MOKAPO 6
“Ayekolaki botosi”
1, 2. Mpo na nini tata ya bolingo asepelaka ntango mwana na ye atosi ye, mpe ndenge nini mayoki na ye ekokani na oyo ya Yehova?
TATA moko azali kotala na fɛnɛtre, amoni mwana na ye ya mobali azali kobɛta bale ná baninga na ye. Bale yango ebimi na lopango, ekei na balabala. Mwana azali kotala yango mpe alingi akende kozwa bale yango. Moninga na ye moko atindi ye akende kozwa yango na balabala, kasi aningisi motó, aboyi; alobi: “Bapekisá ngai kosala bongo.” Tata na ye azali komungamunga. Asepeli na likambo oyo mwana na ye asali.
2 Mpo na nini tata yango asepeli? Mpo apekisá mwana na ye abima na balabala ye moko. Ntango mwana atosi, atako ayebi te ete tata azali kotala ye, yango esalisi tata ayeba ete mwana na ye azali koyekola botosi mpe yango ekosalisa mwana na ye azwa likama te. Tata yango ayoki ndenge Yehova, Tata na biso ya likoló, ayokaka. Nzambe ayebi ete soki tolingi kotikala sembo mpe komona makambo kitoko oyo alaki biso, tosengeli koyekola kotyela ye motema mpe kotosa ye. (Masese 3:5, 6) Mpo na yango, atindelaki biso moteyi oyo aleki bateyi nyonso.
3, 4. Ndenge nini Yesu “ayekolaki botosi” mpe ndenge nini akokaki “kokómisama moto oyo akoki na nyonso”? Pesá ndakisa.
3 Biblia elobi likambo moko ya kokamwa mpo na Yesu: “Atako azalaki mwana, ayekolaki botosi na makambo ya mpasi akutanaki na yango. Mpe nsima ya kokómisama moto oyo akoki na nyonso, azwaki mokumba ya kokamba na lobiko ya seko bato nyonso oyo bazali kotosa ye.” (Baebre 5:8, 9) Mwana yango azalaki na likoló na boumeli ya bambula oyo motángo na yango eyebani te. Amonaki ntango Satana mpe baanzelu mosusu oyo balandaki ye batombokelaki Nzambe, kasi Mwana wana ya liboso asanganaki na bango te. Maloba oyo ya esakweli ekokisamaki epai na ye: “Nazalaki motomboki te.” (Yisaya 50:5) Kasi, ndenge nini maloba “ayekolaki botosi” ekokisamaki epai ya Mwana yango oyo amonisaki botosi na ndenge ya kokoka? Ndenge nini ekelamu wana ya kokoka akokaki “kokómisama moto oyo akoki na nyonso”?
4 Tózwa ndakisa moko: Kanisá ete mobɛti-briki moko alingi kosomba masini ya briki ya sika. Asombi masini moko ya malamu mpenza. Nzokande, ndenge nini akoyeba soki masini yango ezali mpenza malamu? Atako emonani ete ezali malamu, kasi nsima ya kosalela yango nde akoyeba mpenza soki masini yango ezali kosala malamu. Ndenge moko mpe, botosi oyo Yesu amonisaki liboso aya awa na mabele ezalaki ya kokoka. Kasi, ntango ayaki na mabele, botosi na ye emonanaki na ndenge mosusu. Komekama oyo Yesu akutanaki na yango awa na mabele, akokaki kokutana na yango na likoló te, mpe komekama yango ekómisaki makasi botosi na ye.
