Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 5

“Biloko nyonso ya motuya ya bwanya”

“Biloko nyonso ya motuya ya bwanya”

1-3. Makambo elekaki ndenge nini na lisolo oyo Yesu asalaki na mobu 31 T.B., mpe mpo na nini bato oyo bayokaki ye bakamwaki?

 TOZALI na mobu 31 T.B, Yesu Kristo azali pene na Kapernaume, engumba moko ya misala kilikili oyo ezali na nɔrdi-wɛsti ya bokula ya Mbu ya Galile. Yesu auti kolekisa butu mobimba mpo na kobondela likoló ya ngomba moko oyo ezali penepene na engumba yango. Na ntɔngɔ, abengi bayekoli na ye, mpe aponi 12 kati na bango, mpe apesi bango nkombo bantoma. Na ntango yango, ebele ya bato oyo bamosusu bauti mpenza mosika, balandi Yesu epai azali mpe bayangani na esika oyo etombwaná na ngomba yango. Bazali na mposa makasi ya koyoka oyo akoloba mpe ya kobikisama na bamaladi na bango. Yesu akokisi mposa na bango.​—Luka 6:12-19.

2 Yesu apusani pene na ebele yango ya bato mpe abikisi baoyo nyonso bazali kobɛla. Nsukansuka, ntango bango nyonso babikisami na bamaladi na bango, Yesu afandi mpe abandi koteya. a Makambo oyo alobaki mokolo yango ekamwisaki mpenza bayoki na ye. Kutu, bakamwaki mpo bayoká naino te moto ateyi ndenge wana. Mpo na kopesa kilo na mateya na ye, Yesu atángi te maloba ya bateyi ya Bayuda oyo bayebanaki mingi to mpe ya baoyo bazalaki koteya na mikolo na ye. Kasi azalaki nde mbala na mbala kotánga Makomami ya Ebre oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Nsango na ye ezali mindɔndɔ te, maloba na ye ezali pɛtɛɛ, mpe ndimbola azali kopesa ezali polele. Ntango asilisi koteya, ebele yango ya bato bakamwe. Na ntembe te, ebongaki kaka bákamwa. Bauti koyoka moto oyo aleki bato nyonso na bwanya kino lelo!​—Matai 7:28, 29.

“Ebele ya bato bakamwaki na ndenge na ye ya koteya”

3 Lisolo yango mpe makambo mosusu oyo Yesu alobaki mpe asalaki ekomami na Liloba ya Nzambe. Yango wana, ezali malamu tóluka koyeba oyo Makomami elobi mpo na Yesu, mpamba te na kati na ye nde “biloko nyonso ya motuya ya bwanya” ezali. (Bakolose 2:3) Epai wapi azwaki bwanya ya boye, elingi koloba, likoki ya kosalela boyebi ná mayele na ndenge ebongi? Ndenge nini amonisaki bwanya, mpe ndenge nini tokoki kolanda ndakisa na ye?

“Moto oyo azwi bwanya oyo epai wapi?”

4. Motuna nini bato oyo bayokaki Yesu na Nazarete batunaki, mpe mpo na nini?

4 Na moko ya mibembo oyo asalaki mpo na mosala ya kosakola, Yesu akendaki na Nazarete, engumba oyo akolaki, mpe abandaki koteya na sinagoga oyo ezalaki kuna. Bato mingi oyo bayokaki ye bakamwaki mpe batunaki ete: “Moto oyo azwi bwanya oyo epai wapi?” Bayebaki libota na ye​—baboti na ye mpe bandeko na ye​—mpe bayebaki malamu ete auti na libota oyo ezalaki na bozwi mingi te. (Matai 13:54-56; Marko 6:1-3) Na ntembe te, bayebaki mpe ete mosali wana ya mabaya, oyo ayebaki koloba malamu, atángá na bakelasi minene ya Barabi te. (Yoane 7:15) Yango wana ebongi mpenza ete bátuna motuna wana.

5. Yesu amonisaki ete bwanya na ye eutaki epai ya nani?

5 Bwanya ya Yesu ezalaki te kaka mpo azalaki na makanisi ya kokoka. Mwa mikolo na nsima, ntango azalaki koteya na tempelo, Yesu amonisaki ete bwanya na ye eutaki epai ya moto oyo aleki mpenza mosika na bwanya. Alobaki boye: “Makambo oyo nazali koteya ezali ya ngai te, kasi ezali ya moto oyo atindaki ngai.” (Yoane 7:16) Ya solo, Tata, oyo atindaki Mwana, nde apesaki Yesu bwanya. (Yoane 12:49) Kasi, ndenge nini Yesu azwaki bwanya epai ya Yehova?

