Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 21

Bolɔzi ya zomi

Bolɔzi ya zomi

Moize ayebisaki Farao ete akoluka lisusu komona ye te. Kasi liboso akende, alobaki na Farao: ‘Na midi ya butu, mwana nyonso ya liboso na Ezipito akokufa, kobanda na mwana na yo tii na bana ya baombo.’

Yehova ayebisaki Bayisraele básala molulu moko ya ntina mingi. Alobaki: ‘Bóboma mpate to ntaba ya mobali oyo ezali na mbula moko, mpe bópakola ndambo ya makila na yango na libaya ya likoló oyo esimbaka makonzí ya porte. Bótumba mosuni, mpe bólya yango ná bagato ezangá levire. Bólata libela, ná sandale na makolo, mpo bókoka kokende mbala moko. Na butu oyo nakosikola bino.’ Kanisá esengo makasi oyo Bayisraele bazalaki na yango!

Na midi ya butu, anzelu ya Yehova alekaki na ndako nyonso ya Ezipito. Na bandako oyo makila ezalaki te na makonzí ya porte, mwana ya liboso abomamaki. Kasi anzelu yango asalaki eloko te na bandako oyo bapakolaki makila. Na mabota nyonso ya Baezipito, ezala ya babola to ya bazwi, bana ya liboso bakufaki. Kasi mwana moko te ya Bayisraele akufaki.

Ata mwana ya Farao mpe akufaki. Farao akokaki lisusu kokanga motema te. Na mbala moko alobaki na Moize ná Arona: ‘Bótɛlɛma. Bólongwa awa. Bókende mpe bósambela Nzambe na bino. Bózwa banyama na bino mpe bókende!’

Wana sanza ezalaki mobimba mpenza, Bayisraele babimaki na Ezipito na kolanda mabota mpe bituluka na bango. Ezalaki na mibali 600 000, mpe basi ná bana ebele mpenza. Bato mosusu mpe bakendaki elongo na bango mpo bákóma mpe kosambela Yehova. Nsukansuka, Bayisraele balongwaki na boombo!

Mpo na kokanisa ndenge Yehova abikisaki bango, bakómaki kosala molulu wana ya ntina mingi mbula na mbula. Bazalaki kobenga yango Elekeli.

“Natiki yo ozala mpo na ntina oyo mpenza: mpo na nzela na yo nalakisa nguya na ngai, mpe mpo nkombo na ngai esakolama na mabele mobimba.”​—Baroma 9:17