Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 2

“Nzela, solo mpe bomoi”

“Nzela, solo mpe bomoi”

“Landá ngai”

1, 2. Mpo na nini biso moko tokokaki te kopusana penepene na Yehova, mpe Yesu Kristo asalaki nini mpo na biso?

 EKÓMELÁ yo obunga nzela? Mbala mosusu ozali kokanisa mokolo oyo obungaki nzela wana okendaki mbala ya liboso kotala moninga to ndeko moko boye. Ntango obungaki nzela, ekoki kozala ete otɛlɛmaki mpe otunaki moto alakisa yo nzela. Oyokaki mpenza esengo ntango moto moko ya malamu, na esika asuka kaka na kolakisa yo nzela oyo osengeli kolanda, alobaki na yo ete: “Landá ngai. Nakomema yo epai ozali kokende.” Motema na yo ekitaki mpenza!

2 Tokoki koloba ete Yesu Kristo mpe asali likambo ya ndenge wana mpo na biso. Biso moko tokokaki te kopusana penepene na Nzambe. Mpo na lisumu mpe kozanga kokoka oyo bato bazwaki, babungi nzela, “batangwi mosika na bomoi oyo euti epai ya Nzambe”. (Baefese 4:17, 18) Yango wana, tozali na mposa moto alakisa biso nzela. Yesu, oyo azali Ndakisa na biso, asuki kaka te na kopesa biso toli mpe kolakisa biso nzela. Ndenge tomonaki yango na mokapo 1, Yesu abengi biso, alobi: “Yaká, landá ngai.” (Marko 10:21) Kasi, ayebisi biso mpe ntina oyo tosengeli kondima libyangi yango. Mokolo moko Yesu alobaki boye: “Ngai nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Tólobela sikoyo mwa bantina oyo mpo na yango tokoki kopusana epai ya Tata kaka na nzela ya Mwana. Na nsima, tokotalela ntina oyo Yesu azali mpenza “nzela, solo mpe bomoi.”

Esika ya ntina mingi na mokano ya Yehova

3. Mpo na nini tokoki kopusana penepene na Nzambe kaka na nzela ya Yesu?

3 Likambo ya liboso mpe oyo eleki ntina, tokoki kopusana penepene na Nzambe na nzela ya Yesu, mpamba te Yehova asepelaki kopesa Mwana na ye mokumba moko ya ntina mingi. a Tata apesi Yesu mokumba moko ya ntina mingi, mpo Yehova akosalela Yesu mpo na kokokisa mokano na ye. (2 Bakorinti 1:20; Bakolose 1:18-20) Mpo tókanga ntina ya mokumba monene oyo Mwana azali na yango, ekozala malamu tótalela makambo oyo elekaki na elanga ya Edene ntango mwasi mpe mobali ya liboso bamityaki na ngámbo ya Satana mpe batombokelaki Yehova.​—Ebandeli 2:16, 17; 3:1-6.

4. Botomboki na Edene ebimisaki ntembe nini, mpe Yehova azwaki ekateli nini mpo na kosilisa ntembe yango?

4 Botomboki oyo ebimaki na Edene ebimisaki ntembe moko monene oyo etali molɔ́ngɔ́ mobimba: Yehova Nzambe ayangelaka bikelamu na ye na ndenge ya malamu? Mpo na kosilisa ntembe yango, Yehova azwaki ekateli ya kotinda awa na mabele moko ya bana na ye ya elimo, oyo azalaki moto ya kokoka. Mokumba oyo mwana yango asengelaki kokokisa ezalaki na ntina mingi: kopesa bomoi na ye mpo na kolongisa lotomo oyo Yehova azali na yango ya koyangela, mpe kozala lisiko mpo na kobikisa bato. Soki mwana yango oyo aponamaki atikali sembo tii na liwa, akopesa mabɔkɔ mpo na kosilisa mikakatano nyonso oyo botomboki ya Satana ebimisaki. (Baebre 2:14, 15; 1 Yoane 3:8) Kasi Yehova azalaki na bamilio ya bana ya kokoka ya elimo. (Danyele 7:9, 10) Yehova aponaki nani kati na bana yango mpo na kokokisa mokumba wana ya ntina mingi? Yehova aponaki “Mwana na ye se moko oyo abotamaki,” oyo na nsima ayebanaki na nkombo ya Yesu Kristo.​—Yoane 3:16.