5. Mpo na nini ezalaki na ntina ete Yesu atosa Tata na ye, mpe tokolobela nini na mokapo oyo?
5 Yesu asengelaki komonisa botosi mpo akokisa mosala na ye awa na mabele. Yesu abengami “Adama ya nsuka”, mpo ayaki awa na mabele mpo na kokokisa oyo Adama akokisaki te. Elingi koloba, komonisa botosi epai ya Yehova ata ntango akutani na komekama. (1 Bakorinti 15:45) Kasi, botosi ya Yesu ezalaki kaka ya likolólikoló te. Yesu atosaki Yehova na makanisi na ye, na motema na ye mpe na molimo na ye mobimba. Mpe asalaki yango na esengo. Kosala mokano ya Tata na ye ezalaki na ntina mingi koleka bilei! (Yoane 4:34) Nini ekosalisa biso tómekola botosi oyo Yesu azalaki na yango? Tótalela libosoliboso makambo oyo etindaki ye atosa. Kozala na makanisi lokola ya Yesu ekosalisa biso tótɛmɛla komekama mpe tósala mokano ya Nzambe. Na nsima, tokolobela na mokuse mbano oyo tokozwa soki tomonisi botosi lokola oyo ya Kristo.
Makambo oyo etindaki Yesu amonisa botosi
6, 7. Wapi mwa bantina oyo etindaki Yesu amonisa botosi?
6 Botosi ya Yesu eutaki na motema na ye. Na Mokapo 3, tomonaki ete Kristo azalaki ntango nyonso na komikitisa. Bato ya lolendo balingaka kotosa ata moto moko te, kasi soki tozali na komikitisa, yango ekosalisa biso tótosa Yehova na motema moko. (Kobima 5:1, 2; 1 Petro 5:5, 6) Lisusu, botosi ya Yesu emonanaki na makambo oyo azalaki kolinga mpe oyo azalaki koyina.
7 Oyo eleki nyonso, Yesu alingaki Yehova, Tata na ye ya likoló. Tokolobela na mozindo bolingo yango na Mokapo 13. Bolingo yango etindaki Yesu amonisa ezaleli ya kobanga Nzambe. Lokola Yesu azalaki kolinga mpe komemya Yehova mingi, aboyaki kosala makambo oyo Tata na ye ayinaka. Lokola Yesu azalaki kobanga Yehova, yango nde esalaki ete Yehova ayoka mabondeli na ye. (Baebre 5:7) Sikoyo Yesu azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe, mpe lolenge na ye ya koyangela emonisi ete atosaka Yehova na motema na ye mobimba, mpe alingaka ntango nyonso kosepelisa ye.—Yisaya 11:3.
8, 9. Ndenge esakolamaki, Yesu ayokaki ndenge nini mpo na bosembo mpe mpo na makambo ya mabe, mpe ndenge nini amonisaki yango?
8 Kolinga Yehova esɛngaka mpe koyina makambo oyo ye ayinaka. Na ndakisa, talá oyo esakolamaki mpo na Mokonzi Masiya: “Olingaki bosembo mpe oyinaki makambo ya mabe. Yango wana Nzambe, Nzambe na yo, atye yo mafuta ya esengo koleka baninga na yo.” (Nzembo 45:7) “Baninga” ya Yesu ezalaki bakonzi mosusu oyo bautaki na libota ya Mokonzi Davidi. Ntango Yehova aponaki Yesu to atyaki ye mafuta, Yesu azalaki na ntina mingi ya kosepela koleka bakonzi mosusu nyonso. Mpo na nini? Mbano na ye ezali monene koleka oyo ya bango, mpe bokonzi na ye ekomemela bato matomba mingi koleka. Azwi mbano yango mpo alingaki bosembo, mpe koyina mabe etindaki ye atosa Nzambe na makambo nyonso.
9 Makambo nini oyo Yesu asalaki oyo emonisaki ndenge oyo atalelaka bosembo mpe makambo ya mabe? Na ndakisa, ntango bayekoli na ye batosaki etinda oyo apesaki mpo na mosala ya kosakola mpe mosala yango ebotaki mbuma, Yesu ayokaki ndenge nini? Atondaki na esengo. (Luka 10:1, 17, 21) Mpe ntango bato ya Yerusaleme bazalaki mbala na mbala kozanga botosi mpe koboya milende oyo amonisaki mpo na kosalisa bango, Yesu ayokaki ndenge nini? Alelaki mpo na ezaleli ya botomboki ya bato ya engumba yango. (Luka 19:41, 42) Yesu azalaki koyoka esengo ntango bato basali makambo ya malamu, kasi ntango basali makambo ya mabe, Yesu azalaki koyoka mawa.
