Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

MOKAPO 1

“Landá ngai”​​—Yesu alingaki koloba nini na maloba wana?

“Landá ngai”​​—Yesu alingaki koloba nini na maloba wana?

“Nasengeli kosala nini mpo nazwa libula ya bomoi ya seko?”

1, 2. Libyangi nini ya malamu koleka moto akoki kozwa, mpe motuna nini mokomoko na biso akoki komituna?

 LIBYANGI nini ya malamu koleka basilá kopesa yo? Mbala mosusu ozali kokanisa ntango babengisaki yo na molulu moko ya ntina mingi, na ndakisa na libala ya bato mibale oyo olingaka mingi. To mpe ozali kokanisa mokolo oyo babengaki yo mpo na kobanda mosala moko ya malamu mingi. Na ntembe te, oyokaki esengo, ntango ozwaki libyangi ya ndenge wana mpe omonaki yango lokumu. Mpo na koloba solo, mokomoko na biso asilá kozwa libyangi moko ya ntina mingi koleka. Kondima libyangi yango ezali na ntina mingi, mpe ezali liponi oyo eleki ntina na bomoi na biso.

2 Libyangi yango ezali nini? Yesu Kristo, Mwana se moko ya Yehova, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, nde apesi libyangi yango mpe ekomami na Biblia. Na Marko 10:21, tozali kotánga maloba oyo ya Yesu: “Yaká, landá ngai.” Yango nde libyangi oyo Yesu apesi mokomoko na biso. Na yango, mokomoko na biso asengeli komituna: ‘Nakondima libyangi yango?’ Eyano ezali mpasi te. Ata moto moko te akoki koboya libyangi kitoko ya ndenge wana. Kasi likambo ya kokamwa, bato mingi baboyaka yango. Mpo na nini?

3, 4. (a) Makambo nini bato bazalaka na mposa na yango, oyo elenge mobali moko oyo atunaki Yesu motuna, azalaki na yango? (b) Mbala mosusu, bizaleli nini ya malamu Yesu amonaki epai ya elenge mobali wana oyo azalaki mozwi?

3 Tótalela ndakisa ya mobali moko oyo azwaki libyangi yango esili koleka pene na mbula 2 000. Azalaki moto moko ya lokumu mingi koleka. Azalaki na makambo misato oyo bato bazalaka na mposa na yango: bolenge, bozwi, mpe bokonzi. Biblia elobi mpo na ye ete azalaki “elenge mobali,” azalaki “mpenza mozwi,” mpe azalaki “mokonzi.” (Matai 19:20; Luka 18:18, 23) Kasi, elenge mobali yango azalaki mpe na eloko moko ya ntina mingi. Ayokaki nsango etali Moteyi Monene, Yesu, mpe asepelaki na makambo oyo ayokaki.

4 Bankumu to bayangeli mingi ya ntango wana bazalaki mpenza komemya Yesu te. (Yoane 7:48; 12:42) Kasi elenge mobali wana asalaki bongo te. Biblia eyebisi biso ete: “Ntango [Yesu] azalaki kotambola na nzela na ye, moto moko ayaki mbangu, afukamaki liboso na ye mpe atunaki ye motuna: ‘Moteyi Malamu, nasengeli kosala nini mpo nazwa bomoi ya seko?’” (Marko 10:17) Tomoni ete elenge mobali yango azalaki mpenza na mposa ya kosolola na Yesu; na miso ya bato nyonso, akendaki mbangu epai ya Yesu, kaka ndenge babola mpe bato mpamba bakokaki kosala. Lisusu, afukamaki na limemya mpenza liboso ya Kristo. Yango emonisi ete azalaki na mwa komikitisa mpe ayebaki bobola na ye ya elimo. Yesu asepelaki na bizaleli wana ya malamu. (Matai 5:3; 18:4) Boye tokoki kokamwa te, ndenge “Yesu atalaki ye na bolingo.” (Marko 10:21) Eyano nini Yesu apesaki na motuna ya elenge mobali yango?

