Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 4

“Talá! Nkɔsi ya libota ya Yuda”

“Talá! Nkɔsi ya libota ya Yuda”

“Ngai nazali ye”

1-3. Likama nini ezali koyela Yesu, mpe asali nini?

 ETULUKU moko ya bato ezali koluka kokanga Yesu. Basimbi mipanga, mangenda mpe bamosusu kati na bango bazali basoda; bato yango bazali mingi mpenza. Lokola bango nyonso bazali na likanisi ya kosala mabe, bazali kotambola na banzela ya molili na Yerusaleme mpe bakatisi lobwaku ya mokɛli ya Kidrone; bakei na Ngomba ya Olive. Sanza ezali mobimba, kasi basimbi banzete ya mɔtɔ ná miinda. Basimbi yango mpo mapata ezali kopekisa bango bámona kongɛnga ya sanza? To bazali nde kokanisa ete moto oyo bazali koluka akobombama na molili? Tósimba likambo oyo: Moto nyonso oyo akanisi ete Yesu akobanga, ayebi ye malamu te.

2 Yesu ayebi likama oyo ezali koyela ye; kasi, atɛlɛmi kaka mpe azali kozela. Etuluku yango oyo etambwisami na Yudasi, oyo azalaki moninga ya Yesu, ekómi pene. Kozanga nsɔni, Yudasi atɛki Yesu, nkolo na ye; apesi ye mbote mpe lipwɛpwɛ ya lokuta mpo banguna báyeba ye. Atako bongo, Yesu afandi kaka nyɛɛ. Na nsima, atɛlɛmi liboso ya etuluku yango, atuni bango: “Bozali koluka nani?” Bayanoli ete: “Yesu moto ya Nazarete.”

3 Bato mingi balingaki koyoka nsɔmɔ liboso ya etuluku ya ndenge wana. Mbala mosusu yango nde ebele wana ya bato bazali kokanisa ete mobali oyo azali liboso na bango akoyoka. Kasi Yesu abangi te, akimi te, ameki mpe te kobuka lokuta. Kasi alobi kaka: “Ezali ngai.” Lokola afandi nyɛɛ mpe abangi te, bato yango bakamwe. Bazongi nsima na kotɛngatɛnga mpe bakwei!​—Yoane 18:1-6; Matai 26:45-50; Marko 14:41-46.

4-6. (a) Mwana ya Nzambe akokani na nini, mpe mpo na nini? (b) Na makambo nini misato Yesu amonisaki mpiko?

4 Ndenge nini Yesu akokaki kofanda kimya mpe kozanga ete abanga liboso ya likama monene boye? Mpiko nde esalisaki ye. Mpiko ezali moko ya bizaleli ya ntina mingi oyo bato basepelaka komona epai ya mokambi; mpe moto moko te amonisá mpiko lokola Yesu. Na mokapo oyo eleki, tomonaki ete Yesu azali na komikitisa mpe na bopɔlɔ. Yango wana abengamaki “Mwana-Mpate.” (Yoane 1:29) Nzokande, mpiko ya Yesu esali mpe ete abengama na nkombo mosusu. Biblia elobi boye mpo na Mwana ya Nzambe: “Talá! Nkɔsi ya libota ya Yuda.”​—Emoniseli 5:5.

5 Mbala mingi, nkɔsi emonisaka mpiko. Osilá kokutana na nkɔsi ya mobali mpenza boye na miso? Soki ɛɛ, mbala mosusu obatelamaki mpo ezalaki na lopango ya banyama, wana ekangamaki na ndako na yango. Atako bongo, oyokaki nsɔmɔ. Ntango ozali kotala nyama yango ya monene mpe ya nguya, wana miso na yo ekutani na oyo na yango, ekozala mpasi ondima ete nkɔsi ekoki kokima eloko, boye te? Biblia elobi ete nkɔsi “ezali na nguya koleka banyama mosusu, oyo ezongaka nsima te liboso ya moto.” (Masese 30:30) Kristo azali na mpiko ya ndenge wana.

6 Tólobela sikoyo ndenge Yesu amonisaki mpiko lokola nkɔsi na makambo misato: kolongisa solo, kolongisa bosembo, mpe koyika mpiko liboso ya botɛmɛli. Tokomona mpe ete biso nyonso, ezala tobotamá bato ya mpiko to te, tokoki komonisa mpiko na ndakisa ya Yesu.

Alongisaki solo na mpiko nyonso

7-9. (a) Nini esalemaki ntango Yesu azalaki na mbula 12, mpe nini ekamwisi yo na likambo yango? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki mpiko ntango azalaki elongo na bateyi na tempelo?

