Maloba ya ebandeli ya Eteni 5
Sanza mibale nsima ya kokatisa Mbu Motane, Bayisraele bakómaki na Ngomba Sinai. Kuna, Yehova asalaki kondimana na Yisraele mpo ezala ekólo na ye. Abatelaki bango mpe apesaki bango nyonso oyo esengeli: mana mpo na kolya, bilamba oyo ekufaki te, mpe esika ya kimya mpo na kofanda. Soki ozali moboti, salisá mwana na yo amona ntina oyo Yehova apesaki Bayisraele Mibeko, tabernakle, mpe bonganga-nzambe. Monisá ntina ya kokokisa maloba na biso, ya kozala ntango nyonso na komikitisa, mpe ya kotikala sembo epai ya Yehova.
NA ETENI OYO
LITEYA 23
Bapesaki Yehova elaka
Bayisraele bapesaki Nzambe elaka moko ya ntina mingi ntango bazalaki na Ngomba Sinai.
LITEYA 24
Bakokisaki elaka na bango te
Wana Moize azalaki kozwa Mibeko Zomi, bato basalaki lisumu moko monene.
LITEYA 26
Banɔngi zomi na mibale
Yosua ná Kalebe bakesanaki na mibali mosusu zomi oyo bakendaki kotala mokili ya Kanana.
LITEYA 27
Batombokelaki Yehova
Kora, Datane, Abirame mpe bato mosusu 250 bayebaki te likambo moko ya ntina oyo etali Yehova.