10. Mayoki nini tosengeli kozala na yango mpo na makambo ya malamu mpe ya mabe, mpe nini ekosalisa biso?
10 Komanyola na ndenge oyo Yesu ayokaki ekosalisa biso tótalela makambo oyo etindaka biso tótosa Yehova. Atako tozali bato ya kozanga kokoka, tokoki koyekola kolinga na motema mobimba makambo ya malamu mpe koyina mpenza makambo ya mabe. Tosengeli kobondela Yehova, kosɛnga ye asalisa biso tómonisa mayoki lokola oyo ya ye mpe ya Mwana na ye. (Nzembo 51:10) Lisusu, tosengeli koboya makambo oyo ekoki kosala ete tótika kozala na mayoki lokola oyo ya Yehova mpe ya Mwana na ye mpo na makambo ya malamu mpe ya mabe. Yango wana, ezali na ntina tóyeba kopona malamu mpenza kominanola mpe baninga na biso. (Masese 13:20; Bafilipi 4:8) Soki tozali na makanisi lokola oyo ya Kristo, botosi na biso ekozala ya likolólikoló te. Tokosala oyo ezali malamu mpo tolingi kosala yango. Tokoboya misala ya mabe mpo na kokima etumbu te, kasi mpo toyini yango.
“Asalaki lisumu te”
11, 12. (a) Nini ekómelaki Yesu na ebandeli ya mosala na ye? (b) Likambo nini Satana ayebisaki Yesu liboso mpo na komeka ye, mpe mpo na nini asalaki bongo?
11 Mwa moke nsima ya kobanda mosala na ye awa na mabele, Satana amekaki Yesu mpo na kokweisa ye na lisumu. Nsima ya kobatisama, alekisaki mikolo 40 butu moi na esobe kozanga kolya. Na nsuka ya mikolo yango, Satana ayaki komeka ye. Talá mayele mabe oyo Satana asalelaki.—Matai 4:1-11.
12 Ya liboso, Satana ayebisaki ye: “Soki ozali mwana ya Nzambe, yebisá mabanga oyo ekóma mampa.” (Matai 4:3) Yesu ayokaki nini nsima ya kolekisa mikolo mingi kozanga kolya? Biblia elobi polele ete: “Ayokaki nzala.” (Matai 4:2) Na yango, Satana asalelaki mposa ya kolya oyo moto nyonso azalaka na yango, azelaki tii ntango oyo Yesu alɛmbaki mpo ameka ye. Simbá mpe ete Satana atumolaki Yesu ntango alobaki: “Soki ozali mwana ya Nzambe.” Satana ayebaki ete Yesu azali “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá.” (Bakolose 1:15) Ata bongo, Yesu atikelaki Satana nzela te ete atinda ye azanga botosi. Yesu ayebaki ete mokano ya Nzambe ezalaki te ete asalela nguya na ye mpo na matomba na ye moko. Aboyaki kosala bongo, amonisaki na komitikisa nyonso ete Yehova nde asengeli koleisa ye mpe kotambwisa ye.—Matai 4:4.
13-15. (a) Komekama ya mibale mpe ya misato oyo Satana amekaki Yesu ezalaki nini, mpe Yesu asalaki nini? (b) Ndenge nini toyebi ete Yesu azalaki ntango nyonso ekɛngɛ liboso ya Satana?
13 Na komekama ya mibale, Satana amemaki Yesu na nsɔngɛ ya efelo ya tempelo. Satana abongolaki Liloba ya Nzambe na ndenge ya mabe, amekaki Yesu ete amilakisa mpe amibwaka uta na nsɔngɛ yango mpo baanzelu bakoki kobikisa ye. Soki ebele ya bato oyo bazalaki na tempelo bamonaki likamwisi ya ndenge wana, moto ata moko te alingaki kotya ntembe ete Yesu azali Masiya oyo alakamaki, boye te? Mpe soki ebele yango ya bato bandimaka ete Yesu azali Masiya kaka mpo na likamwisi oyo bamoni, Yesu alingaki nde kokutana na mitungisi mpe mikakatano te? Mbala mosusu elingaki kozala bongo. Kasi Yesu ayebaki ete Masiya asengeli kokokisa mokano ya Yehova na komikitisa nyonso, mpe asengelaki te komema bato bándima ye na nzela ya likamwisi moko boye. (Yisaya 42:1, 2) Na mbala oyo mpe, Yesu aboyaki kozanga botosi epai ya Yehova. Yesu azalaki koluka lokumu te.