7 Na mokili oyo eyangelami na Satana, “tata ya lokuta,” mbala mingi esɛngaka kozala na mpiko mpo na kolongisa solo. (Yoane 8:44; 14:30) Yesu azelaki te akóma mokóló bongo abanda kolongisa solo. Ntango Yesu azalaki na mbula 12, akabwanaki na baboti na ye nsima ya fɛti ya Elekeli na Yerusaleme. Na boumeli ya mikolo misato, Maria ná Yozefe batambolaki motó mpo na koluka ye. Nsukansuka, bakutaki ye na tempelo. Azalaki kosala nini kuna? “Afandi na katikati ya bateyi, azali koyoka bango mpe kotuna bango mituna.” (Luka 2:41-50) Tótala ndenge makambo elekaki na libaku yango.

8 Bato ya mayele na masolo ya kala balobi ete bakambi mosusu ya mangomba oyo bayebanaki mingi bamesanaki kotikala na tempelo nsima ya bafɛti mpe koteya na moko ya baveranda minene oyo ezalaki wana. Bato bazalaki kofanda na makolo na bango mpo na koyoka mpe kotuna bango mituna. Bateyi yango bazalaki bato oyo batánga mingi. Bayebaki malamu Mibeko ya Moize mpe ebele ya mibeko ná mimeseno ndenge na ndenge oyo bato bazalaki kobimisa mbula na mbula.Olingaki komiyoka ndenge nini soki ofandaki na katikati na bango? Olingaki kobanga? Na ntembe te, yango ekoki kokómela moto nyonso. Bongo soki ozalaki kaka na mbula 12? Bilenge mingi bazalaka nsɔninsɔni. (Yirimia 1:6) Na kelasi, bamosusu basalaka nyonso mpo balakisi na bango bátyela bango likebi te; bilenge yango babangaka bátuna bango mituna to bápona bango; mbala mosusu babangaka báyokisa bango nsɔni to mpe básɛka bango.

9 Nzokande, Yesu afandaki na katikati ya bato yango oyo batángá mingi, azalaki kobanga te kotuna bango mituna ya makasi. Kutu asukaki kaka wana te. Lisolo eyebisi biso ete: “Baoyo nyonso bazalaki koyoka ye bazalaki se kokamwa mpo na mayele na ye mpe mpo na biyano na ye.” (Luka 2:47) Biblia eyebisi biso te oyo Yesu alobaki na ntango yango, kasi tokoki kondima ete azongelaki te lokola tsaku mateya ya lokuta oyo bateyi wana ya mangomba bazalaki kolinga mingi. (1 Petro 2:22) Na ntembe te, Yesu alongisaki solo ya Liloba ya Nzambe, mpe bato oyo bazalaki koyoka ye bakamwaki komona mwana ya mbula 12 azali koloba na mayele mpe na mpiko ndenge wana.

Ebele ya bilenge bakristo bayebisaka basusu kondima na bango na mpiko mpenza

10. Lelo oyo, ndenge nini bilenge bakristo bamekolaka mpiko ya Yesu?

10 Lelo oyo, bilenge bakristo mingi bazali kolanda matambe ya Yesu. Ya solo, bazali te bato ya kokoka ndenge Yesu azalaki. Atako bongo, lokola Yesu, bazelaka te bákóma mikóló mpo na kolongisa solo. Ezala na kelasi to na bisika bafandi, batunaka bato mituna na mayele, bayokaka mpe bayebisaka bato mateya ya solo na limemya. (1 Petro 3:15) Bilenge yango nyonso, basalisi baninga na bango ya kelasi, balakisi na bango mpe baninga na bango ya kartye bákóma bayekoli ya Kristo. Mpiko na bango esepelisaka mpenza Yehova! Liloba na Ye ekokanisi bilenge yango na matangá ya mamwɛ​—oyo ekitisaka motema, esepelisaka mpe ezalaka ebele.​—Nzembo 110:3.

11, 12. Ntango Yesu akómaki mokóló, ndenge nini amonisaki mpiko mpo na kolongisa solo?

11 Ntango Yesu akómaki mokóló, amonisaki mpiko mbala na mbala mpo na kolongisa solo. Kutu na ebandeli ya mosala na ye, akutanaki na botɛmɛli moko ya makasi oyo ekokaki kobangisa bato mingi. Ntango azalaki awa na mabele lokola moto, kasi te lokola anzelu-mokonzi, Yesu asengelaki kotɛmɛla Satana, monguna oyo aleki banguna nyonso ya Yehova na nguya mpe na kosala mabe. Yesu atɛmɛlaki Satana mpe ndenge oyo Satana asalelaki na ndenge ya mabe maloba oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu. Mpo na kosukisa botɛmɛli yango, Yesu alobaki na mpiko nyonso ete: “Longwá, Satana!”​—Matai 4:2-11.

