Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 57

Yehova atindi Yirimia asakola

Yehova atindi Yirimia asakola

Yehova aponaki Yirimia azala mosakoli ya bato ya Yuda. Ayebisaki ye akebisa bango mpo batika kosala makambo ya mabe. Kasi Yirimia alobaki: ‘Yehova, nazali kaka mwana. Nayebi ndenge ya koloba na bato yango te.’ Yehova ayebisaki ye: ‘Kobanga te. Nakoyebisa yo makambo oyo okoloba. Nakosalisa yo.’

Yehova ayebisaki Yirimia ayanganisa mikóló ya bato, abukabuka elokó ya mabele ya moyemi-mbɛki liboso na bango, mpe aloba: ‘Yerusaleme ekobukama kaka boye.’ Ntango Yirimia asalaki ndenge Yehova alobaki, mikóló basilikaki makasi. Nganga-nzambe moko na nkombo Pashure abɛtaki Yirimia mpe akɔtisaki ye na bikanga-makolo basalá na libaya. Butu mobimba, Yirimia akokaki koningana te. Pashure abimisaki ye na ntɔngɔ. Yirimia alobaki: ‘Nakokoka lisusu boye te. Nakotika kosakola.’ Kasi, atikaki mpenza? Te. Ntango Yirimia akanisaki lisusu mwa moke, alobaki: ‘Nsango ya Yehova ezali kopela lokola mɔtɔ na kati na ngai. Nakoki kotika kosakola te.’ Na yango, akobaki kokebisa bato.

Bambula elekaki mpe Yuda ezwaki mokonzi ya sika. Banganga-nzambe ná basakoli ya lokuta bazalaki kosepela na nsango ya Yirimia te. Bayebisaki bankumu: ‘Moto oyo abongi na liwa.’ Kasi Yirimia alobaki: ‘Soki bobomi ngai, bokoboma ngai kaka mpamba. Makambo oyo nazali koloba ezali ya Yehova, ezali ya ngai te.’ Ntango bankumu yango bayokaki bongo, balobaki: ‘Ebongi te koboma moto oyo.’

Yirimia akobaki kosakola, mpe bankumu bayokaki nkanda makasi. Basɛngaki mokonzi aboma Yirimia. Mokonzi ayebisaki bango básala ye nyonso oyo balingi. Bazwaki Yirimia mpe babwakaki ye na libulu moko mozindo ya pɔtɔpɔtɔ, na elikya ete akokufa kuna. Yirimia abandaki kozinda na kati ya pɔtɔpɔtɔ yango.

Na nsima, kapita moko ya ndako ya mokonzi na nkombo Ebede-meleke ayaki koyebisa mokonzi ete: ‘Bankumu babwaki Yirimia na libulu! Soki totiki ye kuna, akokufa.’ Mokonzi ayebisaki Ebede-meleke akende elongo na mibali 30 kobimisa Yirimia na libulu yango. Omoni te ete tosengeli kolanda ndakisa ya Yirimia, oyo atikaki eloko moko te epekisa ye kosakola?

“Bato nyonso bakoyina bino mpo na nkombo na ngai; kasi moto oyo akoyika mpiko tii na nsuka ye wana nde akobika.”​—Matai 10:22