Lakisá makambo oyo ezali na kati

Kende na mitó ya makambo

LITEYA 18

Mwa nzete oyo ezalaki kopela mɔtɔ

Mwa nzete oyo ezalaki kopela mɔtɔ

Moize afandaki na Midiane mbula 40. Abalaki, mpe abotaki bana. Mokolo moko ntango azalaki kobatela bampate pene na Ngomba Sinai, amonaki likambo moko ya kokamwa. Nzete moko ya nzubɛ ezalaki kopela mɔtɔ, kasi ezalaki kozika te! Ntango Moize apusanaki mpo na kotala, ayokaki mongongo moko ebimi na nzete yango, elobi: ‘Moize! Kopusana awa te. Longolá basandale na yo mpo esika otɛlɛmi ezali mabele mosantu.’ Yehova nde azalaki koloba na nzela ya anzelu.

Moize abangaki, mpe azipaki elongi na ye. Mongongo yango elobaki: ‘Namoni mpasi ya Bayisraele. Nakobikisa bango na mabɔkɔ ya Baezipito mpe nakomema bango na mokili moko ya malamu. Yo nde okobimisa bato na ngai na Ezipito.’ Na ntembe te, Moize akamwaki mpenza!

Moize atunaki: ‘Soki bato yango batuni nani nde atindi yo nakoloba nini?’ Nzambe ayanolaki: ‘Yebisá bango ete Yehova, Nzambe ya Abrahama, Nzambe ya Yisaka, mpe Nzambe ya Yakobo nde atindi ngai.’ Moize alobaki lisusu: ‘Bongo soki bato yango bandimeli ngai te?’ Yehova apesaki Moize elembo mpo na komonisa ye ete akosalisa ye. Ayebisaki ye abwaka nzete oyo asimbaki na mabele. Ntango abwakaki yango, ekómaki nyoka! Ntango Moize asimbaki nyoka yango na mokila, ezongaki nzete. Yehova alobaki: ‘Ntango okosala likamwisi oyo, ekomonisa ete ngai nde natindi yo.’

Moize alobaki: ‘Nalobaka malamu te.’ Yehova alakaki ye: ‘Nakoyebisa yo makambo oyo okoloba, mpe nakotinda ndeko na yo Arona mpo asalisa yo.’ Lokola Moize ayebaki ete Yehova azali na ye, azwaki mwasi ná bana na ye mpe bazongaki na Ezipito.

“Bómitungisa te mpo na ndenge oyo bokoloba to makambo oyo bokoloba; mpo bakopesa bino oyo bokoloba kaka na ngonga wana.”​—Matai 10:19