6, 7. Ndenge nini Yesu azwaki bwanya epai ya Tata na ye?

6 Elimo santu ya Yehova ezalaki kosala na motema mpe na makanisi ya Yesu. Yisaya asakolaki mpo na Yesu, Masiya oyo alakamaki, ete: “Elimo ya Yehova ekofanda likoló na ye, elimo ya bwanya mpe ya mayele, elimo ya toli mpe ya nguya, elimo ya boyebi mpe ya kobanga Yehova.” (Yisaya 11:2) Lokola elimo ya Yehova efandaki likoló na ye mpe ezalaki kotambwisa makanisi mpe bikateli oyo azalaki kozwa, makambo nyonso oyo Yesu alobaki mpe asalaki emonisaki bwanya ya kokoka oyo Yehova azali na yango.

7 Yesu azwaki bwanya epai ya Tata na ye na lolenge mosusu ya malamu. Ndenge tomonaki na Mokapo 2, ntango azalaki na likoló, na boumeli ya bambula oyo motángo na yango eyebani te, Yesu azwaki libaku ya kozwa makanisi ya Tata na ye na makambo ndenge na ndenge. Tokokoka te koyeba bwanya oyo Mwana azwaki epai ya Tata na ye, wana azalaki kosala lokola “mosali ya mayele” ya Nzambe mpo na kozalisa biloko mosusu nyonso, oyo epemaka ná oyo epemaka te. Yango wana, liboso aya awa na mabele, Mwana abengamaki bwanya oyo emonisami lokola moto. (Masese 8:22-31; Bakolose 1:15, 16) Na boumeli ya mosala na ye, Yesu azalaki kosalela bwanya oyo azwaki epai ya Tata na ye na likoló. b (Yoane 8:26, 28, 38) Yango wana, tokamwaka te mpo na boyebi mpe mayele mingi oyo Yesu amonisaki na makambo nyonso oyo alobaki mpe asalaki.

8. Lokola tozali bato oyo balandaka Yesu, ndenge nini tokoki kozwa bwanya?

8 Lokola tozali bato oyo balandaka Yesu, biso mpe tosengeli kotalela Yehova oyo azali liziba ya bwanya. (Masese 2:6) Ya solo, Yehova apesaka biso bwanya na ndenge ya likamwisi te. Kasi andimaka mabondeli oyo tobondelaka ye na motema mobimba mpo na kosɛnga bwanya oyo ekosalisa biso tólonga mikakatano ya bomoi. (Yakobo 1:5) Tosengeli kosala milende mpo na kozwa bwanya yango. Tosengeli kokoba koluka yango “lokola biloko ya motuya oyo ebombani.” (Masese 2:1-6) Na ntembe te, tosengeli kokoba kotimola na Liloba ya Nzambe, epai bwanya na ye emonisami, mpe koyokanisa bomoi na biso na makambo oyo tozali koyekola. Ndakisa ya Mwana ya Yehova ezali na ntina mingi mpo na kosalisa biso tózwa bwanya. Tótalela mwa makambo ndenge na ndenge oyo mpo na yango Yesu amonisaki bwanya mpe tómona ndenge oyo tokoki komekola ye.

Maloba ya bwanya

Bwanya ya Nzambe emonisami na Biblia

9. Nini esalaki ete mateya ya Yesu ezala na bwanya mingi?

9 Ebele ya bato basopanaki epai Yesu azalaki, kaka mpo na koyoka maloba na ye. (Marko 6:31-34; Luka 5:1-3) Mpe yango ekamwisaka biso te, mpo maloba ya bwanya mingi koleka ezalaki kobima na monɔkɔ ya Yesu! Mateya na ye emonisaki boyebi mingi oyo azalaki na yango ya Liloba ya Nzambe mpe ndenge oyo azalaki kolobela makambo na mozindo. Mateya ya Yesu esalisaka bato ya bisika nyonso, ezala na ntango ya kala ata mpe lelo oyo. Tótalela mwa bandakisa ya bwanya oyo ezali na maloba ya Yesu, “Mopesi-Toli Monene” oyo asakolamaki.​—Yisaya 9:6.

