenza?
8 Ntango Yesu azalaki koteya, azalaki mbala mingi kokokanisa makambo na ndenge ya pɛtɛɛ mpe na maloba ya mikuse. Kasi, maloba yango ya pɛtɛɛ ezalaki kotinda bato bákanisa mpe ezalaki koteya mateya ya solo ya ntina mingi na ndenge ya polele. Na ndakisa, ntango azalaki kolendisa bayekoli na ye ete bámitungisa te mpo na bamposa na bango ya mokolo na mokolo, abendaki likebi na bango na “bandɛkɛ ya likoló” mpe na “fololo lísi ya esobe.” Bandɛkɛ elonaka te mpe ebukaka te, mpe fololo lísi emonaka mpasi te mpe etongaka elamba te. Kasi, Nzambe amibanzabanzaka mpo na yango. Liteya ezali polele: soki Nzambe amibanzabanzaka mpo na bandɛkɛ mpe bafololo, na ntembe te akokokisa bamposa ya bato oyo bazali ‘kokoba koluka liboso Bokonzi.’—Matai 6:26, 28-33.
9 Yesu asalelaki mpe mingi elobeli mosusu ya nguya mpo na kokokanisa makambo. Na elobeli yango, balobelaka eloko moko lokola nde ezali eloko mosusu. Ata na elobeli yango mpe, azalaki kokokanisa makambo na ndenge ya pɛtɛɛ. Mokolo moko, ayebisaki bayekoli na ye ete: “Bozali pole ya mokili.” Bayekoli basosolaki mbala moko elobeli yango; bayebaki ete na maloba mpe na misala na bango, bakokaki kongɛngisa pole ya mateya ya solo mpe kosalisa basusu bápesa Nzambe nkembo. (Matai 5:14-16) Yesu asalelaki mpe maloba yango ntango alobaki: “Bozali mungwa ya mabele” mpe “ngai nazali nzete ya vinyo mpe bino bozali bitape.” (Matai 5:13; Yoane 15:5) Lolenge wana ya koloba ezalaka pɛtɛɛ, mpe na nguya.
10. Wapi mwa bandakisa oyo emonisi ndenge okoki kosalela bandakisa ntango ozali koteya?
10 Ndenge nini okoki kosalela bandakisa ntango ozali koteya? Ezali na ntina te osalela masolo ya milaimilai mpe ya mindɔndɔ. Luká kosalela maloba ya kokokanisa oyo ezali pɛtɛɛ. Kanisá ete olingi kolobela lisekwa mpe olingi komonisa ete kolamwisa bakufi ezali likambo ya mpasi te mpo na Yehova. Okoki kokokanisa likambo yango na nini? Biblia esalelaka mpɔngi mpo na liwa. Okoki koloba: “Mpo na Nzambe, kosekwisa bakufi ezali pɛtɛɛ, kaka ndenge tólamwisaka moto oyo alali mpɔngi.” (Yoane 11:11-14) Kanisá ete olingi komonisa ete bana bazalaka na mposa bálinga bango mpe bámiyoka ete balingami mpo bákola malamu. Okoki kosalela ndakisa nini? Biblia esaleli maloba oyo ya kokokanisa: Bana bazali “lokola mwa bitape ya nzete ya olive” (Nzembo 128:3) Okoki koloba: “Mpo bana bákola malamu, esɛngaka ete bálinga bango mpe bámiyoka ete balingami, kaka ndenge nzete ezalaka na mposa ya moi mpe mai.” Soki osaleli maloba ya kokokanisa oyo ezali pɛtɛɛ, ekozala mpasi te mpo bato oyo bazali koyoka yo bákanga ntina.
Azwaki yango na makambo ya mokolo na mokolo
11. Pesá bandakisa oyo emonisi ete Yesu azalaki kosalela bandakisa ya makambo oyo amonaki mpenza ntango azalaki kokola na Galile.