14 Soki Yesu azalaki kolula bokonzi, mbɛlɛ Satana alingaki kozwa ye na komekama ya misato. Ntango Satana amekaki Yesu mpo na mbala ya misato, alakaki kopesa ye makonzi nyonso ya mokili soki Yesu asaleli ye likambo moko ya losambo. Yesu andimaki nde eloko oyo Satana alingaki kopesa ye? Te. Ayanolaki ye ete: “Longwá, Satana!” Mpe abakisaki: “Mpo ekomamá ete: ‘Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.’” (Matai 4:10) Eloko moko te ekokaki kotinda Yesu asambela nzambe mosusu. Ezala bokonzi to lokumu na mokili oyo ekokaki te kotinda ye azanga botosi.
15 Satana atikaki? Ntango Yesu abenganaki ye, akendaki. Kasi, Evanzile ya Luka elobi ete Zabolo “atikaki ye tii na ntango mosusu ya malamu.” (Luka 4:13) Ɛɛ, Satana alukaki libaku mosusu mpo na komeka Yesu tii na nsuka ya bomoi na ye awa na mabele. Biblia eyebisi biso ete Yesu “amekamaki na makambo nyonso.” (Baebre 4:15) Na yango, Yesu azalaki ntango nyonso ekɛngɛ; biso mpe tosengeli kosala bongo.
16. Lelo oyo, ndenge nini Satana amekaka basaleli ya Nzambe, mpe ndenge nini tokoki koboya mayele na ye?
16 Lelo oyo, Satana azali kaka komeka basaleli ya Nzambe. Likambo ya mawa, lokola tozali bato ya kozanga kokoka, yango wana ezalaka mpasi te mpo ameka biso. Na mayele mabe, Satana asalelaka ezaleli na biso ya moimi, ya lolendo mpe mposa ya bokonzi mpo azwa biso. Mpe ntango Satana alingi kokweisa biso na motambo ya konduka biloko ya mokili, akoki mpe kosalela makambo nyonso wana misato na mbala moko mpo na kokweisa biso! Yango wana, ezali na ntina tózwaka ntango mbala na mbala mpo na komitalela na bosembo mpenza. Ekozala malamu tómanyolaka na maloba ya 1 Yoane 2:15-17. Wana tozali kosala yango, tosengeli komituna soki bamposa ya mosuni ya mokili oyo, mposa ya biloko ya mokili, mpe mposa ya komilakisa ebandi kokitisa bolingo na biso mpo na Tata na biso ya likoló. Tosengeli kobosana te ete mokili oyo ezali koleka, ná mokonzi na yango Satana. Tóboya mayele mabe oyo azali kosalela mpo na kotinda biso tósala lisumu! Tiká tólanda ndakisa ya Nkolo na biso, mpo “asalaki lisumu te.”—1 Petro 2:22.
“Nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye”
17. Ndenge nini Yesu atalelaki likambo ya kotosa Tata na ye, kasi bato mosusu bakoki koloba nini mpo na yango?
17 Kotosa esuki kaka te na koboya kosala lisumu; Kristo atosaki mibeko nyonso ya Tata na ye. Alobaki: “Nasalaka ntango nyonso makambo oyo esepelisaka ye.” (Yoane 8:29) Botosi yango epesaki Yesu esengo mingi. Ya solo, bato mosusu bakoki koloba ete mpo na Yesu kotosa ezalaki likambo ya mpasi te. Bakoki kokanisa ete Yesu asengelaki kotosa kaka Yehova, moto ya kokoka, kasi biso esɛngaka mbala na mbala tótosa bato ya kozanga kokoka, oyo bazali na bokonzi. Kasi, tosengeli koyeba ete Yesu asengelaki mpe kotosa bato ya kozanga kokoka oyo bazalaki na bokonzi.