10. Bizaleli nini ya malamu Yesu alendisi biso tókolisa, mpe mpo na nini?

10 Lisolo likoló ya Ngomba, oyo touti kolobela na ebandeli ya mokapo oyo, ezali lisolo eleki molai, oyo esangisi mateya mingi ya Yesu, kozanga ete maloba to makanisi ya moto mosusu ekɔta na kati. Na lisolo yango, Yesu asuki kaka te na kopesa biso toli na likambo etali kozala ntango nyonso na maloba mpe na etamboli ya malamu. Apesi mpe toli na makambo mosusu. Lokola ayebaki ete makanisi mpe mayoki nde etindaka biso tóloba boye to tósala boye, Yesu alendisi biso ete tókolisa bizaleli ya malamu na makanisi mpe na motema na biso, na ndakisa, kozala bato ya elimo ya boboto, bato oyo bazali na mposa ya bosembo, bato ya motema mawa, bato oyo batyaka kimya mpe balingaka basusu. (Matai 5:5-9, 43-48) Soki tokolisi bizaleli wana na motema na biso, tokozala na maloba mpe na etamboli ya malamu, oyo ekosepelisa kaka Yehova te, kasi ekosala ete tózala mpe na boyokani ya malamu ná basusu.​—Matai 5:16.

11. Ntango apesi toli na likambo etali lisumu, ndenge nini Yesu amonisi mpenza esika lisumu ebandaka?

11 Yesu asuki kaka te na koyebisa biso ete tóboya kosala makambo ya mabe, kasi, akebisi mpe na bizaleli mpe bamposa oyo ekoki kotinda biso tósala oyo ezali mabe. (Matai 5:21, 22; 1 Yoane 3:15) Asuki kaka te na kopekisa ekobo. Kasi, akebisi nde mpo na mposa oyo ebandaka na motema mpe ememaka na ekobo. Apesi biso toli ete tótika nzela te ete miso na biso elamwisa mposa ya mabe to emema biso na bilulela. (Matai 5:27-30) Yesu alobeli makambo likolólikoló te, kasi akɔti nde na mozindo. Abendi likebi na makambo mpe bamposa oyo ememaka na lisumu.​—Nzembo 7:14.

12. Ndenge nini bayekoli yaYesu batalelaka toli na ye, mpe mpo na nini?

12 Maloba ya Yesu ezalaki mpenza ya bwanya! Tokokamwa te ndenge “ebele ya bato bakamwaki na ndenge na ye ya koteya.” (Matai 7:28) Lokola tozali bayekoli na ye, totikaka ete toli na ye ya bwanya etambwisa bomoi na biso mokolo na mokolo. Tozali kosala makasi tókolisa bizaleli ya malamu oyo asɛngi biso, na ndakisa: motema mawa, elimo ya kimya, mpe bolingo, mpo toyebi ete yango ekosalisa biso tózala na etamboli oyo esepelisaka Nzambe. Tosalaka makasi tólongola na motema na biso makanisi mpe bamposa ya mabe oyo akebisaki biso mpo na yango, na ndakisa: kozala na nkanda makasi mpe na mposa ya kosala mabe, mpo toyebi ete soki tobwaki makambo wana, tokokima masumu.​—Yakobo 1:14, 15.

Lolenge ya bomoi oyo etambwisami na bwanya

13, 14. Nini emonisi ete Yesu asalelaki bososoli mpo na kopona lolenge ya bomoi na ye?

13 Yesu amonisaki bwanya kaka na maloba te, kasi mpe na misala. Bomoi na ye mobimba, bikateli na ye, ndenge azalaki komitalela, mpe ndenge oyo azalaki kosalela basusu makambo, emonisaki soki kozala na bwanya elimboli mpenza nini. Tótalela mwa bandakisa oyo emonisi ete “bwanya ná likoki ya kokanisa,” nde etambwisaki bomoi ya Yesu.​—Masese 3:21.

14 Bwanya emonanaka mpe na bososoli. Yesu asalelaki bososoli mpo na kopona lolenge ya bomoi na ye. Okoki kokanisa lolenge ya bomoi alingaki kozala na yango, ndako oyo akokaki kotonga, kompanyi oyo akokaki kosala, to lokumu oyo akokaki kozala na yango? Yesu ayebaki ete komipesa na makambo wana “ezali mpamba mpe kolanda mopɛpɛ.” (Mosakoli 4:4; 5:10) Bomoi ya ndenge wana ezali ya bozoba, kasi ya bwanya te. Yesu aponaki kozala na bomoi ya mindɔndɔ te. Amipesaki te na koluka mbongo to konduka biloko ya mokili. (Matai 8:20) Kaka ndenge ateyaki yango, atyaki miso na ye kaka na likambo moko: kosala mokano ya Nzambe. (Matai 6:22) Yesu asalelaki ntango mpe makasi na ye na bwanya mpenza na ndenge atyaki matomba ya Bokonzi na esika ya liboso​—likambo oyo ezali na ntina mingi koleka mpe oyo ekomemela biso mbano koleka biloko ya mokili. (Matai 6:19-21) Na yango, atikelá biso ndakisa oyo ebongi kolanda.