12 Na yango, na boumeli ya mosala na ye awa na mabele, Yesu atiká ndakisa ya mpiko na oyo etali kolongisa Liloba ya Tata na ye liboso ya baoyo balukaka kobalola to kosalela yango na ndenge ya mabe. Mangomba mingi ya ntango wana ezalaki kobalola Liloba ya Nzambe, kaka ndenge esalemaka mpe lelo oyo. Yesu ayebisaki bakambi ya mangomba ya ntango na ye ete: “Bokómisi liloba ya Nzambe eloko mpamba mpo na bonkɔkɔ na bino oyo bolakisaka basusu.” (Marko 7:13) Bato mingi bazalaki komemya mibali yango, kasi na mpiko nyonso, Yesu amonisaki polele lokuta na bango mpe abengaki bango bakambi oyo bakufá-miso mpe bakosi. a (Matai 23:13, 16) Ndenge nini tokoki komekola mpiko ya Yesu na likambo yango?

13. Nini tosengeli kobosana te ntango tozali komekola Yesu, kasi libaku malamu nini tozali na yango?

13 Ya solo, tóyeba ete tokoki te koyeba oyo ezali na mitema ya bato mpe tozali te na bokonzi ya kosambisa bato ndenge Yesu azalaki na yango. Kasi, tokoki komekola mpiko na ye mpo na kolongisa solo. Na ndakisa, ntango tozali komonisa polele bokosi ya mangomba, mateya mingi ya lokuta oyo bateyaka mpo na Nzambe, mpo na mikano na ye, mpe mpo na Liloba na ye, tozali kongɛngisa pole na mokili oyo etondi na molili mpo na mateya oyo Satana apalanganisi. (Matai 5:14; Emoniseli 12:9, 10) Tozali kosalisa bato bálongwa na boombo ya mateya ya lokuta oyo ekómisi bango bibangabanga, mpe oyo ebebisi boyokani na bango ná Nzambe. Tozali na libaku malamu ya komona kokokisama ya elaka oyo ya Yesu: “Solo ekopesa bino bonsomi”!​—Yoane 8:32.

Alongisaki bosembo na mpiko nyonso

14, 15. (a) Wapi lolenge moko oyo Yesu amonisaki polele “soki bosembo ezali nini?” (b) Ntango asololaki na mwasi Mosamaria, makanisi mabe nini Yesu alandaki te?

14 Esakweli ya Biblia elobaki ete Masiya akomonisa bikólo soki bosembo ezali nini. (Matai 12:18; Yisaya 42:1) Na ntembe te, Yesu abandaki kosala bongo ntango azalaki awa na mabele. Na mpiko mpenza, amonisaki ntango nyonso bosembo mpe kozanga kopona bilongi na boyokani na ye ná bato. Na ndakisa, atako kokanisela basusu mabe to kokabola bato ezalaki mingi na ntango na ye, Yesu alandaki makanisi wana te mpo eyokani te na Makomami.

15 Bayekoli ya Yesu bakamwaki ntango Yesu asololaki na mwasi Mosamaria na libulu ya mai ya Sikare. Mpo na nini? Na mikolo yango, Bayuda bazalaki koyina Basamaria; koyina yango ebandá kala mpenza. (Ezera 4:4) Lisusu, Barabi mosusu bazalaki na makanisi mabe mpo na basi. Mibeko mosusu ya Barabi, oyo ekomamaki na nsima, epekisaki mobali asolola na mwasi; elobaki kutu ete ebongi te koteya mwasi Mibeko ya Nzambe. Bazalaki komona mingimingi basi Basamaria ete bazali mbindo. Yesu alandaki te makanisi wana ya mabe, yango wana ateyaki polele mwasi Mosamaria (oyo azalaki na etamboli ya mbindo), mpe ayebisaki ye kutu ete ye nde Masiya.​—Yoane 4:5-27.

16. Mpo na nini bakristo basengeli kozala na mpiko mpo báboya kokanisela basusu mabe?

16 Osilá kozala esika moko na bato oyo bakaniselaka basusu mabe? Mbala mosusu basɛkaka na lityo bato ya mposo to ya ekólo mosusu, balobaka mabe mpo na mibali to basi mosusu, to batyolaka bato oyo bakeseni na bango, oyo bazali na bozwi mingi te. Bayekoli ya Kristo balandaka te makanisi wana ya koyina bato, mpe basalaka makasi bálongola na mitema na bango makanisi wana ya mabe. (Misala 10:34) Mokomoko na biso asengeli kozala na mpiko mpo na koboya makanisi ya ndenge wana.