5, 6. Ndenge nini Yehova amonisaki ete atyelaka Mwana na ye motema, mpe mpo na nini atyelaka ye motema?

5 Tosengeli nde kokamwa na liponi oyo Yehova asalaki? Soki moke te! Tata atyelaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki motema mpenza. Basiɛklɛ mingi liboso ete Mwana na ye aya awa na mabele, Yehova asakolaki ete Mwana yango akotikala sembo atako akokutana na makambo ya mpasi ya ndenge na ndenge. (Yisaya 53:3-7, 10-12; Misala 8:32-35) Tótala ndenge yango esalemaki. Lokola bikelamu nyonso mosusu ya mayele, Mwana yango azalaki na bonsomi ya kopona oyo alingi. Kasi, lokola Yehova atyelaki ye mpenza motema, asakolaki ete Mwana na ye akotikala sembo. Nini etindaki Yehova atyela ye motema ndenge wana? Na mokuse, ezali mpo ayebaki ye. Yehova ayebi Mwana na ye malamumalamu mpe ayebi ete Mwana na ye alingaka mpenza kosepelisa ye. (Yoane 8:29; 14:31) Mwana alingaka Tata na ye, Yehova mpe alingaka Mwana na ye. (Yoane 3:35) Ndenge oyo Tata ná Mwana balinganaka esali ete bázala na bomoko mpe bátyelana mpenza motema.​—Bakolose 3:14.

6 Na kotalela mokumba monene oyo Mwana azali na yango, ndenge oyo Tata atyelaka ye motema, mpe bolingo oyo Tata ná Mwana bazali na yango, tokoki kokamwa te ete ezali kaka na nzela ya Yesu nde tokoki kopusana penepene na Nzambe. Kasi, ntina mosusu mpe ezali oyo esali ete kaka Mwana nde akoki komema biso epai ya Tata.

Kaka Mwana nde ayebi Tata malamumalamu

7, 8. Mpo na nini Yesu alobaki ete moto moko te ayebi Tata malamumalamu “longola kaka Mwana”?

7 Mpo tópusana penepene na Nzambe, tosengeli kokokisa mwa masɛngami . (Nzembo 15:1-5) Longola Mwana, ezali na moto mosusu te oyo ayebi malamu oyo moto asengeli kosala mpo na kokokisa masɛngami ya Nzambe mpe kondimama na ye. Yesu alobaki: “Tata na ngai apesi ngai biloko nyonso, mpe moto moko te ayebi Mwana malamumalamu longola kaka Tata. Mpe moto moko te ayebi Tata malamumalamu longola kaka Mwana, ná moto nyonso oyo Mwana asepeli komonisa ye Tata.” (Matai 11:27) Yesu alekisaki ndelo te ntango alobaki ete moto moko te ayebi Tata malamumalamu “longola kaka Mwana.”

8 Lokola azali “mwana ya liboso na biloko nyonso oyo ezalisamá,” Mwana azali na boyokani ya penepene mpenza na Yehova. (Bakolose 1:15) Kanisá naino boyokani ya penepene oyo Tata ná Mwana bazalaki na yango na boumeli ya basiɛklɛ mingi, wana bazalaki kaka bango mibale banda na ebandeli ya bozalisi, liboso ete bikelamu mosusu ya elimo ezalisama. (Yoane 1:3; Bakolose 1:16, 17) Kanisá naino libaku malamu oyo Mwana azalaki na yango pembeni ya Tata na ye, wana azalaki koyoka makanisi ya Tata na makambo ndenge na ndenge, mpe koyekola mokano, malako mpe banzela na ye! Na yango, koloba ete Yesu ayebi Tata na ye malamumalamu koleka bato nyonso ezali kolekisa ndelo te. Boyokani makasi oyo Yesu azalaki na yango ná Tata na ye esalaki ete azala momonisi ya Tata na ye epai ya bato koleka moto mosusu nyonso.

9, 10. (a) Na ndenge nini Yesu azalaki momonisi ya Tata na ye? (b) Tosengeli kosala nini mpo Yehova andima biso?