11 Yesu ayebaki mpenza kosalela bandakisa oyo eyokanaki na makambo ya bomoi ya bato. Bandakisa mingi oyo asalelaki eutaki na makambo ya mokolo na mokolo, oyo mbala mosusu amonaki ntango azalaki kokola na Galile. Kanisá naino ntango azalaki mwana. Mbala boni amonaki mama na ye azali konika mbuma, kotya levire na farini, kopelisa miinda, to kokɔmbɔla ndako? (Matai 13:33; 24:41; Luka 15:8) Mbala boni amonaki babomi-mbisi bazali kobwaka minyama na bango na Mbu ya Galile? (Matai 13:47) Mbala boni amonaki bana bazali kosakana na zando? (Matai 11:16) Na ntembe te, Yesu amonaki mpe makambo mosusu ya mokolo na mokolo oyo alobelaki na bandakisa na ye: bato bazali kolona mboto, bato bazali kosepela na fɛti ya libala, mpe mbuma ya bilanga oyo eteli na moi.—Matai 13:3-8; 25:1-12; Marko 4:26-29.
12, 13. Mpo na nini ebongaki Yesu alobela nzela oyo ‘euti na Yerusaleme ekiti na Yeriko’ mpo na kosalisa bayoki na ye bákanga ntina ya lisese ya Mosamaria malamu?
12 Na bandakisa na ye, Yesu alobelaki makambo oyo bayoki na ye bayebaki malamu. Na ndakisa, abandaki lisese ya Mosamaria malamu na maloba oyo: “Moto moko autaki na Yerusaleme azali kokita na Yeriko mpe akutanaki na miyibi, babɔtɔlaki ye biloko nyonso, babɛtaki ye, batiki ye pene na liwa.” (Luka 10:30) Ya solo, Yesu alobelaki nzela oyo ‘euti na Yerusaleme ekiti na Yeriko,’ mpo na komonisa likanisi na ye polele. Ntango apesaki lisese yango, azalaki na Yudea, oyo ezali mosika te na Yerusaleme; na ntembe te, bayoki na ye bayebaki nzela yango. Nzela yango ezalaki likama, mingimingi mpo na moto oyo azali kosala mobembo ye moko. Nzela yango ezalaki kokatisa esobe mpe ezalaki na bisika mingi oyo miyibi bakokaki kobombana.
13 Yesu alobelaki mpe makambo mosusu oyo bato bayebaki mpo na nzela yango oyo ezalaki ‘kouta na Yerusaleme ekiti na Yeriko.’ Ndenge lisese yango emonisi, liboso nganga-nzambe moko azalaki koleka na nzela yango, mpe na nsima Molevi moko, kasi moko te na bango atɛlɛmaki mpo na kosalisa moto yango. (Luka 10:31, 32) Banganga-nzambe bazalaki kosala na tempelo mpe Balevi bazalaki kosalisa bango. Banganga-nzambe ná Balevi mingi bazalaki kofanda na Yeriko soki ezali ngala na bango te ya kosala na tempelo; Yeriko ekabwanaki na Yerusaleme kaka na ntaka ya kilomɛtrɛ 23. Na yango, bato bakokaki komona bango na nzela wana. Lisusu, tósimba ete Yesu alobaki ete moto yango ya mobembo ‘azalaki kokita,’ kasi azalaki komata te na nzela oyo ‘eutaki na Yerusaleme.’ Bayoki na ye bakangaki ntina ya likambo yango. Yerusaleme ezalaki likoló, Yeriko na nse. Na yango, soki moto ya mobembo ‘auti na Yerusaleme,’ azalaki nde “kokita.” b Ezali polele ete Yesu azalaki kolobela likambo oyo bayoki na ye bayebaki.
14. Ntango tozali kosalela bandakisa, ndenge nini tokoki komitya na esika ya bayoki na biso?
14 Ntango tozali kosalela bandakisa, biso mpe tosengeli kolobela makambo oyo bayoki na biso bayebi. Wapi mwa makambo oyo etali bayoki na biso, oyo ekoki kosalisa biso tóyeba kopona bandakisa? Ekoki kozala mbula ya moto, libota to esika moto akolá, mpe mosala na ye. Na ndakisa, moto oyo afandi esika basalaka mosala ya bilanga akoyeba mbala moko ndakisa oyo elobeli mosala yango koleka moto oyo afandi na engumba moko monene. Bomoi ya mokolo na mokolo mpe misala ya bayoki na biso, bana na bango, ndako na bango, masano na bango, mpe bilei na bango ekoki kosalisa biso tópona bandakisa oyo ebongi.