17. Likambo nini Yesu asalaki na tempelo, mpe mpo na nini?

17 Mpiko mpe etindaki Yesu asala nyonso mpo na kobatela bopɛto ya basaleli ya Nzambe mpe ya losambo ya solo. Na ebandeli ya mosala na ye, ntango akɔtaki na tempelo na Yerusaleme mpe amonaki bato bazali kotɛka mpe kosenza to kosanze mbongo kuna, ayokaki mabe. Yesu asilikaki mpo na yango, mpe abenganaki bato wana ya lokoso ná biloko na bango ya mombongo. (Yoane 2:13-17) Asalaki mpe likambo ya ndenge wana na nsima, pene na nsuka ya mosala na ye. (Marko 11:15-18) Atako bato mingi bayinaki ye mpo na makambo wana oyo asalaki, azongaki nsima te. Mpo na nini? Mpamba te banda bomwana na ye, azalaki kobenga tempelo yango ndako ya Tata na ye, mpe ezalaki mpenza bongo. (Luka 2:49) Kobebisa losambo ya pɛto oyo ezalaki kosalema kuna ezalaki likambo moko ya mabe oyo akokaki kondima te. Molende na ye epesaki ye mpiko ya kosala oyo esengeli.

18. Lelo oyo, ndenge nini bakristo bakoki komonisa mpiko mpo na kobatela bopɛto ya lisangá?

18 Lelo oyo mpe, baoyo bazali kolanda Kristo bamitungisaka mingi mpenza mpo na bopɛto ya basaleli ya Nzambe mpe ya losambo ya solo. Bakangaka miso te soki bamoni moninga na bango mokristo asali lisumu moko ya monene. Na mpiko nyonso, bayebisaka ye yango. (1 Bakorinti 1:11) Basalaka nyonso ete bankulutu ya lisangá báyeba yango. Bankulutu bakoki kosalisa baoyo bazali na maladi ya elimo mpe bazwaka bibongiseli mpo na kobatela bopɛto ya bampate ya Yehova.​—Yakobo 5:14, 15.

19, 20. (a) Makambo nini ya kozanga bosembo epalanganaki na ntango ya Yesu, mpe mokakatano nini Yesu akutanaki na yango? (b) Mpo na nini bayekoli ya Kristo baboyaka kokɔta na makambo ya politiki mpe ya mobulu, mpe mbano nini bazwaka mpo na yango?

19 Kasi yango elimboli nde ete Yesu abundisaki makambo nyonso ya kozanga bosembo? Te. Na ntembe te, makambo ya kozanga bosembo epalanganaki mingi na ntango na ye. Mboka na ye eyangelamaki na bato ya ekólo mosusu. Baroma banyokolaki Bayuda na ndenge batindaki basoda ebele na ekólo yango, na bampako ya ntalo mpe babebisaki mimeseno ya losambo na bango. Tokamwaka te ndenge bato mingi balingaki ete Yesu amikɔtisa na makambo ya politiki ya ntango na ye. (Yoane 6:14, 15) Na likambo oyo mpe amonisaki mpiko.

20 Yesu amonisaki ete Bokonzi na ye ezali ya mokili te. Na ndakisa na ye, ateyaki bayekoli na ye ete bákɔta te na makambo ya politiki, kasi bámipesa nde na kosakola nsango malamu ya Bokonzi ya Nzambe. (Yoane 17:16; 18:36) Yesu ateyaki liteya moko ya ntina na oyo etali koboya kokɔta na makambo ya politiki ntango ebele ya bato bayaki kokanga ye. Na mbala moko, Petro abendaki mopanga na ye mpe azokisaki mobali moko. Mbala mosusu okoki kosepela na likambo oyo Petro asalaki. Okoki kokanisa ete Petro asalaki mabe te ndenge azokisaki moto yango, mpo ezalaki na butu wana nde bayaki kokanga Mwana ya Nzambe. Kasi na libaku yango, Yesu apesaki bayekoli na ye mobeko moko oyo ezali na ntina mingi tii lelo oyo: “Zongisá mopanga na yo na esika na yango, mpo baoyo nyonso babundaka na mopanga bakokufa na mopanga.” (Matai 26:51-54) Mpo na bayekoli ya Kristo ya ntango wana, kozala bato ya kimya esɛngaki mpiko; ezali mpe bongo lelo oyo. Na mikolo na biso, lokola bakristo bakɔtaka te na makambo ya politiki, bato mingi bayebi ete bakɔtaka te na bitumba ndenge na ndenge, babomaka bato ya bikólo mosusu te, babimisaka botomboki te mpe basalaka makambo mosusu ya mobulu te. Mpiko na bango nde esalisi bango bázala na lokumu malamu ya ndenge wana.