9 Mateya ya Yesu emonisaki ete ayebaki malamumalamu ndenge oyo Yehova akanisaka, ndenge oyo atalelaka makambo, mpe oyo asɛngaka basambeli na ye. b Yesu azalaki mpe momonisi ya Tata na ye na ndenge mosusu ya malamu koleka; alobaki ete: “Moto oyo amoni ngai amoni mpe Tata.” (Yoane 14:9) Yesu amekolaki Tata na ye malamumalamu na makambo nyonso oyo alobaki mpe asalaki. Yango wana, ntango totángaka na Biblia makambo etali Yesu: mateya na ye ya kitoko mpe ya elɛngi, motema mawa oyo ezalaki kotinda ye abikisa bato, komitya na esika ya basusu oyo ezalaki kotinda ye alela, ndenge wana nde Yehova ye moko mpe akokaki koloba mpe kosala. (Matai 7:28, 29; Marko 1:40-42; Yoane 11:32-36) Tokoki koyeba bomoto mpe mokano ya Tata soki toyekoli maloba mpe misala ya Mwana. (Yoane 5:19; 8:28; 12:49, 50) Na yango, mpo Yehova andima biso, tosengeli kotosa mateya ya Yesu mpe kolanda ndakisa na ye.​—Yoane 14:23.

10 Lokola Yesu ayebi Yehova malamu mpe amekolaka ye malamumalamu, tokoki kokamwa te ndenge Yehova amoni malamu ete Mwana azala nzela mpo na kopusana penepene na Tata. Lokola toyebi ete tokoki koya epai ya Yehova kaka na nzela ya Yesu, tótalela sikoyo ndimbola ya maloba ya Yesu oyo ete: “Ngai nazali nzela, solo mpe bomoi. Moto moko te akoki koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.”​—Yoane 14:6.

“Ngai nazali nzela”

11. (a) Mpo na nini tokoki kokóma na boyokani ya malamu na Nzambe mpe kondimama na ye kaka na nzela ya Yesu? (b) Ndenge nini maloba oyo ezali na Yoane 14:6 ezali mpenza komonisa ete kaka Yesu nde azali na esika ya ntina mingi koleka? (Talá maloba na nse ya lokasa.)

11 Tomonaki ete tokoki kopusana penepene na Nzambe kaka na nzela ya Yesu. Tótala soki yango elimboli mpenza nini mpo na biso. Yesu azali “nzela” mpo kaka na nzela na ye nde tokoki kokóma na boyokani ya malamu na Nzambe. Mpo na nini? Lokola Yesu atikalaki sembo tii na liwa, apesaki bomoi na ye lokola mbeka ya lisiko. (Matai 20:28) Tokokaki kopusana penepene na Nzambe te soki lisiko epesamaki te. Lisumu ekabolaka bato ná Nzambe; lokola Yehova azali mosantu, yango wana akoki kondima lisumu ata moke te. (Yisaya 6:3; 59:2) Kasi mbeka ya Yesu elongolaki bokabwani yango; epesaki eloko oyo esengelaki mpo na kozipa lisumu. (Baebre 10:12; 1 Yoane 1:7) Soki tondimi ebongiseli oyo Nzambe azwaki na nzela ya Kristo mpe tondimeli yango, Yehova akoyamba biso. Nzela mosusu ezali te mpo ‘tózongisa boyokani na Nzambe.’ c​—Baroma 5:6-11.

12. Na ndenge nini Yesu azali “nzela”?

12 Yesu azali “nzela” na likambo etali kobondela. Kaka na nzela ya Yesu nde tokoki kobondela Yehova na motema moko na elikya ete akoyoka mpe akondima biso. (1 Yoane 5:13, 14) Yesu ye moko alobaki boye: “Soki bosɛngi Tata eloko akopesa bino yango na nkombo na ngai. . . . Bósɛnga mpe bokozwa, mpo ete esengo na bino ezala ya kokoka.” (Yoane 16:23, 24) Na yango, tokoki kopusana penepene na Yehova na libondeli na nkombo ya Yesu mpe kobenga ye “Tata na biso.” (Matai 6:9) Kasi, Yesu azali mpe “nzela” na ndimbola mosusu: azali ndakisa na biso. Ndenge tomonaki yango, Yesu amekolaki Tata na ye na ndenge ya kokoka. Na yango, ndakisa ya Yesu emonisi biso ndenge oyo tokoki kosepelisa Yehova. Yango wana, mpo tópusana penepene na Yehova, tosengeli kolanda matambe ya Yesu.​—1 Petro 2:21.

