Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 74

Yesu akómi Masiya

Yesu akómi Masiya

Yoane asakolaki boye: ‘Moto oyo aleki ngai azali koya.’ Ntango Yesu azalaki na mbula soki 30, autaki na Galile mpe akendaki na Ebale ya Yordani, epai Yoane azalaki kobatisa bato. Yesu alingaki Yoane abatisa ye, kasi Yoane ayebisaki ye ete: ‘Nakoki kobatisa yo te. Yo nde osengeli kobatisa ngai.’ Yesu alobaki na Yoane: ‘Yehova alingi obatisa ngai.’ Na yango, bakɔtaki na Ebale ya Yordani, mpe Yoane azindisaki Yesu na mai.

Ntango Yesu abimaki na mai, abondelaki. Na mbala moko, likoló efungwamaki, mpe elimo ya Nzambe ekitelaki ye lokola ebenga. Na nsima, Yehova alobaki uta na likoló ete: “Yo ozali Mwana na ngai ya bolingo; nandimi yo.”

Ntango elimo ya Yehova ekitelaki Yesu, akómaki Kristo to Masiya. Ntango ekokaki mpo abanda mosala oyo Yehova atindaki ye asala awa na mabele.

Mbala moko nsima ya batisimo na ye, Yesu akendaki na esobe mpe asalaki kuna mikolo 40. Ntango azongaki, akendaki kotala Yoane. Wana azalaki kopusana pene na Yoane, Yoane alobaki boye: ‘Talá, Mwana-Mpate ya Nzambe oyo akolongola lisumu ya mokili.’ Yoane alobaki bongo mpo asalisa bato báyeba ete Yesu azali Masiya. Oyebi nini ekómelaki Yesu ntango azalaki na esobe? Tokolobela yango.

“Mongongo moko eutaki na likoló ete: ‘Yo ozali Mwana na ngai ya bolingo; nandimi yo.’”​—Marko 1:11