15. Ndenge nini bato oyo balandaka Yesu bakoki komonisa ete bazali kobatela liso alima, mpe mpo na nini yango ezali likambo ya bwanya?

15 Lelo oyo, bayekoli ya Yesu bamonaka ete kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso ezali likambo ya bwanya. Yango wana, baboyaka kokɔta banyongo mpambampamba mpe kolanda makambo ya mokili oyo ezwaka bato ntango mpe makasi mingi. (1 Timote 6:9, 10) Mingi bazwi bibongiseli mpo na koyeisa bomoi na bango pɛpɛlɛ mpo bápesa ntango mingi na mosala ya kosakola, to mpe kokóma babongisi-nzela. Kokoba kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi ezali mpenza likambo ya bwanya, mpo yango ememelaka biso esengo ya solosolo mpe bomoi ya malamu koleka.​—Matai 6:33.

16, 17. (a) Ndenge nini Yesu amonisaki ete azali na bopɔlɔ mpe ayebi bandelo na ye? (b) Ndenge nini biso tokoki komonisa ete tozali na bopɔlɔ mpe toyebi bandelo na biso?

16 Biblia elobeli bwanya esika moko na bopɔlɔ​—ezaleli ya koyeba esika makoki na biso esuki. (Masese 11:2) Yesu azalaki na bopɔlɔ mpe ayebaki malamu bandelo na ye. Ayebaki ete akokoka te kobongola moto nyonso oyo ayokaki nsango na ye akóma moyekoli na ye. (Matai 10:32-39) Ayebaki mpe ete akokoka te koteya bato nyonso. Yango wana, na bwanya nyonso apesaki bayekoli na ye formasyo mpo bango mpe básalisa basusu bákóma bayekoli ya Yesu. (Matai 28:18-20) Andimaki na bopɔlɔ nyonso ete ‘bakosala misala ya minene koleka’ oyo ye asalaki, mpo bakosakwela bato mingi na bisika ndenge na ndenge mpe na boumeli ya ntango molai. (Yoane 14:12) Yesu ayebaki mpe ete azalaki na mposa ya lisalisi. Andimaki lisalisi ya baanzelu oyo bayaki kosalela ye na esobe mpe ya anzelu oyo ayaki kolendisa ye na Getesemane. Na ntango oyo azalaki mpenza na mposa ya lisungi, Mwana ya Nzambe abelelaki mpo na kosɛnga Tata na ye lisalisi.​—Matai 4:11; Luka 22:43; Baebre 5:7.

17 Biso mpe tosengeli kozala na bopɔlɔ mpe koyeba ete ezali na makambo mosusu oyo tokokoka kosala te. Na ntembe te, tolingaka kosalela Yehova na molimo na biso mobimba mpe koboma nzoto mpo na kosakola mpe kokómisa bato bayekoli. (Luka 13:24; Bakolose 3:23) Atako bongo, tóbosana te ete Yehova akokanisaka biso te na bato mosusu; biso mpe tósala lokola ye. (Bagalatia 6:4) Bwanya ekosalisa biso tómityela mikano oyo ekozala mpasi te mpo tókokisa na kotalela makoki mpe makambo ya bomoi na biso. Lisusu, bwanya ekosalisa baoyo bazali na mikumba báyeba ete bango mpe bazali na bandelo mpe na bantango mosusu bakoki kozala na mposa ya lisalisi mpe ya lisungi. Bopɔlɔ ekosalisa bango bándima lisalisi oyo epesami na boboto, mpe báyeba ete Yehova akoki kosalela moninga mokristo moko akóma “libɔndisi mpenza” mpo na bango.​—Bakolose 4:11.

18, 19. (a) Nini emonisi ete Yesu azalaki makambo makasimakasi te, kasi nde na boboto na boyokani na ye ná bayekoli na ye? (b) Mpo na nini tosengeli kozala na boboto mpe makambo makasimakasi te na boyokani na biso ná basusu, mpe ndenge nini tokoki kosala yango?