Libyangi oyo eleki nyonso

5. Ndenge nini Yesu ayanolaki elenge mobali oyo azalaki mozwi, mpe ndenge nini toyebi ete bobola ezali te “eloko moko” oyo ezangaki ye? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)

5 Yesu amonisaki ete Tata na ye asilaki koyebisa makambo ya ntina oyo moto asengeli kosala mpo na kozwa bomoi ya seko. Abendaki likebi na ye na Makomami, mpe elenge mobali yango alobaki ete atosaka Mibeko ya Moize banda kala. Nzokande, lokola Yesu azali na mayele ya kososola, amonaki makambo oyo ezalaki mpenza na motema ya elenge mobali wana. (Yoane 2:25) Emonanaki ete elenge yango azalaki na mokakatano moko monene na elimo. Na yango, Yesu alobaki ete: “Eloko moko ezali kozanga yo.” “Eloko moko” yango ezalaki nini? Yesu alobaki: “Kende, tɛká biloko nyonso oyo ozali na yango mpe pesá babola.” (Marko 10:21) Yesu alingaki nde koloba ete mpo moto asalela Nzambe, asengeli kaka kozala mobola? Te. a Kristo alingaki nde koteya moto yango likambo moko ya ntina mingi.

6. Libyangi nini Yesu apesaki, mpe lokola elenge mobali wana ya bozwi aboyaki, yango emonisaki ete motema na ye ezalaki ndenge nini?

6 Mpo na komonisa eloko oyo mobali wana azangaki, Yesu apesaki ye libaku moko ya malamu: “Yaká, landá ngai.” Kanisá naino: Mwana ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló nde abengaki mobali yango! Lisusu, Yesu alakaki kopesa ye mbano moko monene. Alobaki: “Okozwa eloko ya motuya na likoló.” Elenge mobali wana ya bozwi asimbaki nde libaku oyo epesamelaki ye, elingi koloba libyangi wana ya ntina mingi? Lisolo ekobi boye: “Alɛmbaki nzoto na eyano yango mpe akendaki na mawa, mpo azalaki na biloko mingi.” (Marko 10:21, 22) Na yango, maloba wana ya Yesu emonisaki polele mokakatano oyo ezalaki na motema ya mobali wana. Na ntembe te, alingaki mingi biloko oyo azalaki na yango. Lisusu, alingaki bokonzi mpe lokumu oyo eyaka na biloko yango. Likambo ya mawa, alingaki mingi biloko yango koleka Kristo. Kolinga Yesu mpe Yehova na motema na ye mobimba ata kondima kokufa mpo na bango nde “eloko moko” oyo mobali wana azangaki. Lokola elenge mobali yango azangaki bolingo yango, aboyaki libyangi wana oyo eleki libyangi nyonso! Kasi likambo yango etali yo na nini?

7. Nini endimisi biso ete libyangi ya Yesu etali mpe biso lelo oyo?

7 Libyangi ya Yesu esukaki kaka te na elenge mobali wana to mpe kaka na mwa ndambo ya bato. Yesu alobaki: “Soki moto alingi kolanda ngai . . . akoba kolanda ngai.” (Luka 9:23) Tósimba likambo oyo: “Moto” nyonso akoki kolanda Kristo soki mpenza “alingi.” Nzambe abendaka bato oyo balingi mpenza koyeba ye epai ya Mwana na ye. (Yoane 6:44) Libaku wana ya kondima kolanda Yesu epesami na moto nyonso, azala mozwi to mobola, mondɛlɛ to moindo, moto ya ekólo boye to boye, kasi esukaki kaka te na bato ya ntango wana. Boye, maloba oyo ya Yesu ete “Yaká, landá ngai” etaleli mpe yo. Mpo na nini osengeli kolinga kolanda Kristo? Mpe yango esɛngi makambo nini?

Mpo na nini kolanda Kristo?

8. Bato nyonso bazali na mposa ya nini, mpe mpo na nini?

8 Tóbosana likambo oyo te: Biso nyonso tozali na mposa ya kozala na bayangeli ya malamu. Atako bongo, bato nyonso te nde bandimaka likanisi wana. Na litambwisi ya elimo ya Nzambe, Yirimia, mosakoli ya Yehova, akomaki likambo oyo eyebani malamu banda kala: “Ee Yehova, nayebi malamu ete moto akoki te komitambwisa ye moko. Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa makolo na ye.” (Yirimia 10:23) Bato bazali te na likoki to na lotomo ya komitambwisa bango moko. Kutu, lisolo ya bato elobeli bakonzi mingi oyo bazalaki bakambi mabe. (Mosakoli 8:9) Na ntango ya Yesu, bakambi mingi banyokolaki bato, bamonisaki bango mpasi mpe babungisaki bango nzela. Yango wana, ntango Yesu amonaki bato yango, alobaki mpo na bango ete bazali “lokola bampate ezangi mobateli.” (Marko 6:34) Ezali mpe bongo mpo na bato lelo oyo. Biso nyonso tozali na mposa ya mokambi oyo tokoki kotyela motema mpe komemya. Yesu nde abongi kozala mokambi yango? Tótalela makambo mingi oyo emonisi ete ye nde abongi.

