Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 61

Baboyaki kogumbama

Baboyaki kogumbama

Mwa moke nsima ya kolɔta ndɔtɔ ya ekeko, Mokonzi Nebukadenezare asalaki ekeko moko monene ya wolo. Atɛlɛmisaki yango na mokili patatalu ya Dura mpe abengaki bato minene ya mokili na kati na bango Shadrake, Meshake ná Abedenego, mpo báyangana liboso na yango. Mokonzi yango apesaki mobeko oyo: ‘Ntango bokoyoka lokito ya kelelo, ya nzɛnzɛ, ya kornemize, bógumbamela ekeko yango! Moto nyonso oyo akogumbama te akobwakama na litumbu ya mɔtɔ.’ Baebre misato wana bakogumbamela ekeko yango to bakosambela kaka Yehova?

Na nsima, mokonzi alobaki ete bábɛta miziki. Bato nyonso bakweaki mpe basambelaki ekeko yango, longola kaka Shadrake, Meshake ná Abedenego. Bato mosusu bamonaki bango mpe bayebisaki mokonzi: ‘Baebre wana misato baboyi kosambela ekeko na yo.’ Nebukadenezare alobaki báya na bango mpe alobaki na bango: ‘Nazali kopesa bino libaku mosusu ya kosambela ekeko oyo. Soki boboyi, nakobwaka bino na litumbu ya mɔtɔ. Nzambe moko te akokoka kobikisa bino na lobɔkɔ na ngai.’ Bayanolaki: ‘Tozali na ntina ya libaku mosusu te. Nzambe na biso akoki kobikisa biso. Kasi soki bongo te, Ee mokonzi, tokosambela ekeko oyo te.’

Nebukadenezare asilikaki makasi mpenza. Ayebisaki bato na ye: ‘Bóngalisa mɔtɔ mbala nsambo koleka ndenge tomesaná kongalisa yango!’ Na nsima, alobaki na basoda na ye: ‘Bókanga mibali yango mpe bóbwaka bango kuna!’ Lokola litumbu yango ezalaki na mɔtɔ makasi, ntango basoda yango bakómaki pene na yango bakufaki mbala moko. Baebre misato yango bakweaki na mɔtɔ. Kasi ntango Nebukadenezare atalaki na kati, amonaki mibali misato te, kasi nde mibali minei bazali kotambolatambola na kati ya litumbu yango ya mɔtɔ. Akómaki kobanga mpe atunaki basaleli na ye: ‘Tobwakaki mibali misato na mɔtɔ, boye te? Nazali komona mibali minei, mpe moko na bango azali lokola anzelu!’

Nebukadenezare akendaki pene ya litumbu mpe abelelaki: ‘Bóbima, basaleli ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló!’ Bato nyonso bakamwaki ndenge bamonaki Shadrake, Meshake ná Abedenego babimi na mɔtɔ, baziki te. Mposo na bango, nsuki na bango mpe bilamba na bango ezikaki te, mpe babimaki ata na nsolo ya mɔtɔ te.

Nebukadenezare alobaki: ‘Nzambe ya Shadrake, Meshake ná Abedenego azali monene. Atindi anzelu na ye mpe abikisi bango. Nzambe moko te azali lokola Nzambe na bango.’

Ndenge moko na Baebre wana misato, ozwi ekateli ya kotikala sembo epai ya Yehova ata na likambo nini?

“Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.”​—Matai 4:10