“Ngai nazali . . . solo”

13, 14. (a) Na ndenge nini Yesu azalaki koloba solo? (b) Mpo Yesu azala “solo,” asengelaki kosala nini mpe mpo na nini?

13 Yesu azalaki ntango nyonso koloba solo oyo etali liloba ya esakweli ya Tata na ye. (Yoane 8:40, 45, 46) Lokuta ezwamaki na monɔkɔ ya Yesu te. (1 Petro 2:22) Ata banguna na ye bandimaki ete azalaki koteya ‘makambo ya Nzambe na boyokani na solo.’ (Marko 12:13, 14) Nzokande, ntango Yesu alobaki “Ngai nazali . . . solo,” akanisaki te kaka na solo oyo azalaki koloba, kosakola mpe koteya. Solo oyo alobelaki esukaki kaka te na maloba.

14 Tóbosana te ete basiɛklɛ mingi liboso, Yehova asalisaki bato na litambwisi ya elimo na ye bákoma bisakweli na ntina etali Masiya, to Kristo. Bisakweli yango elobelaki makambo etali bomoi, mosala mpe liwa na ye. Lisusu, Mibeko ya Moize ezalaki na bilili, to bandakisa ya bisakweli oyo etalaki Masiya. (Baebre 10:1) Yesu alingaki nde kotikala sembo tii na liwa, mpe na bongo kokokisa makambo nyonso oyo esakolamaki mpo na ye? Yango nde elingaki mpenza komonisa ete Yehova azali Nzambe ya bisakweli ya solosolo. Mokumba monene wana, Yesu nde asengelaki kokokisa yango. Na makambo nyonso oyo Yesu alobaki mpe asalaki, yango emonisaki ete makambo oyo Biblia esakolaki ezali solo. (2 Bakorinti 1:20) Na ndenge yango, Yesu azalaki “solo.” Ezalaki lokola nde solo ya liloba ya esakweli ya Yehova eyaki na nzela ya Yesu.​—Yoane 1:17; Bakolose 2:16, 17.

“Ngai nazali . . . bomoi”

15. Komonisa kondima epai ya Mwana elimboli nini, mpe kosala bongo ekoki komema na nini?

15 Yesu azali “bomoi,” mpamba te kaka na nzela na ye nde tokoki kozwa bomoi, elingi koloba “bomoi ya solosolo.” (1 Timote 6:19) Biblia elobi: “Moto oyo azali komonisa kondima epai ya Mwana azali na bomoi ya seko; moto oyo azali kotosa Mwana te akozwa bomoi te, kasi nkanda ya Nzambe efandi likoló na ye.” (Yoane 3:36) Komonisa kondima epai ya Mwana ya Nzambe elimboli nini? Elimboli kondima ete tokoki kozwa bomoi te soki na nzela na ye te. Longola yango, elimboli mpe komonisa kondima na biso na misala, kokoba koyekola epai ya Yesu, mpe kosala nyonso mpo na kolanda mateya mpe ndakisa na ye. (Yakobo 2:26) Na yango, komonisa kondima epai ya Mwana ya Nzambe ememaka na bomoi ya seko: bomoi oyo ezangi liwa, lokola bikelamu ya elimo na likoló, mpo na “etonga moke” ya bakristo oyo batyami mafuta na elimo, mpe bomoi ya kokoka na paradiso awa na mabele mpo na “ebele mpenza ya bato” oyo bazali na kati ya “bampate mosusu.”​—Luka 12:32; 23:43; Emoniseli 7:9-17; Yoane 10:16.

16, 17. (a) Ndenge nini Yesu akomonisa ete azali “bomoi” ata mpo na baoyo bakufá? (b) Tosengeli mpenza kondima likambo nini?

