Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli ya Eteni 1

Maloba ya ebandeli ya Eteni 1

Biblia elobeli libosoliboso ndenge Nzambe asalaki biloko nyonso. Lisolo yango ya ebandeli emonisaka biso biloko kitoko oyo Yehova asalaki na likoló mpe na mabele. Soki ozali moboti, salisá mwana na yo amona ete Nzambe asalá biloko ndenge na ndenge ya kokamwa. Monisá ye ete ntango Nzambe akelaki bato, apesaki bango mayele mingi koleka banyama: akelaki moto na likoki ya koloba, kokanisa, kosala biloko, koyemba, mpe kobondela. Salisá mwana amona mpenza ete Yehova azali na nguya, bwanya mpe alingaka mpenza biloko nyonso oyo akelá, ata mpe mokomoko na biso.

NA ETENI OYO

LITEYA 1

Nzambe asalaki likoló ná mabele

Biblia elobi ete Nzambe asalaki likoló ná mabele. Mpo na nini azalisaki anzelu moko liboso ya kosala biloko mosusu nyonso?

LITEYA 2

Nzambe asalaki mobali ná mwasi ya liboso

Nzambe asalaki mobali ná mwasi ya liboso mpe atyaki bango na elanga ya Edene. Alingaki ete bábota bana mpe bakómisa mabele mobimba paradiso.