18. Ndakisa nini Yesu atikaki mpo na bilenge na oyo etali botosi?
18 Wana azalaki kokola, Yesu azalaki kotosa bokonzi ya Yozefe ná Maria, baboti na ye oyo bazalaki bato ya kozanga kokoka. Na kokesana na bana mingi, akokaki mbala mosusu komona mbeba epai ya baboti na ye. Atako bongo, azangaki botosi te epai ya baboti na ye, mpe alukaki te kolakisa baboti na ye ndenge ya kokamba libota. Yoká oyo Luka 2:51 elobi mpo na Yesu ntango azalaki na mbula 12: “Azalaki kaka komikitisa liboso na bango.” Na ezaleli wana ya botosi, atikaki ndakisa eleki malamu mpo na bilenge bakristo oyo basalaka makasi bátosa mpe bámemya baboti na bango.—Baefese 6:1, 2.
19, 20. (a) Mikakatano nini mpenza Yesu akutanaki na yango na oyo etali kotosa bato ya kozanga kokoka? (b) Lelo oyo, mpo na nini bakristo ya solo basengeli kotosa baoyo bazali kokamba lisangá?
19 Yesu atiká mpe ndakisa eleki malamu, mpo atosaki bato ya kozanga kokoka na ntango ya mikakatano ya mpasi mpenza oyo bakristo ya solo lelo oyo bakutaná naino na yango te. Tótalela makambo oyo ezalaki kosalema na eleko na ye. Ebongiseli ya losambo ya Bayuda, tempelo na yango oyo ezalaki na Yerusaleme mpe bonganga-nzambe na yango, endimamaki na Yehova banda kala, kasi etikalaki moke bálongola yango mpe ebongiseli ya lisangá ya bokristo ezwa esika na yango. (Matai 23:33-38) Na ntango yango, bakambi mingi ya mangomba bazalaki koteya mateya ya lokuta, oyo eutaki na filozofi ya Bagrɛki. Na kati ya tempelo, kanyaka ekómaki mingi, yango wana Yesu abengaki tempelo “mobenga ya miyibi.” (Marko 11:17) Yesu atikaki nde kokende na tempelo yango mpe na basinagoga? Te! Yehova azalaki naino kosalela bisika wana. Na botosi nyonso, Yesu azalaki kokende na bafɛti oyo ezalaki kosalema na tempelo mpe na sinagoga, tii ntango Nzambe azwaki makambo na mabɔkɔ mpe akɔtisaki mbongwana.—Luka 4:16; Yoane 5:1.
20 Soki Yesu amonisaki botosi na ntango oyo makambo ezalaki kosalema ndenge wana, lelo oyo bakristo ya solo basengeli kutu komonisa botosi koleka! Kutu, tozali kobika na ntango ya ndenge mosusu, eleko ya kozongisama ya losambo ya pɛto oyo esakolamaki banda kala. Nzambe ayebisi biso ete akotika ata mokolo moko te Satana abebisa bato na ye oyo bazongisami na losambo ya pɛto. (Yisaya 2:1, 2; 54:17) Ya solo, na lisangá ya bokristo, biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka mpe bato ya masumu. Kasi, tosengeli nde kotika mabunga ya basusu etinda biso tótika kotosa Yehova, to mbala mosusu tókima makita ya bokristo to mpe tóbanda koloba mabe mpo na bankulutu? Soki moke te! Kutu, topesaka nde mabɔkɔ na motema mobimba na baoyo bazali kokamba lisangá. Na botosi nyonso, toyanganaka na makita ya bokristo mpe na mayangani minene; tosalelaka mpe batoli ya Biblia oyo bapesaka biso kuna.—Baebre 10:24, 25; 13:17.
