Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 96

Yesu aponi Saulo

Yesu aponi Saulo

Saulo azalaki Moroma mpo abotamaki na engumba Tarse. Azalaki Mofarisai, ayebaki Mibeko ya Bayuda malamu mpenza, mpe azalaki koyina bakristo. Azalaki kokɔta na ndako ya bakristo ya basi mpe ya mibali mpo na kobimisa bango mpe kobwaka bango na bolɔkɔ. Kutu, azalaki wana mpo na kotala ndenge bato oyo basilikaki bazalaki kobamba moyekoli Stefano mabanga mpo na koboma ye.

Kasi Saulo alingaki kosuka kaka na kokanga bakristo ya Yerusaleme te. Asɛngaki nganga-nzambe monene atinda ye na engumba Damasi mpo akende konyokola mpe bakristo ya kuna. Ntango Saulo akómaki pene na engumba yango, pole moko makasi ebimelaki ye, mpe akweaki na nse. Ayokaki mongongo moko ezali koloba na ye: ‘Saulo, mpo na nini ozali konyokola ngai?’ Saulo atunaki: ‘Yo nani?’ Mpe eyano ezalaki: ‘Ngai Yesu. Kende na Damasi, mpe bakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala.’ Na mbala moko, miso ya Saulo ekufaki, mpe moto mosusu asimbaki ye na lobɔkɔ mpo na komema ye na Damasi.

Kuna, ezalaki na mokristo moko ya sembo na nkombo Ananiasi. Na emonaneli, Yesu ayebisaki ye: ‘Kende na ndako ya Yudasi na balabala oyo ebengami Alima, mpe luká Saulo.’ Ananiasi alobaki: ‘Nkolo, nayebi moto yango malamu! Azali kobwaka bayekoli na yo na bolɔkɔ!’ Kasi Yesu alobaki: ‘Kende epai na ye. Naponi ye mpo asakola nsango malamu na bikólo ebele.’

Ntango Ananiasi amonaki Saulo, alobaki na ye: ‘Saulo, ndeko, Yesu atindi ngai nafungola miso na yo.’ Na mbala moko, Saulo abandaki lisusu komona. Ayekolaki makambo ya Yesu mpe akómaki moyekoli na ye. Lokola Saulo azwaki batisimo mpe akómaki mokristo, abandaki koteya na basinagoga, elongo na bakristo mosusu. Bayuda bayokaki mabe mpenza ntango bazalaki komona Saulo azali koteya bato makambo ya Yesu! Balobaki: ‘Mobali oyo, ye te nde azalaki konyokola bayekoli ya Yesu?’

Saulo ateyaki bato ya Damasi mbula misato. Bayuda bayinaki ye mpe bazalaki koluka ndenge ya koboma ye. Kasi, bandeko bayebaki likambo yango mpe bakimisaki ye. Batyaki ye na kitunga moko mpe babimisaki ye na lidusu moko oyo ezalaki na efelo ya engumba.

Ntango Saulo akendaki na Yerusaleme, amekaki kokende epai ya bandeko oyo bazalaki kuna. Kasi, bazalaki kobanga ye. Moyekoli moko ya motema boboto na nkombo Barnabasi amemaki Saulo epai ya bantoma mpe ayebisaki bango ete Saulo abongwani mpenza. Saulo abandaki kosakola nsango malamu na molende elongo na lisangá oyo ezalaki na Yerusaleme. Na nsima, nkombo na ye ekómaki Paulo.

“Yesu ayaki na mokili mpo na kobikisa basumuki. Na kati na bango ngai moto ya liboso mpenza.”​—1 Timote 1:15