16 Bongo mpo na baoyo basilá kokufa? Yesu mpe azali “bomoi” mpo na bango. Mwa moke liboso asekwisa moninga na ye Lazare, Yesu ayebisaki Marta, ndeko ya Lazare ete: “Ngai nazali lisekwa mpe bomoi. Moto oyo azali komonisa kondima epai na ngai, ata soki akufi, akozonga na bomoi.” (Yoane 11:25) Yehova apesá Mwana na ye “bafungola ya liwa mpe ya Nkunda,” elingi koloba, apesá ye nguya ya kosekwisa bakufi. (Emoniseli 1:17, 18) Na bafungola yango, Yesu oyo asili kozwa nkembo akofungola baporte ya nkunda mpe akobimisa baoyo nyonso bakangamaki kati na yango.​—Yoane 5:28, 29.

17 Ntango Yesu alobaki ete: “Ngai nazali nzela, solo mpe bomoi,” amonisaki na mokuse ntina ya bomoi mpe mosala na ye awa na mabele. Maloba yango ezali mpe na ndimbola monene mpo na biso lelo oyo. Kobosana te ete nsima ya koloba bongo, Yesu abakisaki ete: “Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te.” (Yoane 14:6) Maloba wana ya Yesu ezali mpe na ntina mingi lelo oyo. Yango wana, soki tolandi Yesu, tokobunga nzela ata mokolo moko te. Ɛɛ, kaka ye nde akoki kolakisa biso nzela “epai ya Tata.”

Okosala nini?

18. Kozala moyekoli ya solosolo ya Yesu esɛngi nini?

18 Lokola Yesu azali na mokumba monene mpe ndenge ayebi Tata malamumalamu, tosengeli kokakatana te mpo na kolanda ye. Ndenge tomonaki yango na mokapo ya liboso, kozala moyekoli ya solosolo ya Yesu esengeli komonana na misala, kasi esengeli kosuka kaka te na maloba to na mayoki. Mpo tólanda Yesu, tosengeli ntango nyonso kotosa mateya na ye mpe kolanda ndakisa na ye. (Yoane 13:15) Buku oyo ozali kotánga sikoyo ekoki kosalisa yo na likambo yango.

19, 20. Ndenge nini buku oyo ekosalisa yo olanda Kristo?

19 Na mikapo oyo elandi, tokoyekola na mozindo bomoi mpe mosala ya Yesu. Mikapo yango ekabolami na biteni misato. Ya liboso, tokotalela na mokuse bizaleli mpe misala na ye. Ya mibale, tokotalela ndakisa ya molende na ye na mosala ya kosakola mpe ya koteya. Ya misato, tokotalela ndenge oyo amonisaki bolingo. Kobanda na mokapo 3, ezali na etanda oyo ezali na motó ya likambo: “Ndenge nini okoki kolanda Yesu?” Bavɛrsɛ mpe mituna oyo ezali na etanda yango ekosalisa biso tómanyola mpo na koyeba ndenge oyo tokoki komekola Yesu na maloba mpe na misala na biso.

20 Na lisalisi ya Yehova Nzambe, okobunga nzela te mpe okokóma mosika na ye te mpo na lisumu oyo tosangolaki. Atako ayokaki mpasi na motema, Yehova andimaki na bolingo mpenza kotindela biso Mwana na ye mpo alakisa biso ndenge ya kozala na boyokani ya malamu na Nzambe. (1 Yoane 4:9, 10) Tiká ete bolingo monene wana etinda yo ondima mpe otosa libyangi oyo ya Yesu ete: “Landá ngai.”​—Yoane 1:43.

a Mwana azali na mokumba ya ntina mingi; yango wana na Biblia, abengami na bankombo mpe batitre mingi ya bisakweli.​—Talá etanda “ batitre mosusu ya Yesu Kristo.”

b Na ndakisa, talá maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 10:29-31; 18:12-14, 21-35; 22:36-40.

c Na monɔkɔ ya Grɛki oyo bakomaki na yango Biblia na ebandeli, liloba “nzela” oyo esalelami na Yoane 14:6 ezalaki komonisa ete kaka Yesu nde azali na esika ya ntina mingi koleka. Na yango, maloba “ngai nazali nzela” emonisi ete kaka na nzela ya Yesu nde tokoki kopusana penepene na Tata.