Amonisaki mpiko liboso ya botɛmɛli

21, 22. (a) Lisalisi nini Yesu azwaki liboso akutana na komekama ya makasi koleka? (b) Ndenge nini Yesu amonisaki mpiko tii na nsuka?

21 Mwana ya Yehova ayebaki malamu banda kala makambo ya mpasi oyo akokutana na yango awa na mabele. (Yisaya 50:4-7) Liboso akutana na likama oyo tolobeli na ebandeli ya mokapo oyo, mbala mingi akutanaki na makama mosusu oyo ekokaki komema ye na liwa. Ndenge nini Yesu abatelaki mpiko na ye liboso ya makama yango? Yesu azalaki kosala nini liboso etuluku wana eya kokanga ye? Azalaki kobondela Yehova na motema mobimba. Yehova asalaki nini? Biblia eyebisi biso ete Nzambe “ayokaki ye mpe andimaki ye.” (Baebre 5:7) Uta na likoló, Yehova atindaki anzelu mpo alendisa Mwana na ye oyo amonisaki mpiko.​—Luka 22:42, 43.

22 Mwa moke nsima ya kolendisama, Yesu alobaki na bantoma na ye ete: “Bótɛlɛma, tókende.” (Matai 26:46) Oyo nde maloba ya mpiko! Lokola ayebaki ete akoloba na etuluku ya bato yango bátika baninga na ye, ete baninga na ye bakosundola ye mpe bakokima, mpe ete akozala kaka ye moko tii na ntango ya mpasi mpenza ya bomoi na ye, alobaki ete: “Tókende.” Azalaki kaka ye moko ntango basambisaki ye na ndenge ya mabe mpe ya kozanga bosembo, basɛkaki ye, banyokolaki ye, mpe ntango azalaki kobunda na mpasi ya liwa. Na makambo nyonso wana, amonisaki kaka mpiko.

23. Limbolá mpo na nini Yesu azangaki bokɛngi te ntango akutanaki na likama mpe ntango alingaki kokufa.

23 Tokoloba nde ete Yesu azangaki bokɛngi? Te; kozanga bokɛngi ná mpiko ezali makambo mibale ekeseni. Kutu Yesu ateyaki bayekoli na ye ete bázala ekɛngɛ mpe bákimaka makama mpo bákoba kosala mokano ya Nzambe. (Matai 4:12; 10:16) Kasi na libaku oyo, Yesu ayebaki ete likoki ya kokima ekozala te. Ayebaki oyo Nzambe asɛngaki ye asala. Yesu azwaki ekateli ya kobatela bosembo na ye; na yango ndenge mosusu ya kosala ezalaki te, asengelaki kaka koyika mpiko na komekama yango.

Batatoli ya Yehova bamonisaki mpiko liboso ya minyoko

24. Mpo na nini tokoki kondima ete tokoki kozala na mpiko ata soki tokutani na mikakatano ya ndenge nini?

24 Na ntembe te, bayekoli mingi ya Yesu balandaki matambe ya Nkolo na bango na mpiko mpenza! Batikalaki sembo epai ya Yehova atako batyolaki bango, banyokwamaki, bakangamaki, bakɔtaki bolɔkɔ, bamonaki mpasi, ata mpe babomamaki. Epai wapi bato ya kozanga kokoka bakoki kozwa mpiko ya boye? Eutaka na makasi na bango moko te. Ndenge Nzambe asalisaki Yesu, asalisaka mpe bayekoli na ye. (Bafilipi 4:13) Na yango, kobanga te likambo nyonso oyo okoki kokutana na yango. Zwá ekateli ya kobatela bosembo na yo, mpe Yehova akopesa yo mpiko oyo osengeli na yango. Kobá kozwa makasi na ndakisa ya Mokambi na biso, Yesu, oyo alobaki ete: “Bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili.”​—Yoane 16:33.

a Bato ya mayele na masolo ya kala balobi ete bato bazalaki komemya mingi malita ya Barabi kaka ndenge bazalaki komemya malita ya basakoli mpe ya batata ya mabota.