Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 97

Korneyi azwi elimo santu

Korneyi azwi elimo santu

Na Kaisaria, moto moko na nkombo Korneyi azalaki mokonzi moko monene ya limpinga ya basoda ya Roma. Azalaki Moyuda te, kasi Bayuda bazalaki komemya ye. Azalaki kosalisa babola mpe bato oyo bazangá. Korneyi azalaki kondimela Yehova mpe kobondela ye ntango nyonso. Mokolo moko, anzelu moko abimelaki ye mpe alobaki na ye: ‘Nzambe ayoki mabondeli na yo. Sikoyo tindá mibali na engumba Yope, esika Petro afandi, mpe bengá ye aya epai na yo.’ Na mbala moko, Korneyi atindaki mibali misato na Yope, oyo ezali mosika na bakilomɛtrɛ soki 50 na sudi.

Na ntango yango, na Yope, Petro amonaki emonaneli moko. Amonaki nyama oyo Bayuda bazalaki kolya te, mpe ayokaki mongongo moko eyebisi ye alya yango. Petro aboyaki mpe alobaki: ‘Nalyá naino nyama ata moko te ya mbindo.’ Na nsima, mongongo yango eyebisaki ye: ‘Tiká kobenga nyama yango mbindo. Nzambe apɛtoli yango.’ Mongongo yango elobaki lisusu na Petro ete: ‘Mibali misato bazali na porte ya ndako na yo. Kende elongo na bango.’ Petro akendaki na porte mpe atunaki mibali yango ntina oyo bayei wana. Bayanolaki: ‘Korneyi, mokonzi moko ya limpinga ya basoda ya Roma, nde atindi biso. Abengisi yo na ndako na ye na Kaisaria.’ Petro ayebisaki bango bálala na butu wana na ndako na ye. Mokolo oyo elandaki, Petro elongo na bandeko mosusu balongwaki na Yope mpe bakendaki na Kaisaria.

Nsukansuka, ntango Korneyi amonaki Petro, Korneyi akweaki na nse na makolo na ye. Kasi Petro ayebisaki ye: ‘Tɛlɛmá! Nazali kaka moto lokola yo. Nzambe ayebisaki ngai naya na ndako na yo, atako epekisami na Bayuda bakende na ndako ya Bapakano. Sikoyo yebisá ngai ntina oyo obengi ngai.’

Korneyi alobaki na Petro boye: ‘Esali sikoyo mikolo minei nazalaki kobondela Nzambe, mpe anzelu moko ayebisaki ngai natinda bato bábenga yo. Nabondeli yo teyá biso maloba ya Yehova.’ Petro ayebisaki ye: ‘Namoni ete Nzambe aponaka bilongi te. Andimaka moto nyonso oyo alingi kosambela ye.’ Petro ateyaki bango makambo mingi oyo etali Yesu. Na nsima, elimo santu ekitelaki Korneyi ná bato nyonso oyo bazalaki na ndako na ye, mpe bango nyonso bazwaki batisimo.

“Na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.”​—Misala 10:35