21. Yesu asalaki nini ntango bato mosusu balingaki kotinda ye atika kotosa Nzambe, mpe ndakisa nini atikelá biso?
21 Yesu atikelaki moto moko te nzela apekisa ye kotosa Yehova, ezala ata baninga na ye oyo bazalaki na makanisi malamu. Na ndakisa, ntoma Petro alukaki kondimisa Nkolo na ye ete ezali na ntina te anyokwama mpe akufa. Yesu aboyaki mpenza toli oyo Petro apesaki ye ete amitungisa te, atako Petro apesaki ye yango na makanisi malamu. (Matai 16:21-23) Lelo oyo, mbala mingi bayekoli ya Yesu bakutanaka na bandeko na bango oyo bazali na makanisi malamu, oyo bamekaka kopekisa bango kotosa mibeko mpe mitinda ya Nzambe. Lokola bayekoli ya Yesu na siɛklɛ ya liboso, tosengeli kozala na ekateli ya ‘kotosa Nzambe mpo azali mokonzi na esika ya kotosa bato.’—Misala 5:29.
Yehova apesaka mbano na baoyo bazali na botosi lokola Kristo
22. Yesu apesaki eyano na motuna nini, mpe ndenge nini?
22 Ntango Yesu akómaki pene na liwa, botosi na ye emekamaki makasi koleka. Na mokolo yango ya mpasi, “ayekolaki botosi” na ndenge ya solosolo. Asalaki mokano ya Tata na ye, kasi oyo ya ye moko te. (Luka 22:42) Yesu atikalaki sembo epai ya Yehova bomoi na ye mobimba, mpe atikeli biso ndakisa ya kokoka na likambo etali kotosa. (1 Timote 3:16) Apesaki eyano na motuna oyo etunamaki banda kala: Moto ya kokoka akoki kokoba kozala na botosi epai ya Yehova, ata soki amekami? Adama ná Eva balongaki te na likambo yango. Na nsima, Yesu ayaki awa na mabele, akufaki, mpe asilisaki ntembe yango. Ekelamu oyo alekaki bikelamu nyonso ya Yehova, apesaki eyano oyo esengelaki mpenza. Atosaki ata ntango yango ememelaki ye mpasi mingi ata mpe liwa.
23-25. (a) Ndenge nini botosi eyokani na ezaleli ya kozanga mbeba? Pesá ndakisa. (b) Tokolobela nini na mokapo oyo elandi?
23 Ezaleli ya kozanga mbeba, to komipesa na Yehova na motema mobimba, emonanaka na botosi. Lokola Yesu atosaki, abatelaki ezaleli na ye ya kozanga mbeba, yango ememelaki bato nyonso litomba. (Baroma 5:19) Yehova apesaki Yesu mbano mingi. Soki totosi Kristo, Nkolo na biso, Yehova akopesa mpe biso mbano. Kotosa Kristo ememaka na “lobiko ya seko”!—Baebre 5:9.
24 Baoyo batikalaka sembo epai ya Yehova bazwaka mpe mbano na ndenge mosusu. Masese 10:9 elobi: “Moto oyo asalaka malamu akotambola na kimya.” Soki tokokanisi ezaleli ya kozanga mbeba na ndako moko ya monene oyo esalemi na babriki kitoko, likambo mokomoko ya botosi ekokani na briki mokomoko. Briki moko ekoki komonana lokola ezali na ntina te, kasi mokomoko na yango ezali na esika na yango mpe na motuya na yango. Mpe soki basangisi babriki nyonso esika moko, ndako monene ekoki kotongama. Soki tosangisi likambo mokomoko ya botosi esika moko, mokolo na mokolo, mbula na mbula, tokokóma na ezaleli ya kozanga mbeba, oyo ekokani na ndako moko kitoko.
25 Botosi oyo emonisami na boumeli ya ntango molai ekotinda biso tókanisa na ezaleli mosusu—koyika mpiko. Na mokapo oyo elandi, tokolobela ezaleli yango oyo Yesu atikelá biso mpe lokola ndakisa.