Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 88

Bakangi Yesu

Bakangi Yesu

Yesu ná bantoma na ye bakatisaki lobwaku ya Kidrone, mpe bakendaki na Ngomba ya Olive. Midi ya butu esilaki koleka, mpe sanza ezalaki komonana mobimba. Ntango bakómaki na elanga ya Getesemane, Yesu alobaki na bango boye: “Bótikala awa mpe bósɛnzɛla.” Na nsima, Yesu akendaki mwa mosika na kati ya elanga mpe afukamaki. Atako azalaki koyoka mawa mingi, abondelaki Yehova ete: “Mokano na yo esalema.” Na nsima, Yehova atindaki anzelu moko mpo na kolendisa ye. Ntango Yesu azongaki esika bantoma bazalaki, akutaki misato na bango balali. Alobaki na bango: ‘Bólamuka! Oyo ezali ntango ya kolala te! Ngonga oyo esengeli napesama epai ya banguna na ngai ekoki.’

Na ntango yango, Yudasi akómaki, ayaki na ebele ya bato basimbi mipanga ná banzete. Ayebaki esika ya kozwa Yesu mpo bazalaki koya na elanga yango mbala na mbala. Yudasi ayebisaki basoda ete akopesa bango elembo ya koyeba Yesu. Akendaki mbala moko epai ya Yesu mpe alobaki: ‘Mbote, Moteyi,’ mpe apesaki ye lipwɛpwɛ. Yesu alobaki na ye: ‘Yudasi, ozali kokaba mwana ya moto na lipwɛpwɛ.’

Yesu apusanaki epai bato yango bazalaki mpe atunaki bango: “Bozali koluka nani?” Bazongiselaki ye ete: “Yesu Monazarete.” Bongo alobaki na bango: ‘Ngai oyo,’ mpe bato yango bazongaki nsima mpe bakweaki na mabele. Yesu atunaki bango lisusu: “Bozali koluka nani?” Bayanolaki lisusu: “Yesu Monazarete.” Yesu alobaki na bango ete: ‘Nayebisi bino ete ngai oyo. Bótika mibali oyo bákende.’

Ntango Petro amonaki makambo oyo ezali kosalema, abimisaki mopanga mpe akataki litoi ya Malakusi, moombo ya nganga-nzambe monene. Kasi Yesu asimbaki litoi ya mobali yango mpe azongisaki yango. Na nsima, alobaki na Petro boye: ‘Zongisá mopanga na yo. Soki ozali kobunda na mopanga, okokufa na mopanga.’ Basoda bakamataki Yesu, bakangaki ye bansinga na mabɔkɔ, mpe bantoma bakimaki. Na nsima, bato yango bakendaki na Yesu epai ya Anasi, nganga-nzambe mokonzi. Anasi atunaki Yesu mituna mpe atindaki ye epai ya Kaifa, nganga-nzambe monene. Kasi likambo nini ekómelaki bantoma?

“Na mokili bozali na bolɔzi, kasi bózala na mpiko! Ngai nalongi mokili.”​—Yoane 16:33