18 Na Yakobo 3:17, totángi boye: “Bwanya oyo euti na likoló ezalaka . . . makambo makasimakasi te.” Na boyokani na ye ná bayekoli na ye, Yesu azalaki makambo makasimakasi te, kasi nde na boboto. Ayebaki malamu mabunga na bango, kasi atyaki likebi mingi nde na bizaleli malamu oyo bazalaki na yango. (Yoane 1:47) Ayebaki ete bakosundola ye na butu oyo bakokanga ye, kasi atyelaki bosembo na bango ntembe te. (Matai 26:31-35; Luka 22:28-30) Petro kutu awanganaki Yesu mbala misato mobimba mpe alobaki ete ayebi ye te. Atako bongo, Yesu abondelaki mpo na Petro mpe atyaki motema na bosembo na ye. (Luka 22:31-34) Na butu ya nsuka ya bomoi na ye awa na mabele, ntango abondelaki Tata na ye, Yesu alobelaki te mabunga oyo bayekoli na ye basalaki. Kasi alobelaki nde makambo ya malamu oyo basalaki tii na butu yango, na maloba oyo: “Batosi liloba na yo.” (Yoane 17:6) Atako bazalaki bato ya kozanga kokoka, atikaki mosala ya kosakola mpe ya kokómisa bato bayekoli na mabɔkɔ na bango. (Matai 28:19, 20) Na ntembe te, kotyela motema oyo atyelaki bango mpe kondima oyo azalaki na yango mpo na bango epesaki bango makasi ya kokokisa mosala oyo apesaki bango.

19 Lokola tozali bayekoli ya Yesu, tosengeli kolanda ndakisa na ye na likambo etali kosalela basusu makambo. Soki Mwana ya Nzambe, moto ya kokoka, amonisaki motema molai na boyokani na ye ná bayekoli na ye, ekozala malamu mpo na biso bato ya kozanga kokoka tózala lisusu na motema molai koleka. (Bafilipi 4:5) Na esika ya kolandela mabunga ya baninga na biso bakristo, tóluka nde bizaleli malamu oyo bazali na yango. Tokomonisa ete tozali na bwanya soki tobosani te ete Yehova nde abendi bango. (Yoane 6:44) Na ntembe te, soki abendi bango ezali mpo amoni bizaleli ya malamu epai na bango; biso mpe tósala bongo. Ezaleli wana ekosalisa biso kaka te na ‘kobosana mabe’ oyo basalaki biso kasi mpe na koluka makambo ya malamu oyo mpo na yango tokoki kopesa basusu longonya. (Masese 19:11Bible na lingala ya lelo oyo) Ntango tozali komonisa bandeko na biso bakristo ete totyelaka bango motema, tozali kosalisa bango básala nyonso oyo bakoki mpo na kosalela Yehova mpe kozwa esengo na mosala yango.​—1 Batesaloniki 5:11.

20. Tosengeli kosala nini na biloko ya motuya ya bwanya oyo ezali na masolo ya Baevanzile, mpe mpo na nini?

20 Masolo ya bomoi ya Yesu mpe ya mosala na ye ndenge ekomami na Baevanzile, ezali mpenza na biloko ya motuya ya bwanya! Tosengeli kosala nini na likabo wana ya kitoko? Na nsuka ya Lisolo likoló ya Ngomba, Yesu alendisaki bato oyo bazalaki koyoka ye ete básuka kaka te na koyoka maloba na ye ya bwanya, kasi básalela, to bátosa yango. (Matai 7:24-27) Soki toyokanisi makanisi, bamposa mpe misala na biso na maloba mpe na misala ya bwanya ya Yesu, yango ekosalisa biso tózala na bomoi oyo eleki kitoko banda sikoyo mpe tótikala na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko. (Matai 7:13, 14) Ya solo, yango nde bomoi ya malamu mpe ya bwanya mingi koleka!

a Diskur oyo Yesu asalaki mokolo yango, babengaka yango Lisolo likoló ya Ngomba. Ndenge ekomami na Matai 5:3–7:27, lisolo yango ezali na bavɛrsɛ 107 mpe eumelaki soki miniti 20.

b Emonani ete makanisi oyo Yesu azalaki na yango liboso aya awa na mabele ezongelaki ye mokolo oyo “likoló efungwamaki” ntango azalaki kozwa batisimo.​—Matai 3:13-17.