Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 22

Likamwisi na Mbu Motane

Likamwisi na Mbu Motane

Ntango kaka Farao ayokaki ete Bayisraele balongwe na Ezipito, amonaki ete esengelaki te atika bango bákende. Ayebisaki basoda na ye: ‘Bóbongisa makalo nyonso ya etumba mpe tólanda bango! Esengelaki te tótika bango bákende.’ Farao ná bato na ye babandaki kolanda Bayisraele.

Yehova azalaki kokamba bato na ye, na likonzí ya lipata na moi mpe na likonzí ya mɔtɔ na butu. Amemaki bango na Mbu Motane mpe ayebisaki bango bátya kaa wana.

Na ntango yango, Bayisraele bamonaki Farao ná basoda na ye bazali kolanda bango. Bayisraele bazalaki na katikati, liboso na bango mbu, nsima na bango basoda ya Ezipito. Babelelaki epai ya Moize: ‘Tokokufa! Ebongaki otika biso na Ezipito.’ Kasi Moize alobaki: ‘Bóbanga te. Bózela mpe bómona ndenge Yehova akobikisa biso.’ Moize atyelaki mpenza Yehova motema!

Yehova ayebisaki Bayisraele bálongola kaa. Na butu wana, Yehova atyaki likonzí ya lipata kati na Baezipito mpe Bayisraele. Baezipito bazalaki na molili. Kasi Bayisraele bazalaki na pole.

Yehova alobaki na Moize asembola lobɔkɔ na ye likoló ya mbu. Bongo Yehova atindaki mopɛpɛ ya makasi butu mobimba. Mbu ekabwanaki na biteni mibale, mpe nzela efungwamaki na katikati. Ebele ya Bayisraele wana batambolaki likoló ya zɛlo, na katikati ya bifelo ya mai.

Basoda ya Farao balandaki Bayisraele esika bakatisaki mbu na makolo. Yehova akɔtisaki mobulungano na kati ya basoda yango. Bapinɛ ya makalo na bango ebandaki kolongwa. Basoda yango bagangaki: ‘Tólongwa awa! Yehova azali kobundela bango.’

Yehova ayebisaki Moize: ‘Sembolá lobɔkɔ na yo likoló ya mbu.’ Na mbala moko, bifelo ya mai ekwelaki basoda ya Ezipito. Farao ná bato na ye nyonso bakufaki. Ata moko te abikaki.

Na ngámbo mosusu ya mbu, ebele ya bato bayembelaki Nzambe mpo na kokumisa ye: ‘Tóyembela Yehova, mpo atombwami likoló mingi mpenza. Abwaki mpunda ná motambwisi na yango na mbu.’ Ntango bato bazalaki koyemba, basi bazalaki kobina mpe kobɛta mbonda ya mike. Bato nyonso basepelaki ndenge balongwaki na boombo.

“Mpo tózala na mpiko mpenza mpe tóloba: ‘Yehova azali mosungi na ngai; nakobanga te. Moto akoki kosala ngai nini?’”​—Baebre 13:6