Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 62

Nzete monene oyo ezalaki elilingi ya bokonzi moko

Nzete monene oyo ezalaki elilingi ya bokonzi moko

Nebukadenezare alɔtaki ndɔtɔ moko ya kobangisa. Abengaki bato na ye ya bwanya mpo báyebisa ye ndimbola na yango. Kasi moko te akokaki kolimbwela ye ndɔtɔ yango. Nsukansuka, mokonzi asololaki na Danyele.

Nebukadenezare ayebisaki ye: ‘Na ndɔtɔ na ngai, namonaki nzete moko. Ekómaki molai tii etutaki mapata. Bato nyonso na mabele mobimba bakokaki komona yango. Ezalaki na nkasa ya kitoko mpe mbuma ebele. Banyama ezalaki kofanda na nse ya elili na yango mpe bandɛkɛ ezalaki kotonga zumbu na bitape na yango. Na nsima anzelu moko akitaki. Abelelaki: “Bókata nzete yango mpe bitape na yango. Kasi bótika ekumu ná misisa na yango na mabele, mpe bókanga yango na bansinga ya ebende mpe ya motako. Motema ya nzete yango ebongwana, ezala lisusu ya moto te, ekoma ya nyama, mpe elekisa ntango nsambo. Bato nyonso basengeli koyeba ete Nzambe azali Mokonzi mpe apesaka bokonzi na moto nyonso oyo alingi.”’

Yehova asalisaki Danyele ayeba ndimbola ya ndɔtɔ yango. Ntango Danyele ayebaki ndimbola ya ndɔtɔ yango, akómaki kobanga. Alobaki: ‘Ee mokonzi, ebongaki ndɔtɔ yango etala banguna na yo, kasi etali nde yo. Nzete monene oyo bakataki ezali yo. Okolongwa na bokonzi, mpe okolya matiti na zamba lokola nyama ya zamba. Kasi lokola anzelu alobaki bátika ekumu ná misisa ya nzete yango, okozonga lisusu mokonzi.’

Mbula moko na nsima, Nebukadenezare azalaki kotambolatambola likoló ya ndako na ye mpo na kotala kitoko ya Babilone. Alobaki: ‘Talá engumba kitoko oyo natongá. Nazali mpenza moto monene!’ Kaka ntango azalaki koloba bongo, mongongo moko eutaki na likoló elobaki: ‘Nebukadenezare! Sikoyo olongwe mokonzi.’

Na ntango yango, Nebukadenezare abɛlaki motó mpe akómaki lokola nyama ya zamba. Babenganaki ye na ndako na ye mpe akómaki kofanda na zamba elongo na banyama. Nsuki na ye ekómaki milai lokola nsala ya mpongo mpe manzaka na ye lokola manzaka na ndɛkɛ.

Nsima ya mbula nsambo, mayele ya Nebukadenezare ezongaki mpe Yehova atyaki ye mokonzi ya Babilone. Na nsima, Nebukadenezare alobaki: ‘Nasanzoli Yehova, Mokonzi ya likoló. Sikoyo nayebi ete Yehova azali Mokonzi. Akitisaka bato ya lolendo, mpe akoki kopesa bokonzi na moto nyonso oyo alingi kopesa.’

“Lolendo ezalaka liboso ya kokwea, mpe elimo ya komikumisa liboso ya kobɛta libaku.”​—Masese 16:18