9. Nini ekesenisi Yesu na bakambi mosusu nyonso?

9 Ya liboso, Yehova Nzambe nde aponaki Yesu. Bakambi mingi baponamaka na baninga na bango oyo bazali bato ya kozanga kokoka, oyo mbala mingi bakosaka mpe basalaka mabunga. Yesu azali mokambi oyo akeseni na bango, ndenge titre na ye emonisi yango. Liloba “Kristo,” ndenge moko mpe liloba “Masiya,” elimboli “Moto oyo atyami mafuta.” Ɛɛ, Yesu atyamaki mafuta, to atyamaki na ebonga na ye mosantu na moto mosusu te, kasi nde na Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso na molɔ́ngɔ́ mobimba. Yehova Nzambe alobaki mpo na Mwana na ye ete: “Talá! Mosaleli na ngai oyo naponá, ya bolingo, oyo nandimi! Nakotya elimo na ngai likoló na ye.” (Matai 12:18) Longola Mozalisi na biso, nani mosusu ayebi malamu mokambi oyo tozali na mposa na ye? Lokola bwanya ya Yehova ezali na nsuka te, ebongi tótya mpenza motema na mokambi oyo ye aponi.​—Masese 3: 5, 6.

10. Mpo na nini ndakisa ya Yesu ezali malamu koleka mpe oyo bato basengeli kolanda?

10 Ya mibale, Yesu atikelá biso ndakisa ya kokoka mpe oyo ebongi tólanda. Mokambi ya malamu koleka azalaka na bizaleli oyo bato oyo azali kokamba basepelaka na yango mpe bakoki komekola. Apesaka ndakisa malamu oyo etindaka bato mosusu báluka kokóma bato malamu koleka. Bizaleli nini okolinga mokambi azala na yango mpo omemya ye? Mpiko? Bwanya? Motema mawa? Ezali boni mpo na koyika mpiko liboso ya mikakatano? Soki otaleli bomoi ya Yesu awa na mabele, okomona ete azalaki na bizaleli nyonso wana mpe bizaleli mosusu mingi. Lokola Yesu azali elilingi ya kokoka ya Tata na ye ya likoló, amonisaki mpenza bizaleli nyonso ya Nzambe. Azalaki mpenza moto ya kokoka. Na yango, na nyonso oyo asalaki mpe alobaki, mpe na ndenge na ye ya komonisa mayoki, tokozanga te likambo ya komekola epai na ye. Biblia elobi ete atikelá biso ‘ndakisa mpo tólanda matambe na ye malamumalamu.’​—1 Petro 2:21.

11. Ndenge nini Yesu amonisaki ete azali “mobateli ya mpate oyo aleki malamu”?

11 Ya misato, Kristo akokisaki makambo oyo alobaki ete: “Ngai nazali mobateli ya mpate oyo aleki malamu.” (Yoane 10:14) Na ntango ya kala bato bayebaki malamu elobeli wana. Babateli ya mpate bazalaki koboma nzoto mpo na kokɛngɛla bampate na bango. “Mobateli ya mpate oyo aleki malamu” akokaki kotya bomoi na ye na likama mpo na kobatela bampate na ye. Na ndakisa Davidi, nkɔkɔ ya Yesu, azalaki mobateli ya mpate ntango azalaki naino elenge, mpe mbala mingi, atyaki bomoi na ye na likama na ndenge abundaki na nyama mabe oyo elingaki kokanga bampate na ye. (1 Samwele 17:34-36) Yesu mpe atyaki bomoi na ye na likama mpo na kobatela bayekoli na ye. Kasi asukaki kaka wana te. Akabaki bomoi na ye mpo na bango. (Yoane 10:15) Bakambi boni bakondima kokufa ndenge wana?

