Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 84

Yesu atamboli likoló ya mai

Yesu atamboli likoló ya mai

Yesu asukaki kaka te na kobikisa bato ya maladi mpe kosekwisa bakufi, kasi azalaki mpe na bokonzi likoló ya mopɛpɛ ná mbula. Nsima ya kobondela likoló ya ngomba, Yesu atalaki na Mbu ya Galile mpe amonaki mopɛpɛ ya makasi. Bayekoli na ye bazalaki na kati ya masuwa na bango, bazalaki kobundana na mopɛpɛ. Yesu akitaki na mbu mpe abandaki kotambola likoló ya mai, kokende esika masuwa ya bantoma ezalaki. Ntango bantoma bamonaki moto moko azali kotambola likoló ya mai, babangaki makasi. Kasi Yesu alobaki na bango: ‘Ezali ngai. Bóbanga te.’

Bongo Petro alobaki na ye: ‘Nkolo, soki ezali mpenza yo, yebisá ngai naya esika ozali.’ Yesu ayebisaki ye: ‘Yaká.’ Petro akitaki na katikati ya mopɛpɛ makasi wana, mpe atambolaki likoló ya mai, azalaki kokende epai ya Yesu. Kasi ntango Petro akómaki pene na Yesu, amonaki mopɛpɛ ya makasi mpe akómaki kobanga. Abandaki kozinda. Petro abelelaki: “Nkolo, bikisá ngai!” Yesu asimbaki ye na lobɔkɔ mpe alobaki na ye: ‘Mpo na nini obandaki kotya ntembe? Wapi kondima na yo?’

Yesu ná Petro bamataki na masuwa, mpe na mbala moko, mopɛpɛ esilaki. Bantoma bayokaki ndenge nini? Bayebisaki Yesu boye: “Ozali mpenza Mwana ya Nzambe.”

Yesu apekisaki mopɛpɛ kaka mbala moko wana te. Mokolo mosusu, ntango Yesu ná bantoma na ye bazalaki kokatisa mbu, Yesu alalaki na nsima ya masuwa. Ntango azalaki kolala, mopɛpɛ ya makasi eyaki. Mai ya mbonge ebandaki kokɔta na masuwa mpe masuwa yango etondaki na mai. Bantoma balamusaki ye mpe babelelaki ete: ‘Moteyi, tolingi tókufa! Bikisá biso!’ Yesu alamukaki mpe alobaki na mbu ete: “Fandá nyɛɛ!” Na mbala moko, mopɛpɛ esilaki mpe mbu ekómaki kimya. Yesu atunaki bantoma na ye boye: ‘Wapi kondima na bino?’ Babandaki kolobana na kati na bango: ‘Ata mopɛpɛ ná mbu etosi ye.’ Bantoma bamonaki ete soki batyeli Yesu motema mobimba, bakoki kobanga eloko te.

‘Nalingaki kosuka wapi soki nazalaki na kondima te ete nakomona bolamu ya Yehova na mokili ya baoyo bazali na bomoi!’​—Nzembo 27:13