Azalaki kolobela bozalisi na bandakisa na ye
15. Mpo na nini tokoki kokamwa te ndenge Yesu ayebaki malamu mpenza biloko oyo ezalisamá?
15 Bandakisa mingi oyo Yesu asalelaki emonisi ete ayebaki malamu biloko oyo ezalisamá, na ndakisa banzete, banyama, mpe bileko. (Matai 16:2, 3; Luka 12:24, 27) Azwaki boyebi yango wapi? Ntango azalaki kokola na Galile, azwaki mpenza mabaku mingi ya kotala biloko oyo ezalisamá. Likambo eleki ntina, Yesu azali “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá,” mpe ntango Yehova azalaki kosala biloko nyonso, asalelaki ye lokola “mosali ya mayele.” (Bakolose 1:15, 16; Masese 8:30, 31) Tokoki nde kokamwa soki Yesu ayebaki malamu mpenza biloko oyo ezalisamá? Tótala ndenge asalelaki malamu mpenza boyebi yango.
16, 17. (a) Nini emonisi ete Yesu ayebaki malamu ndenge bampate ezalaka? (b) Ndakisa nini emonisi ete bampate eyokaka mpenza mongongo ya mobateli na yango?
16 Tóbosana te ete Yesu alobaki ete azali “mobateli ya mpate oyo aleki malamu” mpe bayekoli na ye bazali “bampate.” Maloba ya Yesu emonisi ete ayebaki malamu ndenge bampate ezalaka. Ayebaki ete boyokani makasi ezalaka kati na babateli ya mpate mpe bampate na bango. Amonaki ete banyama wana ya botosi endimaka ete bátambwisa yango mpe elandaka mpenza mobateli na yango. Mpo na nini bampate elandaka mobateli na yango? Yesu alobaki ete: “Mpo eyebi mongongo na ye.” (Yoane 10:2-4, 11) Bampate eyebaka mpenza mongongo ya mobateli na yango?
17 Na kotalela makambo oyo ye moko amonaki, George A. Smith akomaki na buku na ye (The Historical Geography of the Holy Land), ete: “Na bantango mosusu, tolekisaki bopemi na biso ya midi pembeni ya mabulu ya mai na Yudea epai babateli misato to minei ya mpate bayaki ná bitonga na bango. Bampate nyonso esanganaki esika moko, mpe tozalaki komituna ndenge nini mobateli mokomoko akoyeba lisusu bampate na ye. Kasi, ntango bampate esilaki komɛla mai mpe kosakana, babateli bakendaki moto na moto na ngámbo na ye na lobwaku mpe babandaki kobenga bampate, moto na moto na ebengeli na ye; mpe bampate ya moto na moto ezalaki kotika bampate mosusu mpe kolanda mobateli na yango, mpe ezalaki kokabwana mpenza kaka ndenge eyaki.” Yango ezalaki ndakisa malamu mpenza oyo Yesu asalelaki mpo na komonisa polele likambo oyo alingaki kolobela: soki tondimi mpe totosi mateya na ye, mpe soki tolandi litambwisi na ye, tokobatelama na “mobateli ya bampate oyo aleki malamu.”
18. Epai wapi tokoki kozwa makambo etali biloko oyo Yehova azalisá?
18 Ndenge nini tokoki koyeba kosalela bandakisa oyo euti na biloko oyo ezalisamá? Tokoki kosalela bizaleli mosusu ya banyama mpo na kokokanisa makambo na ndenge ya pɛtɛɛ mpe ya malamu. Epai wapi tokoki kozwa makambo etali biloko oyo Yehova azalisá? Biblia elobelaka mingi banyama ndenge na ndenge, mpe esalelaka bizaleli ya banyama na bandakisa. Biblia ekokanisaka moto ya mbangu na mboloko to nkoi, moto ya ekɛngɛ na nyoka, mpe moto oyo azangi mbeba na ebenga. c (1 Ntango 12:8; Habakuku 1:8; Matai 10:16) Tokoki mpe kozwa makambo mosusu na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe Lamuká!, ata mpe na masolo mpe bavideo oyo ezali na motó ya likambo “Ebimá yango moko?” oyo ezali na jw.org. Okoki koyeba makambo mingi soki ozali kotala ndenge mikanda yango esalelaka bandakisa ya pɛtɛɛ oyo euti na biloko mingi oyo Yehova azalisá.