12, 13. (a) Na ndenge nini mobateli ya mpate ayebaka bampate na ye, mpe na ndenge nini bampate eyebaka ye? (b) Mpo na nini olingi ete Mobateli ya mpate oyo aleki malamu azala mokambi na yo?

12 Yesu azalaki “mobateli ya mpate oyo aleki malamu” na lolenge mosusu. Alobaki boye: “Nayebi bampate na ngai mpe bampate na ngai eyebi ngai.” (Yoane 10:14) Kanisá naino maloba wana ya Yesu. Mpo na moto oyo azali kotala kaka, etonga ya mpate ezali kaka banyama oyo etondi na nsuki mpɛmbɛ. Nzokande, mobateli ya mpate ayebaka mpate mokomoko. Ayebaka bampate ya basi oyo akoki kosalisa mpo elingi kobota, bana-mpate oyo asengeli komema mpo ezali naino mike, ekokoka kotambola yango moko te, mpe mpate oyo eutaki kobɛla to kozoka. Bampate mpe eyebaka mobateli na yango. Eyebaka mongongo na ye, ekesenisaka yango na oyo ya mobateli mosusu. Ntango bampate eyoki mongongo ya mobateli ya mpate oyo esɛngi esala boye to boye, elandaka yango nokinoki. Epai nyonso akambaka yango, elandaka. Mpe ayebaka epai asengeli kokamba yango. Ayebaka epai matiti ya kitoko ezali, epai mai ya malamu ezali, mpe bisika ya koleisa yango kozanga likama. Bampate ebangaka eloko te ntango mokɛngɛli azali elongo na yango.​—Nzembo 23.

13 Okosepela makasi kozala na mokambi ya ndenge wana, boye te? Mobateli ya mpate oyo aleki malamu asili komonisa ete ye nde mokambi ya ndenge wana mpo na bayekoli na ye. Alaki kokamba yo mpo ozala na bomoi kitoko mpe ya esengo sikoyo, mpe kopesa yo bomoi ya seko na mikolo ezali koya! (Yoane 10:10, 11; Emoniseli 7:16, 17) Yango wana, ezali malamu tóyeba oyo esengeli mpo na kolanda Kristo.

Kozala moyekoli ya Yesu elimboli nini?

14, 15. Mpo na kolanda Kristo, mpo na nini esengeli kosuka kaka te na koloba ete ozali mokristo to mpe olingaka Yesu?

14 Lelo oyo, bamilio ya bato bakanisaka ete balandaka Kristo. Yango wana, bamibengaka bakristo. Ekoki kozala ete bakendaka na mangomba oyo babatisamaki ntango bazalaki naino bana mike. To mpe balobaka ete balingaka Yesu mingi mpe bandimaka ye lokola Mobikisi na bango. Kasi yango nde ekómisi bango bayekoli ya Kristo? Yango nde Yesu alingaki koloba ntango asɛngaki biso tólanda ye? Kolanda Yesu esɛngi makambo mingi.

15 Tótalela mikili ya bokristo, elingi koloba bikólo oyo bato na yango mingi balobaka ete balandaka Kristo. Mangomba ya bokristo elandaka mpenza mateya ya Yesu Kristo? Na mikili yango, tomonaka mingi koyinana, kobomana, mobulu, mpe kozanga bosembo kaka ndenge ezali na mikili mosusu, boye te?

16, 17. Mbala mingi, eloko nini ezangaka bato oyo bamibengaka bakristo, mpe nini ekesenisaka bayekoli ya solosolo ya Kristo ná bakristo ya nkombo mpamba?

16 Yesu alobaki ete bayekoli na ye ya solosolo bakoyebana libosoliboso na misala na bango, kasi te na maloba to mpe na ndenge oyo bango moko bamimonaka. Na ndakisa, alobaki ete: “Ezali te bato nyonso oyo balobaka na ngai: ‘Nkolo, Nkolo,’ nde bakokɔta na Bokonzi ya likoló, kasi kaka moto oyo azali kosala mokano ya Tata na ngai oyo azali na likoló.” (Matai 7:21) Mpo na nini bato mingi oyo balobaka ete Yesu azali Nkolo na bango basalaka te mokano ya Tata na ye? Kobosana te elenge mobali oyo azalaki mozwi. Mbala mingi, ‘eloko moko ezangaka’ baoyo nyonso balobaka ete bazali bakristo: balingaka te na molimo na bango mobimba Yesu ná Moto oyo atindaki ye.

