Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli

Maloba ya ebandeli

Ndeko motángi:

“Yaká, landá ngai.” (Marko 10:21) Ɛɛ, na maloba wana, Yesu Kristo azali kobenga biso tólanda ye. Okondima kolanda ye? Soki ondimi, bomoi na yo ekobongwana mpenza. Mpo na nini?

Yehova atindaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki awa na mabele mpo apesa bomoi na ye lokola lisiko. (Yoane 3:16) Longola kokufela biso, Mwana yango amonisaki biso ndenge ya kozala na bomoi. Na makambo nyonso oyo asalaki, abatelaki bosembo na ye mpe yango esepelisaki motema ya Tata na ye. Yesu amonisaki mpe biso ndenge ya kozala lokola Tata na ye. Maloba mpe misala ya Mwana emonisaki malamumalamu banzela mpe mokano ya Tata.​Yoane 14:9.

Biblia elobi ete Yesu azali ‘ndakisa mpo biso tólanda matambe na ye malamumalamu.’ (1 Petro 2:21) Soki tolingi kopusana penepene na Yehova, soki tolingi kozala na bomoi ya malamu banda sikoyo, mpe soki tolingi kotikala na nzela oyo ezali komema na bomoi ya seko, tosengeli kolanda malamumalamu matambe ya Kristo.

Mpo na yango, tosengeli koyeba bomoi ya Yesu awa na mabele. Yango wana, ebongi tóyekola malamumalamu makambo oyo Biblia elobi mpo na Yesu. Soki tomanyoli na makambo oyo Yesu alobaki mpe asalaki, mpe soki totaleli ndenge oyo tokoki komekola ye na maloba mpe na misala, yango ekosalisa biso tóyeba malamu ndenge ya kolanda ye.

Tiká ete buku oyo esalisa yo okolisa bolingo na yo mpo na Yesu mpe Yehova. Mpe tiká ete bolingo yango etinda yo olanda malamumalamu matambe ya Yesu mpo osepelisa motema ya Yehova banda sikoyo mpe libela na libela.

Babimisi