Azwaki yango na makambo oyo bato bamesaná na yango
19, 20. (a) Ndenge nini Yesu asalelaki likambo moko oyo eutaki kosalema mpo na komonisa lokuta ya liteya moko? (b) Ntango tozali koteya, ndenge nini tokoki kosalela bandakisa ya makambo ya mokolo na mokolo mpe oyo bato bamesaná na yango?
19 Bandakisa ya malamu ekoki kouta na makambo oyo bato bamesaná kosala. Mokolo moko, Yesu alobelaki likambo moko oyo eutaki kosalema mpo na komonisa lokuta ya liteya oyo elobaka ete likama ekómelaka kaka bato oyo babongi na yango. Alobaki boye: “Bato 18 oyo ndako molai ya Siloame ekwelaki mpe ebomaki, bokanisi ete bazalaki na ngambo monene koleka bato mosusu nyonso oyo bafandaka na Yerusaleme?” (Luka 13:4) Ya solo, soki bato wana 18 bakufaki, ezalaki te mpo basalaki lisumu moko boye oyo etindaki Nzambe asilikela bango. Kasi liwa ya nsɔmɔ oyo bakufaki, ezali mpo “ntango ná makambo oyo ekanami te” ekómelaki bango. (Mosakoli 9:11) Na yango, Yesu akweisaki liteya wana ya lokuta na ndenge alobelaki likambo moko oyo bayoki na ye bayebaki malamu.
20 Ndenge nini tokoki kosalela bandakisa ya makambo ya mokolo na mokolo mpe oyo bato bamesaná na yango ntango tozali koteya? Kanisá ete olingi kolobela ndenge oyo esakweli ya Yesu oyo etali elembo ya kozala na ye ezali kokokisama. (Matai 24:3-14) Okoki kolobela makambo oyo ezali koleka na mokili, na ndakisa bitumba, nzala, to koningana ya mabele mpo na komonisa ete likambo mokomoko ya elembo yango ezali kokokisama. To kanisá ete olingi kosalela ndakisa moko mpo na komonisa mbongwana oyo moto asengeli kosala mpo na kolata bomoto ya sika. (Baefese 4:20-24) Okoki kozwa ndakisa yango wapi? Okoki kotalela makambo ndenge na ndenge ya bomoi ya bandeko na biso bakristo, to okoki kosalela moko ya bandakisa oyo ezali na mikanda ya Batatoli ya Yehova. Okoki kozwa bandakisa mosusu na masolo: “Biblia ebongolaka bato” na site jw.org.
21. Matomba nini moto azwaka soki azali moteyi malamu ya Liloba ya Nzambe?
21 Ya solo, Yesu azalaki mpenza Moteyi Monene! Ndenge tomoni yango na eteni oyo, “koteya mpe kosakola nsango malamu” ezalaki mosala na ye ya libosoliboso. (Matai 4:23) Ezali mpe mosala na biso ya libosoliboso. Kozala moteyi ya malamu ememelaka moto matomba mingi. Ntango tozali koteya, tozali kopesa bato eloko, mpe yango epesaka esengo. (Misala 20:35) Esengo yango eutaka na koyeba ete tozali kopesa basusu eloko moko ya motuya mpenza mpe oyo eumelaka seko, elingi koloba mateya ya solo oyo etali Yehova. Lisusu, tokozala mpe na esengo mingi ya koyeba ete tozali kolanda ndakisa ya Yesu, Moteyi oyo alekaki bateyi nyonso awa na mabele.
a Emonani ete lisolo ya liboso ya bomoi ya Yesu awa na mabele, oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe, ezali Evanzile ya Matai, oyo ekomamaki mbula soki mwambe nsima ya liwa ya Yesu.
b Yesu alobaki mpe ete nganga-nzambe ná Molevi bazalaki ‘kouta na Yerusaleme,’ elingi koloba, bautaki na tempelo. Na yango, moto moko te akokaki kolongisa bango mpe koloba ete baboyaki kosimba moto wana oyo emonanaki ete akufi noki te bákóma mbindo mpo na mwa ntango, mpe na bongo bákoka te kosala na tempelo.—Balevi 21:1; Mitángo 19:16.
c Mpo na koyeba maloba nyonso ya elilingi oyo Biblia esaleli mpo na kolobela bizaleli ya banyama, talá buku Étude perspicace des Écritures Volimi 1, nkasa 306, mpe 308, ebimisami na Batatoli ya Yehova.