17 Mpo na nini bongo? Na ntembe te, bamilio ya bato oyo bamibengaka bakristo balobaka ete balingaka Kristo. Kasi kolinga Yesu mpe Yehova esuki kaka na maloba te. Yesu alobaki ete: “Soki moto alingi ngai, akotosa liloba na ngai.” (Yoane 14:23) Mpe lisusu, lokola azali mobateli ya mpate, Yesu alobaki ete: “Bampate na ngai eyokaka mongongo na ngai, mpe nayebi yango, mpe elandaka ngai.” (Yoane 10:27) Ya solo, tokomonisa mpenza ete tolingaka Kristo na misala na biso, kasi kaka te na maloba mpe na ndenge tokanisaka.

18, 19. (a) Koyekola koyeba Yesu ekotinda biso tósala nini? (b) Mokano ya buku oyo ezali nini, mpe ndenge nini ekosalisa baoyo bamitalelaka lokola bakristo banda kala?

18 Nzokande, misala na biso emonisaka lolenge ya bato oyo tozali. Yango wana tosengeli kondima kobongola lolenge ya bato oyo tozali. Yesu alobaki boye: “Oyo elakisi bomoi ya seko: báyekola koyeba yo, Nzambe ya solo kaka moko, mpe moto oyo yo otindaki, Yesu Kristo.” (Yoane 17:3) Soki toyekoli, tozali kotánga makambo etali Biblia mpe tomanyoli makambo etali ye, yango ekobongola ndenge oyo tomiyokaka mpo na ye. Tokolinga ye mingi mpe tokokóma na mposa makasi ya kolanda ye mokolo na mokolo.

19 Yango nde mokano ya buku oyo. Esalemi te mpo na kolobela na mokuse bomoi mpe mosala ya Yesu, kasi mpo na kosalisa biso tóyeba malamumalamu ndenge ya kolanda ye. b Ebimisami mpo na kosalisa mokomoko na biso amitala malamu na Makomami, lokola nde na talatala, mpe amituna boye: ‘Nazali mpenza kolanda Yesu?’ (Yakobo 1:23-25) Mbala mosusu okanisaka ete yo mpe ozali moko ya bampate oyo Mobateli oyo aleki malamu akambaka. Ata bongo, ondimi te ete ezali na makambo mosusu oyo tosengeli kokokisa? Biblia elendisi biso na maloba oyo: “Bókoba komimeka mpo na komona soki bozali na kati ya kondima, bókoba kotala soki bozali ndenge nini.” (2 Bakorinti 13:5) Tosengeli kosala makasi mpo na koyeba soki Yesu, Mobateli ya mpate oyo aleki malamu mpe ya bolingo, oyo Yehova aponá, nde azali kokamba biso.

20. Tokolobela nini na mokapo elandi?

20 Tiká ete boyekoli na yo ya buku oyo esalisa yo okolisa bolingo na yo mpo na Yesu mpe Yehova. Soki omonisi bolingo ya ndenge wana na bomoi na yo, okozala na kimya mingi mpe esengo na mokili oyo esili konuna, mpe okosanzola Yehova ndenge apesá biso Mobateli ya mpate oyo aleki malamu. Na yango, boyekoli na biso na oyo etali Kristo esengeli kosimbama na moboko ya solosolo. Yango wana na mokapo 2, tokolobela mokumba oyo Yesu azali na yango na kokokisama ya mokano ya Yehova na molɔ́ngɔ́ mobimba.

a Yesu asɛngaki te na moto nyonso oyo azalaki kolanda ye ete asundola biloko nyonso oyo azalaki na yango. Atako amonisaki ete ezali mpasi mpo na mozwi kokɔta na Bokonzi ya Nzambe, abakisaki ete: “Makambo nyonso ekoki kosalema mpo na Nzambe.” (Marko 10:23, 27) Kutu, mwa ndambo ya bato oyo bazalaki na bozwi bakómaki bayekoli ya Kristo. Atako bazwaki toli ya sikisiki na lisangá ya bokristo, basɛngaki bango te ete bápesa babola bozwi na bango nyonso.​—1 Timote 6: 17.

b Mpo na koyeba na mokuse makambo etali bomoi ya Yesu mpe mosala na ye ndenge elandanaki, talá buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo, ebimisami na Batatoli ya Yehova.