Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

Maloba ya ebandeli ya Eteni 11

Maloba ya ebandeli ya Eteni 11

Eteni oyo ekolobela masolo oyo ezali na Makomami ya Grɛki ya bokristo. Yesu abotamaki na libota ya bozwi te, libota yango ezalaki kofanda na mwa mboka moko ya moke. Tata na ye azalaki mosali-mabaya mpe bazalaki kosala elongo. Kasi Yesu nde asengelaki kobikisa bato ya mokili. Yehova aponaki ye azala Mokonzi na Bokonzi ya likoló. Soki ozali moboti, salisá mwana na yo amona ndenge Yehova aponaki na likebi libota oyo Yesu akobotama mpe akokola. Talá ndenge Yehova abatelaki Yesu mpo Erode aboma ye te, mpe ndenge oyo eloko moko te ekoki kopekisa kokokisama ya mokano ya Yehova. Talá ndenge Yehova apesaki Yoane mokumba ya kobongisela Yesu nzela. Bendá likebi ya mwana ete, ata ntango Yesu azalaki mwana moke, alingaki bwanya ya Yehova.

NA ETENI OYO

LITEYA 68

Elizabeti aboti mwana

Mpo na nini anzelu ayebisaki mobali ya Elizabeti ete akokoka koloba te tii mwana na bango akobotama?

LITEYA 69

Anzelu Gabriele ayei epai ya Maria

Apesaki Maria nsango oyo ebongolaki bomoi na ye.

LITEYA 70

Baanzelu bayebisi ete Yesu abotami

Babateli ya mpate oyo bayokaki nsango yango bakendaki kuna nokinoki.

LITEYA 71

Yehova abatelaki Yesu

Mokonzi moko ya motema mabe alingaki Yesu akufa.

LITEYA 72

Elenge Yesu

Ndenge nini akamwisaki bateyi na tempelo?

LITEYA 73

Yoane abongisi nzela

Yoane akómaki mosakoli ntango akolaki. Ateyaki ete Masiya azali koya. Bato basalaki nini ntango bayokaki nsango yango?